2010–2019
Koluka Nkolo
sánzá ya mínei 2015


Koluka Nkolo

Ntango tokolisi mpenza bososoli na biso ya Mobikisi, tokozwa bomatisi ya mposa ya kozala na bomoi ya esengo mpe bondimi nie ete esengo ezali solo.

Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, ezali mpo na ngai esengo makasi ya kotelema awa liboso na bino ntango tosangani na likita linene elongo. Koyokaka maloba ya bwanya, liteya, lilendisi, mpe makebisi epesami na makita minene mibu ebele ezalaki mapamboli ezanga motango mpona Ndeko mwasi Teixeira, libota na biso, mpe ngai.

Na eleko ya ntina koleka oyo ya mobu, mingimingi na eyenga ya pasika oyo, nasengeli kotiya bokebi na ntina ya mateya ya Mobikisi mpe ya ndakisa na ya bosembo mpe bolingo na Ye kati na bomoi na ngai.

Bososoli moko na bozindo ya Yesu Klistu ekopesa biso elikia monene mpo na lobi ekoya mpe, atako mabe na biso, elikia koleka na kokokisaka bantina na biso ya sembo. Oyo mpe ekopesa biso mponsa makasi ya kosalela mozalani na biso.

Nkolo alobaki, “[Luka] ngai na makanisi nionso; kotia ntembe te, kobanga te.”1 Kolukaka Nkolo mpe koyokaka bomoto na Ye ezali boluki ya mokolo na mokolo, bokasi ya ntina.

Bandeko mibali mpe basi, lelo koleka ntango mosusu, tozali na mokumba ya ntina koleka ya mabaku mpe mikanda mpo na kokolisa bososoli na biso ya mateya ya Yesu Klistu mpe Bomikabi na Ye. Kosalelaka mikanda oyo ya ntina ekosunga biso kozala na bomoi ya boboti etonda na esengo.

Na lisese ya Mobikisi ya vino mpe bitape, Alobaki: “Botikala na ngai, mpe Ngai na bino. Ntango etape ekoki kobota mbuma na ndenge na yango moko, esengeli ezala ya kokangama na nzete; bino mpe ndenge moko, soki bokangami na ngai te, bokoki kobota mbuma te.”2

Mongi tozali kososola koleka mosala ya ntina ya Klistu kati ya bomoi na biso, mingi tozali kokoma na boyebi koleka mpo na ntina na biso awa na bokufi, oyo ezali koyoka esengo. Esengo yango, nzoka nde, elongoli biso te uta na bokutani ya mimekano to mikakatano, atako ndambu na yanog ezali monene mpe ebele ete yango ekoki kokumba biso tokanisa ete esengo ezali te kati ya mabaku ya ndenge oyo.

Nayebi na boyebi na ngaimei ete esengo ya kozala na bomoi ya sembo mpe kokangamaka na Klistu ekoki kokoba atako mikakatano ya lolenge nionso ya bokufi. Na nsuka, mikakatano oyo mbala mingi ekotondisa, kobongisa, mpe kokamba biso kokolisa bososoli ya ntina ya bozali na biso awa na bokufi mpe Bomikabi ya Yesu Klistu. Bongo, bofuluki ya esengo ekoki kokisama na nzela ya Yesu Klistu.3

Ye alobaki, “Ngai nazali nzete ya vino, bino bozali bitape: moto oyo azali ya kokangama na ngai, mpe ngai kati na ye, akobota mbuma ebele: mpamba te, soki bokabwani na ngai, bokokoka kosala eloko moko te.”4

Nandimi ete ntango tokolisi mpenza bososoli na biso ya Mobikisi, tokozwa bomatisi ya mposa ya kozala na bomoi ya esengo mpe bondimi nie ete esengo ezali solo. Nayango, tokozwa makoki makasi ya kozala na bomoi ya esengo makasi mokolo na mokolo eloko na kosepela makasi na bomoi mpe mpo na kobombaka mitindo ya Nzambe, ata kutu na kati ya mabaku ya mikakatano.

Tika ete tosala lobi te oyo tosengeli kosala lelo. Ezali nde lelo tosengeli koya epai ya Klistu mpo ete “soki [to] ndimeli [Ye], [to] kosala ntango ezali lelo.”5

Mikolo nionso tosengeli koyeba mpe lisusu lisungi ya moko na moko ya mbala mingi elongo na mateya ya Klistu. Na elembo moke mpe pete mpe misala ezali kosala mposa ya mokolo na mokolo :

  1. Kokolisa bobosoli na biso ya lolenge ya Nkolo kati ya bomoi na biso, mpe

  2. Esalisi biso kokabola bososoli oyo na nkola ya lobi ekoya, bango bakoyoka solo mpenza bolingo ya Tata na Lola mpe Mwana mobali na Ye, Yesu Klistu, ntango bamoni ndakisa na biso ya bosembo ya kozalaka na nsango malamu.

Bongo nini ezali ndambo ya bizalela ya pete na ntango oyo ya lelo oyo ekokoma mafuta mpo na milimo na biso na kolendisaka litatoli ya Klistu mpe etinda na Ye?

