Mobembo na yo ya Kitoko ya Kozonga Ndako

Na Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Mosungi ya Mibale na Bokambi ya Yambo


 
Wana okosalela na bosepeli kalati Tata wa yo apesi mpo na mobembo na yo, ekokamba yo na esika esantu mpe okotombwama tii na likoki na yo ya likolo.

Tozwi lokumu mpokwa oyo na kozala elongo na Mokambi Thomas S. Monson, profeta wa biso ya bolingo. Mokambi, ntango inso tokosambelaka mpo na yo.

Bandeko ba ngai basi ba bolingi, natondi bino mpo na miziki mpe maloba malobami. Manso mazalaki ya kofula mingi mpe makokani mpo na Pasika, eleko ya bule tozali kosepela mposo eye.

Ezali esengo kozala elongo na bino bilenge basi ba ntalo mpe elongo na mama mpe bayangeli ba bino. Bazali na milimo na bino ya kongenga mpe mwa koseka na bino oyo epesaka mposa ya koseka na basusu. Ya solo Nkolo azali kokanisa bino mpe azali kotala bino na bolingo uta na likolo.

Nakolaki na Zwickau, na Allemagne ya Esti ya kala. Ntango nazalaki na mibu 11, tata na ngai akutanaki na bokengeli makasi lokola motomboki ya politiki, mpe baboti na ngai bayokaki ete boponi se moko ya malamu mpo na libota na biso ezalaki kokima na Allemagne ya Westi. Ekanamaki ete mwango ya bozangi likama mingi koleka elingaki kozala kolongwa na bangonga ekeseni mpe kolanda banzela ekeseni mpo na kokende na Westi, kotikaka biloko na biso nyonso.

Lokola tata na ngai azalaki na likama monene koleka nyonso, azwaki mobembo ya mbango koleka nyonso, na kati ya berlin. Ndeko na ngai ya mobali ya nkuluntu akendeki na Nordi, mpe moko na moko na biso azwaki nzela na ye ya kokende Westi. Ndeko na ngai ya mwasi—oyo akokaki kozala na mobu lokola mingi na bino lelo—elongo na Helga Fassmann, moteyi na ye na Bilenge Basi, mpe boko basusu bazwaki engunduka oyo elekaki moke na kati ya Allemagne ya Westi. Bafutaki mokengeli ekuke mpo na kofungolela bango moko ya bikuke, mpe nsima ntango engunduka ekatisaki ndelo ya Allemagne ya Westi, bapumbwaki uta engunduka ya kotambola mpo na bonsomi. Boniboni nalulaki ndeko wa ngai ya mwasi mpo na mpiko na ye.

Nazalaki mwana ya leki koleka banso, mpe mama na ngai akanaki ete ye mpe ngai tokotambola kokatisaka bangomba moko oyo ezalaki kokabola bikolo nyonso mibale. Namikundoli ete akangaki mwa molia lokola soki tozalaki kokende kotambola to mpe kosala pikiniki na bangoma.

Tozwaki engunduka kokendeka mosika ekokaki biso mpe nsima totambolaki bangonga mingi, kobelemeka penepene mingi na ndelo ya Allemagne ya Westi. Bandelo ekengelamaki makasi, kasi tozalaki na kalati mpe toyebaki ntango mpe esika wapi ekokaki kozanga likama mpo na kokatisa. Nakokaki koyoka bobangi ya mama na ngai. Atalaki esika yango malamu mpenza mpo na komona soki bazalaki kolanda biso. Na litambi moko na moko, makolo na ye mpe mabolongo na ye ezalaki lokola kokoma ya kolemba. Nazalaki kosalisa ye mpo na komema saki na ye ya kilo etonda na bilei, mikanda ya ntina, mpe bafoto ya libota wana ezalaki biso kobuta ngomba moko ya nsuka, ya molai. Ya solo, akanisaki, tokatisaki ndelo sikawa. Ntango na nsuka ayoki kimia, tofandaki mpe tobandaki kolia mwa elambo na biso ya pikiniki. Mpo na mbala ya yambo mokolo wana, nayebi, apemaki malamu mingi.

Ezalaki kaka ntango wana nde tomonaki elembo ya ndelo. Ezalaki naino mosika liboso na biso! Tozalaki kolia mwa elambo na biso na ngambo ya mabe ya ndelo. Tozalaki naino na Allemagne ya Esti!

Bakengeli ya bandelo bakokaki kobimela biso ntango nyonso!

Mama na ngai na kolenga akangaki mwa elambo na biso, mpe tokendeki mbango na ngomba nokinoki lokola ekokaki biso. Ntango oyo tokokaki komeka kotelema te tii toyebaki na kozanga likama ete tokomaki na ngambo mosusu ya ndelo.

