2010–2019
Lisese ya Mokoni
sánzá ya mínei 2015


Lisese ya Mokoni

Etali moko na moko na biso ya kotia bapriorite mpe kosala makambo oyo esalaka ete mabele na biso ezala malamu mpe mbuma na biso ezala mingi

Bantina ya masikulu ya likita linene epesamaka na—bakonzi ya bokufi te kasi na mayoki ya Molimo. Makambo mingi ekoki kolobela makambo ya bokufi oyo biso banso tozali kokabola yango. Kasi lokola kaka Yesu ateyaki lolenge ya kolonga mikakatano ya kufa to monioko ya politiki te ya mokolo na Ye, Ye azali kofula mbala mingi bayekoli na Ye ya ntango oyo koloba oyo tosengeli kosala mpo na kobongola bomoi na biso moko mpo na kolengela biso kozonga na ndako na biso ya lola. Na mposo oyo ya Pasika nayokaki natindikami na molimo mpo kolobela oyo etali mateya ya motuya mpe ya ntango nionso oyo ezwami na moko ya masese ya Yesu.

Lisese ya mokoni ezali moko kati na motango moke ya masese oyo elobelami kati na buku misato oyo ekokani ya Nsango malamu, Matai, Malako mpe Luka nionso. Ezali lisusu moko ya liboke kutu ya moke koleka ya masese oyo Yesu alimbolaki na bayekoli na Ye. Mbuma oyo ekonamaki ezalaki “liloba ya bokonzi” (Matai 13:19), “liloba” (Malako 4:14), to “liloba ya Nzambe” (Luka 8:11)—mateya ya Nkolo mpe ya basali na Ye.

Mabele ekesana likolo na oyo nkona ekweyaki elakisi ndenge ya kokesana kati na yango bato na nkufa bayambaka mpe balandaka mateya. Yango wana nkona oyo “ekweyaki na mpembeni ya nzela” (Malako 4:4) ekomaki na mabele ya kufa te bisika wapi ekokaki mpenza kokola. Ezali lokola mateya oyo ekweyaka likolo ya motema makasi to elengelama te. Nakoloba eloko mosusu te koleka maye. Etinda na ngai etali baoyo na biso oyo bamipesi mpo na kozala bayekoli ya Klisto. Nini tosalaka na mateya ya Mobikisi wana ezali biso na bomoi na biso?

Lisese ya mokoni ekebisi biso na makambo mpe bizalela oyo ekoki kobatela moto nionso oyo ayambi nkona ya etinda ya nsango malamu na kobotaka mbuma malamu.

I. Mabele ya Mabanga Mosisa Moko te

Nkona mosusu “ekweyaki na esika ya mabanga, kuna mabele ezalaki mingi te. Ebimi noki mpo ezangaki mojindo ya mabele: kasi wana ebimaki moi, ezikaki mpe ekaukaki mpo ezangaki mosisa” (Malako 4:5–6).

Yesu alimbolaki ete oyo elimboli “baoyo wana ekoyokaka bango liloba, bakoyambaka yango noki na esengo,” kasi mpo “bazali na misisa kati na bango mpenza te, … wana ekobima mpasi mpe minioko na ntina ya liloba, bakobeta libaku nokinoki.” (Malako 4:16–17).

Nini esalaka ete bayoki “bazala na misisa kati na bango te”? Oyo ezali likambo ya bandimi ya sika oyo batalelaka bamisionele to bizalela mingi ya kitoko ya Eklezia to bambuma mingi ya malamu ya bandimi ya Eklezia. kozanga kofandisama na liloba bango bakoki kopengwa mpe kobungisa komipesa ntango botelemeli eyei. Kasi ata baye babokwami na Eklezia—bandimi ya kala—bakoki kosielomuka kati na ezalela moko wapi bazali na mosisa moko te na bango. Nayebi boko ya bandimi—oyo bazangi kobongwana ya sikisiki mpe ya kowumela na nsango malamu ya Yesu Klisto. Soki tofandisami na mateya ya nsango malamu mpe tolandi misala na yango te, ata nani kati na biso akoki kokolisa motema libanga, oyo ezali mabele ya mabanga mpo na bankona ya molimo.

