2010–2019
Bonganganzambe—Likabo ya Bule
sánzá ya mínei 2015


Bonganganzambe—Likabo ya Bule

Moko na moko kati na biso azwaki moko ya makabo ya ntalo koleka epesama naino te epai ya bana ya bato.

Moko ya makoki na ngai ya bokundoli ya polele mpenza ezali kozala na lisanga ya bonganganzambe ntango nakulisamaki sika diakona mpe na ntango ya koyembaka loyembo ya bofungoli, Que, tous les fils de Dieu dotés de la Prêtrise.”1 Na mpokwa ya lelo, na banso tosangani awa na Ndako ya Makita mpe, solo mpenza, na mokili mobimba, Nabandeli lisusu molimo ya loyembo wana ya kafukafu mpe koloba na bino:Que, tous les fils de Dieu dotés de la Prêtrise tika biso tozwa mabiangi na biso; tika biso tokanisa na ntina ya mikumba na biso; tika biso tomipesa na mosala na biso; mpe tika tolanda Yesu Klisto, Nkolo na biso. Ntango tokoki kopusa na mibu, na mimesano, to na bikolo, tosangani lokola moto moko na mabiangi na biso ya bonganganzambe.

Na moko na moko kati na biso, bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona, epai ya Oliver Cowdery mpe Joseph Smith na Yoane Mobatisi ezali ntina koleka. Lolenge moko, bozongisi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke, epai ya Joseph mpe Oliver na Petelo, Yakobo, mpe Yoane, ezali likambo ya bosepeli.

Tika biso tozwa solo mpenza koleka mabiangi, mikumba, mpe misala oyo eyaka elongo na bonganganzambe tomemi.

Nayokaki mokumba monene ntango nabiangemaki kozala secretaire ya lisanga na ngai ya badiakona nalengelaki na motema moko koleka mikanda na bombaki, mpo nalingaki kosala malamu mpenza nayebaki boniboni kosala na libiangi wana. Nazwaki lokumo monene na mosala na ngai. Kosalaka nionso nakoki, mpo na bolamu mpenza ya likoki na ngai, ezalaki ntina na ngai na esika nionso oyo nazwaki naino te.

Nalikii mobali nionso oyo akulisamaki na Bonganganzambe ya Alona azwi likebisi ya molimo ya bosantu ya libiangi na ye akulaki, na mabaku ya kokumisa libiangi wana. Nazawaki libaku lokola diakona ntango boepisikopo esengaki ngai ete nazwa elambo mpo na kopesa yango na moto oyo avandaki na kilometele moko na ndambo uta na ndako na biso ya losambo. Eyenga wana ya kafukafu na ntongo, ntango nabetaki na ekuke ya Ndeko Wright mpe nayoki mongongo na ye ya pete kobenga, “Kota,” Nakotaki bobele te na ndako ya moke kasi lisusu na kisuku etondisama na Molimo ya Nkolo. Napusanaki pembeni ya mbeto ya Ndeko Wright mpe nabokebi natiaki eteni ya lipa na bambebo na ye. Bongo nasimbaki kopo ya mayi, ete akoka komela. Ntango nalongwaki, namonaki mayi ya miso na miso na ye ntango alobaki, “Nzambe apambola yo, mwana nangai ya mobali.” Mpe Nzambe apambolaki ngai—na bokumisi mpo na bilembo ya bosantu ya elambo mpe mpo na bonganganzambe oyo tomemi.

Diakono, moteyi, to nganganzambe te uta na palwasi na biso akoki te kobosana botali ya kobosana te tosalaki na Clarkston, Utah, epai ya lilita ya Martin Harris, moko ya banzeneneke misato ya buku ya Mormon. Lokola tozingaki bolai ya esika oyo ezalaki lilita na ye, mpe moko ya bakambi ya lisanga atangaki mpo na biso maloba maye ya nguya uta na “Litatoli ya Banzeneneke Misato,” ezwami na ebandeli ya Buku ya Mormon, tolakisaki bolingo mpo na ete makomi ya bule mpe mpo na bosolo ezwami kati na yango.

