2010–2019
Bokonzi na Yo Eya
sánzá ya mínei 2015


Bokonzi na Yo Eya

Kotalaka mpe kondimelaka bikamwisi ya Nkolo kati ya bosali bokonzi na Ye ekoki kosunga biso kotala mpe kondimela ete loboko na Ye ezali na mosala kati ya babomoi na biso.

Ntango tozalaki koyemba, namemamaki makasi na makanisi ete ngonga mpenza oyo monkama ya minkama, ntango mosusu bamilio, ya bandimi ya basantu kati ya bamboka 150, bazali kosepelaka na bankota 75 ekeseni, 1banso elongo tosembolaki mingongo na biso epai ya Nzambe, koyembaka:

Yaka, O yo Mokonzi na Bakonzi!

Tozeli yo makasi,

Nabobikisi kati ya mapapu na yo,

Mpo na kotiya bonsomi kati ya bato. 2

“Yaka, O yo Mokonzi na Bakonzi! ”3Tozali liboya molayi mpenza ya bandimi ya mokili mobimba” bayekoli ya Nkolo Yesu Klistu.

Tozwaki nkombo na Ye likolo na biso, mpe poso nionso ntango tozwaka elamo, tosalaka elaka ete tokanisa Ye mpe totosa mitindo na Ye. Tozali mosika ya bobongi nie, kasi tozali kozwa bondimi na bison a ntina. Tondimeli Ye. Tokumameli Ye. Tolandi Ye. Tolingi Ye koleka. Ntina na Ye ezali ntina koleka na mokili mobimba.

Tozali na bomoi, bandeko mibali mpe basi, na mikolo yambo Boyeyi ya Mibale ya Nkolo, ngonga moko eleki na bandimi ya lisitwale. Tozali na mikolo ya bitumba mpe mpasi, mikolo ya bobebisi engebene na bokeli, na mikolo ntango mokili ebulungani na mobulu mpe makelele ya ndenge na ndenge.

Kasi tozali lisusu na bomoi na ntango ya nkembo ya Bozongisi, ntango nsango malamu ezali kozwa esika na mokili mobimba—na ntango Nkolo alaki ete A “kosekwa … bato ya peto” 4 mpe kosimba bango akosimba “elongo na bosembo mpe elongo na nguya ya Nzambe.”5

Tozali kosepela kati ya mikolo oyo mpe kobondela ete tokozala na makoki ya kolonga na bokasi bobundi na biso mpe babosolo te. Bampasi ya mwa oyo ezalaka makasi mpenza koleka ya basusu, kasi moto moko te alongolami na mikakatano. Mpaka Neal A. Maxwell ayebisa ngai mokolo moko, “Soki makambo nionso ezali malamu mpo nay o sikawa, zela moke.”

Atako Nkolo akitisi biso mitema lisusu mpe lisusu ete “tosengeli kobanga te,” 6 kokobaka kotala liboso mpe komonaka malamu oyo kotalaka likolo ya mokili oyo ezali ntango nionso mpasi ntango tozali kati kati ya mimekano.

Mokambi Thomas S. Monson ateyaki ngai liteya moko ya ntina na oyo etali kokoba kozala na makanisi ya seko.

Mibu zomi na mwambe eleki ntango nakendeki mobembo na train na Switzerland na Mokambi Monson, natunaki ye na ntina ya mokumba na ye ya bozito. Eyano na ye elendisaki bondimi na ngai. “Kati ya Bokambi ya Yambo,” ye alobaki, “tosalaka makambo nionso oyo tokoki mpo na kotambwisa mosala, liboso. Kasi oyo ezali mosala ya Nkolo, mpe Akambaka yango. Azali na bokambami. Tozali malamu ntango totali Ye kofungola bikuke tokoki te kofungola mpe kosala bikamwisi tokoki kofungola yango.” 7

Bandeko mibali mpe basi, kolobelaka mpe kondimelaka bikamwisi ya Nkolo na kosalaka bokonzi na Ye likolo ya mabele ekoki kosunga mpe biso kotala mpe kondimela ete nguya ya Nkolo ezali na mosala na babomoi na bisomei mpenza.

