Mopesi Lisalisi

Na Mokambi Henry B. Eyring

Mosungi ya Yambo na Bokambi ya Yambo


Henry B. Eyring
Bokolendisama mpe naino bokofulama mpo na koyeba ndelo mpe monene ya makoki na bino mpo na kosalisa

Natondi na botondi mpo na kozala elongo na bino na mpokwa ya lelo. Basi ba Eklezia ya Yesu Klisto bazali se kokende mpo na kokoma lingomba ya bandeko basi oyo mama ya Profeta Joseph Smith, Lucy Mack Smith, alimbolaki na maloba maye: “Tosengeli kolingana moko mpe mosusu, kokengelana moko mpe mosusu, kolendisana mpoko mpe mosusu mpe kozwa malakisi, ete tokoka banso kovanda esika moko na lola.”1

Biteni ezali misato na ndimbola oyo ya monene kolimbolaka makoki ya kosangana na ezalela moko ya esengo elongo na Nzambe. Moko ezali ya kosalisaka to kobatelaka moko mpe mosusu. Mosusu ezali ya koteyana. Mpe ya misato ezali ya kovanda elongo na Nzambe.

Ntina na ngai na mpokwa oyo ezali mpo na kosalisa bino boyoka longonia mpe matondi ma Nzambe mpo oyo nyonso bosili kosala mpo na kosalisa moko mpe mosusu kokokisa moango moye wana ya lokumu. Mpe, ntina ya mibale, kolimbola ndambu ya oyo esengeli koya kasi eye naino ten a mosala na bino na bomoko.

Lokola bandeko basi ya eleko yak ala, bosili koya na mbela ya Nkolo mpo na kosunga basusu. Na mobu 1856 profeta Brigham Young atunaki basantu kokende kopesa lisalisi na bapionie na makalo ya maboko oyo bakangamaki na mabanga ya mbula ya pemba na bangomba. Na ntango wana ya bokeleli alobelaki bandimi na likita linene ete: “Bondimi, eyamba, mpe misala ya eyamba na bino, ekobikisa soki moke te moko na bino kati na bokonzi ya likolo ya Nzambe na biso, longola se soki botii na misala mibeko lolenge miye nazali koteya bino sikawa. Bokende mpe bomema awa bato oyo wana bazwami na ngomba mpe bosalisa bango mpenza na bamposa na bango oyo tobengi ya ntango, … soki te bondimi na bino ekozala ya mpamba.”2

Basin a Utah bandimaki kokende nkama na nkama. Nas bobola na bango batondisaki makalo na nyonso bakokaki kokabola mpe nyonso bakokaki kosangisa uta na basusu mpo na kolendisa baye bazalaki na likama. Moko ya bilombe bandeko basi oyo akomaki, “Naino nayoka bosepeli te, to nakoki koloba, elengi na mosala moko te oyo nasalaka na bomoi na ngai, mpamba te bomoko ya makanisi elekaki nyonso.”3

Ntango babikisaki banso mpe mabanga ya mbula ya pembe enyangwakaki, ndeko mwasi se moko wana akomaki motuna ya motema na ye ya botongono ete: “Eloko nini oyo elandi oyo baton a bolingi ya kosala bakoki kosala?”4

Na ntango na biso, mangomba ya bilombe bandeko basi bipai nyonso na mokili basili kobalusa bondimi na bango na misala na bisika nkama. Mpe bazali se kotuna motuna se moko wana mpo na eye etali mikolo mikoya nsima ya bomoi na bango ya mosala.

Moko na moko kati na bino azali se moko na esika se moko na mobembo na biso ya kozonga na bomoi ya seko. Boko bazali na mibu mingi ya mayele, mpe basusu bazali naino na ebandeli ya bomoi na bango ya kufa ya kozala bayekoli. Moko na moko azali se moko na lisolo ya bomoto na ye mpe ya mikakatano na ye. Kasi banso bozali bandeko basi mpe balingami bana ya basi ya Tata na biso na Lola, oyo ayebi mpe akengelaka moko moko na bino.

Oyo bosali malamu elongo na lolenge ya kokamwa ezali kolingana, komekengela, mpe kolendisa moko mpe mosusu. Nzalaki nzeneneke ya ekamwiseli wana ya biteni misato sanza moko kaka eleki ntango namonaki bino kosalisa ndeko moko ya mwasi. Lokola tata na ye, natondi bino mpe nalingi nazongisa matondi na ngai na Nzambe oyo akambaki motali mpe moteyi moko.

