2010–2019
Losambo ya Bonganganzambe mpe ya Moto Ye Moko
sánzá ya mínei 2015


Losambo ya Bonganganzambe mpe ya Moto Ye Moko

Nzambe akoki kopesa biso nguya na bonganganzambe mpo na makambo nionso kani na yango ekoki biso kozala. Esengi kaka ete totuna na komikitisa.

Nazali na botondi mpo na koloba na banganganzambe ya Nzambe na mabele mobimba. Nazali koyoka kilo ya mokumba oyo mpamba te nazali na mwa boyebi ya bondimi Nkolo atii na bino. Na kondima na bino ya bonganganzambe, bozwi likoki ya koloba mpe kosala na nkombo ya Nzambe.

Likoki wana ekokoma ya solo bobele ntango tozwi bofuli ewiti na Nzambe. Bobele nde bokokoka koloba na nkombo na Ye. Mpe bobele nde bokoki kosala na nkombo na Ye. Bokoki kosala mbeba ya kokanisa, “O, yango ezali mpenza mpasi te. Nakoki kozwa bofuli soki mokolo moko te nasengami napesa lisikulu to soki nazali mokolo moko na mposa ya kopesa lipamboli ya bonganganzambe.” To elenge diakona to moteyi akoki kozwa libondi na likanisi, “Ntango nakomi mokolo to ntango nabiangami lokola misionele, nde nakoyeba nini Nzambe akoloba mpe nini Nzambe akosala.”

Kasi kanisa moko oyo osengeli koyeba nini Nzambe akoloba mpe nini Ye akozala. Esi ekomela biso banso—ezala wapi bozali na libiangi na bino na bonganganzambe. Nakolaki na mabele ya misio na Etawini ya esiti na ntango ya Etumba Enene ya II. Bandimi ya Eklezia bazalaki mosika mosika, mpe bazalaki kokabola gaz mokemoke. Nazalaki diakona se moko na etape. Bandimi bazalaki kopesa baenvelope ya makabo na mokambi ya etape ntango bazalaki koya na bosangani ya kokila mpe litatoli.

Ntango nazalaki na mibu 13, tokendeki na Utah kofanda na palwasi moko ya monene. Namikundoli etinda na ngai ya yambo ya kokende na bandako mpo na kokongola makabo ya bokili. Natalaki nkombo likolo ya mabenga epesamelaki ngai mpe namonaki ete nkombo ya nsuka ezalaki ekokana na moko ya Banzeneneke Misato ya Buku ya Mormon. Boye nabetaki na ekuke na kondima. Moto wana afundolaki ekuke, atalaki ngai, akangaki elongo, mpe agangelaki ngai nalongwa. Nalongwaki na moto na nse.

Wana ezali penepene na mibu 70 eleki, kasi namikundoli naino liyoki nazwaka mokolo wana na liboso ya ekuke ete ezalaki na eloko moko nakanisaki nasengelaka koloba to kosala. Soki bobele nasambelaka na bondimi ntango nabimaki mokolo wana, nakokaki kofulama mpo na kotelama ngonga moko koleka molai na liboso ya ekuke, koseka, koloba likambo moko lokola: “Ezali malamu kokutana na yo. Natondi yo mpo na oyo yo mpe libota na yo bopesaki na kala. Nalikii nakokutana na yo sanwa ekoya.”

Elobaka mpe esalaka ngai yango, alingaki kosilika kutu mingi—mpe kutu kotukama. Kasi nayebi sikawa lolenge nini nakokaki koyoka. Kutu esika ya mawa ntango to bokwei ntango nalongwaki, nakokaki koyoka bokumisi ya petepete na molimo mpe motema na ngai: “Esalemi Malamu.”

Biso banso tosengeli koloba mpe kosala na nkombo ya Nzambe na bangonga ntango bososoli na biso ezanga lisungi ekozala ya kokoka te na soki ezangi bofuli. Bangonga wana ekoki koyela biso ntango ngonga ezali te ya komilengela. Yango ekomelaki ngai mbala mingi. Ekomaki mibu mingi mileki na lopitalo moko ntango tata moko alobelaki ngai mpe moninga na ngai ete badokotolo balobelaka ye ete mwana na ye ya mwasi ya mibu misato oyo azokaki makasi alingaki kokufa na baminiti. Ntango natiaki maboko na ngai na esika moko likolo ya moto na ye oyo ezalaki na bande te, nasengelaki koyeba, lokola mosali ya Nzambe, nini Ye alingaki kosala mpe koloba.

