Makomi
Alama 43


Mokapo 43

Alama mpe bana babali ba ye bateyi liloba—Bazolami mpe Banefi basusu bakabwani bakomi Balamani—Balamani bayei kobunda na Banefi o etumba—Moloni apesi Banefi ebundele ya bobatelami—Nkolo abimisi na Alama mayele ma etumba ma Balamani—Banefi babateli ndako, bonsomi, mabota mpe eyamba ya bango—Mampinga ma Moloni mpe Lehi mazingi Balamani. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete bana ba Alama bakendeki o ntei ya bato, mpo ya kosakola liloba epai ya bango. Mpe Alama, lisusu, yemei, akokaki te kopema, mpe akendeki lokola.

2 Sikawa tokoloba lisusu te etali liteya lya bango, longola se ete bateyaki liloba, mpe bosolo, engebene na molimo mwa bobikuli mpe libimisi; mpe bateyaki nsima ya molongo mosantu mwa Nzambe na mwango babiangemaki.

3 Mpe sikawa tala nazongi o nsango yoko ya bitumba o kati ya Banefi mpe Balamani, o mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi.

4 Mpo tala, esalemaki ete Bazolami bakomaki Balamani; yango wana, o ebandeli ya mobu mwa zomi na mwambe bato banso ba Banefi bamonoki ete Balamani bazalaki koyaka likolo lya bango; yango wana basalaki bolengeli mpo ya etumba; iyo, basangisaki elongo mandoki ma bango o mboka ya Yesoni.

5 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki elongo nkoto na nkoto; mpe bayaki o kati ya mboka ya Ationumi, eye ezali mboka ya Bazolami; mpe moto moko o nkombo ya Zelayemina azalaki mokambi wa bango.

6 Mpe sikawa, lokola Baamaleki bazalaki bato ba ezalela yoko ya nkuna mpe ya bobomi mingi koleka Balamani, kati ya o mpe na bangomei, yango wana, Zelayemina aponoki bakapiteni bakonzi likolo lya Balamani, mpe bango banso bazalaki Baamaleki mpe Bazolami.

7 Sikawa eye asalaki ete akoka kobatela boyini bwa bango ona Banefi, ete akoka komeme bango o kati ya boyangelami mpo ya bokokisi miango mya ye.

8 Mpo tala, miango mya ye mizalaki mpo ya kolamusa Balamani na nkanda likolo lya Banefi; eye asalaki ete akoka koyiba nguya enene likolo lya bango, mpe lisusu ete akoka kolonga nguya likolo lya Banefi na komemeke bango o kati ya bowumbu.

9 Mpe sikawa mwango mwa Banefi mozalaki mwa kosalisa mboka ya bango, mpe ndako ya bango, mpe basi ba bango, mpe bana ba bango, ete bakoka kobatela bango uta o maboko ma bayini ba bango; mpe lisusu ete bakoka kobatela makoki ma bango mpe matomba ma bango, iyo, mpe lisusu lipanda lya bango, ete bakoka kokumbamela Nzambe engebene na mposa ya bango.

10 Mpo bayebaki ete soko bakwei o kati ya maboko ma Balamani, ete onso oyo akokumbamela Nzambe o molimo mpe o bosolo, Nzambe wa solo mpe wa bomoi, Balamani bakobebisa ye.

11 Iyo, mpe bayebaki lisusu boyini bwa nsuka mpenza bwa Balamani ona bandeko ba bango, baye bazalaki bato ba Ati-Nefi-Lehi, baye babiangemaki bato ba Amona—mpe balingaki te kokamata mandoki ma bango, iyo, bakotaki o kati ya boyokani boko mpe balingaki te kobuka bwango—yango wana, soko bakweyaki o kati ya maboko ma Balamani balingaki kobebisa bango.

12 Mpe Banefi balingaki te kondima ete babebisama; yango wana bapesaki bango mboka mpo ya lisango lya bango.

13 Mpe bato ba Amona bapesaki epai ya Banefi ndambo enene ya bilei bya bango mpo ya kosalisa mampinga ma bango; mpe boye Banefi basengisamaki, bango moko, kotelemela Balamani, baye bazalaki eteni yoko ya Lamani mpe Lemuele, mpe bana babali ba Yisamaele, mpe bango banso baye bakabwanaki uta o Banefi, baye bazalaki Baamaleki mpe Bazolami, mpe biboto bya banganga ba Noa.

