2010–2019
Tokotombwana Elongo
sánzá ya mínei 2015


Tokotombwana Elongo

Lokola basi mpe mibali oyo babatelaka mayokani, tosengeli kotombolana mpe kosalisana mpo na kokoma bato oyo Nkolo alingi biso tokoma.

Penepene ya masikulu, miziki, mpe nsambo efulama oyo ntango nionso esimbaka mitema na biso na likita linene, nayebisami na bandeko basi mingi ete maye balingaka mingi koleka nionso ezali kotalaka Bakambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale wana ezali bango kosukisa liyangani ya likita linene elongo na baninga na bango ya seko. Mpe esepelaka biso te koyokaka Bandeko Mibali na bolingo kolobaka bolingo na bango mpo na bango?

Elilingi
President Boyd K. Packer and his wife, Donna, at the Brigham City Utah Temple cornerstone ceremony, 23 September 2012.

Kolobaka oyo etali mwasi na ye, Donna, Mokambi Boyd K. Packer alobaki ete, “Mpo na mosalaka nasalaka, nazali na mokumba ya lokumu ya koloba bosolo: Azali malamu.”1

Elilingi
President Dieter F. Uchtdorf and his wife.

“Azali bongenge ya moi ya bomoi na ngai,”2 elobaki Mokambi Dieter F. Uchtdorf na ntina ya mwasi na ye, Harriet.

Elilingi
President Henry B. Eyring and Sister Eyring at their wedding.

Mokambi Henry B. Eyring, kolobelaka mwasi na ye, Kathleen, alobaki, “Ye [azali] moto moko oyo atindi ngai ntango nioso nalinga kozala malamu mingi koleka nionso oyo nakoki kozala.”3

Elilingi
LDS Church President Thomas S. Monson gives his wife, Frances, a kiss at their 60th anniversary celebration, 10/6/2008, at the Lion House. The two met in 1944 and were married in the Salt Lake Temple on Oct. 7, 1948.

Mpe Mokambi Thomas S. Monson, kolobelaka Frances na ye ya bolingo, alobaki ete: “Azalaki bolingo ya bomoi na ngai, moninga na ngai ya kolikia, moninga na ngai ya penepene. Koloba ete nazali kozanga ye ezali kobanda koyebisa mozindo ya mayoki na ngai te.”4

Ngai mpe nakolinga koloba bolingo na ngai mpo na moninga na ngai ya bolingo, Craig. Azali likabo ya talo mpo na ngai! Kolobelaka mobali na ngai, liloba moko nalingaka mpe ya bule oyo ezali na lipamboli na ngai ya mopamboli elaki ete bomoi na ngai mpe bamoi ya bana na ngai e “kozala malamu na bobateli na ye.” Emonani polele na ngai ete Craig azali bokokisi ya elaka wanaKodefaka uta na maloba ya Mark Twain, nalobi ete “bomoi ezangi [Craig] ekozala bomoi te.”5 Nalingi ye, na motema mobimba!

Misala mpe Mikumba ya Bonzambe

Lelo Nalingi kopesa lokumu na mibali, batata, bandeko mibali, bana mibali mpe banoko oyo bazali kosala malamu na bango koleka nionso mpo na kokokisa misala epesamela bango na Nzambe lokola elimbolami na esakola mpo na libota, kosangisaka koyangelaka na bosembo mpe koyangelaka na bosembo mpe koleisaka mpe kobatelakamabota na bango. Nasengi boyeba ete nayebi na mpasi na motema ete bamama ya makambo ya botata, bomama, mpe libala ekoki kopesa mobulu na mingi. Nayebi ete bandimi misusu ya Eklezia bayokaka ete mabota na bango ekokokisa mokolo moko te oyo bakanisaka kozala malamu. Mingi bazali koyokqa mpasi mpo na botali mpamba, bokamati na makasi, bakakemi, mpe babonkoko mpe bizaleli ya mabe. Nalekisaka misalaa mibali to basi oyo na bolingi to na bozangi koyeba basali mpasi, mabe, mpe kozanga elikia kati na bamabota. Kasi nazali kolobela likambo mosusu.