Maloba mayaki na mayele na ngai mpe na mbebo na ngai ete akozala. Dokotolo ya kotelema mpembeni na ngai angweniaki na nkele mpe atindaki ngai nalongwa na nzela. Nabimaki libanda ya kisuku ya lopitalo na liyoki ya kimia mpe bolingo. Mwa mwana mwasi azalaki mpe azalaki kotambola na na kati ya ndakonzambe na liyangani ya elambo na mokolo na ngai ya nsuka na engumba wana. Namikundoli lisusu bosepesi mpe esengo nayokaki mpo na nini nalobaka mpe nasalaka na mosala ya Nkolo mpo na mwa mwana mwasi wana mpe libota na ye.

Bokeseni na mayoki na ngai ntango wana, na lopitalo mpe mawa nayokaki ntango nalongwaki na ekuke wana lokola diakona ewutaki na oyo nayekolaka etali bokangami ezali ya losambo na nguya ya bonganganzambe. Ntango nazalaki diakona, nayekolaka naino te ete nguya ya koloba mpe kosala na nkombo ya Nzambe ekosenga bobimisi, mpe ete kozala na yango ntango esengeli ekosenga kosambela mpe kosala na bondimi mpo na kimoninga ya Molimo Mosantu.

Na mpokwa yambo ya kokende na ekuke wana mpo na makabo ya kokila. Nasalaka losambo na ngai na ntango ya kolala. Kasi baposo mpe basanza yambo ya kobenga wana ya telephone eya uta lopotalo, nalandaka ndakisa moko ya losambo mpe nasalaki makasi oyo Mokambi Joseph F. Smith ateyaki ekopesa Nzambe ndingisa mpo na kopesa biso bofuli bosengeli mpo na biso ya kozala na nguya ya bonganganzambe. Na mokuse alobaki ete:

“Tosengeli te koganga na maloba mingi. Tosengeli te kotungisa ye na nsambo ya milai. Oyo tosengeli mpenza, mpe oyo tosengeli kosala lokola Basantu ya Mikolo mya Nsuka, mpo na bolamu na bisomei, ezali kokende liboso na ye mbala mingi, mpo na kotatola epai na ye ete tomikundoli ye mpe ete tozali kolinga kokamata likolo na biso nkombo na ye, kobatela mitindo na ye, kosala bosembo; mpe ete tozali na mposa ya Molimo mpo na kosalisa biso. ” 1

Mpe nsima Mokambi Smith alobaki na biso tosengeli kosambela mpo na nini, lokola basali na ye oyo balapi mpo na koloba mpe kosala mpo na Nzambe. Alobaki: “Bozali kosambela mpo na nini? Bokosambela ete Nzambe andima bino, ete akoka koyoka losambo na bino, mpe ete akoka kopambola bison a Molimo. ”2

Ezali likambo mpenza ya maloba kani kosalela te, kasi ekozwa mwa ntango. Ezali kobelema na Tata na bino ya Lola na mposa ya kondimama na Yemei. Ye azali Nzambe likolo na nionso, Tata ya banso, mpe kasi alingi kozala na bokebi na moko na bana na Ye. Yango wana Mobikisi asalelaki maloba “Tata na biso oyo azali na lola, nkombo na yo ezala Bule.”3

Ezali pete mingi koyoka liyoki elongobani ya limemia ntango ofukami to ongumbi moto na yo, kasi ekoki kosalema oyoka ete ozali kobelema na Tata na yo ya Lola na losambo ya kolengela te mpe kutu ya nse ya motema, lokola mbala mingi okozala na mposa ya kosala yango na mosala na yo ya bonganganzambe. Ekoki kozala na makelele mpe bato nzinganzinga na yo mokolo mobimba uta olamuki. Nzambe akoyoka losambo na yo ya nse ya motema, kasi okoki koyekola kopekisa makanisi epanzana mpamba te ngonga ozali na mposa ya kosolola na Nzambe ekoki koya na ntango ya kimia te.

