2010–2019
Mwango ya Esengo
sánzá ya mínei 2015


Mwango ya Esengo

Nsuka ya misala nionso na Eklezia ezali ya komona ete mobali moko mpe mwasi moko elongo na bana na bango bazali na esengo na ndako, basangisami mpo na seko na seko.

Mibu eleki ebele, nsima ya Etumba ya Mokili Mobimba ya mbala ya II, nazalaki elongo na lisanga likoki. Kuna nakutanaki na Donna Smith. Penepene ya eleko wana natangaki ete makambo mibale ya ntina mpo na libala ya bosembo ezali eloko ya elengi mpe bipwepwe. Nabanzaki ete ezalaki makanisi malamu.

Nakendaki kelasi na ntongo, mpe nsima nazongaki na Brigham City mpo na kosala na garage ya kobongisa mituka ya tata na ngai na nsima ya nzanga. Kelasi ya Donna ya ntongo wana ezalaki ya bolakisi misala ya ndako. Natelemaki na kelasi na ye yambo nakende. Ekuke ezalaki na kitalatala ya molili, kasi soki natelemaki penepene ya kitalatala, akokaki komona elili na ngai libanda. Alingaki abima na malembe na kelasi na eloko ya elengi mpe bipwepwe. Oyo etikali ezali lisolo. Tobalanaki na Tempelo ya Salt Lake Temple, mpe tobandaki mosala monene ya babomoi na biso.

Nsima ya mibu nateyi ntango nionso mobeko ya ntina: nsuka ya mosala nionso kati ya Eklezia ezali komona ete mobali mpe mwasi elongo na bana na bango bazali malamu na ndako bakangisami elongo mpo na ntango mpe mpo na seko nionso.

Na ebandeli:

“Banzambe bakitaki na nse mpo na kosala moto na elilingi na bangomei, na elilingi ya Banzambe mpo na kokela bango kati na ye, mobali, mpe mwasi mpo na kokela bango kati na bango.

“Mpe Banzambe balobaki: tokopambola bango. Mpe Banzambe balobaki: tokosala bango bazala baboti mpe babakisama, mpe batondisa mokili, mpe bakonza yango” (Abalayama 4:27–28).

Mpe bozali ya bomoi ya moto ebandaki likolo ya mabele oyo ntango “Adama ayebaki mwasi na ye, mpe amemaki kati na ye bana mibali mpe ya basi, mpe babandaki kobakisama mpe kotondisa mabele.

“Mpe … bana mibali mpe bana basi ya Adama babandaki komikabola mibale na mibale likolo ya mabele, … mpe bango lisusu babotaki bana mibali mpe basi” (Mose 5:2–3).

Motindo ya kobakisama mpe kotondisa mabele naino esila te. Ezali ntina na mwango ya bosikoli mpe ezali liziba ya esengo ya moto. Na nzela ya bosaleli ya bosembo ya nguya oyo, tokoki kopusana penepene ya Tata na biso ya Lola mpe kokutana na bofuluki ya esengo, atako bonzambe. Nguya ya kobota ezali eteni ya mpamba te ya mwango; ezali fungola ya esengo; ezali fungola ya esengo.

Mposa ya bolongani kati na bato ezali ya mbala na mbala mpe makasi mpenza. Esengo na biso na bomoi ya kufa, esengo na biso mpe bonetoli etali lolenge tozali koyanola na bokobi oyo, kokokisaka bamposa ya nzoto. Ntango nguya ya kobota ekoli na ebandeli ya kimobali to ya kibomwasi, bamposa ya moto nionso eyaka, na lolenge ya pete, na bokeseni na boyebi mosusu ya nzoto.

Na lolenge elongobani, bosangisi nzoto ebandaka elongo na lisolo. Atako bonkoko ekoki kobongola, engengisami na mikanda ya masolo ya mayoki ya mposa mpe komona liboso, atako ntango mosusu eboisami. Ezali na pole ya sanza mpe bafololo, mikanda ya bolingo, banzembo ya bolingi, maloba ya ntoki, bosambani maboko, mpe maloba ya bolingo epai ya elenge mobali mpe elenge mwasi. Balongani babosani mokili, mpe bayoki esengo.

Mpe soki bolobi ete boyoki esengo mpenza na lisolo ya bolingo ya elenge ezali motuya mobimba ya makoki oyo eyaka uta maziba ya bomoi, naino bozwi bomoi te ya kozala na bomipesi mpe lilendisi ya bolingo ya libala ya ngonga molai. Balongani babali bamekami na momekano, bozangi bososoli, makambo etali mosolo, mpiaka na libota, mpe bokono, mpe ntango nionso bolingo ekoli makasi. Bolingo ekola ezali esengo te atako ekanisami na babalani sika.

Bolingo ya solo esengaka kotosaka kino nsima ya libala nde bokaboli ya mposa wana oyo efungolaka banguya wana ya bule na liziba ya bomoi. Elakisi koboya mabaku oyo ekoki kosala ete mposa ya nzoto elonga. Bolingo ya peto esengaka ete kaka nsima ndai ya bosembo ya libela, molulu ya leta mpe engebene na mobeko, mpe ya malamu nsima ya likuli ya bokangemi na tempelo yango wa banguya ya boboti esalemi na misu ya Nzambe mpo na liloba ya bofuluki ya bolingo. Ezali bobele ya kokabola mpe kaka elongo na oyo azali molongani na yo ya libela.

