Kolamuka na Mokumba na Biso

Na Carole M. Stephens

Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi


Carole M. Stephens
Tosengeli kozala ya kolamuka na mokumba na biso mpe kokoba na bondimi wana ezali biso kobendana na nguya ya Bomikabi oyo ebondisaka , elendisaka, ekokisaka, mpe ebikisaka.

Nsima ya libiangi na ngai na bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, nayokaki mposa ya koyeba mingi mpo na oyo etali basi baye basalaki liboso na ngai na libiangi oyo ya bule. Nafulamaki na mateya ya Ndeko mwasi Zina  D. Young, oyo asalaki lokola mosungi ya yambo na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. Alobaki, “Bandeko basi, ezali mpo na biso kolamuka na mikumba na biso.”1 Namaniolaki maloba kolamuka mpe mokumbampe nasalaki mwa boluki ya kobakisa na makomi.

Na Boyokani ya Sika, Paulo ateyaki Basantu ya mikolo na ye ete:

“Bososola ntango ete ejali ntango na kolongwa na mpongi. Mpo ete kobika ebelemi na biso sasaipi, koleka . …”

Butu eumeli ntango molai …tolata bilamba na basoda ya moi.”2

Na Buku ya Mormon, Alma ateyaki bato ba ye mikumba ya bule ya baye bakoti na boyokani elongo na Nzambe:

“Mpe sikawa lokola bozali na mposa ya kokota o kati ya etonga ya Nzambe, mpe kobiangama bato ba ye, mpe bozali kondima komeme mikumba mya bino na bino, ete mikoka kozala polele;

“Iyo, mpe bozali kondima kolela elongo na baye bakolela; iyo, mpe kobondisa baye batelemi na mposa ya libondisi, mpe kotelema lokola banzeneneke ba Nzambe o ntango inso mpe o makambo manso, mpe o bisika binso ete bokoka kozala. …

“Sikawa nakoloba epai ya bino, soko eye ezali mposa ya mitema mya bino, nini ekopekisa bino bobatisama o nkombo ya Nkolo, lokola litatoli liboso lya ye ete bokoti o kati ya boyokani elongo na ye, ete bokosalela ye mpe bokobatela mitindo mya ye, ete akoka kosopa libanda molimo mwa ye mingi koleka likolo lya bino?

“Mpe sikawa, eyokaka bato maloba maye, babetaki maboko ma bango mpo ya bosepeli, mpe bagangaki: Eye ezali mposa ya mitema mya biso.”3

Liloba ya Ndeko mwasi mpe makomi esalaki ete namaniola “mikumba” na yango tosengeli kolamuka na mokolo mwa biso.

Ntango tobatisami, tokoti na boyokani moko. Mpaka Robert  D. Hales ateyaki, “Ntango tosali mpe tobateli mayokani, tozali kobima libanda ya mokili mpe tozali kotota na kati ya bokonzi ya Nzambe.”4

Tobongwami. Tokomi ya kokesana, mpe tosali na bokesani. Makambo toyoki mpe totangi mpe tolobi ezali ya bokesani, mpe nini tolati ezali ya bokesani mpamba te tokomi bana basi ba Nzambe bakangami na Ye na boyokani.

Ntango tokotisami tozwi likabo ya Molimo Mosantu, likoki mpo na kozala ntango inso na nguya ya moto moko ya Bonzambe mpo na kokamba biso, kobondisa biso, mpe kobatela biso. Ye akokebisa biso ntango tosenginiami kotambola mosika ya mayokani ma biso mpe kozonga na mokili. Mokambi Boyd K. Packer ateyi ete moko te na biso “akosala ata mokolo moko te mbeba na kozanga kokebisama na botindiki ya Molimo Mosantu.”5

Mpo na kozwa likabo oyo mpe ntango nyonso kozala na Molimo Mosantu elongo na biso, tosengeli kozala tolongobani mpe na bokengi etali kososolaka ezalela ya motema na biso. Motema na biso ezali pete? Tozali na motema ya komikitisa, motema ya koteyama, motema ya boboto? To motema na biso ekomi malembemalembe mpe mokemoke ya makasi ntango tokangi matoyi na biso na botindiki ya boboto oyo na ntembe te ewuti na Molimo? Ntango mosusu matoyi na biso ezalaki ya kofugwama, kasi topesaki ndingisa na makelele mingi ya mokili na kati mpe tokomaki mosika na liyoki ya maloba ya mongongo moke mwa kimia.

