2010–2019
Iyo, Tokoki mpe Tokolonga!
sánzá ya mínei 2015


Iyo, Tokoki mpe Tokolonga!

Tosengeli kosimba makasi litatoli na biso ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto. Nde sima bokasi tokolonga bitumba ya mokolo na mokolo kotelemela mabe.

Bandeko mibali, namikitisi na libaku nazui ya koloba na bino, bamemi ya bonganganzambe ya Nzambe na kati ya Eklezia lelo.

Mokambi Thomas S. Monson alobaka mokolo moko:

“Mokili ekoki kozala ntango mosusu esika moko ya bobangi kovanda. Bantina ya bomoto ya bato ekomi lokola kobebisamaka na lombango mingi ya kobangisaka. Moko te—ata elenge to mokolo to nakatikati na yango—alongolami na kozala libanda na biloko oyo ezali na makoki ya kolembisa biso mpe kobebisa biso. …

“… Kasi tosengeli kolemba nzoto te. … Tozali kobundaka etumba moko na lisumu. … Ezali etumba moko tokoki mpe tokolonga. Tata na biso ya Lola apesaki biso bisaleli tozali na yango bosenga na ntina ya kolonga yango.” 1

Banso kati na biso, elenge mpe mokolo tokutanaka mokolo na mokolo na etumba oyo Mokambi Monson alobelaki. Monguna mpe baanzelu na ye bazali komekaka kobungisa biso mayele. Ntina na bango ezali kolendisa biso ete tolongua uta na mayokani tosalaki na Nkolo, komemaka biso na kobungisa bomoni ya libula na biso ya libela. Bango bayebi malamu muango ya Tata na biso ya Lola mpona, bana na Ye, mpo ete bango bazalaki elongo na biso na Lisanga monene na Lola ntango yango nionso elakisamaki. Bazali komeka kozua litomba likolo ya bolembu mpe botawu na biso, kolembisaka biso nzoto na “londende ya molili …, oyo ezipi miso, mpe kokomisaka mitema ya bana na bato makasi, mpe komema bango pembeni ya banzela, ete bango babeba mpe babungisama.”2

Atako bokeseni tokutani na yango, lokola Mokambi Monson ateyaki, oyo ezali etumba tokoki mpe tokolonga. Nkolo azali na kondima na makoki na biso mpe mokano na biso ya kosala yango.

Makomi etondi na bandakisa ebele ya baoyo balongaka bitumba na bango atako na katikati ya kpokoso ya makasi. Moko ya bandakisa wana ezali Kapitene Moroni na Buku ya Mormon. Elenge mobali oyo ya mpiko ye azuaka mpiko ya kolobela bosolo na ntango moko ntango kuna ezalaki na bokabuani, mpe babitumba oyo ememi likama na kobika monene ya libota mobimba ya Banefite. Atako azalaki elombe na kosalaka mikumba na ye, Moroni atikalaki ya komikitisa. Oyo mpe ndenge mosusu esalemaki esalaki ye kozala na ntina mingi koleka esaleli na maboko ya Nzambe na Ntango wana. Buku ya Alma elimboli ete soki bato nionso bakoki kozalaka lokola Moroni; “banguya nionso ya lifelo elingaki kobuakama libela na libela; [mpe] satana alingaki kozala ata mokolo moko te na nguya likolo ya mitema ya bana na bato.” 3Makoki nionso ya Moroni ewutaki na bondimi na ye monene na Nzambe mpe na Nkolo Yesu Klisto 4 mpe mokano na ye ya makasi kolanda mongongo ya Nzambe mpe ya baprofeta na Ye. 5