Nandimi ete mobali azali mokolo moko te kitoko na mwasi na ye koleka ntango azali kosala na misala epesamela ye na Nzambe lokola nganganzambe moko alonobana—ya ntina mingi koleka na ndako. Nalingaka mpe nakanisaka na maloba oyo ya Mokambi Packer epai ya mibali mpe batata balongobana: “Bozali na nguya ya bonganganzambe mbala moko uta na Nkolo mpo na kobatela ndako na bino. Ekozala na bambala mususu ntango nionso wana etelemaka lokola nguba katikati ya libota na bino mpe mabe ya satana ekozala nguya wana.”6

Bakambi mpe Bateyi ya Molimo kati na Ndako

Na ebandeli ya mobu oyo nakendeki na matanga ya moto mpamba moko ya kokamwa—Noko Don ya mobali na ngai. Moko ya bana mibali ya Noko Don akabolaki likambo moko azwaki ntango azalaki mwana moke, mwa nsima ntango baboti na nain basombaki ndako na bango ya yambo. Lokola ezalaki na bana mike mitano ya koleisa mpe kolatisa, ezalaki na mosolo ekoka te mpo na kotonga lopango. Kozwaka na lokengo moko ya misala na ye ya bonzambe lokola mobateli ya libota na ye; Noko Don akundaki mwa makonzi ya nzete ya moke na mabele, azwaki ndambo ya nsinga, mpe akangisaki nsinga yango na likonzi moko na moko nzinganzinga nionso ya lopango. Nsima abengaki bana na ye baya epai na ye. Alakisaki bango makonzi mpe nsinga mpe alimbolelaki bango ete soki bakotikala na kati na efelo wana ya mwa ntango, bakozala na kimia.

Mokolo moko bamama batali bateyi wana ezalaki bango kokoma penepene ya ndako bamonaki na kozanga kondima mpe bamonaki bana mike mitano kotelemaka na botosi na nsuka ya nsinga, kotalaka na mposa ndembo oyo edendaki libanda ya bandelo na bango mpe ebimaki na balabala. Mwana moke moko akimaki mpo na kosenga tata na bango, oyo, na eyano, akimaki mpe azwaki lisusu ndembo.

Nsima na matanga, mwana mobali ya nkulutu alobaki na pinzoli ete nionso oyo alikiaka na bomoi oyo ezalaki kozala lokola tata na ye ya bolingo.

Elilingi
Sister Burton's son and grandson reading together.

Mokambi Ezra Taft Benson alobaki:

“O, mibali mpe batata na Yisalaele, bokoki kosala mingi koleka mpo na lobiko mpe bonetwami ya mabota na bino! …

“Bomikundola libiangi na bino ya bule na Yisalaele—libiangi na bino eleki motuya na ntango mpe na boseko—libiangi na yango bokolongwa mokolo moko te.”

Elilingi
Sister Burton's son and grandson on a bed together.

“Bosengeli kosunga kokela ndako moko wapi Molimo ya Nkolo ekoki kofanda.”7

Boniboni ya solo maloba mana mawuti na profeta mazali lelo.

Ekozala mpasi, mingimingi, mpo na mibali kofanda na mokili oyo kaka te ezali kokitisa misala mpe mikumba na bango ya bonzambe kasi lisusu ezali kotinda nsango ya lokuta oyo etali nini elingi koloba kozala “mobali ya solo.” Nsango moko ya lokuta ezali “Nionso etali ngai.” Mpe ezali lisusu na nsango ya kokitisa mpe ya kotiola ete mibali mpe batata bazali lisusu na ntina te. Nabondeli bino boyoka balokuta ya Satana te! Abungisaki litomba wana ya bule ya kokomaka mokolo moko mobali mpe tata. Mpo azali na zuwa ya baoyo bazali na misala ya bule oyo akosala mokolo moko te, akani kosalaka “bato banso … bobola lokola yemei”!8

Kotombola mpe Kosalisa na Misala na Biso ya Kokokisana

Bandeko mibali mpe basi, tosengalani! Lokola basi mpe mibali babateli mayokani, tosengeli kotombolana mpe kosalisana mpo na kokoma bato oyo alingi biso tokoma. Mpe tosengeli kosala elongo mpo na kotombola nkola ya kobuta mpe kosalisa bango bokokisa likoki na bango ya bonzambe lokola bakitani ya bomoi ya seko. Tokoki kosala lokola Mpaka Robert D. Hales mpe mwasi na ye, Mary, basalaki mpe kolanda lisese “Yo tombola ngai mpe nakotombola yo, mpe Tokotombolana.”9

Toyebi uta na makomi ete “ezali malamu te ete moto azala ye moko.” Yango wana Tata na biso ya Lola asalaki “mosungi abongi mpo na ye.”10 liloba mosungi abongi elingi koloba “mosalisi akokani na, alongobani na, to oyo akokani na ye.”11 Ndakisa, maboko na biso mibale ekokani kasi ezali mpenza lolenge moko te. Solo, ezali ya kokesena mpenza, kasi ezali mpo na kokisana mpe kobongisana. Kosalaka elongo, ezali makasi koleka.12