Ntango tobatisamaki, mitema na biso ebongwanaki mpe elamukaki na Nzambe. Ntango totamboli na mobembo ya bokufi, tosengeli mbala na mbala komituna, “ Soko [na]yoki mbongwana ekasi eye o mitema …soki [na]koki koyoka yango sikawa?”6 Mpe, soki te, nde ntina nini te?

Basantu mingi ya ebandeli “bayokaki mbongwana eye na mitema [na bango].”7 Elamusaki bango mpo na kozwa mapamboli ma tempelo mpo na kolendisa bango na kosala mikumba na bango. Basantu ba ebandeli na Nauvoo bakendeki “na tempelo mokolo mobimba mpe ntango molai na butu”8 mpo na kozwa makuli mpe kosala mayokani ma kobakisa liboso babanda mobembo na bongo epai ya westi.

Sarah Rich, ndeko mwasi ya Lingomba ya Bamama Basungi na Nauvoo, alobaki boye: “Mingi ezalaki mapamboli tozwaka na ndako ya Nkolo, oyo esalaki biso esengo mpe libondi na kati ya mawa mpe ekokisaki biso tozala na bondimi na Nzambe, koyebaka Ye alingaki kokamba biso mpe kosunga biso na mobembo ya koyeba te oyo ezalaki liboso na biso.”9

Na mitema mibongwana na nzela ya bondimi na Mobikisi, bayekamaki na nguya ya bolendisi mpe bokokisi ya Bomikabi na Ye. Balamusamaki mpo na kosala. Bayebaki mpe basosolaki na mozindo ya mitema na bango ete ezalaki na moko—Mobikisi—oyo asosolaki bokeseni na bangomei mpamba te Ye ayokaki mpasi na yango mpo na bango na Bilanga ya Getesemane mpe na ekulusu. Ye ayokaki bobangi na bango, ntembe na bango, mpasi na bango, mpe bomoko na bango. Ye ayokaki mpasi ya mawa na bango, monioko na bango, nzala na bango, bolembu na bango, mpe bozangi na bango. Mpe mpamba te Ye ayokaki makambo mana manso, Ye akokaki koloba na bango, “Boya liboso na ngai, bino yonso bojali kolemba na mosala, mpe bokumba bojito mpe nakopemisa bino.”10

Mpe bayaki. Balikiaki mpe balandaki profeta. Bayebaki mobembo elingaki kozala molai, mokumba na bango mpasi. Bayebaki ete libonza elingaki kosengama, kasi kosungamaka na bondimi na bango mpe kokangamaka na mayokani basalaka, balengelamaki na molimo.

Yambo ya kotika Nauvoo, liboke ya Basantu bakomaki nsango na efelo ya ndako ya Makita na tempelo basengelaki kotika na makasi. Ekomi, “Nkolo amoni libonza na biso: boya nsima na biso.”11

Kala te nasalaki elongo na botamboli moko ya bapionie elongo na bilenge mibali mpe bilenge basi na palwasi na biso. Ntongo na ntongo namitunaki, “Nini ezali libonza na ngai, Boniboni nakoya nsima na bango?”

Na mokolo ya mibale ya botamboli, tobendaki makalo na biso 13  km ntango tokomaki na esika moko ya nzela ebengemi “bobendi ya basi”. Na nse ya mwa ngomba, mibali mpe basi bakabwanaki mpe mibali bakendeki liboso likolo ya mwa ngomba. Ntango tobandaki kobenda makalo natalaki likolo mpe namonaki bandeko mibali ya bonganganzambe na biso, bilenge mpe bakolo, na molongo na ngambo mibale na nzela, bikoti balongolaki na limemia mpo na basi.