14 Sikawa biboto bina bazalaki na motango monene, penepene, lokola Banefi; mpe boye Banefi basengelaki kowela na bandeko ba bango, kutu kina o bosopi makila.

15 Mpe esalemaki ete lokola mampinga ma Balamani masanganaki o mboka ya Ationumi, tala, mampinga ma Banefi balengelemeki mpo ya kokutana na bango o mboka ya Yesoni.

16 Sikawa, mokambi wa Banefi, to moto oyo aponomoki mpo ya kozala kapiteni mokonzi likolo lya Banefi—sikawa kapiteni mokonzi akamataki bokomanda bwa mampinga manso ma Banefi—mpe nkombo ya ye ezalaki Moloni.

17 Mpe Moloni akamataki bokomanda bonso, mpe boyangeli bwa bitumba bya bango. Mpe azalaki bobele na mibu tuku mibale na mitano eponomoki ye kapiteni mokonzi likolo lya mampinga ma Banefi.

18 Mpe esalemaki ete akutanaki na Balamani o ndelo ya Yesoni, mpe bato ba ye bazalaki na mandoki ma mipanga, mpe ma nsendo, mpe ndenge inso ya mandoki.

19 Mpe emonoki mampinga ma Balamani ete bato ba Nefi, to ete Moloni, alengeleki bato ba ye na ebende ya ntolo mpe na nguba ya loboko, iyo, mpe lisusu nguba ya kobatela mito mya bango, mpe lisusu balataki bilamba bya mbinga—

20 Sikawa limpinga lya Zelayemina lilengelemeki te na eloko yoko ya lolenge loye; bazalaki bobele na mipanga mya bango, mpe nsendo ya bango, matimbo ma bango mpe makula ma bango, mabanga ma bango mpe bilingongo bya bango; mpe bazalaki bolumbu, longola se soko ezalaki mposo yoko eye ezingamaki penepene na nketo ya bango; iyo, bango banso bazalaki bolumbu, longola se soko ezalaki Bazolami mpe Baamaleki;

21 Kasi balataki te mandoki ma ebende ya ntolo, to nguba te—yango wana, babangaki mpenza mampinga ma Banefi na ntina ya ebundele ya bango, ata motango mwa bango kozalaka boye mingi koleka Banefi.

22 Tala, sikawa esalemaki ete bamekaki te koya kobunda na Banefi o ndelo ya Yesoni; yango wana bakendeki libanda lya mboka ya Ationumi o kati ya esobe, mpe bakamataki mobembo mwa bango zingazinga mpembeni o esobe, mosika penepene na moto bwa ebale ya Sidoni, ete bakoka koya o mboka ya Mati mpe bakamata mboka; mpo babanzaki te ete mampinga ma Moloni bakoyeba wapi bakendeki.

23 Kasi esalemaki ete, sasaipi lokola bakendeki o kati ya esobe Moloni atindaki banongi o kati ya esobe mpo ya kokengele nganda ya bango; mpe Moloni, lisusu, koyebaka mabikuli ma Alama, atindaki boko bato epai ya ye, kozalaka na mposa ete atuna na Nkolo wapi mampinga ma Banefi basengelaki kokende mpo ya komibatela na Balamani.

24 Mpe esalemaki ete liloba lya Nkolo liyaki epai ya Alama, mpe Alama ayebisaki bantoma ba Moloni, ete mampinga ma Balamani bazali kotambolaka zingazinga mpembeni o esobe, ete bakoka koya likolo o kati ya mboka ya Mati, ete bakoka kobanda etumba likolo lya eteni eleki petepete ya bato. Mpe bantoma bana bakendeki mpe bapesaki nsango epai ya Moloni.

25 Sikawa Moloni, kotikaka eteni yoko ya limpinga lya ye o mboka ya Yesoni, mbele o yoko nzela eteni yoko ya Balamani eya o kati ya mboka mpe ekamata engumba, akamataki eteni etikalaki ya limpinga lya ye mpe atambolaki likolo o kati ya mboka ya Mati.