Atako moko na moko ya libota na biso azwaka banzela ya kokesana mpenza mpe akutanaka na kpokoso ya kokesana na nzela, na nsuka biso banso tokomaki na kimia. Tokomaki na nsuka ya kosangana lokola libota. Mokolo nini kitoko wana ezalaki.

Masolo ya Mibembo

Oyo nawuti kolobela bino ezali likambo moko oyo ezali mpo na ngai mobembo moko ya motuya. Nakoki kotala sikawa nsima na bomoi na ngai mpe kokitola mingi ya “mibembo” ya boye nasali o ntaka ya ntango. Nyonso te kati na yango esengaki kokatisa bangomba to bandelo ya politiki; misusu ezalaki na mingi etali kolongaka mikakatano to kokolaka na molimo. Kasi, nyonso ezalaki mibembo. Nandimi ete bomoi nyonso ezali liboke ya “masolo ya mibembo” ya moto na moto.

Nayebi na ntembe te boyebi ete bizalela ya bonkoko nyonso etondi na masolo ya mibembo. Ndakisa, okoki koyeba malamu mobembo ya Dorothy mpe mbwa na ye, Toto, na The Wizard of Oz. Dorothy mpe Toto bamemami na ekumbaki mpe batiami na Mokili ya Oz. Kuna, Dorothy amoni nzela wana ya briki ya langi ya mosaka ya polele oyo esali nzela mpo na mobembo oyo na nsuka ememi ye na ndako.

Nsima ezali na Ebenezer Scrooge ya Charles Dikens, oyo mobembo na ye ememi ye esika na esika te kasi ntango na ntango. Ezali mobembo kaka kati na motema na yemei, mpe esalisi ye asosola ntina nini akomaki lolenge azalaki mpe nini ekoyela ye soki akobaki na nzela na ye ya kimoyimi mpe bozangi botondi. 1

Moko ya Babuku Minene eyebana ya nkoma ya Lokumu ya Chine ezali Journey to the West. Ekomami na ekeke ya mbala 16, elobeli lisolo ya kitoko ya nzela ya mabaku mpe mobembo ya sango moko oyo, na lisalisi ya bato malamu minei kati na buku, akei mosika koluka bwania ya milimo.

Mpe solo ezali na Bilbo Baggins, mwa mbumbulu ya bosawa oyo akokaki kolinga mingimingi kotikala na ndako mpe kolia supu na ye. Kasi nsima ya bobeti na ekuke na ye, alandaki libiangi moko eyebani te ya monene mpe abimi libanda na mokili elongo na nganga mpe liboke ya bato ya mikuse mpo na kokokisa etinda ya likama kasi ya ntina monene. 2

Lisolo ya Molongo Mobimba

Elingaka biso masolo ya mibembo oyo mpamba te tokoki komimona na basali mibembo? Bolongi mpe bokweyi na bango ekoki kosalisa biso komona nzela na bisomei o ntei na bomoi. Video totalaki mwa miniti mileki elobeli lisolo ya mobembo moko ya kitoko. Ntango mosusu masolo oyo makokundolisaka biso lisusu na ntina ya mobembo oyo tosengeli komesana na yango biso banso—lisolo moko kati na yango moko na moko ya biso tozali banso na eteni moko monene ya kosala.

Lisolo oyo ebandi kala mpenza. Kala liboso mabele ebanda kobaluka na nzinganzinga na yango moko, kala liboso moi oyo ebongwanaka te ebanda kosembola maboko na ye ya moto na kati na mpio ya etando, kala liboso bikelamu ya minene mpe ya mike efandaka na mokili na biso, bowumelaki na esika moko ya kitoko ya mosika.

Toyembi mingi te oyo etali bomoi kati na bomoi wana ya yambo na bokufi, kasi toyebi mpenza boko. Tata wa biso ya lola abimisi mpo na biso nani Ye azali, banani tozali, mpe banani tokoki kokoma.

Nsima na ezaleli wana ya liboso, boyebaki ya solo mpenza ete Nzambe azalaki mpamba te bomonaki mpe boyokaki Ye. Boyebaki Yesu Klisto, oyo akokoma Mwana na Mpate. Bozalaka na kondima na Ye. Mpe boyebaki ete atandele na bino ezalaki te kotikala na kimia ya ndako na bino ya yambo na bokufi. Lokola mpenza bolingaki bomoi wana ya seko, boyebaki ete bolingaki mpe bozalaki na mposa ya kobanda mobembo moko. Bolingaki kokabwana uta na miso ya Tata, koleka na elamba ya bobosani, kozwa nzoto ya kufa, mpe koyekola mpe komona makambo oyo na elikia ekosalisa bino bokola mpo na kokoma mingi lokola Tata na wa Lola mpe kozonga na miso na Ye.

Na esika wana ya bule, ya kozingama na baoyo boyebaki mpe bolingaki, motuna monene na bibebu na bino mpe na motema na bino esengelaki kozala “Ekozonga ngai na kimia na ndako na ngai ya likolo?”