Nzela ezalaki pete na ebandeli, kasi noki tokomaki na zelo ya mozindo, mpe mwa ngomba ekomaki ya komata mpenza. Nakitisaki moto na nse mpe nazalaki kopusa na makasi na ngai nyonso ntango nayokaki bobendi na likalo mpe natalaki likolo mpo na kotala Lexi, moko ya bilenge basi mpe moto ya mpembeni na ngai. Atindikaki likalo na ye tii na nsonge mpe, komonaka mposa na biso mpo na lisalisi, akimaki nsima epai na biso. Tobundaki tii na nsonge mpe tobwakaki libaku. Nalingaki mingi mpenza kokima nsima mpo na kosalisa baye bazalaki kolanda ngai, kasi nayokaki mpema kilo, mpe motema na ngai ezalaki kebeta makasi mpenza, malobalikama ya mpasi ya motema ekotaki na motema na ngai mbala mingi koleka moko! Natalaki na botondi lokola bilenge basi babwakaki makalu na bango mpe bakimaki mpo na kosalisa basusu.

Esilisaki moto nyonso kokoma na nsonge, tokamataki mwa minuti mpo na kokoma mayoki na zulunale. Nakomaki: “Namilengelaki te malamu na nzoto yango wana nazalaki te na makasi mpo na kosalisa baye balandaki ngai. Nakokoka lisusu mokolo moko te kobenda likalo, kasi nalingi ata moke te kotika bandeko na ngai na molimo, ata moke te!”

Ezalaki likambo ya bule eye esalaki ngai nalamuka na molimo na mikumba na ngai oyo nazali na yango mpo na libota na ngai mpe basusu. Lokola nakobi na mobembo, namanioli nini nayekolaki mpe natalaki mpo na kosalela yango.

Yambo nakanisi bandeko ba ngai ya basi, bayebabandaka kobenda mpe baye bakobi lelo kobenda makalo na bango bango moko. Penepene na 23 na mokama ya basi na lingomba ya likako bazalaki bango moko. Boko babalaki te; basusu bazalaki bamama bazanga to basi bakufela mibali, kasi boko bakabwanaki mwa ntango na mibali na bango.12Babendaki banso elongo—bana basi ba boyokani, bilenge mpe mibange, na ezalela ya bomoi ya bokesani, na nzela se moko, na ntina se moko.

Baye bakimaki mpo na kosalisa bandeko ba bango basi na mposa bakundolisi ngai na ntina ya babikisi, ya komonana mpe ya komonana te lokola, baye bazali mbangu mpo na kotala, komona bozangi, mpe kosalisa.

Nakanisi maloba ma Nkolo: “Nakozala liboso ya elongi na yo. Nakozala na loboko na yo na mobali mpe na loboko na yo ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala na motema na yo, mpe banzelu na ngai nzinganzinga na yo, mpo na komeme yo.”13

Na molongo na ngambo mibale ya nzela ezalaki mibali ya botongono, ya botosi, ya kobatela boyokani. Nguya na bango ya bonganganzambe—nguya ya Nzambe esalelami mpo na kopambola bana banso ba Ye—kotombola, kolendisa, mpe kosunga biso. Bazalaki likundoli ya kolakisa na miso ete tozali ata moke te. Tokoki kozala na nguya oyo elongo na biso ntango nyonso ntango Tobateli mayokani na biso.

Nakanisi mibali oyo bakabwanaki na mobembo na mabota na bango, kotikaka bango kobenda makalo bango moko. Mibali mingi bakufaki na nzela. Ndambo ya bana mibali batikalaki nsima mpo na kosala misio na mabele na bangomei. Basusu bakendeki liboso liboso mpo na kolengela bokomi ya mabota na bango na Salt Lake Valley. Ndambo ya mibali bazalaki te na bolingi na bangomei, lokola baponaki te kobatela mayokani na bango.