Mwana na biso ya mwasi Elizabeth, oyo afandaka na ekolo mosusu mpe azwami na ngonga ya ntango ekeseni mosika na biso, azalaki na ndako elongo na mwana na ye ya mwasi ya mibu misato. Mwana na ye mosusu azalaki na mposo na ye ya yambo na Gardienne. Elizabeth azalaki na zemi ya sanza motoba mpe kozelaka mbotama ya mwana na ye ya misato, oyo minganga balobaki akozala mwana mwasi mosusu. Mobali na ye, Joshua, azalaki mwa mosika na mosala na ye.

Emonaki ye ete makila ezalaki kobima ye mpe kobakisama mingi, ye abengaki mobali na ye na nzela ya singa. Ye mobali ayebisaki ye kobenga ambulance mpe ete akokuta na ye na lopitalo oyo ezwamaki na minute 20 uta ndako na ye. Liboso akoka kobenga ambulance, ayokaki moto kobeta na liboso ya ekuke.

Na ekuke asutukaki na komona moninga na ye mama motali mpe moteyi. Bazalaki na elaka te na ntongo wana. Moninga na ye ayaokaki kaka ete esengeli aya kotala Elizabeth.

Ye asalisakai Elizabeth kokota na motuka. Bango bakomaki na lopitalo mwa minuti liboso ete Joshua akoma uta na mosala na ye. Minuti 20 ekakaki te, dokotolo azwaki mokano ya kobimisa mwana na lipase mpo na kobikisa Elizabeth mpe mwana na ye. Boye mwana abotami sika ya moke mpenza ayaki na mokili kogangaka makasi, minuti 15 liboso ya ntango etangamaki. Kilo na ye bagrami 765. Kasi azalaki na bomoi, Elizabeth mpe lokola.

Maloba ya Lucy Mack Smith ekokisamaki ndambu mokola wana. Mondimi moko ya Lingomba ya Bamama Basungi, kotindama na Molimo Mosantu, akengelaki, alingaki, mpe alendisaki moninga na ye na bokonzi ya Nzambe. Ye mpe nkoto zomi ya bankoto ya basi mosusu oyo bapesa lisalisi efulami na molimo ya lolenge wana nkola na nkola azwaki bobele matondi ya baoyo balingaki te kasi mpe lisusu maye ya Nkolo.

Bomikundola maloba na Ye ya botondi epai na baoyo bazwaka botondi ya mabele se moke ya mawa na bango ya mokili ete: “Kasi Mokonzi akozongisela bango: Nalobi na bino ya solo, mbala nyonso bosalaki yango ata na moto moko na kati ya bandeko na ngai oyo ya mike, boyeba ete bosalaki yango na ngai.”5

Kasi likamwisi na ndeko ya mwasi moko ya Lingomba ya Bamama Basungi koyaka kosalisa na ngonga yango mpenza ebakisami na nzela ya nguya ya bomoko ya lingomba ya bandeko basi. Oyo ezali kaka ndambu ya etinda oyo episikopo ya Elizabeth atindelaki Elizabeth mpe Joshua na lopitalo mwa bangonga nsima mbotama ya mwana: “Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi azali kokomba nyonso malamu. Tosili kosala moango ya mikolo ya nsima mpo na kosalisa bana na yo ya basi na ndako boye Elizabeth akoki kokendeka mpe kozonga lopitalo ntango mwana ayebani nkombo te wana ya bonzenga akotikala kuna. Tosalaka yango liboso, kala mingi, mpe bato [na biso] bazali se kozela libaku”

Episikopo akobaki koloba, kolobaka mpo na ye moko mpe mpo na palwasi ete: “Toyaka nkutu na lopitalo mpe tovandaki na bana mike na ndako ya kosakana ntango bana balingaki te kotika bango epai mosusu.”

Mpe nsima: “Tokokisa moango na biso te, solo mpenza, na kozangaka kosala elongo mpe bondimami na yo. Tolingaki kaka koyebisa yo ete komitungisa te mpo na ntina ya makambo tokoki [mpe tokokoa] kosala.”

Oyo basalaki mpo na mwana na ngai ya mwasi esalisaki ye kozwa ntango moko ya motuya na mwana na yeya mwasi ya moke ntango asimbaki ye mbala ya liboso.

Mpe boye episikopo asukisaki etinda na ye epai ya Joshua mpe Elizabeth na oyo bandeko basi bapanzaki nsango ya mokano na bango epai nyonso na mokili mpo na kosalisa basusu mpo na Moteyi: “Batela bondimi.”

