2010–2019
Kobomba bonsomi ya kopona, Kobatela Bonsomi ya Boyambi
sánzá ya mínei 2015


Kobomba bonsomi ya kopona, Kobatela Bonsomi ya Boyambi

Kosalela nguya na biso ya boponi etali kozwa na biso ya bonsomi ya kopona boyambi.

Oyo ezali Eyenga ya Pasika: mokolo ya botondi mpe bokundoli kotosa Bomikabi mpe Bosekwi ya Mobikisi na biso Yesu Klisto mpo na bato banso. Tokumbamelaka Ye, kozongisaka botondi mpo na bonsomi na biso ya eyamba, bonsomi ya kosangana, bonsomi ya koteya, mpe ndingisa Nzambe apesaki biso ya kopona.

Lokola baprofeta balobaki na ntina ya mikolo ya nsuka oyo wapi tozali, ezali na mingi bazali na mobulu ya koyeba banani tozali mpe nini tondimelaka. Mingi bazali “bafundi ya lokuta… [mpe] bayokisi nsoni ya baye wana bazalali malamu.”1 Basusu “bazali kobenga mabe malamu, mpe malamu mabe; [mpe ] kotia molili na esika ya pole, mpe pole na esika ya molili.”2

Lokola baye pene na biso baponi koluka nzela ya boniboni koyanola mpo na boyambi na biso, tosengeli te kobosana ete bonsomi ya kopona mabe to bolamu ezali eteni ya ntina na mwango ya Nzambe mpo na bana na Ye nionso. Mwango wana ya seko, elakisamaki epai na biso na Lisanga na Lola na bomoi ya yambo ya mbotama, kotangaka mpe likabo ya bonsomi ya kopona.3

“Na Likita Linene wana, Lusifelo, oyo ayebani lokola Satana, asalelaki bonsomi na ye ya kopona mpo na kotelemela mwango ya Nzambe. Nzambe alobaki: Lokola  Satana atombokelaki ngai, mpe alukaki kobebisa bonsomi ya moto, oyo Ngai Nkolo napesaki ye, … Nabwaki ye na nse na ntina oyo.”4

Akobaki ete: “Mpe lisusu eteni moko kati na misato ya milimo ya lola baboyaki nzela na ngai na ntina ya bonsomi na bango ya kopona.”5

Na ntina wana, bana molimo ya Tata ya Lola baye baponaki koboya mwango na Ye mpe kolanda Lucifer babungisaki ezaleli na bango ya suka ya bonzambe.

Kosalelaka nguya na Ye ya boponi Yesu Klisto alobaki:

“Ngai oyo, tinda ngai.”6

“Bolingi na yo esalalema, mpe nkembo ezala ya yo mpo na seko.”7

Yesu, oyo asalelaki nguya na Ye ya boponi mpo na kosunga mwango ya Tata ya Lola amilakisaki mpe aponamaki na Tata lokola Mobikisi, akulisamaki yambo ya mbotama mpo na komikaba lokola mbeka mpo na banso. Lolenge moko, kosalela na biso ya nguya ya kopona mpo na kobatela mitindo ekopesa biso makoki mpo na kososola mpenza nani tozali mpe mpo na kozwa mapamboli nionso ya Tata na biso ya Lola azali na yango—kotangaka mpe libaku ya kozwa nzoto, kokola, kozala na esengo, kosala libota, mpe kosangola bomoi ya seko.

Mpo na kobatela mibeko, tosengeli koyeba malongi endimama ya Eklezia mpenza topesi mokongo te uta na bokambemi ya Klisto na kobaluka epai na bilulalula kobongwanaka ntango inso ya bato.

Mapamboli tosepeli sikawa ezali kopaki kolonada Mobikisi yambo ya bomoi oyo. Koyokamela moko na moko to kotanga maloba maye, ozala nani mpe atako mikolo mileka na yo ekokaki kozala, mikundola oyo: ntango eleki naino te mpo na kosala maponami se moko lisusu mpe kolanda Ye.