Kobanda mibu wana ntina na biso ezalaki kokoma lokola bana mibaki ya Mosiah. Mpo na bango yango elobamaki:

“Bakolaki makasi na boyebi ya bosolo, mpo bazalaki bato ya bososoli ya bolamu; mpe balukaki makomi na etingia, ete bakoka koyeba liloba ya Nzambe.

“Kasi oyo ezali nionso te; bamipesaki na losambo, mpe na kokila, yango wana bazalaki na molimo ya kosakola, mpe na molimo ya bobimisi, mpe ntango bazalaki koteya, bateyaki na nguya mpe likoki ya Nzambe.”2

Nakoki te kokanisa mingi koleka mpo na ntina elongobani mpo na elenge mobali mpo na kozala mingi na bolimbolami lokola bazalaki bilombe mpe bana ya mibali ya botongono ya Mosiah.

Ntango napusanaki na mibu 18 na ngai mpe kobelema na bokoti na mosala esengeli kosalama ya soda mpo na elenge mobali na ntango ya Deuxième Guerre Mondiale, natinadamaki mpo na kozwa Bonganganzambe ya Melekeseke, kasi yambo mpenza nasengelaki kobenga na telefone mokambi na ngai ya likonzi, Paul C. Child, mpo na masolo ya mozindo. Azalaki moko oyo alingaki mpe asosolaki makomi, mpe ezalaki mokano na ye ete banso basusu akoka se moko kolinga mpe kososola yango. Koyokamela uta na mingi ya baninga na ngai kolobaka ntina ya masolo na ye ya bozindo mpe boluki, nalingaki moke kolakisa boyebi na ngai ya makomi; yango wana, ntango nabengaki ye nakabolaki makanisi tokutana mokolo ya eyenga ekoya na ngonga nayebaki ezalaki kaka ngonga moko yambo ya liyangani na ye ya elambo.

Eyano na Ye: “Oh, Ndeko Monson, ete ekokoka kopesa biso ngonga te mpo na kotanga makomi.” Bongo akabolaki likanisi ya bangonga misato yambo ya liyangani ya elambo na ye, mpe alakisaki ngai komema elongo na ngai makomi na moko mpenza etiama bilembo mpe bilakisi.

Ntango nakomaki na ndako na ye Mokolo ya lomingo oyo, nayambamaki na boboto makasi, mpe bongo masolo ya mozindo ebandaki. Mokambi Child alobaki, “Ndeko Monson, amemi Bonganganzambe ya Alona. Emona Yo naino te banzelu kosala epai na yo?” Nazongisaki ete ngai naino te. Ntango atunaki soki nayebaki nakokaki na esika wana, nazongisa lisusu ete nayebaki te.

Alakisaki, “Ndeko Monson, loba lisusu uta na moto eteni13 ya Doctrine & Alliances.”

Nabandaki, ‘“Likolo na bino baninga na ngai ya mosala, na nkombo ya Masiya nakokulisa Bonganganzambe ya Alona, oyo ezali na bafungola ya mosala ya banzelu—”’

“Telema,” Mokambi akambaki. Sima, na kimia, na mongongo ya boboto, apesaki toli, Ndeko Monson, kobosana oyo te lokola momemi Bonganganzambe ya Alona ozali na esika mpo na mosala ya banzelu.”

Ezalaki mpenza lokola anzelu azalaki na kisuku mokolo wana. nabosanaki te lisolo ya mozindo. Nayokaki te libaku ya molimo ya lokumu wana ntango tozalaki elongo kotanga mpo na mikumba, misala, mpe mapamboli ya Bonganganzambe ya Alona mpe Bonganganzambe ya Melekisedeke—mapamboli oyo eyaka bobele epai na biso kasi lisusu na mabota na biso mpe basusu tokozwa libaku malamu ya kosalisa.

Nakulisamaki mpaka, mpe na mokolo na ngai ya kokende mpo na kokokisa mosala ya soda na mampinga, moko ya boepisikopo na ngai ya palwasi asanganaki na libota mpe baninga na gare ya engunduka mpo na kotombela ngai bokei malamu. Bobele yambo ya ngonga ya komata engunduka, atiaki na liboko na ngai mokanda ya moke ekomamaki Manuel d’instructions Missionnaires. Nasekaki mpe nalobaki ete nakei na misio te.

Ayanolaki, “Zala na yango na bisika nionso. Ekoki kokoma na litomba mingi.”