Na bokeseni na bino nyonso na bisika bozwami mpe na makambo bokutanaka na yango, nakoki koyebisa bino eloko moko na oyo ezali kozela bino liboso. Wana ezali bino kobatela bondimi, bokomimona bobiangami mbala na mbala na Nkolo mpe lisusu kosalisaka moto mosusu na mposa ya lisungi ntango elongobani te. Ekoki komonana lokola mosala moko ya mpasi mpe oyo ekoki kosalema te. Ntango ekoya libiangi, ekoki te komonana ete bazali na mposa na yo te to ete moto mosusu apesa lisalisi na pete nyonso.

Bomikundola ete ntango Nkolo apesi biso nzela ya kokutana na moto oyo azali na mpasi, topeska lokumu na Mosamalia malamu mpo na oyo asalaki te kasi mingi mpe mpo na oyo asalaki. Ye alekaki te mpembeni atako moleki nzela oyo babetaki na balabala azalaki mopaya mpe mbele monguna. Asalaki nini akokaki kosala mpo na moto babetaki mpe nsima atiaki moango songolo mpo ete basusu basala mingi koleka. Ye asalaki eye wana mpo asosolaki ete kosalisa ekoki kosenga mingi koleka oyo moto moko akoki kosala.

Mateya kati na lisolo oyo ekoki kokamba bino na manso mazali kozela bino na mikolo ya nsima. Mateya oyo ezalaki pene ya kosalela na bomwana na bino moko mpe na maye bokutani na yango kala mingi te awa.

Ata mbala moko, mpe mbele mbala mingi, bosutukaki ntango bokutanaki na moto moko oyo azalaki na mposa ya lisalisi. Ekokaki kozala moboti, tata to mama nkoko, ndeko ya mwasi, to mwana moke oyo abetami na bokono to eleme. Mpo na bomoi oyo ezali na likama mayoki na bino ya mawa etangami koleka mposa na bino ya bomoto. Boye, bino bandaka kopesa lisalisi.

Lokola moleki nzela oyo na lisolo ya Mosamalia malamu kati na makomi, emonani lokola ete lisalisi asengelaki ebalukaki na lisalisi ya ntango molai oyo bokoki kopesa se moto moko te. Mosamalia asengelaki kotika moleki nzela wana na lisalisi ya mobateli ndako ya bapaya. Kosalisa basusu bato mingi ezali yoko eteni ya moango ya Nkolo.

Baepisikopo mpe bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi babenga ntango nyonso bato ya libota kosalisana ntango mposa ezali. Ezali na bantina mingi mpo ya kosalela libongisi. Ntina ya monene koleka nyonso ezali mpo na kopesa na bato mingi lipamboli eyikisami ya bolingo oyo eyaka uta na kosalisana.

Bosili komona mpe koyoka lipamboli yango. Ntango nyonso bosalisi moto ata mpo na mwa ntango moke bosilaki koyoka bolingo ya moto basalisaki. Lokola ntango ya kopesa lisalisi ekomaka molai, mayoki ya bolingo mpe ebakisamaki.

Lokola tozali bato ya kufa, kobakisama wana ya bolingo ekoki kosukisama na bosisoi mpe bolembi. Oyo ezali ntina mosusu Nkolo atikaki biso koyoka mposa ya lisalisi ya basusu na lisalisi na biso epai ya bato bazali na mposa. Yango wana Nkolo akelaki mangomba ma bapesi lisalisi.

Mwa bamposo eleki nazalaki wana ntango elenge mwasi moko atelemaki mpo ya kosungama na likita ya elambo lokola kolodinatele mosungi na mateya ya bamam batali mpe bateyi, mosala oyo nayebaki te ete ezalaka. Namitunaki soki ayebi nini ntako Nkolo afutaki ye. Mpo ete atungisamaka ntango nyonso na nwana, ye abimaki liboso ya nsuka ya likita na kozangaka kopesa ngai ntango ya koyebisa ye boniboni Nkolo akolinga mpe akotonda ye mpo na lisalisi na ye mpo na ntina ya kosangisaka makasi masalemi na bayekoli na Ye.

Kosalisa basusu oyo bazali na mposa esengaka bato mingi,lingomba ya bolingo mpe ya bomoko. Yango oyo Nkolo azali kotoinga o neti na bino. Alingi bino mpo na mosala nyonso bozali kosala.