Na mokapo moko oyo etali mabota, Manuel d’administration de l’Eglise ezali na liloba oyo: “Lolenge ya milimo ya mibali mpe ya basi ezali mpo ete bakokisana.”13 Nasengi boyeba ete elobi te “bowelana” kasi “bokokisana,” ! Tozali awa mpo na kosungana, kotombolana, mpe kosepela moko na mosusu wana ezali biso komeka komikomisa malamu koleka mpenza. Ndeko mwasi Barbara B. Smith ateyaki na bwania ete, “Ezali na esengo mingi mpenza koleka ntango tokoki kosepela na elonga ya basusu kasi kaka na oyo bisomei te.”14 Ntango toluki “kokokisana” na esika ya “kowelela,” ezali pete mingi koleka mpo na kosepelisana!

Ntango nazalaki elenge mama ya bana mingi ya mike, na nsuka ya mokolo etonda na kosukola bilamba, kosukola basani, mpe kosembola, moko te azalaki koyemba na esengo loyembo ya eteyelo ya bana “Nasepelaka ntango papa azongaka ndako.”15 Nazali na mawa mpo nandima, nzokande, nazalaki mbala nionso te na esengo ntango Craig azalaki kozala pene ya kokota na ndako na esengo nsima ya mokolo moko ya mosala makasi. Azalaki ntango nionso kopesa mbote moko na moko na biso na koyamba mpe lipwepwe mpe azalaki kobalusa mikolo ya mpasi mingi mpe ntango mosusu ya likama na bantango ya esengo na papa. Natombeli kozala na mwa komitungisa na molongo ya molai ya makambo ya kosala lisusu mpe natalaka na bwania mingi, lokola azalaki kosala, na makambo oyo ezalaki ya ntina mingi. Nalingaki kotelema mbala mingi mpe kosepela ntango ya bule na libota mpe nalingaki kopesa ya matondi mbala mingi mpo na kopambolaka babomoi na biso!

Tika Mbala Mingi Tolobana maloba ya boboto

Kala mingi te, ndeko mwasi moko ya botongono kati na Eklezia akabolaki na ngai likambo na ntina na yango azalelaki kosambela mwa ntango. Likambo na ye ezalaki mpo na bandeko basi kati na palwasi na ye. Ayebisaki ngai lolenge nini ezalaki koswa motema na ye komona ete bazali ntango mosusu koloba na mibali na bango mpe na oyo etali mibali na bango na limemia te, kutu liboso ya bana na bango. Na nsima ayebisaki ngai lolenge nini ntango azalaki elenge mwasi azalaka na mposa mpe azalaka kosambela na lokengo mpo na kozwa mpe kobala nganganzambe alongobana mpe kotonga ndako ya esengo elongo na ye. Akolaka na ndako moko esika wapi mama na ye azalaki “kokamba ndako” mpe tata na ye azalaka kobanga bisengi ya mama na ye mpo na kobatela kimia na ndako. Ayokaki ete ezalaki na lolenge ya malamu koleka. Amonaka te ndakisa na yango na ndako wapi akolaki, kasi wana ezalaki ye kosambela na konzo mpo na bokambami, Nkolo apambolaki ye mpo na koyeba lolenge nini kokela ndako elongo na mobali na ye esika wapi Molimo akoyambama na esengo. Nazalaki na ndako wana mpe nakoki kotatola ete ezali esika esantu!

Bandeko basi mpe mibali, mbala boni na bolingi “tolobanaka maloba ya boboto”?16

Tokokaki komimeka na kotunaka mwa mituna. Na mwa kokokisana, mituna oyo mikoki kosalelama na mingi na biso, atako soki tobala to tozali monzemba, atako ezalela nini ya ndako na biso ekokaki kozala.

  1. Ntango nini ya nsuka nakumisaki na bosembo molongani na ngai, ata ngai moko to na miso ya bana na biso?

  2. Ntango nini ya nsuka natondaki, nalakisaki bolingo, to nabondelaki makasi kati na bondimi mpo na ye kati na losambo?

  3. Ntango nini ya nsuka namitelemisaki uta na kolobaka likambo moko oyo nayebaki ekokaki kosala mpasi?

  4. Ntango nini ya nsuka nalimbisaki mpe nasengaki bolimbisi na komikitisa—kozangaka kobakisa maloba “kasi soki kaka ozalaki” to “kasi soki kaka ozalaki te”?