Na ndakisa, biso nionso tosengeli komibongola biso moko na Kapitene Moroni ya ntango oyo lelo na ntina ya kolonga bitumba na bamposa ya mabe na babomoi na biso. Nayebi elenge diakono oyo abonguanaki yemoko na Kapitene Moroni ya mikolo oyo. Na lolenge oyo amonaki kolanda toli ya baboti na ye mpe bakambi ya Eklezia, bondimi na ye mpe mokano na ye emekamaki mikolo nionso, atako na mibu ya bolenge na ye, Mokolo moko ayebisaki ngai, akamuaki na likamnbo moko ya mpasi makasi mpe ya malamu te—baninga bazalaki kotala bililingi ya bosoto na telephone na bango. Na ntango wana mpenza, elenge mobali oyo asengelaki kokana nini ezalaki na motuya koleka—koyebana na ye to kozala na sembo. Na mua ba sekonde mike oyo elandaki, atondisamaki na mpiko mpe alobaki na baninga na ye ete oyo bazalaki kosala ezalaki sembo te. Mpe lisusu, alobaki na bango ete basengelaki kotika oyo bazalaki kosala mpamba te bakoki kokoma baumbu na yango. Ebele ya baninga na ye ya kelasi babuakaki toli na ye, kolobaka ete ezali oyo etali ya bomoi mpe ete ezalaki na mabe moko te kati. Nzokande ezalaki na moko kati na bango oyo ayokaki toli ya elenge mobali wana mpe akanaki kotika oyo bazalaki kosala.

Ndakisa ya diakono oyo ezalaki na nguya ya malamu na moko ya baninga na ye ya kelasi. Na ntembe te ye na moninga na ye batumolamaki mpe batsholamaki na ntina ya mokano wana. Na ngambo mosusu, balandaki toli ya Alma na bato na ye ntango alobaki, “Boya bino uta libanda na batu ba nkuna, mpe bokabuana, mpe bosimba te biloko na bango ya bosoto.” 6

Buku moke Jeunes soyez fort: ezali na mateya oyo elandi uta na Bokambi ya Yambo na bilenge ya Eklezia: “Bino bozali bakonzi ya boponi bozali kosala. Nzambe azali na makanisi mpo na bino mpe akosalisa bino kosala maponi ya malamu, atako libota mpe baninga bazali kosalela nguya na bango ya boponi na ndenge ya sembo te. Bozala na mpiko ya bizaleli na kotelema ngui na kotosaka mposa ya Nzambe, atako ekosengama ete botikala bino moko. Soki bosali yango, bolakisi basusu ndakisa moko ya kolanda.”7

Etumba ya malamu kotelemela mabe ekokobaka na bomoi na biso, mobimba ntango ntina ya monguna ezali kosala ete bato bakoma na mpasi lokola yemoko. Satana mpe banzelu na ye bakomeka kobungisa makanisi na biso mpe kosimba etamboli ya makambo mpona kosenginya biso na lisumu. Soki bango bakoki, bakosenginya nionso oyo ezali malamu. Na bongo ezali na motuya kososola ete bakozala na nguya likolo na biso kaka soki topesi yango nzela.

Makomi ezali na malakisi ebele ya baye bapesaki nzela wana na monguna mpe basukaki na kokomaka ya kobulangana mpe kutu babebaki, lokola Nehor, Korihor, mpe Sherem. Tosengelami tokebisama na likama oyo. Biso tokoki kopesa nzela te nakozalaka ya kobulungana na bansango oyo endimami na pete na mokili mpe ekeseni na malongi mpe mikano ya solo ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ebele ya bansango oyo ya mokili mobimba elakisi eloko moko te kokokanisa na komekama ya mokilli mpo na kotalisa ntina ya lisumu. Tosengeli kokundola ete, na nsuka, tokotelema banso liboso ya Klisto mpo na kosambisama mpona misala na biso soki ezalaki malamu to mabe. 8 Lokola tozali kokutana na bansango yango ya mokili mobimba, bokasi mpe boyebi makasi ya mwango ya Tata na biso ya Lola esengami mpo na kopona malamu.

Banso tokoki kozwa bokasi ya kopona malamu soki toluki Nkolo mpe totie elikia mpe bondimi na biso nionso epai na Ye. Kasi, lokola makomi eteyi, tosengeli kozala “na motema moko ya sembo” mpe “mposa ya solo.” Mpe Nkolo na mawa na ye ya suka te, akolakisa bosolo na kati [na biso], “na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu. Mpe na nguya ya Molimo Mosantu [to] tokoki koyeba solo ya makambo nionso.” 9