Ntango bokoti kati ya bobongi nie, mosala oyo etambolaka elongo na bolamu koleka mpe nzoto enetolama, mayoki ya molimo elongo na liloba bolingo. eteni oyo ya bomoi ezali lolenge moko te, ndenge moko te, na boyebi nionso ya moto. Ekosala, ntangomayokani esalemi mpe ebatelami, ekowumela seko, “kati na yango ezali na bafungola na bonganganzambe esantu ekulisama, oyo okoki kozwa lokumu mpe nkembo” (D&A124:34), “nkembo oyo ekozala bofuluki mpe bokobi ya bankona ya seko mpe ntango nionso” (D&A 132:19).

Kasi lisolo ya bolingo ezali ya kokoka te; ezali ebandela. Bolingo ekolisami na boyei ya bana, oyo babimi uta na mosolo wana ya bomoi epesami na balongani kati na libala. Bokangi zemi ezwaka esika kati ya boyambi libala kati ya mobali mpe mwasi. Mwa Nzoto ebandi kosalema na lolenge moko kitoko oyo ezali mpasi na kososola. Mwana ayaka mbala moko na bikamwisi ya kobota, asalema na elilingi ya baboti na ye ya mabele. Kati ya nzoto na ye ya kufa ezali molimo oyo ezali na likoki ya koyoka mpe ya kosimba biloko ya molimo. Ya kolala kati na nzoto wana ya kufa ya mwana oyo ezali nguya ya kobota bana na elilingi na bangomei.

“Molimo mpe nzoto ya moto ezali molimo ya moto” (D&A 88:15), mpe ezali na mibeko ya molimo mpe ya nzoto mpo na kotosa soki tolingi kozala na esengo. Ezali na mibeko ya seko, elongo na mibeko ya lolenge moko na nguya oyo ya kopesa bomoi, “mobeko oyo ekoki kolongolama te na lola yambo ya bokeli mokili, likolo ya mapambolo nionso oyo epesama” (D&A 130:20). Oyo ezali mibeko ya molimo oyo epesi mobeko ya bomoto ya bato (tala Bobongoli ya Joseph Smith, Roma 7:14–15 [kati na Mabakisi ya Biblia]; 2 Nefi 2:5; D&A 29:34; 134:6). Ezali na mayokani oyo ekangaka, ekangisaka, mpe ebobambaka, mpe epesaka elaka ya mapamboli ya seko.

Alma alobeli mwana na ye ya mobali Shiblon, “Tala ete oyeba kokanga mposa nionso na yo, ete okoka kotondisama na bolingo” (Alma 38:12). Singa ya mpunda esalema mpo na kokamba, kolakisa, mpe kokitisa mbangu. Esengeli kokonza mposa na biso. Ntango tosaleli yango engebene na mobeko, nguya ya kobota ekopambola mpe kosantisa (talaTeachings of Presidents of the Church, Joseph F. Smith [1998], 158).

Mimekano ezali ntango nionso. Mpo ete monguna akoki kozwa bomoi te, azali na zuwa na moto nionso oyo azali na nguya kitoko wana koleka. Ye na baoyo balandaki ye babwakamaki libanda mpe babungisaki likoki ya kozwa nzoto ya kufa. “Azali koluka ete moto nionso azala na mpasi lokola yemei” (2 Nefi 2:27). Akomeka biso, soki akoki, kokitisa, kokosa, mpe, soki pete, mpo na kobebisa likabo oyo na oyo ebongi mpo na biso, soki tozali babongi nie, tozali na bomatisi ya seko (tala D&A 132:28–31).

Soki tobebisi maziba na biso ya bomoi to tomemi basusu na lisumu, ekozala na mbano ya kofuta koleka “elengi” mpe “mpasi mpo na komema” (D&A19:15) koleka esengo mosusu ya nzoto ekokaki ntango nionso kozala ntina.

Alma ayebisaki mwana na ye Corianton, “Oyebi te, mwana na ngai ya mobali, ete biloko oyo ezali masumu ya somo na miso ya Nkolo; Iyo, lisumu ya somo koleka masumu nionso longola se bosopi makila mazangi elindo to kowanganaka Molimo Mosantu? (Alma 39:5). Tokoki te kokima maye ekolanda biso ntango tobuki mobeko.

Bobele moko elongobani, liloba endimama ya banguya ya boboti ezali kati ya molongoni ya mobali mpe molongoni mwasi oyo babalani engebene na mobeko. Eloko moko te mosusu koleka ekoki kolongola mitindo ya Nzambe. Bomitika te mimekano mabe ya monguna, mpo na baniongo nionso ya lisumu esengeli kofutama “kino ntango okosilisa kofuta likuta ya nsuka” (Matai 5:26).

Ezali na esika moko wapi bondeko mpe ngolu ya Nzambe elakisami koleka soki boyamboli te.