Nkolo alobaki, “Nazali na makoki ya kosala mosala na ngaimei.” 8 Biso nionso tomeki kosala eteni na biso, kasi azali motongi monene. Na nse ya boyangeli ya Tata na Ye, Akelaki mokili oyo. “Biloko nionso esalemaki na ye; mpe soki ye te ezalaki na eloko moko te esalemaki.” 9Ntango tolamuki na molimo mpe tokebisami, tomoni nguya na Ye na mokili mobimba mpe tomoni nguya na Ye kati ya babomoi na bisomei.

Tika nakabola ndakisa moko.

Na mobu 1831, na bobele bandimi 600 ya Eklezia, Nkolo alobaki, “Bafungola ya bokonzi ya Nzambe epesami na moto likolo ya mabele, mpe uta na ntina wana nsango malamu ekokende liboso kino na nsuka ya mokili, lokola libanga libanga oyo ekatana ya ngomba na kozangaka maboko ekokende liboso, kino ekosimba mokili mobimba.” 10

Profeta Nefi amonaki yambo ete kati ya mokolo na biso ekozala na “ndambo” ya bandimi ya Eklezia ntango kokokanisa na bato ya mokili kasi ete bakozala “likolo ya makambo nionso yam abele.” 11

Bandakisa misato ya kitoko ya loboko ya Nkolo kati ya botieyi bokonzi na Ye ezali batempelo oyo elobamaki lelo na Mokambi Monson. Bobele mwa bamibu eleki, nani akokaki kondima batempelo kati ya Haiti, Thailande, mpe Cote D’Ivoire ?

Esika ya tempelo ezali te mokano ya mwango ya mabele ya mbeba. Eyaka na lisakoli uta na Nkolo na nzela ya profeta, kososolisaka mosala monene ekosalema, mpe koyebaka bosembo ya Basantu oyo bakobatela mpe kolengela mpo na ndako na Ye na bankola.12

Elilingi
Thomas S. Monson of the Quorum of the Twelve Apostles, visiting Haiti. On April 17, 1983 he dedicated Haiti for the preaching of the gospel and also dedicated a site for the first meetinghouse to be built in Haiti. It was the first visit to the island by a member of the Quorum of the Twelve. (Ensign Aug. 1983, p. 79; Church News, May 22, 1983, p. 4)
Elilingi
A group of Missionaries with Elder Andersen

Mwasi na ngai, Kathy, mpe ngai tokendaki Haiti bobele kaka mibu mibale eleki. Likolo ya ngomba kotalaka Port-au-Prince, tozalaki na basantu ya Haiti na mokolo ya bokundoli bobulisi mboka na sima-Mpaka Thomas S. Monson bebele mibu 30 eleki. Moko te kati na biso akobosana ntango nionso boningani yam abele ya 2010. Na bandimi ya bondimi meke mpe na lisabga ya bamisionele ya mpiko basalaki ntango nionso kondimisa ba Haitien, Ekleazia na mboka ya esanga oyo ekobaki kokola mpe kolendisa. Etombolaka bondimi na ngai kotala bosembo ya Basantu ya Nzambe, alataki bilamba ya mpembe, kozalaka na nguya ya bonganganzambe ya bosantu mpo na kokamba mpe kosala makuli ya bule na ndaku ya Nkolo.

Elilingi
Sathit and Juthamas Kaivaivatana of Bangkok Thailand.
Elilingi
President Kaivaivatana and other members of the Thailand Bangkok Thailand North Stake leadership..

Nani akokaki kondima ndaku ya Nkolo kati ya etuka kitoko ya Bangkok? Baklisto bazali bobele 1pourcent kati ya mboka etonda na ba Buddhiste. Lokola na Haiti, mpe lisusu na Bangkok, Nkolo asangisaki boponi ya mabele. Na ntango kuna na mwa basanza eleki moke, tokutanaki na Sathit mpe Juthamas Kaivalvatana mpe bana na bango ya bomipesi. Sathit akotaki Eklezia ntango azalaki na mibu 17 mpe asalaki misio na mabele na ye ya mbotama. Sima akutanaki na Juthamas na institut, mpe bakangisamaki na Tempelo ya Manila. Na 1993, ba Kaivalvatanas bazalaki batutamaki na motuka ntango momemi motuka alalaki, mpe Sathit azali molakisi malamu na International School na Bangkok. Azali kosalisa lokola mokambi ya Likonzi ya Nordi na Thailand Bangkok. Tomoni bikamwisi ya Nzambe kati ya mosala kitoko na Ye mpe kati ya babomoi na bisomei.