Bilei ya molimo ezali ntina mpo na kotikala na bomoi ya molimo, mingimingi na mokili oyo ezali kopengwa kondimela Nzambe mpe babosolo ya malamu mpe mabe. Kati eleko oyo ekonzami na Interneti oyo ezali koyesa nsango monene oyo ezali kobundisa bondimi, tosengeli kobutisa litalisi na biso na bosolo ya molimo na ntina ya kosembola bondimi na biso mpe kotikala ya kofandisama na nsango malamu.

Bilenge, soki liteya wana ezali komonana lokola ya bato nionso, botala ndakisa ebongi na bino. Soki elambo ezali koleka mpe ozali kokoma texto to kosolola na nse to kobeta masano ya video to kosala eloko mosusu mpo na komipekisa yo moko bilei ya molimo ya ntina, ozali kosalela misisa na yo ya molimo mpe ozali kokende yomoko na mabele ya mabanga. Ozali komikomisa yomoko pete kokaukaka ntango bozali kokutana na mikakatano lokola kotikala yo moko, bobangisami, to botioli. Mpe wana ezali mpo na bakolo lisusu.

Mobebisi mosusu eyebani ya misisa ya molimo—etambwisami noki na tekinolozi ya mikolo oyo kasi kaka yango moko te—ezali komonela nsango malamu to Eklezia na lidusu ya fungola. Bomoneli oyo esuka ebeti sete na malongi moko to momesano to komona botau ya mokambi moko mpe eyebi te makambo mingi ya mwango ya nsango malamu mpe bambuma ya moto to ya lisanga euti na elanga na yango. Mokambi Gordon B. Hinckley apesaki ndimbola ya bomoi ya moko ya lolenge ya komonela na lidusu ya fungola oyo. Ayebisaki bato ya BYU oyo etali balobi politiki na banzela ya bopanzi sango “oyo bazalaki na bosiliki” mpo na nsango moko ezalaki sika na ntango wana. “Na mayele balobaki makambo mingi ya kanda mpe ya kofinga. … Solo,” asukisaki, “oyo ezali mobu mpe esika ya komela mai ya ngai.”1 Na ngambo mosusu mpo na kofandisama kati na nsango malamu, tosengeli kozala na kimia mpe ndelo na kolobaka oyo etali bato mpe koluka ntango nionso emoneli moko ya monene ya mosala ya lokumu ya Nzambe.

II. Banzube; Bitungiseli na Makambo na Mokili mpe Bozimbisi na Misolo

Yesu ateyaki ete “mosusu ekweyaki kati na nzube, mpe nzube ekoli mpe ekibisi yango; bongo eboti mbuma te” (Malako 4:7). Alimbolaki ete baoyo bazali “koyoka liloba, kasi bitungiseli na makambo na mokili mpe bozimbisi na misolo, mpe mposa ya biloko mosusu, ekoti mpe ekibisi liloba mpe eboti mbuma” (Malako 4:18–19). Oyo ezali solo likebisi ya kotala malamu na biso banso.

Nakolobela yambo bozimbisi na misolo. Bisika kani tozali na mobembo na biso ya molimo—Atako ezalela na biso ya Mbongwana ezali nini—tomekami banso na oyo. Ntango bizaleli mpe bapriorité etiami mpo na bozwi, bosaleli, to bozali na eloko, tobengaka wana boluli bomengo. Mingi elobami mpe ekomami na ntina ya boluli bomengo ete moke kaka esengeli kobakisama awa.2 Baoyo bandimelaka na oyo ezali kobengamaka theologie ya bofuluki bazali koniokwama na “bozimbisi misolo.” Bozali na bomengo to bozwi ya ntina ezali elembo ya lisungi ya lola te, mpe bozangi yango ezali solo ya bozangi lisungi ya lola te. Ntango Yesu ayebisaki moyekoli moko ya botongono ete akokaki kokitola bomoi ya seko soki akolinga bobele kopesa nionso oyo azalaki na yango na babola (tala Malako 10:17–24), Ye azalaki komona mabe moko te na bozwi ya misolo kasi mabe kati na ezalelaya moyekoli wana . Lokola banso toyebi, Yesu akumisaki Mosamalia malamu oyo asalelaki likuta moko wana mpo na kosalisa ndeko na ye oyo Yudasi asalelaki mpo na koteka Mobikisi na ye. Mosisa ya mabe nionso ezali mosolo te kasi bolingo ya mbongo (tala 1 Timote 6:10).