Moko ya bilembo ya solo ya botondi na Ye ezali ete Nzambe akopesa bino nzela ya koyoka kobakisama ya bolingo mpo nab aye bozali kosalisa. Tala ntina nini bolelaka na liwa ya moto basalisaki mpo na ntango molai. Kobungisaka libaku ya kosalisa bango ekoki koyokama lokola kobungisa eloko moko ya monene koleka bokabwani ya mwa ntango moke. Nayokaki mwasi moko—oyo nayebaki kala—mwa mikolo sikasikawa, mposo oyo mobali na ye akufaki kopesa litatoli ya botondi ayokaki mpo na kosalisaka ye kino nsuka mpenza ya bomoi na ye. Mpinzoli ekokaki komonana te, kasi bipwepwe na ye ya esengo ezalaki komonana.

Atako kosalisa bato ntango molai mpe na bolingo ezali na lifuta monene, boisili koyekola ete ezali na bandelo ya nzoto, ya motema, mpe ya misolo na nyonso oyo tokoki kosala. Moto oyo azali kosalisa mpo na ntango molai akoki kokoma moto oyo azaloi na mposa ya lisalisi.

Nkolo oyo azali mopesi Molakisi mpe Mopesi ya banso oyo bazali bakeleli, apesaki toli efulama na bapesi lisalisi oyo basili kolemba na maloba maye malobamaki na Mokonzi Benyamina mpe makomama na Buku ya Mormon ete: “Mpo na ntina ya kokangaka bolimbisi bwa masumu ma bino ---Nalingi ete bokabaka ndambo ya biloko bya bino na babola, moto na moto engebene na oyo azali na yango, lokola koleisaka oyo azali na nzala, kolatisaka oyo azali bolumbu, kokendaka kotala bakoni mpe kokabolaka mpo na bobondisi bwa bango, ezala na molimo mpe na nzoto mpe lokola, engebene na bamposa ya bango.” 6

Kasi boye akobaki kokebisa baye kati na bino oyo bazangi kopesa koesa eyano na mbela elembo ya bosolo ete bozali kokoba kokende mosika mpe kowumela na lisalisi na binbo ya bolingo ete: “Mpe keba ete makambo maye manso masalema na bwania mpe na molongo; mpo esengeli te ete moto [to mopesi lisalisi] akima mbangu koleka makasi azali na yango. Mpe lisusu, elongobani ete azala na etingia, ete na yango akoka kolonga mbano; boye, makambo manso masengeli kosalema na molongo.”7

Toli wana ekoki kozala ya mpasi mpo na kosalela ntango ozali kotala malamu bokatikati ya mposa na yo ya kasala manso mpo na kosalisa basusu mpe bwania ya kozala ekenge mpo na kokokisa mposa na yo moko mpe kokanga nguya nay o ya kosalisa. Osili komona basusu kobundaka na boponi ya lolenge wana ya mpasi. Yoko ndakisa ezali boponi ya kosalisa moto moko oyo kani bomoi ebelemi na nsuka na ndako na bino moko to kotika ye na ndako ya lisalisi na yo ntango ekoki kozala ete osili kolemba mpenza.

Oyo boyebi na ntina ya moango mwa lobiko ekoki kozala eloko oyo ezali kokamba yo ntasngo ya boponi ya mpasi ya lolenge wana. Tala moko ya ntina nini Lucy Mack Smith alobaki na bwania nyonso ete bandeko basi basengeli “kozwa malakisi na boyekoli.”

Esalisaka mingi kozala na elikya ya solo mpo na ntina ya Nkolo mpo na mwana nyonso ya Nzambe oyo azali ntango ya mpasi ya bomoi oyo ya kufa. Ye ateyaki lolenge ya mozindo mpenza ya moango mwa lobiko epai ya Profeta Joseph na lolenge oyo ete abundaki kososola eye emonanaki lokola mikakatano mizanga nsuka ete: “Mpe soki otieli yango molende malamu, Nzambe na likolo akonetola yo.”8

Boponi na biso mpo ya kosalisa malamu moto moko oyo azali kosalisa mosusu o nzela ya mimekano makasi ekomi boye “Nini nzela nasengeli kolanda oyo ekosalisa na lolenge ya malamu koleka nyonso moto nazali kolinga mpo na ‘kotia molende malamu’?” Ntina na biso ya kopesa lisalisi ezali mpo na biso kosala ete ye asalela bondimi na Klisto, babatela elikya ya bongengi mpo na bomoi ya seko, mpe kosalela bolingani, bolingo ya peto ya Klisto, kino na nsuka ya bomoi na ye.

