Nkolo Abosani Yo te

Na Linda S. Reeves

Mosungi ya Mibale na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.


Linda S. Reeves
Tata na biso mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, bayebi biso mpe balingi biso… Tokoki koyoka bolingo mpe mawa na Bango na mpasi na biso.

Ntango tozwi libaku ya kokutana na bandeko basi nzinganzinga ya mokili, tokamwi bokasi ya matatoli mpe bomipesi na mayokani oyo bosali elongo na Tata wa bino na Lola. Mingi kati na bino bazali nkola-ya-yambo to ya-mibale-ya Eklezia. Tozali komona bandeko basi ebele kosalaka na mabiangi ebele, kokendaka mibembo milai mpo na kokota na eklezia, mpe komibonzaka mpo na kosala mpe kobatela mayokani ya bule ya templo. Tokumisi bino mpe totondi bino mpo na bandakisa ya botongono. Bozali bapionie-ya Nkolo-ya ntango ya lelo!

Kala te mobali na ngai, Mel, mpe ngai tokutanaki na mokambi ya mobembo moko na nkombo Molly Lenthal ntango tozalaki kotala musée moko na Australie. Tososolaki ete Mollie, mwasi ya kitoko ya bamibu 70, azalaki na bana te mpe atikalaki kobala te. Azali mwana se ye moko, mpe baboti na ye bakufaki mibu mingi mileki. Baye libota na ye ya penepene mingi bazalaki bandeko babali mibale baye bafandaka na mokili mosusu. Na mbala moko, natondisamaki na mawa na Molimo kotatolaka na ngai, penepene lokola soki Tata na Lola azalaki koloba: “Molly azali te ye moko! Molly azali mwana na ngai ya mwasi! Nazali Tata na ye! Azali mwana mwasi ya motuya mpenza na libota na ngai, azaliata moke te ye moko!

Moko ya masolo na ngai nalingaka uta na bomoi ya Mobikisi ezali lisolo ya Lasalo. Makomi elobi na biso ete “Yesu alingaki Malata, … ndeko mwasi na ye [Malia], mpe [ndeko mobali na bango] Lasalo.” 1 Liloba etindamaki epai ya Yesu ete Lasalo abelaki malali makasi, kasi Yesu ayaki na mbala moko te; Atikalaki mosika mikolo mibale mosusu , kolabaka ete “kobela oyo ejali … mpo na nkembo na Njambe ete Mwana na Njambe akumisama na yango.”2

Koyokaka ete Yesu azalaki koya, Malata “akei kozuana na ye,”3 koyebisaki ye maye masalemaka. Lasalo asilaka “kolala mikolo minei kati na liyita.”4 Koyokaka mawa, Malata azongaki mbangu na ndako na ye koyebisa Malia ete Nkolo ayaka.5 Na mokumba ya mawa, malia akimaki epai ya Yesu, akweyaki na makolo na Ye, mpe alelaki.6

Tolobelami ete “Emoni Yesu ete [Malia] ajalaki kolela mpe Bayuda baoyo bajalaki na ye elongo bajalaki kolela, ayoki mawa na motema mpe amitungisi,”mpe atunaki balalisaki ye wapi.

“Balobi na ye ete, yaka kotala, Motei.”7

Nde totangi boko maloba ya mawa koleka nyonso, ya bolingo kati na likomi: “Yesu atangisi mpisoli.” 8

Kolimbolaka misala ya Yesu, Apostolo James E. TAlamage akomaki ete: “bomoni ya basi babale kotondisama na mpasi makasi, mpe ya bato kolelaka makasi elongo na bango, esalaki ete Yesu ayoka mawa [elongo na bango], yango wana ayokaki mawa na motema mpe amitungisaki makasi.” 9 Likambo oyo epesi litatoli na ntina ya mawa, ngolu, mpe bolingo oyo Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe Tata wa biso na Lola ayokaka mpo na moko na moko na biso ntango nyonso tomemisami mokumba ya bobangi, lisumu, bonguna, mpe bolozi ya bomoi.