Buku ya Mormon elobeli ngonga moko ntango Eklezia ya Nzambe “ebandaki kokita na bokoli na yango” (Alma 4:10) mpo “bato ya eklezia babandaki ko … tia mitema na bango likolo ya bozwi mpe likolo ya biloko ya mpamba ya mokili.” (Alma 4:8). Moto nionso oyo azali na biloko ya mokili bebo azali na likama ya kozala “kolalisama” na molimo na bozwi mpe biloko mosusu ya mokili.3 Wana ezali boyingisi malamu na makambo malandi matali mateya ya Mobikisi.

Banzube ya mayele oyo elembisi likama ya liloba ya nsango malamu na bomoi na biso ezali banguya ya mokili oyo Yesu abengaki “bitungiseli mpe mosolo mpe mposa mabe ya bomoi oyo” (Luka 8:14). Oyo ezali mingi mabe mpo na kotanga. Bandakisi mususu ekokoka.

Na libaku moko Yesu apamelaki Apostolo na Ye mokonzi, kolobaka Petelo, “Ozali libaku liboso na ngai mpo ete ozali kokanisa lokola Nzambe te kasi lokola bato” (Matai 16:23; tala lisusu D&A 3:6–7; 58:39). Kokanisa makambo lokola bato elingi koloba kotia bitungiseli ya mokili liboso ya makambo ya Nzambe na misala na biso, na bapriorités na biso, mpe makanisi na biso.

Tomipesaka na “bisengo ya bomoi oyo” (1) ntango tokakemi, oyo ebebisaka likabo ya bomengo ya Nzambe; (2) ntango tokweisami na babobendi makanisi libanda ezanga ntina, oyo epengwisaka biso na makambo ya ntina ya seko; mpe (3) ntango tozali bato ya mayele, oyo ebebisaka bokoli ya moto oyo esengeli kolongisa biso mpo na lobi na biso ya seko.

Tokweisami na “mitungisi … ya makambo ya bomoi” oyo ntango tolembisami na bobangi ya lobi lokoya, yango etelemelaka kokende na biso liboso na bondimi, kolikiaka na Nzambe mpe bilaka na Ye. Mibu zomi na mitanno eleki moteyi na ngai ya BYU nalingaki mingi, Hugh W. Nibley, alobelaki makama ya komipesa na bitungiseli ya makambo ya mokili. Atunamaki na masolo soki bizalela ya mokili mpe mokumba na biso ya kopanza nsango malamu esalaki ete yango ezala mposa mpo na koluka boko banzela ya “kokotisa ya mokili na maye tosalaka na Eklezia.”4

Eyano na ye: “Wana ezali lisolo mobimba ya Eklezia, boye te? Bosengeli kolinga kotiola awa, bosengeli kolinga komeka. Wana ezali bisika bondimi ebandi. … Bomipesi na biso emonamaka lokola momekano, emonamaka lokola mpasi, emonamaka lokola ekoki kosalama te na ndenge ya mokili oyo.” 5

Piorite ya nsango malamu oyo endimamaki na campus ya BYU kaka mwa basanza eleki na mokambi ya katoliko moko, Charles J. Chaput, Episikopo mokonzi ya Philadelphia. Kolobelaka “makambo ete ba LDS mpe masanga ya Katolika bakabolaka makambo ya ndenge moko,” ndakisa “oyo etali libala pe libota, ezalela ya bosangisi nzoto na biso, bobulisami ya bomoi ya moto, mpe bosali noki ya bonsomi ya boyambi,” alobaki oyo:

“Nalingi kobeta nsete lisusu mpo na ntina ya kotia na misala maye totatolaka kondima. Wana esengeli kozala priorite—kaka na bomoi ya biso moko to ya libota te kasi na baeklezia na biso, maponi ya politiki na biso, misala ya nkita na biso, bosalisi na biso ya babola; na maloba mosusu, na makambo manso tosalaka.”