Na nzela ya bondimi na biso na Yesu Klisto, kondimaka na Bomikabi na Ye, koyambolaka masumu na biso, mpe kozwa libatisi, tokoki nsima koyamba likabo monene ya Molimo Mosantu. Likabo oyo epesaka boyebi mpe bososoli, botambwisami mpe makasi ya koyekola mpe kozwa litatoli, nguya, mpe kopetolama mpo na kolonga masumu, mpe libondisi mpe kolendisama mpo na kozala na botongono na mikakatano. Mapamboli wana ya Molimo ekokana te na mosusu ekomatisa bonsomi na biso mpe nguya ya kosala nini ezali solo, mpo na “wapi Molimo Nkolo ezali, wana bonsomi ezali.”8

Lokola tokomeka kozala engebene na bonsomi ya molimo na mikolo miye ya nsuka, tosengeli kososola ete botondi bosaleli ya bonsomi na biso ezali likolo ya bozwi na biso ya bonsomi ya boyambi. Toyebi kala ete Satana alingaki te bonsomi oyo ezala ya biso. Amekaki kobebisa bonsomi endimama na lola, mpe sikawa na mabele azali na nkanda kobebisa, kotelemela, mpe kotia mobulungano na ntina ya bonsomi ya boyambi—yango ezali nini mpe mpona nini na ntina mpo na bomoi ya molimo mpe bosikoli.

Wana ezali na makambo minei ya ntina ya bonsomi ya boyambi oyo tosengeli kotalela lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka mpe kobatela.

Yambo ezali bonsomi mpo na kondimela. Moko te akoki kotukama, koniokolama, kobundisama na mposa ya moto to bambulamatari mpo na nini andimeli na ntina ya Nzambe. Ezali mpenza ya moto na moto mpe ya motuya mpenza. Esakola moko kala te ya boyambi na biso kotalaka bonsomi ya boyambi elobaki:

“Mbulamatari moko ekoki kozala na kimia,longola se soki mibeko evandisami mpe epesi na kozanga kobuka ete ekoka kobatela mpo na moto na moto bonsomi ya kosalela kasansa. …

“… Basambisi bakoki kokitisa motuya ya bobomi, kasi bakoki te kotala kasansa — [to] kolongola bonsimi ya molimo.”9

Ntina mpenza ya bonsomi oyo ya bondimeli eyebanaki uta na Nations Unies na Déclaration Universelle de Droits de l’Homme na yango mpe na makomi mosusu ya ekolo mpe molongo ya droits de l’homme.10

Likambo ya mibale ya bonsomi ya boyambi ezali kozala nsomi ya kokabola bondimi na biso mpe bondimeli elongo na basusu. Nkolo atindaki biso, “Bosengeli koteya [nsango malamu ] na bana na bino … ntango bavandi na ndako na bino.”11 Alobaki lisusu na balandani na Ye, “Bokende na mokili mobimba, mpe boteya nsango malamu na na ekelamu nionso.”12 Lokola baboti, misionele ya ntango molai, mpe bandimi bamisionele, totalela na bonsomi ya boyambi na motindo koteya malongi ya Nkolo na mabota mpe mokili mobimba.

Likambo ya misato ya bonsomi ya boyambi ezali bonsomi ya kosala lisanga ya eyamba, eklezia moko, mpe kogumbamela na kimia elongo na basusus. Eteni ya zomi na moko ya bondimi elobi, “Tosengi litomba na biso ya kokumbamela Nzambe ya bokasi bonso engebene na masengami ya mayele ya motema na biso moko, kopesaka nzela ya litomba se moko wana na bato banso, ete tika bakumbamela na lolenge, na esika, mpe bakoki kopona. Mibeko ya Droits de l’homme mpe mibeko likonzi na bikolo mingi esungi motindo moye.

Likambo ya minei ya bonsomi ya boyambi ezali bonsomi ya kosalela bondimi na biso—nsomi ya kosalela bondimi kaka na ndako mpe na ndakonzambe te kasi lisusu na bisika ya bato banso. Nkolo atindi biso te bobele kobondela na nkuku13 kasi lisusu mpo na kokende liboso mpe “kotika pole [na biso] kongenga liboso ya bato, ete bakoka komona misala [na biso] ya malamu, mpe bakumisa Tata [na biso] oyo azali na lolo.”14

Mingi batukami ntango tolakisi eyamba na biso na esika ya bato banso, lisusu bato mingi oyo balingi ete maloba na bango mpe misala na bango endimama na bato bazali mbala mingi na kilo mpeza ya kopesa ete kondimama kaka wana mpo na bandimi ya boyambi oyo balingi maloba na bango mpe misala na bango endimama. Bozangi botosi mpo na maloba ya boyambi ezali noki kobebisama na bozalani mpe bozangi kondima mosusu na politiki mpo na boyambi mpe mayangani.

