2010–2019
Bopona Kondima
sánzá ya mínei 2015


Bopona Kondima

Mobikisi apesi nsango malamu na Ye lokola pole kokamba baye baponi kondima yango mpe kolanda Ye.

Sanza ya yambo eleki, Mosali na masuwa Gutzler ya mibu nsambo mpe libota na ye bazalaki na mobembo na mpepo ya bango moko uta Florida tii Illinois. Tata ya Sailor azalaki kokumba mpepo. Kaka na koyingela ya butu, mpepo ezwaki kpokoso na motele mpe ekweyaki na bangomba ya molili ya Kemtucky, etengamatengama na mabele. Longola se Sailor, bato banso bakufaki na likama wana. Loboko na ye ebukanaki na kokweyaka. Azwaki mpasi ya kozoka mpe akwanikaki mpe abungisaka basapatu na ye. Malili ezalaki 28 degrés Fahrenheit (3 degrés Celsius)—ezalaki butu ya malili mpe mpio ya Kentucky—mpe Sailor alataki kupe, polo, mpe soseti moko.

Alelaki mama mpe tata na ye, kasi moto te ayanolaki ye. Kosangisaka mwa mpiko, atambolaki makolo ngulu na kati ya mboka kolukaka lisungi, koniataka maziba, kokatisaka mabulu, mpe kotelemelaka bansende na nzete na mbuma ya mûre. Na nsonge ya mwa ngomba moko, Sailor amonaki pole moko na mosika, penepene na kilometele mibele. Na kobetaka libaku na kati ya molili mpe na kokimaka epai ya pole wana, na nsuka akomaki na ndako ya mobali moko ya bosembo oyo akutanaki naino te liboso oyo abimaki mpo na kosalisa ye. Sailor abikaki. ye akomemamaki noki na lopitalo moko mpe ye asalisamaki na nzela na ye ya kobika.1

Sailor abikaki mpamba te amonaki pole moko na mosika mpe alukaki nzela tii kuna—atako mboka ya zamba, bozindo ya likama akutanaki na yango, mpe mpota azwaka. Ezali mpasi kosakisa boniboni Sailor asalaki mpo na kokoka kosala oyo asalaki butu wana. Kasi oyo toyebi ezali ete andimaki na pole oyo ya ndako wana ya mosika ezalaki libaku mpo na kobika. Ezalaki na elikia. Azwaki mpiko na boye ete ata makambo ezalaki mabe, libiki elingaki kozwama na pole wana.

Bato moke kati na biso bakoyika mpiko na likambo ya mpasi lokola ya Sailor. Kasi biso banso, na ntango moko to mosusu, tokosengela koleka na esobe na bisomei mpe kotamola mobembo na biso ya mpasi. Na bangonga wana, atako ekoki kozala ya molili mpe lokola ezanga elikia, soki toluki yango, ekozala ntango nionso na pole ya molimo oyo ekobenga biso, kopesa biso elikia ya libiki mpe lisungi. Pole wana ekongenga uta na Mobikisi ya bato, oyo azali Pole ya Mokili.

Komona pole ya molimo ezali bokeseni na komona ya nzoto. Koyeba pole ya molimo ya Mobikisi ekobanda na bolingi na biso ya kondima. Nzambe asengi biso yango yambo kozala na mposa ya kondima “Soki bokolamusa mpe bokomatisa makoki na bino … mpe kosalela eteni moko ya bondimi,” profeta Alma ateyi, “iyo, kutu soki bokoki ata moke koleka mposa ya kondima, tika mposa wana esala na bino, kutu kino bokondima na lolenge moko ete bokoka kopesa esika na eteni moko ya maloba ya [Mobikisi].”2

Libiangi ya Alma na biso mpo na kondima mpe “kopesa esika” na mitema na biso na maloba ya Mobikisi ekundolisi biso ete boyambi mpe bondimi esengi boponi mpe mosala na biso ya moto na moto. Tosengeli “kolamusa mpe kotombola makoki na [biso].” Tokosenga liboso epesamela biso; tokoluka liboso tozwa”; tokobeta ekuke liboso efungwamela biso. Nde topesameli elaka oyo: “Mpo oyo nionso asengi; akozwa; mpe ye oyo aluki, akozwa; mpe na ye oyo akobeta ekuke, ekofunwanela ye.”3

Kobelela moko te ezali makasi mpo na biso tondima eyei koleka oyo ewuti na Mobikisi Yemei, na mosala na Ye ya mabele ntango abelelaki na bayoki na Ye oyo bandimaki te:

“Soki nasali te mosala ya Tata na ngai, bondima te.