Bandeko basi balingami,Tata na biso mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, bayebi biso mpe balingi biso. Bayebi ntango nini tozali na mpasi to tozali koniokwama na lolenge kani. Batelemaka te kaka mpo na koloba, “Ezali malamu ete ozali na mpasi sikawa, mpo nokinoki makambo nyonso ekokoma malamu. Okobikisama, to molongani na yo akozwa mosala , to mwana na yo ya bitambolatambola akozonga malamu.” Bayokaka mozindo ya mpasi na biso, mpe tokoki koyoka bolingo mpe mawa na Bango na mpasi na biso.

Alama atatolaki ete:

“Mpe akokende, akoyoka mpasi ya bolozi mpe matungisi mpe masenginia ma lolenge na lolenge; mpe eye ete liloba likoka kokokisama liye lilobi akokamata likolo lya ye bolozi mpe bokono bwa bato na ye.

Mpe, akokamata likolo lya ye …bokono bwa bango, ete nsopo ya ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba ete akoka koyeba… boniboni kosalisa bato ba ye engebene na bokono bwa bango.” 10

Ntango tozali kokamwa soki Mobikisi ayebi biso mpe Tata wa biso na Lola to boniboni malamu Bayebi biso moto na moto, tosengeli komikundola maloba ya Mobikisi epai ya Cowdery:

“Soki ozali na mposa ya nzenenekene mosusu, zongisa mayele na yo na butu oyo obelelaki ngai na motema, mpo ete okaka koyeba oyo etali makambo oyo.” 11

Liboso Mobikisi alobaki ete “ezali na moko te longola se Nzambe oyo ayemi makanisi mpe bamposa ya motema.”12

Mobikisi akundolisaki Oliver ete Ye ayebaki makambo nyonso ya losambo ya limbondeli wana—mpe amikundolaki—ntango yango mpenza, butu yango.

Mibu mingi kala molongani na ngai abelaki malali makasi ya bokono ya momesano te. Wana bamposo ezali koleka mpe azali ye kokoma ya bokono makasi, mingi nakomaki kondima ete azalaki kokufa. Nayebisaki moto moko te na oyo etali bobangi na ngai. Tozalaki na libota monene, ya sika mpe libala moko ya bolingo, mpe likanisi ya kobungisaka molongani na ngai mpe kobokolaka bana na ngai ngaimei etondisaki ngai na bomoko, bozangi elikia, mpe kutu na nkanda. Nayebaki te nini nasala. Nazali na nsoni mpo na koloba ete nakomaki mosika uta na Tata na Lola. Na mikolo mingi natikaki kosambela; Natikaki kosalaka mwango; nalelaki. Na nsuka nayaki kososola ete nakokaki te kosala yango ngai moko.

Mpo na mbala liboso na mikolo mingi, nazalaki kofukama mpe nafungolaki motema na ngai na Tata wa ngai na Lola, kosengaka bolimbisi mpo nabalukaki mosika uta na Ye, kolobelaka Ye mayoki na ngai ya makasi nyonso, mpe na nsuka kolobaka ete nakosala oyo alingi ngai nasala. Soki oyo ezalaki eloko Alingaki ngai nasala, nakosala yango. Nayebaki ete Azalaki na mwango mpo na bamoi na biso.

Wana ezalaki ngai kokoba kofukama mpo na kofungola motema na ngai, liyoki ya kitoko mpenza, ya kimia mpenza, ya bolingo eyaki likolo na ngai. Ezalaki pene lokola soki nazalaki koyoka Tata na Lola koyebaka, “Wana ezalaki manso maye nazaki na mposa ya koyeba.” Nabaki mokolo moko nakobaluka mosika na Ye lisusu.Moke moke mpe na kokamwa mobali na ngai abandaki kokoma malamu kino ayokaki malamu.

Nsima ya mibu molongani na ngai mpe ngai tofukamaki na mopanzi ya mwana na biso ya mwasi-ya-mibu 17 mpe tobondelaki mpo na bomoi na ye. Mbala oyo eyano ezalaki te, kasi liyoki ya bolingo mpe kimia oyo Mobikisi na biso alakaki ezalaki kaka makasi, mpe toyebaki ete atako Tata na Lola azalaki kobianga ye azonga ndako, makambo nyonso ekozala malamu. Toyaki koyeba nini elingi koloba kokitisa mokumba na biso epai ya Nkolo, mpo na koyeba ete ete alingaka biso, mpe ayokelaka biso ngolu kati na mawa mpe bolozi na biso.