26 Mpe asalaki ete bato banso o ntaka ena ya mboka basangana bangomei elongo mpo ya etumba na Balamani, mpo ya kobatela mboka mpe ekolo, makoki ma bango mpe lipanda lya bango; yango wana balengeleki mpo ya ntango ya boyei bwa Balamani.

27 Mpe esalemaki ete Moloni asalaki ete limpinga lya ye libombama o lobwaku loye lozalaki penepene na libongo lya ebale Sidoni, liye lizalaki o westi ya ebale Sidoni o esobe.

28 Mpe Moloni atiaki banongi zingazinga mpembeni, ete akoka koyeba ntango mampinga ma Lamani makoya.

29 Mpe sikawa, lokola Moloni ayebaki likanisi lya Balamani, ete ezalaki na likanisi lya bango kobebisa bandeko ba bango, to koyangela mpe komeme bango o kati ya bowumbu ete bakoka kotia bokonzi boko mpo ya bangomei likolo lya mboka mobimba;

30 Mpe lisusu lokola ayebaki ete ezalaki bobele mposa ya Banefi kobatela mboka ya bango, mpe lipanda lya bango, mpe eklezia ya bango, yango wana akanisaki yango lisumu te ete abatela bango na angele; yango wana, ayebaki na banongi ba ye nzela Balamani basengelaki kokamata.

31 Yango wana, akabolaki limpinga lya ye mpe amemeki eteni yoko likolo o kati ya lobwaku, mpe abombaki bango o esti, mpe o sudi ya ngomba patalalu Lipila;

32 Mpe etikali abombaki o lobwaku la westi, o westi ya ebale Sidoni, mpe boye o nse ya ndelo ya mboka Mati.

33 Mpe boye etiaki ye limpinga lya ye engebene na mposa ya ye, alengeleki mpo ya kokutana na bango.

34 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki o nordi ya ngomba patalalu, wapi eteni yoko ya limpinga lya Moloni libombamaki.

35 Mpe lokola Balamani balekaka ngomba patalalu Lipila, mpe bayaki o kati ya lobwaku, mpe babandaki kokatisa ebale Sidoni, limpinga liye libombamaki o sudi ya ngomba patalalu, baye bakambemaki na moto moko oyo ya ye nkombo ezalaki Lehi, mpe akambaki limpinga lya ye liboso mpe azingaki Balamani penepene o esti o nsima ya bango.

36 Mpe esalemaki ete Balamani, emonoki bango Banefi koyaka likolo lya bango o nsima ya bango, babalukaki mpe babandaki kowela na limpinga lya Lehi.

37 Mpe mosala mwa liwa mobandaki o ngambo ibale, kasi ezalaki nsomo mingi koleka epai ya Balamani, mpo bolumbu bwa bango boyambisaki bango mabete ma bozito ma Banefi na mipanga mya bango mpe nsendo ya bango, iye imemeki liwa penepene ma lobete lonso.

38 Ntango o ngambo esusu, ezalaki ntango na ntango moto moko akweyaki o ntei ya Banefi, na mipanga mpe bobungisi makila ma bango, ezipamaki bango o bisika bileki na bomoi bwa nzoto, to bisika bileki na bomoi bwa nzoto bizipamaki na mabete ma Balamani, na bibende bya ntolo bya bango, mpe nguba ya loboko la bango, mpe bibende bya mito bya bango; mpe boye Banefi bamemeki mosala mwa liwa o ntei ya Balamani.

39 Mpe esalemaki ete Balamani bakomaki kobanga, na ntina ya bobebisami bonene o ntei ya bango, kutu kina babandaki kokima ona ebale ya Sidoni.

40 Mpe balandamaki na Lehi mpe bato ba ye; mpe babenganamaki na Lehi o mai ma Sidoni, mpe bakatisaki mai ma Sidoni. Mpe Lehi atelemisaki mampinga ma ye likolo lya libongo lya ebale ya Sidoni ete bakatisa te.

41 Mpe esalemaki ete Moloni mpe limpinga lya ye bakutanaki na Balamani o lobwaku, o ngambo esusu ya ebale Sidoni, mpe babandaki kokweya likolo lya bango mpe koboma bango.