  5. Ntango nini ya nsuka naponaki kozala na esengo na esika ya kosengaka kozala “molongi”?

Sikawa, soki moko ya mituna oyo etindi yo omibuka to omiyoka opakolami na elindo, kanisa ete Mpaka David A. Bednar ateyaki ete “elindo ezali epai ya molimo na biso oyo mpasi ezali epai ya nzoto na biso—likebisi ya likama mpe bobateli uta na libebi mosusu.”17

Nabengisi moko na moko na biso atosa libondeli ya motema ya Mpaka Jeffrey R. Holland: “Bandeko mibali mpe basi, na koluka ya seko ya ntango molai oyo mpo na kozala mingi lokola Mobikisi na biso, nalikii ete tomeka kozala mibali mpe basi ‘malamu’ kati na pene lolenge moko oyo sikawa—na kotukaka te na maloba, to elobami na lolenge malamu koleka, na kolobaka na monoko ya sika, monoko ya banzelu.”18

Wana ezalaki ngai komilengela mpo na libaku oyo lelo, Molimo eteyaki ngai, mpe nazwaki mokano mpo naloba maloba ya boboto mbala mingi na moninga na ngai ya bolingo mpe oyo etali ye, mpo na kotombola mibali na libota na ngai mpe kopesa matondi mpo na ndenge bazali kokokisa misala ya bonzambe mpe ya kosalisana. Mpe nazwaki mokano ya kolanda lisese “Yo tombola ngai mpe nakotombola yo, mpe tokotombolana elongo.”

Ekosangana bino na ngai na kolukaka lisalisi ya Molimo Mosantu mpo na koteya biso lolenge nini tokoki kotombolana malamu koleka na misala na biso ya lisalisi lokola bana mibali mpe ya basi ya liyokani ya baboti na biso ya lola ba bolingo?

Nayebi ete na nzela ya nguya epesaka likoki ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe bondimi na biso kati na Ye, tokoki kosala yango. Nasambeli ete tokotia elikia na biso na Ye mpo na kosalisana kozala na esengo mpe sekoseko wana ezali biso kotombwama elongo, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Boyd K. Packer, na “Donna Smith Packer Receives Family History Certificate from BYU,” news.byu.edu/archive12-jun-packer.aspx.

  2. Dieter F. Uchtdorf, na Jeffrey R. Holland, “Elder Dieter F. Uchtdorf: On to New Horizons,”Ensign, Sanza ya misato 2005, 12;Liahona, Sanza ya misato 2005, 10.

  3. Henry B. Eyring, na Gerald N. Lund, “Elder Henry B. Eyring: Molded by ‘Defining Influences,’”Ensign, Sanza ya libwa 1995, 14;Liahona, Sanza ya minei 1996, 31.

  4. Thomas S. Monson, “I Will Not Fail Thee, nor Forsake Thee,”Ensign toLiahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 85.

  5. Mark Twain, Eve’s Diary (1905), 107.

  6. Boyd K. Packer, “The Power of the Priesthood,”Ensign toLiahona, Sanza ya mitano 2010, 9.

  7. Ezra Taft Benson, “To the Fathers in Israel,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1987, 50, 51.

  8. 2 Nefi 2:27.

  9. Tala Robert D. Hales, “Strengthening Families: Our Sacred Duty,”Ensign, Sanza ya mitano 1999, 34;Liahona, Sanza ya nsambo 1999, 40; tala lisusu LaRene Gaunt, “Elder Robert D. Hales: ‘Return with Honor,’”Ensign, Sanza ya nsambo 1994, 51;Liahona, Sanza ya minei 1995, 31.

  10. Genese 2:18.

  11. Genese 2:18, nkoma na nse ya lokasa b.

  12. Tala Bruce K. Satterfield, “The Family under Siege: The Role of Man and Woman” (presentation given at Ricks College Education Week, Sanza ya motoba 7, 2001), 4; emp.byui.edu/SATTERFIELDB/PDF/RoleManWoman2.pdf.

  13. Manuel 2: Administration de l’Eglise (2010), 1.3.1.

  14. Barbara B. Smith, “Hearts So Similar,” Ensign, Sanza ya mitano 1982, 97.

  15. “Daddy’s Homecoming,” Children’s Songbook, 210.

  16. “Let Us Oft Speak Kind Words,” Hymns, no. 232.

  17. David A. Bednar, “We Believe in Being Chaste,”Ensign toLiahona, Sanza ya mitano 2013, 44.

  18. Jeffrey R. Holland, “The Tongue of Angels,”Ensign toLiahona, Sanza ya mitano 2007, 18.