Moko ya bangonga kitoko ya tata-na-mwana na Buku ya Mormon ezali litatoli ya Alama Elenge epai ya mwana na ye Elamani. Alama alimbolaki “nsomo ya kolimbolama te” ayokaki lokola akanisaki kokendeke na miso ya Nzambe mpo na kosambisama na masumu na ye mingi. Nsima ya koyokaka bozito ya masumu na ye nyonso na mikolo mpe butu misato, ayambolaki mpe abondelaki Mobikisi azala na mawa likolo na ye. Alimbolaki na Elamani bosepeli ya komikundola bolozi na ye “lisusu te “eluti ndelo mpe sukali.” Esika ya koyokaka “nsomo ya kolimbolama te” na likanisi ya koyaka liboso ya ngbende ya Nzambe, Alama amonaki limoni ya “Nzambe kofandaka likolo lya kiti ya ye” mpe asakolaki ete, “mpe molimo mwa ngai mozalaki na mposa mpenza ya kozala kuna” 13

Ezali boye te lolenge toyokaka, bandeko na ngai balingami basi, wana ezali biso koyambola mpe kotala bolingo, ngolu, mpe botondi tozali koyoka mpo na Tata wa biso na Lola mpe Mobikisi na biso—ete biso lokola “tozali na mposa ya kozala kuna,” mpo na koyambama na maboko na bango ya bolingo mbala moko lisusu?

Bobele lokola Nkolo atatoli na ngai ete Ye abosani te mwana na ye ya mwasi ya motuya Molly Lenthal, natatoli ete Ye abosani yo te! Ata lisumu to botau to bolozi nini ozali na yango, ata momekano to etumba nini ozali kokutana na yango. Ye ayebi mpe asosolaka bantango wana mpenza. Alingaka yo! Mpe akosalisa yo na bantango wana, kaka lokola Ye aslaki na malia mpe malata. Afuti talo mpo Ye akoki koyeba boniboni kosalisa yo. Kitisa mikumba na yo likolo na Ye. Yebisa Tata wa yo na lola lolenge nini ozali koyoka. Yebisa ye na ntina ya bolozi mpe matungisi mpe nsima yango na Ye. Luka na makomi mokolo na mokolo. Kuna okokuta lisusu kimia mpe lisalisi.

Mobikisi na biso atunaki:

“Mpo ekoki mwasi kobosana wa ye mwana ameleke, ete ayoka ngolu te likolo lya mwana mobali ya libumu lya ye? Iyo, bakoki kobosana, kasi nakosana yo te. …

“…Tala nakati yo likolo lya biengedi bya maboko ma ngai.” 14

“Natindi ete moko te ya bino, alongwa, kasi kutu natindi ete boya epai ya ngai, ete boyoka kosimba mpe bomono; kutu boye ekosala bino epai ya mokili.” 15

Wana ezali lotomo na biso. Tosengeli koyoka mpe komona mpo na bisomei nsima kosalisa bana ya Nzambe nyonso bayoka mpe bamona ete Ye azwi likolo na Yemei kaka se masumu na biso te kasi bolozi na biso mpe matungisi na biso mpo ete Ye akoka koyeba maye toyokaka mpe lolenge nini ya kobondisa biso. Natatoli na ntina na Ye na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

    Matangi

  1.  

    1  Yoane 11:5.

  2.  

    2  Yoane 11:4.

  3.  

    3  Yoane 11:20.

  4.  

    4  Yoane 11:17.

  5.  

    5 Tala Yoane 11:28.

  6.  

    6 Tala Yoane 11:32.

  7.  

    7  Yoane 11:33–34.

  8.  

    8  Yoane 11:35.

  9.  

    9 James E. Talmage, Jesus the Christ, 3rd ed. (1916), 493.

  10.  

    10  Alama 7:11–12.

  11.  

    11  Doctrine et Alliances 6:22.

  12.  

    12  Doctrine et Alliances 6:16.

  13.  

    13 Tala Alama 36:14–22; mongwa ebakisami.

  14.  

    14  1 Nefi 21:15–16.

  15.  

    15  3 Nefi 18:25; mongua ebakisami.