Lokola toyebi bofini ya kotosa mibeko, kotika bonsomi na biso ya boyambi, mpe kobebisa bonsomi na biso ya boponi, kotala nini Buku ya Mormon eteyi na ntina ya mikumba na biso. Na buku ya Alma totangi Amlici, “mobali ya mayele mabe” mpe “ya nko” oyo alukaki kokoma nkumu likolo ya bato mpe “kolongola ndingisa mpe makoki na bango,” oyo “elamwisaki bato eklezia.”15 Bateyamaki na Nkumu Mosiah mpo na kolamwisa mingongo na bango mpo na oyo bayokaki ezalaki solo.16 Yango wana “basanganaki bangomei elongo na mboka mobimba, mobali moko na moko engebene na mayele na ye, soki yango ezaki mpo na to kotelemela Amlici, na bokabwani ya nzoto, kozala ya komitelemela mingi … moko na mosusu.”17

Na masolo oyo, bandimi ya Eklezia mpe basusu bazwi libaku ya koya elongo, kosala lisanga ya molimo, mpe nguya ya Molimo Mosantu. “Mpe eyaki koleka ete mongongo ya bato etelemelaki Amlici, ete akomaki Nkumu te.”18

Lokola balandi ya Yesu tozali na mokumba ya kosala lisanga elongo bokaboli makanisi ya bandimi, mpo na botomboli mingongo na biso mpo na oyo ezali solo. Ntango bandimi bakoki te kosenga to mpe kokotisa ete bazali koloba mpo na Eklezia, tobengami banso, na makoki na biso lokola bana mboka, kokabola litatoli na biso ya moto na moto elongo na bondimi nie mpe bolingo—“moto nionso [mwasi nionso] engebene na mayele na yemei.”19

Elobaki Profeta Joseph Smith:

“Natelemi mpo na koloba liboso ya Lola ete Nabelemi se lokola mpo na kokufa na kobatela makoki ya Presbyterien, ya Baptiste, to ya moto malamu ya soki lisanga nini mosusu [lokola mpo na Mormon]; mpo na mobeko ekokani na oyo likolo ya kotala mpambe makoki ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka bakoka kotala mpamba likolo ya makoki ya Catholiques Romaines, to ya lingomba mosusu oyo ekoki kozala na bato mingi te mpe ezangi mpenza makasi ya komibatela bangomei.

“Ezali bolingo ya bonsomi oyo efuli molimo na ngai—bonsomi ya moto mpe boyambi mpo na bato ya langi ya nionso ya loposo.”20

Bandeko basi mpe mibali, tozali na mokumba ya kobatela bonsomi wana ya bule mpe makoki na mpo na bisomei mpe ya bana na biso. Nini bino mpe Ngai tokosala?

Yambo, tokoki koyeba. Koyeba mpenza makambo na mangomba na bino oyo ekoki kozala na nguya na bonsomi ya mangombo.

Ya mibale, na makoki na bino ya moto, bosangana na basusu oyo bakaboli mokano na biso mpo na bonsomi ya boyambi. Kosala moko na moko mpo na kobatela bonsomi ya boyambi.

Ya misato, bosalela bomoi na bino mpo na kozala ndakisa ya malamu ya oyo bondimeli —na misala mpe na moloba. Boniboni tosaleli eyamba na bison a motuya mingi koleka oyo tokoki koloba na ntina ya eyamba na biso.

Boyei ya Mibale ya Mobikisi ezali kobelema. Tika biso towumisa te ntina monene oyo. Bomikundola Captaine Moroni, oyo atombolaki nkombo ya bonsomi elimbolami na elongo na maloba “Na kokanisaka Nzambe na biso, eyamba na biso, balongani na biso, mpe bana na biso.”21 Tika biso tomikundola eyano ya bato: kosalelaka bonsomi na bango ya kopona, “bayaki kokimaka elongo” na liyokami mpo na kosala.22

Bandeko basi mpe mibali balingami na ngai, bosala oyo bongo na bongo te, kasi bosala noki mpo ya kozwa mapamboli ya bonsomi ya kopona na kolandaka Molimo Mosantu mpe kosalela bosomi Nzambe apesa biso mpo na kosala mposa na Ye.

Natatoli litatoli na ngai ya kafukafu na mokolo oyo ya Pasika ete Yesu Klisto asalelaki bonsomi na Ye ya kopona mpo na kosala mposa ya Tata na biso.

Na Mobikisi na biso, toyembi, “makila na Ye ya ntalo apesaki na motema molingi; bomoi na Ye apesaki na motema molingi.”23 Mpe na ntina Ye asalaki, tozwi libaku ezanga motuya ya ko “pona bonsomi mpe bomoi ya seko” na nzela ya nguya mpe mapamboli ya Bomikabi na Ye.24 Tika biso topona na motema molingi kolanda Ye lelo mpe libela, Nasambeli na nkombo esantu na Ye, kutu Yesu Klisto, amene.