42 Mpe Balamani bakimaki lisusu liboso lya bango, bakendeki ona mboka ya Mati; mpe bakutanaki lisusu na mampinga ma Moloni.

43 Sikawa o likambo liye Balamani babundaki mpenza; iyo, mokolo moko te eyebanaki Balamani kobunda na makasi manene mpe mpiko mpenza ya lolenge loye, te, te kutu uta o ebandeli.

44 Mpe bafulamaki na Bazolami mpe Baamaleki, baye bazalaki bakapiteni bakonzi mpe bakambi ba bango, mpe Zelayemina, oyo azalaki kapiteni mokonzi, to mokambi mokonzi mpe komanda wa bango; iyo, babundaki lokola badalagona, mpe mingi ya Banefi babomamaki na maboko ma bango, iyo, mpo babukaki na biteni bibale mingi ya bibende bya mito bya bango, mpe batobolaki mingi ya bibende bya ntolo bya bango, mpe babukaki mingi ya maboko ma bango; mpe boye Balamani babukaki na nkanda ekasi ya bango.

45 Nzokande, Banefi bafulamaki na ntina eleki elamu, mpo bazalaki te kobundaka mpo ya bokonzi to nguya kasi bazalaki kobundaka mpo ya ndako ya bango mpe lipanda lya bango, basi ba bango mpe bana ba bango, mpe inso ya bango, iyo, mpo ya milulu mya bokumbami bwa bango mpe eklezia ya bango.

46 Mpe bazalaki kosalaka ena bayokaki ezalaki mokumba moye basengelaki na Nzambe wa bango; mpo Nkolo alobaka epai ya bango, mpe lisusu epai ya batata ba bango, ete: Mbala nzike lokola bozali na elindo te ya kobanda etumba ya yambo, mpe ya ibale, bokoyoka mpasi te ya kobomama na maboko ma bayini ba bino.

47 Mpe lisusu, Nkolo alobaki ete: bokobatela mabota ma bino kutu kina o bosopi makila. Yango wana mpo ya ntina eye Banefi bazalaki kowelaka na Balamani, mpo ya kobatela bangomei, mpe mabota ma bango, mpe mboka ya bango, ekolo ya bango, mpe makoki ma bango, mpe eyamba ya bango.

48 Mpe esalemaki ete emonoki bato ba Moloni nkele mpe nkanda ya Balamani, bakomaki penepene na kozonga nsima mpe kokima bango. Mpe Moloni, komonoko mokano mwa bango, atindaki mpe afulaki mitema mya bango na makanisi maye—iyo, makanisi ma mboka ya bango, lipanda lya bango, iyo, bonsomi bwa bango uta o bowumbu.

49 Mpe esalemaki ete babalukaki likolo lya Balamani, mpe bagangaki na mongongo moko epai ya Nkolo Nzambe wa bango, mpo ya lipanda lya bango mpe bonsomi bwa bango uta o bowumbu.

50 Mpe babandaki kotelemela Balamani na nguya; mpe na ngonga ena kaka eye babelelaki epai ya Nkolo mpo ya bonsomi bwa bango, Balamani babandaki kokima liboso lya bango; mpe bakimaki kutu o mai ma Sidoni.

51 Sikawa, Balamani bazalaki na motango monene mingi koleka, iyo, penepene mingi koleka mbala ibale motango mwa Banefi; nzokande, babenganamaki mpenza ete basangisamaki elongo o nzoto yoko o lobwaku, likolo lya libongo lya ebale ya Sidoni.

52 Yango wana mampinga ma Moloni mazingaki bango penepene, iyo, kutu o ngambo ibale ya ebale, mpo tala, o esti ezalaki bato ba Lehi.

53 Yango wana emonoki Zelayemina bato ba Lehi o esti ya ebale Sidoni, mpe mampinga ma Moloni o westi ya ebale Sidoni, ete bazingamaki penepene na Banefi, batondaki na nsomo.

54 Sikawa Moloni, emonoki ye nsomo ya bango, atindaki bato ba ye ete batika kosopaka makila ma bango.