2010–2019
Mapamboli ya Tempelo
sánzá ya mínei 2015


Mapamboli ya Tempelo

Ntango tokotaka na tempelo, kuna ekoki koyela biso bomatisi ya molimo mpe koyokaka kimia

Bandeko na ngai balingami ya mibali mpe basi, boniboni nazali na esengo ya kozala na bino elongo na ntongo ya Pasika oyo ntango makanisi na biso ezongi na Mobikisi ya mokili. Natindi bolingo na ngai mpe bambote na moko na moko na bino mpe nasambeli ete Tata na biso ya Lola afula maloba na ngai.

Likita oyo esali mibu nsambo uta nabengamaki lokola Mokambi ya Eklezia. Ezalaki mibu ya mosala koleka, nayokisamaki kaka na mikakatano ndambo te kasi mapamboli ebele koleka. Kati na esengo koleka mpe mapamboli ya bule oyo ezalaki libaku ya kokulisa mpe kokulisa lisusu batempelo.

Ya kala mingi te, ezali ya sanza ya Zomi na moko oyo eleki ezalaki libaku malamu mpo na ngai ya kokulisa Tempelo kitoko ya sika ya Phoenix Arizona. Nazalaki elongo na Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mpaka Dallin H. Oaks, Mpaka Richard J. Maynes, Mpaka Lynn G. Robbins mpe Mpaka Kent F. Richards. Na mpokwa ya ntina mpo na kokulisa, molulu ya bonkoko kitiko esalemaki esika oyo ezalaki na bilenge na biso koleka 4,000 bawutaki na disitiliki ya tempelo basalaki malamu mingi. Mokolo elandi tempelo ekulisamaki na mayangani misato ya bule mpe ya kofulama na molimo.

Botongi ya tempelo ezali kolakisaka na polele mpenza bokoli ya Eklezia. Tozali sikawa na batempelo 144 na mosala na mokili mobimba, mpe 5 ezongisami sika mpe 13 na nse ya botongami. Na kobakisa, batempelo 13 oyo elobamaki mpo na kotonga ezali na bolengelami ndenge na ndenge yambo kotonga ebanda. Na mobu oyo tokokulisa batempelo 2 mpe kokulisa 5 ya sika oyo ezali na pologalame ya kosilisa.

Mpo na mibu mibale eleki, lokola tosangisaki makasi na biso nakokokisanga batempelo eyebisamaki yambo. Tosimbamaki na botiki miango mpo na batempelo mosusu ya kobakisa. Na ntongo ya lelo, atako bongo nazali na esengo ya koyebisa botongi ya ba tempelo misato oyo ekotongama na bisika bilandi: Abidjan, Cote d’Ivoire; Port-au-Prince, Haiti; mpe Bangkok, Thailand. Oyo mapamboli kitoko ezali ya kobombama mpo na bandimi na biso ya bondimi koleka ya bisika wana mpe, na bosolo, bisika nyonso batempelo ezali nzinganzinga na mokili.

Mosala kososola bamposa mpe kozwa bisika mpo na kobakisa batempelo ezali kokoba, mpo ete tozali na mposa ete lokola bandimi ebele bazali na makoki ya kozwa libaku ya kokota na tempelo kozangaka makabo ya ntango mpe misolo. Lokola tosalaki na kala, tokotikala bobele koyebisaka bino ntango mikano ekozwama na ntina na yango.

Ntango nabanzi na ntina ya tempelo, makanisi na ngai ebaluki na mapamboli ebele tozwaka na kati. Ntango tokoti na nzela ya bikuke ya tempelo, totikaka sima na biso bobungisi makanisi mpe bobulungani ya mokili. Kati ya esika ya bule oyo, tokuti bonzenga mpe bobebi te. Ezali na kimia mpo na milimo na biso mpe na kozangaka kpoposo uta na babomoi na biso.

Ntango tokotaka na tempelo, kuna ekoki koyela biso bomatisi ya molimo mpe koyokaka kimia kokitela biso koleka koyoka mosusu oyo ekoki koya na motema ya moto. Tokososola bosolo ya ndimbola ya maloba ya Mobikisi ntango Alobi: “Natikeli bino kimia, kimia na ngai na pesi bino. … Tika ete mitema na bino mitungisama te, mpe yango ebanga te.”1

Kimia ya boye ekoki kokota na motema nionso—mitema oyo etungisami, mitema oyo epelisami na kati na mpasi, mitema oyo eyoki bobulungano, mitema oyo ezali koluka lisungi.

Natangaki kala te mpona mbala ya yambo na elenge mobali moko oyo akotaki na tempelo na motema ya bosenga mpo na lisungi. Basanza ebele eleki kala te azwaki libiangi na ye ya kosala misio na Sudi ya Amerika. Bongo viza na ye elekaki mikolo oyo asengelaki kokende na misio babongolaki miso na ye mpo na Etazini. Atako ayokisamaki motema mpasi ya kosala misio te na esika oyo libiangi na ye ya solo, atabongo asalaki mosala makasi na libiangi na ye ya sika, akanaki mpenza kosala makasi na yemei. Alembisamaki, na sima, mpo mayebi mabe oyo azuaki na bamisionele oyo bazalaki lokola komipesa makasi koleka ye kozalaka na ntango malamu koleka ya kokabolaka nsango malamu.

Mwa basanza moke elekaki elenge mobali oyo atungisamaki mingi na mikakatano ya nzoto oyo etikaki ye ndambo paralize, mpe azongisamaki na ndako na lopitalo.