“Tala mpo na nini wana ezali ntina,” akobaki. “Boyekola uta na boyebi ya Bakatoliko. Biso bakatoliko tondimaka ete bobiangami na biso esengeli kozala nkisi ya mampa na lingomba. Kasi ezali na bokeseni moke kati na kozalaka nkisi ya mampana katiya lisanga ya bato, mpe kondimamanalingomba.” 6

Likebisi ya Mobikisi mpo na kotelemela kozala na bitungiseli ya mokili oyo efinaka mokili ya nzambe na bomoi na biso ebundisaka biso solo mpo na kobatela bapriorite na biso ya kotiama—mitema na biso—likolo ya mitindo ya Nzambe mpe bokambi ya Eklezia na Ye.

Bandakisa ya Mobikisi ekokaki kosala ete biso tokanisa lisese oyo lokola lisese ya mabele. Libongi ya mabele eyekamaka na motema ya moko na moko na biso oyo atiki esika na nkona ya nsango malamu. Na kotala bobelami na koyamba mateya ya molimo, mitema mosusu ekomisami makasi mpe ezangi kolengelama, mitema mosusu ezali mabanga, mpe mitema misusu mifandisami likolo ya makambo ya mokili.

III. Ekweyaki na Mabele Malamu mpe Ebotaki Mbuma

Lisese ya mokoni esukisaki bolimboli ya Mobikisi na ntina ya nkona oyo “ekwei na mabele malamu, mpe ebimisi mbuma” ebele ya ndenge na ndenge (Matai 13:8). Boniboni ekoki biso komilengela mpo na kozala mabele wana ya malamu mpe kozala na mbuma malamu wana?

Yesu alimbolaki ete “mabele malamu, bango bazali baoyo basili koyoka liloba mpe babateli yango na motema kitoko na malamu, mpe baboti mbuma na etingia” (Luka 8:15). Tozali na nkona ya liloba ya nsango malamu. Etali moko na moko na biso ya kotia bapriorite mpe kosala makambo oyo esalaka ete mabele ezala malamu mpe mbuma ezala mingi. Tosengeli koluka kozindisa misisa na ngwi mpe kobongwana na nsango malamu ya Yesu Klisto (tala Bakolose 2:6–7). Tokokisi kokoma na mbongwana oyo na nzela na kosambelaka, na nzela ya kotanga makomi, na nzela ya kotanga, mpe na nzela ya kokabolaka ntango nionso elambo mpo na kozala ntango nionso na Molimo na Ye elongo na biso. Tosengeli lisusu koluka mbongwana ya nguya wana ya motema (tala Alma 5:12–14) oyo ezwaka esika ya bamposa ya mabe mpe makambo ya kimoyimi mpo na kotia bolingo ya Nzambe mpe mposa ya kosalela Ye mpe bana na Ye.

Natatoli bosolo ya makambo oyo, mpe natatoli ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, oyo mateya na ye elakisi nzela mpe Bomikabi na ye esali yango nionso ekoka kosalema, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Gordon B. Hinckley, “Let Not Your Heart Be Troubled” (Brigham Young University devotional, sanza ya zomi 29, 1974), 1; speeches.byu.edu.

  2. Tala, na ndakisa, Dallin H. Oaks, ”Materialism,” mokapo 5 in Pure in Heart (1988.), 73–87.

  3. Natondi Mpaka Neal A. Maxwell mpo na elilingi ya kobosana te oyo- (tala “These Are Your Days,” Ensign, sanza ya zomi 2004, 26).

  4. James P. Bell, in “Hugh Niblev, in Black and WhiteBYU Today, Sanza ya mitano 1990, 37.

  5. Hugh Nibley, “Hugh Nibley in Black and White,” 37–38.

  6. Charles J. Chaput, “The Great Charter at 800: Why It Still Matters,” First Things, Jan. 23, 2015, firstthings.com/web-exclusives/2015/01/the-great-charter-at-800; see also Tad Walch, “At BYU, Catholic Archbishop Seeks Friends, Says U.S. Liberty Depends on Moral People,” Deseret News, Jan. 23, 2015, deseretnews.com/article/865620233/At-BYU-Catholic-archbishop-seeks-friends-says-US-liberty-depends-on-moral-people.html. Archbishop Chaput also said that “some of our best Catholic institutions have either lost or greatly softened their religious identity. … Brigham Young is an extraordinary university … because it’s a center of learning enriched by its religious identity. Never lose that” (“The Great Charter at 800”).