Elilingi
Couples in the Ivory Coast

Bikamwisi ya Eklezia na Cote d’Ivoire ekoki kolobama te na kozangaka bankombo ya balongani minei: Philippe mpe Annelies Assard mpe Lucien mpe Agathe Affoue. Bakotaki na Eklezia ntango babalanaki sika, moko na Allemagne mpe moko na France. Na 1980, Philippe mpe Lucien bayokaki mposa ya kozonga na mboka na bango ya mbotama ya Afrika mpo na ntina ya kotonga bokonzi ya Nzambe. Mpo na ndeko mwasi Assard, oyo azali Allemande, mpo na kotika libota na ye, mpe kopesa ndingisa na ndeko Mobali atika mosala na ye ntango asilisaki lokola ingenieur macanicien, azalaki na bondimi makasi. Balongani oyo bakutanaki na Cote d’Ivoire mpo na mbala ya yambo mpe babandaki Kelasi ya Eyenga. Esalaki mibu 30 elekaki. Bazali sikawa na makonzi mwambe mpe 27,000 ya bandimi kati ya mboka kitoko ya Afrika. Ba Affoues bazali kokoba na mosala kitoko, lokola ba Assards bazali kosala, baoyo basilisaki misio kala te na Tempelo ya Accra na Ghana.

Bokoki komona nguya ya Nzambe kotambwisaka mosala na Ye liboso? Ekoki bino komona loboko ya Nzambe kati ya babomoi ya bamisionele na Haiti to na Kaivalvatanas na Thailande? Bokoki komona nguya ya Nzambe kati ya babomoi ya Assards mpe ba Affoues? Bokoki komona nguya ya Nzambe kati ya bomoi na binomei?

“Mpe ezali na eloko moko te etukaka Nzambe … koleka baoyo balobelaka nguya na ye na makambo nionso te mpe batosaka mitindo na ye te.”13

Bikamwisi ya Nzambe esalmaka bobele kaka na Haiti, Thailand, to na Cte d’Ivoire te. Botala nzinganzina na bino. 14 “Nzambe abosanaka moto moko te  … ; iyo, ayebi motuya ya bato, mpe, …nsopo na ye ya mawa ezali likolo ya mokili mobimba.” 15

Mbala mosusu tokoki komona nguya ya Nkolo kati ya babomoi basusu kasi komituna, “Lolenge nini nakoki komona malamu koleka nguya na Ye na bomoi na ngaimei?”

Mobikisi alobaki:

“Botiya ntembe te.” 16

“Bobanga te.”17

“Moko … te ya [bandeke] ako … kweya [na] elanga na kozangaka boyebi ya [Tata]. …

“Bobanga… te mpe lisusu, [mpo ete] bozali ntina mingi koleka bandeke ebele.” 18

Kanisa elenge mobali oyo agangaki epai ya profeta Elisha bazingamaki na banguna: “Alalala, [nini] tokosala nini? 19

Eliya ayanolaki:

“Bobanga te: mpo baoyoy bazali elongo na biso bazali koleka bango baoyo bazali elongo na bango.

“[sima] Elisha asambelaki, … Nkolo, … afongoli misu na ye, mpo ete akoka komona. Mpe Nkolo [afongolaki] miso ya elenge mobali; mpe [amonaki] ngomba ezalaki ya kotonda na bampunda mpe bashario ya moto.” 20

Ntango bozali kobatela mitindo mpe bosambeli na bondimi mpo na komona nguya ya Nkolo kati ya bomoi na bino, nalaki bino ete Akofungola misu na bino ya molimo atako na mobimban mpe bokomona malamu koleka etet bozali bino moko te.

Makomi eteyi ete tosengeli “[kotikala] ngwi na bondimi ya oyo ezali koya.” 21 Nini ezali koya? Mobikisi Asambelaki:

“Tata na bino azali na lola, nkombo na yo Ekumisama.

“Bokonzi na yo eya. Bolingi na yo esalema na mabele, lokola esalemaka na lola.” 22

Biso nionso towuti koyemba “Come, O Thou King of Kings.”

Bondimi na biso ezali kokola ntango tomilengeli mpo na mokolo ya bozongi ya nkembo ya Mobikisi na likolo ya mabele. Likanisi ya bozongi naYe eningisaka molimo na ngai. Ekozala lolenge ya kokamwa! Etandama mpe monene, monene koleka mpe kitoko makasi, ekosimba eloko nionso ya misu ya nkufa oyo naino emona te to eyeba.