“Kasi soki nasali yango, atako soki bondimeli ngai te, bondimela misala wana: ete bokoka koyeba, mpe kondima, ete Tata azali kati na ngai, mpe nazali kati na ye.”4

Mokolo na mokolo moko na moko na biso akokutana na momekano. Ezali momekano na ntango na biso na bomoi: tokopona kondima na Ye mpe tokopesa nzela na pole ya nsango malamu na Ye ekola na kati na biso, to tokoboya kondima mpe kokangama na kokende na mobembo biso moko na molili? Mobikisi apesi nsango malamu na Ye lokola pole kokamba baye baponi kondima yango mpe kolanda Ye.

Nsima ya likama, Sailor azalaki na boponi. Akokaki kopona kotikala na mpepo na molili, ye moko kaka mpe na kobanga. Kasi Sailor atambolaki liboso na butu, mpe malili ewutaki kobanda. Mokumbi masuwa amataki na ngomba moko mpe kuna amonaki mpole mosika liboso.

Moke moke, lokola azalaki kotambola na kati ya butu epai ya pole, oyo ekomaka polele na polele. Kasi, ezalaki na ntango oyo akokaki te komona yango. Ntango mosusu elimwaki ntango akitaki na lobwaku ya moke to nsima ya nzete to ya mwa zamba, kasi awelisaki liboso. Ntango nionso akokaki komona pole, Sailor azalaki na boyebi ete azalaki na nzela ya malamu. Ayebaki te malamu mpenza nini pole wana ezalaki, kasi akobaki kotambola epai na yango kolandaka oyo ayebaki—kondimaka mpe kolikiaka ete akomona yango lisusu soki akobi kotambola na nzela malamu. Na kosalaka yango, akokaki kobikisa bomoi na ye.

Bomoi na biso ekoki kozala bongo lokola. Ekoki kozala na ntango totutani, ntango tolembi, mpe ntango bomoi na biso ezali lokola molili mpe malili. Ekoki kozala ntango tokoki te komona pole mosika liboso, mpe tokoki koyoka lokola totika. Soki tolingi kondima, soki tozali na mposa ya kondima, soki toponi kondima, nde mateya mpe ndakisa ya Mobikisi ekolakisa biso nzela liboso.

Bopona Kondima

Kaka lokola Sailor asengelaki kondima ete akozwa kimia na pole wana mosika, boye tosengeli biso lisusu kopona kofungola mitema na biso ba bosolo ya Mobikisi na pole ya Ye ya seko mpe ngolu na Ye kobikisaka. Baprofeta na ntaka ya mibu balendisaki biso mpe kutu babondelaki biso tondima kati na Klisto. Malendisi na bango ezali kolakisa ntina ya moboko: Nzambe akokanga biso te na makasi mpo na kondima. Esika na yango Ye abengisi biso na kondima na kotindaka baprofeta mpe bapostolo mpo na koteya biso, na kopesaka makomi, mpe na kobelelaka biso na nzela ya Molimo Mosantu na Ye. Tozali tosengeli kopona koyamba libengisi wana, kopona kotala na miso ya kati pole na yango Ye abengi biso. Mokano ya kondima ezali boponi ya motuya koleka oyo tosala. Ekosala mikano na biso nionso mosusu.

Nzambe akotinda biso te na makasi kondima lokola akotinda biso te na makasi kobatela mitindo na ye, atako mposa na Ye ebonga nie ya kopambola biso.— kosalela eteni ya kondima mpe kopesa esika na maloba na Ye—etikali na ntina lelo. Lokola Mobikisi alobaki, “Nasali likundoli ete Tata atindi bato nionso, bipai biso, koyambola mpe kondima na ngai.”5

Bondimi mpe litatoli ezali mabongisi ya kozanga kosala te. Yango eyelaka kaka biso te. Bondimi ezali eloko moko tokopona—tokolikia mpo na yango, tokosala mpo na yango, mpe tokobonza mpo na yango. Tokoya kondimela Mobikisi mpe nsango malamu na Ye na libaku te lokola tokosambela mpe kofuta moko na zomi na libaku te. Tokopona mpenza kondima, kaka lokola tokopona kobatela mitindo misusu.