Lokola baye bakendekI liboso, mingi bazali lelo na bizalela oyo ezali na nse ya oyo esengeli. Tokobi koteya mpe kobunda mpo na oyo esengeli mpamba te toyebi ete kokobaka na kobunda ekobatela biso na kokende liboso o ntaka ya nzela mpe ekolengela biso mpo mabaku makoya nsima mpo na kozwa mapamboli manso malakelami lokola tozali “kozela Nkolo.”14

Moko na moko ya biso azali mpe akokoba kozala na bokesani na bomoi na ye. Bomoi oyo ya kufa ezali ntango ya momekano, mpe tokokoba kozala na mabaku ya kosalela nguya na biso ya kopona nini tokoyekola na bokesani oyo ekoya na ntembe te.

Lokola bana basi ya Nzambe, tokobi na nzela na bondimi, mpamba te tondimi lokola Mokambi Thomas  Monson ateyaki: “Makuli ma lobiko mazwami na tempelo oyo epesi biso nzela mpo na mokolo moko kozonga na Tata wa biso ya Lola na mokangano moko ya libota ya seko mpe mpo na kopambolama na mapamboli mpe nguya uta na likolo esengeli mpo na libonza nyonso mpe bokasi nyonso.”15

Ekoki te kaka kozala na mobembo; tosengeli kolamuka na mokumba na biso mpe kokoba na bondimi lokola toyekami likolo ya nguya ya Bomikabi oyo ekobondisa, ekolendisa, ekokokisa, mpe ekobikisi.

Bandeko basi ba bolingo, nalingi bino. Nayebi te mingi ya bino moko na moko, kasi nayebi nani bozali! Tozali bana basi babateli boyokani na bokonzi na Ye, mpe tolatisami na nguya na nzela na mayokani, tolengelami mpo na kosala mokumba na biso.

Lingomba ya Bamama Basungi ekolengela basi mpo na mapamboli ya bomoi ya seko na kolamusaka biso na molimo mpo na kokolisa bondimi mpe bosembo ya moto na moto. Tika tobanda na bisomei. Tika tobanda lelo. Ntango tolamuki na molimo, tokokoka malamu mingi kolendisa mabota mpe ndako na biso mpe kosalisa basusu.

Oyo ezali mosala ya lobiko, mpe nguya ya Bomikabi oyo ekolendisaka mpe ekokokisaka esalalaka ete nyonso esalema. Tolamuka toyeba nani tozali. Tolamuka na mokumba na biso. Tozali bana basi ba Tata wa biso ya lola, oyo alingi biso. Ya yango natatoli o nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

    Matangi

  1.  

    1. Zina D. H. Young , in Woman’s Exponent, sanza ya zomi 15, 1877, 74.

  2.  

    2.  Baloma 13:11–12, 14.

  3.  

    3.  Moziya 18:8–11.

  4.  

    4. Robert D. Hales, “Modesty: Reverence for the Lord,” Liahona, sanza ya mwmbe 2008, 21; Ensign, sanza ya mwambe 2008, 36.

  5.  

    5. Boyd K. Packer, “How to Survive in Enemy Territory,” Liahona, Sanza ya zomi2012, 35; New Era, Sanza ya minei2012, 3.

  6.  

    6.  Alma 5:26.

  7.  

    7.  Alma 5:14.

  8.  

    8.  Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 29.

  9.  

    9. Sarah Rich, na Daughters in My Kingdom, 30.

  10.  

    10.  Matai 11:28.

  11.  

    11. Na Daughters in My Kingdom, 30.

  12.  

    12. Boluki ekambami na Jolene  S. Allphin, uta na masolo mpe bitando ya kompani; tala Tell My Story, Too, 8th ed. (2012).

  13.  

    13.  Doctrine and Covenants 84:88.

  14.  

    14.  Yisaya 40:31.

  15.  

    15 Thomas S. Monson, “The Holy Temple—a Beacon to the World,” Liahona mpe Ensign, sanza ya mitano 2011, 92.