Nasili komona bandeko basi na bokonzi kotiamayele na bango nyonso na Mobikisi mpe na ntina na Ye. Kanisa ntango okotaki na ndako ya makita wapi nsima ya Lingomba ya Bamama Basungi to Bana ya Primaire to Bilenge basi basangani.

Elili ya Mobikisi to maloba na Ye ekoki kozala mpenza elembo ya bosolo te, kasi boyebi bato oyo basimbama na litatoli ya bosolo mpe motuya ya Bomikabi na ngonga wana lokola ezalaki na mpokwa ya lelo. Elili ya tempelo to maloba “Mabota Makoki Kozala Seko,” ekoki kozala te, kasi bokoki komona elikya na bipwepwa na bango.

Mpe bosili komona, lokola ngai, Mama motali mpe moteyi ya bwania kotonga bolikii na ndeko mwasi oyo azali kobunda ete lisalisi na ye na moto mosusu, kutu lokola azali kokweya, esengeli kaka mpe ezali motuya. Bakambi banene ya Lingomba ya Bamama Basungi bazwaka banzela ya kotika baoyo basengeli lisalisi na lisalisi ya baye bazali kosalisa basusu. Bazali kokela mabaku mpo bandeko basi bayika mpiko na mimekano na bango malamu lokola basalisanaka na bolingo ya peto ya Klisto. Tokoki kotanga awa kotinda na boboto mopesi lisalisi oyo alembi kopema mpe kondima lisalisi ya basusu.

Bandeko basi bakoki kosaka yango na kosambisaka baye bazali na mimekano na lombango te. Bato mingi oyo bazali na mikumba ya kilo babandaka na ntembe mpo na bango moko mpe mpo na motuya na bango moko. Tokolembisa mikumba yango soki tozali na bompikiliki na bolembu bango mpe tokumisi bolamu nyonso oyo tomonaka kati na bango. Yango nde Nkolo asalaka. Mpe tokoki kolanda ndakisa na Ye—Ye mopesi lisalisi monene koleka ya banso.

Na Eklezia ya Yesu Klisto tolobelaka mbala mingi bokasi ya lingomba ya bandeko basi. Tosengeli koyekola kondima ete Mobikisi azali ntango nyonso na lingomba yango ntango tobiangi Ye.

Mingimingi, tokomona bana basi ya Nzambe kobianga bandeko basin a lingomba elongo na bango. Wana ezali bandeko basi koya na likita mpe koluka kiti ya kofanda, bayokaka maloba ya boboto kobimaka, “Nasengi yaka kofanda awa elongo na ngai.”

Tokoyoka maloba maye na mikolo ya nsima oyo Lucy Mack Smith amonaki na mosika ntango bandeko basi “bakofanda na lola elongo.” Tolengelaka te mokolo wana na ntango moko te. Ekoya na mikolo mpe mibu na kosalisaka moko mpe mosusu mpe kotika maloba ma bomoi ya seko na mozindo kati na mitema na biso.

Losambo na ngai ezali ete mingi na biso tokozala elongo na mokolo ya nsima ya nkembo oyo ezali liboso na biso. Napesi bino litatoli na ngai ete elikya na bino mpo na mokolo yango ekolongisama. Nkolo Yesu Klisto asali ete ekoka kosalema mpo na bino na nzelka ya Bomikabi na Ye ezanga ndelo. Tata na Lola ayokaka mpe ayanolaka nsambo na bino ya bondimi mpo na kokamba mpe kosalisa bino kotia molende na mosala na bino mpo na Ye.

Molimo Mosantu atindami epai na bino mpe epai ya baoyo bosalisaka. Bokolendisama mpe bokofulama naino mpo na koyeba ndelo mpe molai ya makoki na bino mpo na kosalisa. Molimo akolendisa bino ntango bokoki komituna, “Esali ngai na ndenge ekoki?”

Natatoli ete Nkolo akozala elongo na bino mpe ete nzela na bino ekolengelama mpe ekotiama bilembo mpo na bino na Ye na ntango bozali kosalisa baoyo Ye alingaka na bamposa mpe mimekano na bango. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Show References

    Matangi

  1.  

    1 Lucy Mack Smith, naDaughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 25.

  2.  

    2. Brigham Young, naDaughters in My Kingdom, 36.

  3.  

    3. Lucy Meserve Smith, naDaughters in My Kingdom, 37.

  4.  

    4. Lucy Meserve Smith, na Daughters in My Kingdom, 37.

  5.  

    5.  Matai 25:40.

  6.  

    6.  Moziya 4:26.

  7.  

    7.  Mosiah 4:27.

  8.  

    8.  Doctrine et Alliances 121:8.