Botia Kondima na Mosala

Sailor akokaki te liboso koyeba soki oyo azalaki kosala ntango alandaki nzela na ye na kati ya matiti elingaki kosimba. Abungaki mpe azokaki; ezalaki molili mpe malili. Kasi atikaki esika ya likama mpe abimaki na elikya ya lobiko, kokataka mpe kokatisaka nzela na ye liboso kino amonaki pole moko na mosika. Esilaki ye komona yango, asalaki malamu koleka mpo na kokende epai na yanbgo, komikundolaka oyo ye amonaka.

Biso lokola tosengeli kopesa esika mpo na elikia ete tokomona pole ya molimo na koyambaka kondima na esika ya koponaka kotia ntembe. Misala na biso ezali bosolo ya bondimi na biso mpe ekokoma nzoto ya bondimi na biso. Tozali kopona kondima ntango tozali kosambela. Tozali kopona kondima ntango tozali kotanga makomi. Tozali kopona kondima ntango tozali kokila, ntango tozali kobatala mokolo saba esantu, ntango tozali kokumbamela na tempelo, mpe ntango tozali kotanga makoma. Tozali kopona kondima ntango tozwi libatisi mpe ntango tolei elambo. Tozali koponaka kondima ntango toyamboli mpr toluki bolimbisi ya bonzambe mpe bolingo ya lobiko

Botika Ata Moke Te

Ntango mosusu bokoli na makambo ya molimo ekoki komonana malembe to ya kokatakatana. Ntango mosusu tokoki koyoka ete tobungi, ete tosalaki bambeba, to ete bokasi na biso komona Mobikisi ezali kosimba te. Soki boyoki boye, nasengi botika te—ata moke te. Bokende alima nakondimelaka na Ye mpe na nsango malamu na Ye mpe na Eklezia na Ye. Botia misala na bino na molongo na bondimi wana. Na bangonga wana ntango pole ya bondimi ekiti, botika elikya na biso na bolingo mpe ngolu ya Mobikisi, ezwami na nsango malamu na Ye mpe Eklezia na Ye ekolonga ntembe na bino. Nalaki été Atelemi yakomilengela mpo na koyamba bino. Nsima na ntango bokoya komona ete bosalaki boponi ya malamu koleka oyo bokokaki kosala. Mokano na bino ya nguya mpo na kondimela Ye ekopambola bino na ndelo te mpe libela.

Mapamboli ya Kondima

Nayokaki ngolu ya bolingo ya Mobikisi na bomoi na ngai. Nasengelaki koluka ye na ba ntango na ngai ya molili, mpe mpe Ye alukaki ngai na pole na ye ya lobiko. Moko ya bisengo monene bomoi na ngai ezalaka kobembukaka elongo na molongani na ngai, Kathy, kotala bandimi ya eklezia nab a nsuka ebele ya mokili. Ebele ya bokutani oyo eteyaki ngai ntina ya bolingo ya Nzambe mpo na biso. Mango mamonisaki ngai mabaku ya esengo ezanga ndelo oyo ekomi lipamboli mpo na oyo aponi kolanda mateya ya Nkolo Yesu Klisto. Nayekolaki ete kondimelaka Ye mpe mpe nguya na Ye ya lisiko ezali nzela ya solo ya “kimia na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili ekoya.” 6

Natatoli ete Yesu Klisto azali liziba ya pole mpe elikia mpo na biso banso. Nasambeli ete tokoka banso kopona kondima na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Lindsey Bever, “How 7-Year-Old Sailor Gutzler Survived a Plane Crash,” Washington Post, Jan. 5, 2015, washingtonpost.com; “Girl Who Survived Plane Crash Hoped Family ‘Was Just Sleeping,’” Jan. 4, 2015, myfox8.com; “Kentucky Plane Crash: Four Killed, Little Girl Survives” Jan 4, 2015, news.com.au; “Young Girl, Sole Survivor of Kentucky Plane Crash,” Associated Press, Jan 3, 2015, jems.com.

  2. Alma 32:27; sete biso nde tobeti.

  3. 3 Nefi 14:8; tala lisusu molongo 7.

  4. Yoane 10:37–38.

  5. 3 Nefi 11:32.

  6. Doctrine et Alliances 59:23.