Mwa basanza ndambo eleki elenge mobali akangolamaki mobimba, mpe paralizi na ye esilaki. Bayebisaki ye ete asengelaki lisusu kozala na makoki ya kosala lokola misionele, lipamboli mpo na oyo azalaki kobondela mokolo na mokolo. Bobele sango ya boyokisi motema mpasi ezalaki ete akokaki kozonga lisusu te na miso moko oyo atikaki, esika eye ayokaki bizalela mpe bizaleli ya mwa bamisionele bazalaki ya kokita lolenge bakokaki kozala te.

Asengelaki kokota na tempelo mpo na koluka lilendisi mpe bokotisi oyo akokaki kozwa boyebi malamu lokola misionele. Baboti na ye mpe lisusu basambelaki ete bokoti na tempelo oyo ekoka kopesa lisungi na bosenga ya mwana na bango ya mobali.

Ntango elenge mobali akotaki na kisuku ya selestiale kolandaka liyangani, afandaki na kiti mpe abandaki kosambela mpo na bokambami kowutaka na Tata na ye ya Lola.

Mosusu oyo akotaki kisuku ya selestiale mwa ndambo muke sima ezalaki elenge mobali oyo nkombo na ye ezali Landon. Ntango atambolaki kati ya kisuku, mbala moko amonaki elenge mobali afandi na kiti, miso ekangama mpe kosambelaka mpenza. Landon azwaki botindiki malamu ete asengelaki koloba na elenge mobali. Alingaki aboya kokata losambo, mpo ete elenge mobali azalaki kosambela, kasi akanaki kozela. Sima baminiti elekaki, elenge mobali akobaki kaka kosambelaka, Landon ayebaki akokaki te kolaka botindiki. Apusanaki pene ya elenge mobali mpe na bosembo asimbaki ye na lipeka. Elenge mobali afongolaki miso na ye, abangaki ete abulunganisamaki. Landon alobaki na malembe, “nayokisami mpenza mposa ya kosolola na yo, kasi nayebi mpenza te mpo na nini.”

Ntango babandaki kosolola, elenge mobali alakisaki nionso oyo azalaki koyoka epai ya Landon, kolimbolaka mabaku na ye mpe kosukisaka na mposa na ye ya kozwa mwa malendisi mpe bokasi na oyo etali miso na ye. Landon, oyo azongaki na misio kitoko kaka mobu moko eleki, abetelaki ye lisolo na yemei ya mosala na misio, mikakatano mpe makambo akutanaki nango, lolenge oyo ye azongaki epai ya Nkolo mpo na lisungi, mpe mapamboli azwaki. Maloba na Ye elendisaki mpe epesaki elikia lisusu, mpe esengo na ye mpo na misio na ye esepelisaki elenge mobali. Na suka, lokola bobangi ye elenge mobali esilaki, liyoki moko ya kimia eyelaki ye. Ayokaki bofuluki ya botondi ntango asosolaki ete losambo na ye ezwaki eyano.

Bilenge mibali mibale basambelaki elongo, mpe sima Landon abongamaki mpo na kokende, ayokaki esengo ya koyoka liyoki ya bule oyo ekomelaki ye. Ntango atelemaki mpo na kokende, elenge mobali atunaki Landon, “Osalaki misio na yo wapi?” Na likambo oyo, moko te kati na bango ayebaki nkombo ya misio oyo ye asalaki. Ntango Landon ayanolaki na nkombo ya misio na ye, mpinzoli ekitaki na misu ya elenge mobali. Landon asalaki misio na misio oyo elenge mobali azongelaki mpenza!

Nazwaki mokanda moko kala te, Landon akabolaki elongo na ngai maloba ya elenge mobali yambo bakabwana: “Nazalaki na bondimi Tata na Lola akokaki kopambola ngai, kasi nakokaki te kobanza ete Ye akokaki kotinda moto moko mpo na kosunga ngai oyo asalaki misio na misio na ngaimei. Nayebi sikawa ete nionso ekozala malamu.”2 Losambo na bomikitisi ya motema moko ya sembo eyokamaki mpe eyanolamaki.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, na babomoi na biso tokokutana na masenginya; tokokutana na mimekano mpe mikakatano. Ntango tokendaka na tempelo, ntango tokanisaka mayokani tosalaka kuna, tokozala na makoki malamu mingi koleka ya kolonga masenginya oyo mpe komema mimekano na biso. na tempelo tokoki kozwa kimia.

Mapamboli ya tempelo esombamaka te. Moko ya mapamboli mpo na oyo nazali na botondi mikolo nionso na bomoi na ngai ezali oyo mwasi na ngai ya bolingo, Frances, mpe ngai tozwaki ntango tofukamaki na etumbelo ya bule mpe tosalaki mayokani ya kokanga biso elongo mpo na libela na libela. Ezali na lipamboli malamu mingi moko te epai na ngai koleka kimia mpe lilendisi nazwaka uta na boyebi nazali na yango ete ye na ngai tokozala elongo lisusu.

Tika ete Tata na Lola apamobola biso ete tokoka kozwa molimo ya kokumbamela tempelo, ete tokoka kozala na botosi ya mitindo na Ye, mpe ete tokoka kolanda na bokebi matambe ya Nkolo na biso mpe Mobikisi, Yesu Klisto. Natatoli ete Azali Mosikoli na biso. Azali Mwana mobali ya Nzambe. Azali oyo abimaki uta na lilita na ntongo ya Pasika wana, komemaka na Ye likabo ya bomoi ya seko mpo na bana ya Nzambe nionso. Na mokolo kitoko oyo, ntango tozali kosepela molulu monene wana, tika ete topesa nsambo ya botondi mpo na makabo minene na Ye ya kitoko mingi mpo na biso. Ete esalema bongo, nasambeli na komikitisa nyonso na nkombo na Ye esantu, amene.

Matangi

  1. Yoane 14:27.

  2. Mikanda na maboko ya Thomas S. Monson