Elilingi
Woman on a train with a cell phone illuminating her face.

Na 2014, etmba ya foto ya National Geographic ezwaki bomikomisi ebele koleka 9,200 ya bafotografe ya mayele mpe ya esengo makasi kowutaka na bamboka 150. Foto ya molongi elakisaki mwasi moko kati kati ya train etonda na bato. Mpole kowutaka na telefone na ye engengisi elongi na ye. Azali kopesa nsango ya polele na bato misusu: atako na bomoto azalaki wana, ye azali wana solo mpenza te.6

Mobile data, smartphones, mpe barezo ebongolaki makasi koleka lolenge na biso ya kozala kati ya mokili mpe lolenge nini tokoki kosolola na basusu.

Kati ya eleko oyo ya dijital, tokoki komimema na lombango na bisika mpe misala oyo ekoki kolongola biso na lombango na oyo ezali ntina mpo na bomoi etondisama na esengo ya seko.

Na bosaleli eteneti oyo ekoki, soki botali malamu te, kopesa ntina koleka ya bozalani na bato oyo toyebi te to naino tokutana te na esika ya bato oyo tofandi na bango—libota na biso!

Na ngambo mosusu biso nionso toyebi ete topambolami na mikanda ya en-ligne kitoko makasi, kosangisaka baoyo ekolisamaki na Eklezia lokola maloba makomami mpe ndimbola ya boyoki ya makomi masantu mpe likita linene, bobimisi ya bavideo ya bomoi mpe mateya ya Yesu Klistu, logiciel ya kobomba masolo ya libota na biso, mpe mabaku ya koyoka miziki efulama.

Maponi mpe makambo ya ntina tozali kosala na ntango na biso ya en-ligne ezali mpenza ndakisa. Ekoki komonisa bokobi na biso na molimo mpe bokoli kati ya nsango malamu mpe mposa na biso ya kosunga na mokili moko ya malamu mpe kozala na bomoi ya bobotisi koleka.

Na bantina oyo, lelo nalingi nalobela bizalela misato ya pete oyo ekotiya motuya na mosala ya en-ligne. Bizalela oyo ekokamba esaleli na biso ya mokolo na mokolo oyo ezali ntina mpo na biso kokola pembeni ya mateya ya Tata na Biso mpe Mwana na Ye ya mobali. Yesu Klistu.

Ezalela ya 1: Botala Mikanda na baSite Eteneti ya Eklezia

Mingi mingi tala na mposo mikanda oyo ekosalisa biso kozala ntango nyoso na mposa ya mateya ya nsango malamu mpe kolendisa libota na biso mpe baninga bakanisa mpe bazwa ndakisa ya makambo ya ntina koleka.

Ezalela ya 2: Mikomisa na Barezo Sosiale Ofisiele ya Eklezia.

Boponi oyo ekomema na etando na yo makambo oyo ezali ntina ya kokolisa boyebi mpe kolukaka Nkolo mpe mateya na Ye mpe ekolendisa mposa mpo na kososola nsango malamu. Ya motuya koleka, yango ekosalisa bino kokanisa oyo Klistu alingi mpo na moko na moko na biso.

Kaka bobele lokola, “ezali na mabele malamu te ezanga mosali bilanga,”7 lolenge moko ekozala na biyano ya kitoko te kowuta na ezalela ya en-ligne kaka soki topesi ntina te uta na ebandeli oyo ezali ya kosimbama kati ya misapi mpe makanisi na biso.

Ezalela ya 3: Pesa Ntango ya Kotia Telefone na Yo Mpembeni

Ezali malamu kotia batelefone na biso mpembeni mpo na mwa ntango moke mpe na esika ya kobalusa likasa ya makomi to bozwa ntango ya kosolola na libota mpe baninga. Mingi mingi na mokolo ya Nkolo, boyoka kimia ntango bozali na likita ya elambo na kozangaka mposa makasi ya kotala soki bozui nsango moko ya sika to poste ya sika.

Ezalela ya kotiya mpembeni telefone na biso mpo na mwa ntango ekokunisa mpe ekotandola botali bomoi na biso, bomoi ezali efinani te na 10 santimetele ya etando.

Nkolo Yesu Klistu alobaki, “Lokola Tata alingaka ngai, ngai mpe nalingaka bino lokola: bokoba na bolingo kati ya bolingo na ngai.”8 Nzambe alingaka biso tozala na esengo mpe toyoka bolingo na Ye. Klistu apesaka esengo ya lolenge oyo mpo na moko na moko na biso. tozali na ntina ya koyeba Ye malamu mpe ya kozala na bomoi ya nsango malamu.

Napesi litatoli na ngai ya esengo oyo ezali ntango totosi mitindo mpe ya kimia mpe ya bobatelami oyo tozali koyoka ntango tokangami na bolingo ya Tata na Lola mpe Mwana na Ye, Mobikisi na biso. Na nkombo ya Yesu Klistu, amene.