2010–2019
Nsango uta na Bilo ya Audit, 2014
sánzá ya mínei 2015


Nsango uta na Bilo ya Audit, 2014

Na Bokambi ya Yambo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

Bandeko: Lokola etindamaki na libimisi na eteni 120 ya Doctrine and Covenants, Lisanga ya Bosaleli ya Moko na Nzomi—esangisi Bokambi ya Yambo, Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale, mpe Boepiskopo Bokambi—apesi ndingisa ya kobimisa mosolo ya Eklezia. Mangomba ya Eklezia esaleli mosolo engebene na mabongisi, bwania, mpe banzela ya mosolo endimama.

Bilo ya Bososoli Mosolo, oyo esangisi basala kala mpe ezala ya lipanda na babilo misusu ya Eklezia, ezali na mokumba ya kosala bososoli mpo na ntina ya kopesa bokebi esengeli etali makabo ezwami, mosolo ebimi, mpe bobateli ya bozwi ya Eklezia.

Engebene na bososoli esalemi, Bilo ya Bososoli mosolo ezali na likanisi ete, etali biloko nionso, makabo ezwami, mosolo ebimi, mpe bozwi ya Eklezia mpo na mobu 2014 ekomamaki mpe esalelamaki engebene na bwania, mpe banzela ya mosolo, mpe misala ya kotanga mosolo. Eklezia elandi misala eteyami na bandimi ya kowumela na kati ya mwango ya mosolo, mpe koboyaka nionso, mpe kobatelaka mosolo mpo na ntango ya mposa.

Epesami na limemia,

Bilo ya Bososoli Mosolo ya Eklezia

Kevin R. Jergensen

Moyangeli Monene