Na mokolo wana Ye akoya te “alingami na elamba ya kazaka kati ya elelo,” 23 kasi Akoya “na mapata ya lola, alatama na elamba ya nguya mpe ya nkembo; elongo na Banjelu nionso basantu.” 24 Tokoyoka “mongongo ya anjelu mokambi, mpe … mondule ya Nzambe.” 25Moyi mpe sanza ekobongwana, mpe “minzoto [eko] nganga makasi na bisika na yango.” 26 Bino mpe ngai, to baoyo bazali kolanda biso, “basantu … uta na [bangambo 4] ya mabele,” 27 “ekoningana mpe … ekotombwama mpo na kokutana na ye” 28  mpe baoyo bakufa na bosembo, bango mpe “bakotombwama mpo na kokutana na ye na kati kati … ya lola.” 29

Sima, lokola mpasi ya boyebi: “Bato nionso,” Nkolo alobi, “bakomona ngai elongo.” 30 Lolenge nini yango ekosalema? Toyebi te. Kasi natatoli ekosalema—kaka ndenge moko lokola esakolama. Tokofukama na botosi. “mpe Nkolo akoloba na mongongo na ye, mpe bansuka nionso ya mabele ekoyoka yango.” 31 “Ekozala … lokola mingongo ya bamai ebele, mpe lokola mongongo ya nkake monene.” 32 “[Sima] Nkolo, … Mobikisi, bakotelema na katikati ya bato na ye.” 33

Ekokoma likita ya kobosana te na banjelu mpe ya basantu ya lola mpe Basantu na mabele. 34 Kosai eloko ya ntina makasi, lokola Yisaya azali koloba, “Bansuka nionso ya mabele ekomona bobikisi ya Nzambe na biso,” 35 mpe Ye “akokonza likolo ya bato nionso.” 36

Na mokolo wana, bato na ntembe bakotikala kimia, “mpo matoyi nionso ekoyoka …  , mpe mabolongo nionso ekofokama, mpe minoko nionso ekotatola”37ete Yesu azali Klisto, mwana mobali ya Nzambe mpe Mosikoli ya mokili.

Lelo ezali Pasika. Tosepeli na Baklistu nionso ya mokili mobimba na Bosekwi na Ye ya nkembo mpe na elaka na bisomei ya bosekwi. Ekoka biso komilengela mpo na boyei na Ye, na milulu ya nkembo oyo lisusu mpo na libela na libela na makanisi na binomei mpe na bolingo oyo tolingi, mpe tika ete losambo na Ye ezala ya bisomei: “Bokonzi na Yo eya. Oyo ekosalema na nse lokola ezali na likolo. ”38  Natatoli ete Azali na bomoi. “Yaka, O yo Mokonzi na Bakonzi.” Na nkombo ya Yesu Klistu, amene.

Matangi

  1. Ntango likita linene mobimba ebongolamaki na nkota 94, nkota nionso epesamaki na mbala moko te, to mpo na mayangani nionso. Mpo na liyangani ya Lomingo na nsima ya nzanga ya likita linene oyo, nkota 75 ebongolamaki mbala moko.

  2. “Come, O Thou King of Kings,” Hymns, no. 59.

  3. Na mokolo ya Mibale, sanza ya Misato mokolo ya 31, mobu 2015, bilo ya Bokambi ya Yambo etindelaki ngai nsango ya e-mail kondimbolaka ete nasengelaki koloba na na nsima ya nzanga ya Eyenga, sanza ya Minei mokolo ya 5, sima ya loyembo eyembami na lisanga “Yaka, O Yo Mokonzi na Bakonzi.” Maloba makomami ya loyembo monene oyo Ezongisama, ekomama na Parley  P. Pratt, ezali bosenga na bosembo epai ya Mobikisi azonga na mabele. Ezali na nsango ya maloba na ngai ya likita ntango mosusu koleka nguya makasi koleka loyembo mosusu oyo toyembaka. Natondisamaki makasi na bososoli ya Basantu ya bondimi epai nionso basangani na kosepelaka elongo na Eyenga ya Pasika, kotombolaka mongongo mingongo na biso epai ya Nzambe, mpe koyembaka na bomoko, “Yaka, O yo Mokonzi na Bakonzi! Tozali kozela yo mingi.” Koyebaka ete nazalaki nabosenga ya boponi loembo oyo te mpo na likita linene, namitunaki soki batiei nzembo batangaki maloba ya ngai ya likita ekomama“Bokonzi na Yo Eya” mpe sima loyembo oyo na ntina ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Nayekolaki sima bakambi ya Lisanga ya Bayembi ya Tabernacle bapesaki ndingisa na loyembo na Bokambi ya Yambo na ebandeli ya sanza ya misato, bamposo na lombengo natindaki maloba na ngai na Bokambi ya Yambo mpo na kobongola. Mbala ya nsuka wana “Yaka, O Yo Mokonzi na Bakonzi” eyembamaki ntango loyembo ya lisanga kati ya likita linene ezalaki na sanza ya Zomi 2002. Moko na moko na biso komekaki eteni na biso, kasi Azali motongi monene.