Mokambi Smith apesaki likanisi ete okozala na mposa ya kosambela ete Nzambe andima libiangi na yo mpo na kosalela ye. Ye asili koyeba oyo etali libiangi na yo mobimba. Abengaki yo, mpe na kosambelaka Ye na ntina ya libiangi na yo, Ye akobimisa mingi mpo ete yo oyeba.4

Nakopesa bino ndakisa ya nini moteyi na ndako akoki kosala ntango azali kosambela. Bokoki koyeba kala ete bosengeli:

“Kotala ndako ya mondimi moko na moko, kolendisaka bango na kosambela na mongongo ya koyokana mpe na nkuku mpe kozala na mikumba ya libota mobimba.  …

“… Kobatela eklezia ntango inso, mpe kozala elongo mpe kokembisa bango;

“Mpe kotala ete ezali na mabe te na eklezia, mpe nko te bango na bango, kotonga te, kolobela mabe te;

“Mpe kotala ete eklezia ezali kosangana mbala na mbala elongo, mpe lisusu kotala ete bandimi nionso bazali kosala mokumba na bango.”5

Sikawa, kutu mpo na moteyi amesana na ndako mpe moninga na ye ya leki, yango ekoki na polele kosalema te na kozanga lisungi ya Molimo Mosantu. Bokanisa mabota to kutu bato oyo babiangemi mpo na kosala. Bosambisi ya moto mpe mposa ya malamu ezali ya kokoka te.

Yango wana bosengeli kosambela mpo na nzela ya koyeba mitema na bango, koyeba makambo kani ezali kozanga na babomoi mpe mitema ya bato oyebi malamu te mpe oyo bazali komitungisa mpo na koyeba bango. Bokosengela koyeba nini Nzambe alingi bino bosala mpo na kosalisa bango mpe kosala yango nionso, lokola ekokoka bino penepene, koyokaka bolingo ya Nzambe mpo na bango.

Ezali mpo bozali na mabiangi ya bonganganzambe moko monene mpe ya mpasi ete Mokambi Smith apesi makanisi ete ntango bakosambela, bobondelaka ntango nionso Nzambe ete akopambola bino na Molimo na Ye. Bokozala na mposa ya Molimo Mosantu mbala moko te kasi ntango ninso Nzambe akopesa yango epai na yo mpo na moninga ya ntango nionso. Yango wana tosengeli kosambela ete Nzambe akokamba biso na mosala na biso epai ya bana na Ye.

Mpamba te bokoki te kotombwama na makoki ya bonganganzambe na biso na kozanga Molimo kokendeke elongo na yo, bozali niama moko ya yemei mpo na monguna ya esengo nionso. Soki akoki kosenginia yo na lisumu, akoki kokitisa nguya na bino mpo na kokambama na Molimo mpe boye kokitisa nguya na bino na bonganganzambe. Yango wana Mokambi Smith alobaki ete bosengeli ntango inso kosambela ete Nzambe akotia bokebi mpe akobatela bino na mabe. 6

Akokebisa biso na ndenge mingi. Bokebisi ezali eteni ya mwango ya lobiko. Baprofeta, bapostolo, bakambi ba makonzi, baepiskopo, mpe bamisionele banso bakotombola mongonga ya bokebisi mpo na kokima libomi na nzela ya bondimi na Yesu Klisto, boyamboli, mpe kosalaka mpe kobatelaka mayokani ezala ya bule.

Lokola mosimbi bonganganzambe, osengeli kozala eteni ya mongongo ya bokebisi ya Nkolo. Kasi osengeli komikebisa. Bokowumela te na kozanga bobateli ya kimoninga ya Molimo Mosantu na bomoi na bino ya mokolo na mokolo.

Bosengeli kosambela mpo na yango mpe kosala mpo na kozwa yango. Bobele na bokambemi wana ekoki bino komona nzela na bino na nzela ya moke mpe ya nkaka na kati ya londende ya mabe. Molimo Mosantu akokamba bino na kobimisama bosolo ntango bozali koyekola maloba ma baprofeta.

Kozwa bokambemi wana ekozwa ntango mingi koleka koyokemela mpe kotanga ya lokengo te. Bokozala na mposa ya kosambela mpe kosala na bondimi mpo na kotia maloba ua bosolo na kati ya motema na bino. Bosengeli kosambela ete Nzambe akopambola bino na Molimo Mosantu, ete Ye akokamba bino na kati ya bosolo mpe kolakisa bino nzela ya malamu. Yango wana Ye akokebisa mpe akokamba bino na kati ya nzela ya malamu na bomoi na bino mpe na mosala ya bonganganzambe.

Likita linene ekopesa libaku moko monene mpo na kotika Nkolo alendisa nguya ya bino mpo na kosala na bonganganzambe. Bokoki komilengela na losambo, nazali na ntembe te ete bomilengelaki mpo na likita liye. Bokoki kosangisa bondimi na bino na baye bakosambela. Bakosambela kati na likita oyo mpo na mapamboli mingi likolo ya bato mingi.