Boyebi oyo esengami na nzela ya Molimo Mosantu ezali eloko te koleka litatoli na biso, oyo ezali kotinda bondimi mpe mokano ya kolanda mateya ya nsango malamu ezongsamiki na mikolo oyo ya nsuka, atako tozali koyoka bansango eyebana kowuta na mokili. Litatoli na biso esengeli kozala nguba kobatela biso na bandelo ya moto ya monguna na komeka na ye kobundisa biso. 10 Ekotambuisa biso na bokebi na molili mpe kobulunga oyo ezali na mokili lelo. 11

Natangaki mokano oyo ntango nasalaki lokola misionele ya elenge. Kompanio na ngai tozalaki kosalaka na etape moko ya moke mpe mosika koleka ya Eklezia. Tomekaki kosolola na bato mingi na kati ya esika. Bayambaki biso malamu, kasi bango balingaki kolobela makomi mpe batunaki biso ntina ya bosolo na oyo tozalaki koteya.

Namikondoli ntango wana kompanio na ngai mpe ngai tolimbolaki na komeka kolakisa eloko moko na bato, Molimo na Nzambe etikaki biso mpe toyokaki tobungaki mpe tobulunganaki koleka lisusu. Toyokaki ete tosengelaki kotia litatoli na biso na makasi koleka elongo na babosolo ya nsango malamu tozali koteyaka. Uta na ntango wana, Nakundoli ete ntango topesaki litatoli moko na mitema na biso mobimba, kimia moko elakisaki nguya, kowutaka na Molimo Mosantu ekitaki na ndako, mpe kuna esika ezalaki te mpona kobulungana to kosuana. Natangaki ete ezali na nguya, moko te ya mabe oyo ezali na makoki ya kobulunganisa, koyokisaka mawa, to kokueyisaka nguya ya litatoli moko ya bosolo ya moyekoli moko ya solo ya Yesu Klisto.

Lokola Mobikisi Yemoko ateyaki, monguna azali na mposa ya koyungola biso lokola masango, kolukaka biso kobungisa bokasi na biso ya kolakisa bolamu na mokili. 12

Bandeko na ngai mibali, likolo ya mbonge ya kobulungana mpe ntembe ekobalukaka katikati na mokili lelo, tosengeli kosimba makasi koleka mpenza na litatoli na biso ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto. Nde bongo bokasi ya kobundela bosolo mpe bosembo ekomata makasi. Tokolonga bitumba ya mokolo na mokolo kotelemela mabe, mpe, na esika ya kokueya na esika ya bitumba ya bomoi, tokobenga basusu na banzela ya Molakisi.

Nabengi banso koluka kobatelama na malakasi ezuamaki na kati ya makomi. Kapitene Moroni atiaki bondimi na ye na Nzambe mpe litatoli na ye ya bosolo na boyebi mpe buanya azuaki na kati ya makomi. Na lolenge oyo, alikiaki ete akoyamba mapamboli ya Nkolo mpe akozua baelonga, oyo yango, na solo, eyaka.

Nabengi banso koluka kobatelama na maloba ya buanya ya baprofeta na biso ya lelo. Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Biso baoyo tokulisamaki na bonganganzambe ya Nzambe tokoki kosala bokeseni moko. Ntango tobateli bopeto na biso ya moto na moto mpe tokumisi bonganganzambe na biso, tokomi ndakisa ya bosembo mpona basusu kolanda … [mpe to] kosunga na kosilisa molili etombuami mingi na mokili ya molili.” 13

Nabengisi banso kotia elikya na makoki mpe na nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Na nzela ya likabo ya bomikabi na Ye, tokoki kozua bokasi ya kolonga bitumba na biso nionso ya ntango na biso. Ata na kati ya mikakatano, mitungisi, mpe komekama. Tika biso tolikia na bolingo na Ye mpe nguya ya kobikisa biso. Klistu Yemei alobaki:

“Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi, moto akokoma na Tata te, soki na ngai te,” 14

“Ngai nazali moyi na mokili: ye oyo akobila ngai akotambola na molili te, kasi akozala na moi ya bomoi.” 15

“Nasili kosolola na bino makambo oyo ete bozala na kimia kati na ngai. Kati na mokili bozali na bolozi, nde boyika mpiko, ngai nasili koleka mokili.” 16

Napesi litatoli ya babosolo oyo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.