  4. Doctrine & Alliances 100:16.

  5. 1 Nefi 14:14.

  6. Doctrine et Alliances 10:55.

  7. Mkambo oyo amoni ye moko, Sanza ya Mitano 1997.

  8. 2 Nefi 27:20.

  9. Yoane 1:3.

  10. Doctrine et Alliances 65:2.

  11. 1 Nefi 14:12.

  12. Na eleko ya mvula, na ntango nazalaki na Brazil, nakabolaki na esengo na Mokambi James E. Faust ya Bokambi ya Yambo makambo ebele ya kokamwa na ntina ya Basantu na etuka ya Curitiba, na elikia ete akokaki kolekisa nsango na ntina ya Mokambi Gordon B. Hinckley. Mokambi Faust atelemisaki ngai na katikati ya maloba. “Neil,” tokoteli Mokambi te. Mokano oyo ya esika nini kotonga tempelo ezali kati ya Nkolo mpe profeta na Ye.” Etuka ya Tempelo ya Curriba Brazil ekulisamaki na 2008.

  13. Doctrine et Alliances 59:21.

  14. Moko ya makamwisi monene ya nguya ya Nkolo ezali bomemi ya Bokonzi na Ye na Etazini kati ya bamboka mpe bituka na mboka mobimba. Awa oyo ezali ndakisa moko. Na sanza ya Mitano ya 2006 napesamaki mokumba na likita ya likonzi na Denton, Texas. Natikalaki na ndako ya mokambi ya likoki, Mokambi Vaughn A Andrus. Ndeko mwasi Andrus ayebisaki ngai na ntina ya ntango ya sika ya Eklezia na Denton, ebandaki na baboti na ye, John mpe Margaret Porter. Ezalaki bobele Eteyelo ya Eyenga na ebandeli. Ba Porters bakabolaki nsango malamu elongo na ba Ragsdales, oyo na sima bakabolaki yango na ba Nobles mpe ba Martinos. Bamisionele, ya solo, batiaki mpenza maboko. Mabota ebele eyaki na Eklezia. Basusu bautaki na westi ya kino na Denton. Lelo, esika oyo ezalaki mwa etape ya moke, ekoma sikoyo makonzi minei, mpe bana mibali ya Martinos, Mpaka James B. Martino, oyo ayaki na Eklezia ntango azalaki na mibu 16, azali kosalisa lokola Mokambi Monene ya Eklezia.

  15. Alma 26:37.

  16. Matai 21:21.

  17. Malako 5:36.

  18. Matai 10:29, 31.

  19. 2 Mikonzi 6:15.

  20. 2 Mikonzi 6:16–17.

  21. Moziya 4:11.

  22. Matai 6:9–10; tala lisusu Doctrine et Alliances 65:6.

  23. Luka 2:12.

  24. Doctrine et Alliances 45:44.

  25. 1 Batesaloniki 4:16.

  26. Doctrine et Alliances 133:49.

  27. Doctrine et Alliances 45:46.

  28. Doctrine et Alliances 88:96.

  29. Doctrine et Alliances 88:97.

  30. Doctrine et Alliances 101:23.

  31. Doctrine et Alliances 45:49.

  32. Doctrine et Alliances 133:22.

  33. Doctrine et AAliances 133:25.

  34. TalaMose 7:63.

  35. Yisaya 52:10.

  36. Doctrine et AAliances 133:25.

  37. Doctrine et Alliances 88:104.

  38. Matai 6:10.