Bakosambela mpo na Molimo eya likolo ya profeta lokola molobeli ya Nkolo. Bakosambela mpo na Bapostolo mpe basali banso babiangemi na Nzambe. Yango ekwi yo, uta na diakona ya sika mingi koleka tii na nganganzambe monene awumela, mpe boko, mokolo mpe elenge bango mibale, oyo akoki kala te kokende na mokili ya molimo, epai bakoyoka, “Malamu, yo mosali malamu mpe ya botongono.”7

Mbote wana ekokende na boko oyo bakosutuka na yango. Bakokaki mbala moko te kozala na mosala monene na Bokonzi ya Nzambe na mabele. Boko bokoki koyoka ete bamoni mwa mbano ya mosala na bango to ete mabaku na bango ya kosala epesamela bango te. Basusu bakoki koyoka ete ntango na bango ya mosala ekomisa mokuse koleka na bomoi oyo mingi koleka balikiaki.

Ekoki kozala te misala bazalaki na yango to ntango basalaki oyo ekotia kilo na emekele ya Nkolo. Toyebi yango uta na lisese ya Nkolo ya basali na langa ya vinio epai wapi lifuti ezalaki ya kokokana kotalaka te ntango molai boni basalaki mpe wapi. Bakofutama mpo na boniboni basalaki. 8

Nayebi moto moko, moninga ya bolingo, oyo ya ye mosala na bokufi kati na elanga ya vinio esukaki butu eleki na ngonga ya zomi na moko. Basalisaka ye mpo na cancer mibu mingi. Na mibu wana ya kosalisa ye mpe ya mpasi mpe kpokoso ya nsomo, andimaki libiangi moko ya kozala mokambi mpe kosangana elongo na bandimi na palwasi na ye oyo ya bango bana balongwa na ndako; boko bazalaki bakufela balongani. Libiangi na ye ezalaki kosunga bango bazwa libondi na lingomba mpe bayekola nsango malamu.

Ntango azwaki nsango ya kpokoso ya nsuka ete azalaki bobele na ntango mokuse ya bomoi, episkopo azalaki mosika na mobembo ya nkita. Mikolo mibale nsima, atindaki nsango na episkopo na ye na nzela ya mokambi ya liboke ya banganganzambe banene. Alobaki boye mpo na etinda na ye: “Nasosoli episkopo azali libanda ya engumba, boye nazali na mosala. Nazali kokanisa liyangani mpo na liboke na biso mokolo ya yambo ekoya. Bandimi mibale bakoki kokamata biso mpo na kokende kotala Ndako ya Likita. Tokoki kosalela boko bandimi mpo na kokamba bango mpe boko bascout mpo na kopusa kiti ya kotambolela. Kotalaka bato bakokomama, tozali na mibange ya kokoka mpo na kosala yango bisomei, kasi ekozali malamu koyeba ete tozali na bobeteli soki esengeli. Ekozala lisusu butu moko malamu na libota mpo na basungi bamema mabota na bango lokola. Ata bongo yebisa ngai liboso natinda mwango. … Botondi.”

Mpe nsima asutukisaki episkopo na kobenga na ye ya telefoni. Na kolobelaka mpasi na ye to makasi na ye ya mpiko ten a mosala na ye, ayanolaki, “Episkopo, ezali na likambo nakoki kosala mpo na yo” Bobele Molimo Mosantu apesaki ye nzela mpo na koyoka mokumba ya episkopo ntango mokumba na yemei ezalaki ya nsomo. Mpe bobele Molimo akokaki kokokisa ye asala mwango mpo na kosunga bandeko babali mpe bandeko basi na sikisiki moko kaka asalaki na kolengelaka makambo ya scout ntango azalaki elenge.

Na losambo moko ya bondimi, Nzambe akoki kopesa biso nguya na bonganganzambe mpo na makambo nionso na yango ekoki biso kozala. Esengi kaka ete totuna na komikitisa Molimo mpo na kolakisa biso nini Nzambe alingi biso koloba mpe kosala, kosala yango, mpe kokoba kowumela ya kolongobana na likabo wana.

Napesi bino litatoli na ngai ete Nzambe Tata azali na bomo, alingi biso, mpe akoyoka losambo na biso moko na moko. Napesi litatoli ete Yesu azali Klisto ya bomoi, oyo ya ye Bomikabi ekokisi biso topetolama mpe boye tolongobana na kimoninga ya Molimo Mosantu. Natatoli ete na bondimi mpe etingia na biso, tokoki mokolo moko koyoka maloba oyo ekomemela biso esengo: “Malamu, yo mosali malamu mpe ya botongono.” 9 Nasambeli ete tokozwa mapamboli wana ya kitoko ya Nkolo tozalli kosalela. O nkombo na Yesu Klisto, ameme.