Ezalaki na litomba. Nasengelaki na eloko ya makasi mpo na kotia na nse ya saki mpo ete bilamba na ngai ekoka kozala lolenge ya malamu mpe afinana mingi te. Manuel d’Instructions Missionnaire ezalaki kaka nini nasengelaki, mpe esungaki malamu na saki na ngai ya mbu mpo na bamposo12.

Butu ya yambo ya bopemi mpo na Eyenga ya Mbotama, tozalaki kokanisa na libota. Camp ezalaki kimia, kasi bongo kimia ekatanaki na moninga na ngai na mbeto ezalaki pembeni na ngai──elenge mobali ya Mormon, Leland Merrill──oyo abandaki kolela mpasi. Nalukaki koyeba ntina nini, mpe alobaki ayokaki solo azalaki kobela. Alingaki te kokende na lopitalo azalaki na masuwa ya mampinga, mpo ayebaki ete kosala bongo ekokaki kozongisa ye na ndako mokolo elandi.

Emonanaki lokola kobela makasi ntango bangonga ezalaki koleka. Na nsuka, koyeba ete nazalaki mpaka, atunaki napesa ye lipamboli ya bonganganzambe.

Napesaka naino lipamboli ya bonganganzambe liboso te, Nazwaka naino lipamboli te, mpe nazala naino te esika bazali kopesa lipamboli. Ntango nabondelaki na kimia mpo na lisungi, namikundolaki Manuel d’Instructions Missionnaire na nse ya saki na ngai ya mbu. Nabimisaki mbangu biloko na saki mpe nazwaki buku na mwinda ya butu. Kuna natangaki boniboni bapambolaka bakoni. Elongo na basoda kotalaka, nasalaki lipamboli. Yambo nakoka kozongisa biloko nionso na saki na ngai, Leland Merrill azalaki kolala lokola mwana. Alamukaki na ntongo elandi koyokaka malamu. Botondi moko kati na biso ayoki mpo na nguya ya bonganganzambe ezalaki monene.

Mibu epesaki ngai mabaku mingi mpo na kopesa mapamboli na baye bazalaki na bosenga koleka nakoki kotanga te. Libaku nionso nazalaki kozwa botondi monene ete Nzambe apesaki ngai likabo oyo ya bule. Natosaki bonganganzambe. Natatolaki nguya na yango mbala mingi. Namonaki bokasi na yango. Nakamwaki na bikamwisi na yango kosalema.

Bandeko balingami, moko na moko kati na biso azwaki moko ya makabo ya ntalo koleka epesama naino te epai ya bana ya bato. Soki tokotosa bonganganzambe na biso mpe kozala na bomoi na biso mpenza ete tozala ntango nionso ya kolongobana, mapamboli ya bonganganzambe ekosopana likolo na biso. Nalingaka maloba ezwami naDoctrine et Alliances, eteni ya 121, molongo 45, oyo elobeli biso nini tosengeli kosala mpo na kozala ya kolongabana : “Tika lisusu ete nsopo na yo… etonda na bolingani epai ya bato banso, mpe epai ya bandeko ya ndako ya bondimi, mpe bolamu ekembisa makanisi na yo ntango nionso; bongo nde elikia na yo ekokoma monene na miso ya Nzambe; mpe malongi ya bonganganzambe ekotanga likolo ya molimo na yo lokola mamio uta na lola.”

Lokola bamemi ya bonganganzambe ya Nzambe, tokoti na mosala ya Nkolo Yesu Klisto. Toyanolaki na mbela na Ye; tozali na etinda na Ye. Tika biso toyekola uta na Ye. Tika biso tolanda matambe na Ye. Tika biso tozala na maloba na Ye. Kosalaka bongo, tokolengelama mpo na kosala mosala nionso Akobenga biso tosala. Oyo ezali mosala na Ye. Oyo ezali Eklezia na Ye. Na yango, Azali capitaine na biso, Nkumu ya Nkembo, lisusu Mwana Mobali ya Nzambe. natatoli ete Azali na bomoi mpe natoli litatoli oyo na nkombo na Ye esantu, nkombo ya Yesu Klistu, amene.

Matangi

  1. “Que Tous les Fils de Dieu,” Hymns, no. 204.

  2. Alma 17:2–3.