Nzoto na biso ya bomoto, ntango ebebisami, tozali na makoki ya kobongisa yango, mbala mosusu na lisungi ya monganga. Soki likama ezali makasi, bongo, mbala mingi, elembo ekotikala lokola bokundoli likama.

Na nzonto na biso ya molimo ezali likambo mosusu. Milimo na biso etukami ntango tosali mbeba mpe masumu. Kasi lolenge moko te na likambo ya banzoto na biso ya kufa, ntango boyamboli esalemi nionso, bilembo etikalaka te mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto. Elaka ezali: “Botala, oyo ayamboli masumu na ye, lolenge moko alimbisami, mpe ngai, Nkolo, nakanisaka yango lisusu te” (D&A 58:42).

Ntango tolobaka na ntina ya libala mpe bomoi ya libala, emonisami eyaka mbalakata na makanisi, “Nini ezali mpo na baoyo balongolami?” Ebele babotama na bandelo mpe bakoki kobota bana te. Ebele ya bazangi elindo bazali na libala ebebisama mpo na bozangi bosembo ya molongani. Basusu babaki te mpe bazali na babomoi ya bonzemba bolongobani.

Sikawa, napesi lilendisi oyo: Nzambe azali Tata na biso! botalisi nionso ya bolingo mpe bondeko ya tata ya mokili elongobana emonisami kati na Ye oyo azali Tata mpe Nzambe na biso likolo ya makoki ya makanisi ya bokufi mpo na kososola. Masambisi ezali solo; ngolu na Ye ezanga nsuka; nguya na Ye mpo na kofuta likolo ya bokokisi nionso yam abele. “Soki totiaka elikia elikia na Klisto, kaka mpo na bomoi oyo, wana tozali mpenza bato mawa” (1 Bakolinti15:19).

Na botosi sikawa nasaleli maloba tempelo. nazali komona ndako ekangama mpe altare na bilenge babalani kofukamaka. Likuli ya tempelo esantu oyo ezali koleka na libala, mpo na libala oyo ekangama na Molimo Mosantu ya Elaka, mpe makomi elobi ete to “kozwa ngbende, babokonzi, babokonzi, mpe banguya, mpifo” (D&A 132:19). Namoni esengo oyoezali kozela baoyo bandimeli likabo kitoko oyo koleka mpe kosalela yango bobongi nie.

Ndeko mwasi Donna Smith Packer mpe ngai tozali penepene ya moko mpe mosusu na libala uta pene ya mibu 70. Ntango akomaki mwasi na ngai, mama ya bana na biso, nazangi eloko ya koloba. Liyoki ezali mozindo mpe botondi makasi koleka oyo natikala ntango mosusu na bozangi maloba. Lifuti monene tozwaki na bomoi oyo, mpe na bomoi ekoya, ezali bana na biso mpe bankoko na biso. Na nzela epai ya nsuka ya mikolo ya kufa na biso ya elongo, nazali na botondi mpo na ntango nionso elongo na ye penepene mpe mpo na elaka Nkolo apesaki ete oyo ekozala na nsuka te.

Natatoli ete Yesu azali Klisto, mpe Mwana ya Nzambe na bomoi. Atelemi na moto ya Eklezia oyo. Na nzela ya Bomikabi na Ye mpe nguya ya bonzambe, mabota oyo ebandaki kati ya bokufi ekoki kozala elongo na nzela ya baboseko. Bomikabi, oyo ekoki kosenga mpenza moko na moko na biso, ezali na bilembo ya mpota. Yango elingi koloba ete ezala nini tosali to wapi tozali to boniboni likambo ekoya, soki tozali mpenza na boyamboli, Ye alaki ete Ye akosikola. Mpe ntango Ye asikoli, yango ebongisi yango. Ezali na mingi mpenza na biso oyo tozali kobundabunda, ndenge tolobaka, koyokaka elindo, koyebaka te mpenza boniboni kokima yango. Bokokima na kondimaka Bomikabi ya Klisto, mpe nionso oyo ezalaki motema mpasi ekoki kobongwana kitoko mpe bolingi mpe boseko.

Nazali na botondi mpenza mpo na mapamboli ya Nkolo Yesu Klisto, mpo na nguya kobota, mpo na nguya ya bosikoli, mpo na Bomikabi—bomikabi oyo ekoki kosukola peto mbindo moko na moko kotala te kpokoso boniboni to molai boniboni to mbala boniboni bobandeli yango. Bomikabi ekoki kopesa bino bonsomi ya kokende liboso, ya peto mpeya kolongobana, mpo na kolanda nzela oyo bomoi.

Napesi litatoli ete Nzambe azali na bomoi, ete Yesu azali Klisto, ete Bomikabi ezali te eloko moko ya bato banso oyo ezali mpo na Eklezia mobimba. Bomikabi ezali ya moto na moto, mpe soki ozali na likambo moko oyo ezali kotungisa yo—ntango mosusu uta kala mingi boye ete okoki na mpasi komikundola yango—tia bomikabi na mosala. Ekopetola yo mpenza, mpe yo, lokola Ye asalaki, okomikundola masumu na yo lisusu te. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.