Ezalaki na makambo mingi oyo ekoki kokima yo mpo oyeba. Bomoi ya bokufi ekozala mpasi ntango mosusu, etonda na makambo oyo okanaki te: bokono, mpasi, makama, makambo.

Na kozanga bomikundoli ya bomoi na yo ya kala—na kozanga komikundola ete kala otambolaki elongo na Tata wa yo na Lola—ekoyeba yo lisusu mongongo na Ye o ntei ya makelele mpe botambolisi makanisi ya bomoi ya kufa?

Nzela ya kotambola ezalaki komonana molai mpenza mpe eyebana te—etonda na makama mingi.

Ekozala pete te, kasi boyebaki esengelaki makasi nyonso.

Yango wana, kuna otelemaki na ebandeli ya boseko, kotalaka liboso na esengo ya koloba te mpe elikia—mpe, nabanzi, lissusu na mwa motema likolo mpe bobangi.

Na nsuka, oyebaki Nzambe akozala moyengebene—ete bolamu na Ye ekolonga. Osalaki elongo na makita monene ya likolo mpe oyebaki ete Mobikisi mpe Mosikoli na bino, Yesu Klisto, akopesa nzela mpo ete bopetolama uta na lisumu mpe bobikisama uta na kufa ya mosuni. Bozalaka na bondimi ete, na nsuka, bokosepela mpe bosangisa mongongo elongo na bayembi ya lola koyembaka masanzoli epai ya nkombo na Ye esantu.

Mpe boye, ozwaki mpema ya molai…

Mpe litambi monene liboso…

Mpe ozali awa!

Osili, moko na moko na bino, kobanda mobembo na yo moko ya kitoko mingi mpo na kozonga na ndako na yo ya likolo!

Kalati na Yo

Sikawa lokola ozali awa na mabele, ekoki kazala na bwania mpo na komituna boni mobembo na yo ezali. Ezali yo na Nzela malamu? Ezali yo kokoma moto oyo osengelaki kozala mpe olingelamaki kokoma? Ezali yo kosala baboponi oyo ekosalisa yo ozonga epai ya Tata wa yo na Lola?

Atindaki yo te na mobembo oyo mpo na kowayawaya kozangaka ntina na yomei. Ye alingi yo oya ndako epai na Ye. Ye apesaki bino baboti ya bolingo mpe bakambi ya Eklezia ya botongono, elongo na kalati oyo elimboli mabele mpe elakisi makama; elakisi wapi kimia mpe esengo ekoki kozwama mpe ekosalisa yo kosala mwango ya kozonga ndako.

Sikawa, wapi ekomoni bino kalati na oyo?

  1. Na makomi masantu.
  2. Na maloba ya baprofeta mpe bapostolo.
  3. Mpe na nzela ya bobimisi ya moto na moto uta Molimo Mosantu.

Kalati oyo ezali nsango malamu ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe nzela ya esengo ya moyekoli ya Klisto. Ezali mitindo mpe ndakisa epesameli biso na Molobeli mpe Mosungi, oyo ayebi nzela mpamba te Ye azali nzela. 3

Ya Solo, kozala kaka na kalati ekosala bolamu te longola soki oyekoli yango-longola soki onani na nzela ya bomoi. Nabengisi bino bopesa yango bisika ya likolo koyekola mpe kosalela liloba ya Nzambe. Fongola motema na yo na Molimo Mosantu mpo ete Ye akoka kokamba yo na mobembo na yo kati ya bomoi.

Kalati na yo etondi na nsango ya bolendisi mpe ya malako uta na Tata wa yo na Lola mpe mpe Mwana Mobali wa Ye Yesu Klisto. Lelo nalingi tokabola elongo na bino bitinda misatu oyo ekosalisa bino kosala mobembo ya kozonga na ndako ya bino ya lola na elonga.

Etinda ya yambo: Tosengeli Kobanga te, mpo Nkolo azali elongo na biso, mpe akotelema mpembene na biso.” 4

Tozali biso moko te na mobembo oyo. Tata wa yo na Lola ayebi yo. Ata ntango moko te mosusu azali koyoka yo, Ye azali koyoka yo. Ntango ozali kosepela na bosembo, Ye azali kosepela elongo na yo. Ntango okangami na momekano, Ye azali kolela elongo na yo.

Litomba ya Tata na Lola kati na yo eyekami te likolo ya boniboni ya kofuluka to kitoko to kolongono to bonzenga ozali; Ye amonaka nani solo ozali. Ye atalaka na motema na yo. 5 Mpe Ye alingi yo 6 mpamba te ozali mwana wa Ye.

Bandeko basi, boluka Ye na etingia, mpe bokomona Ye. 7

Nalaki yo, ozali yo moko te.

Sikawa, zwa ntango sikawa mpe tala bato nzinganzinga na yo. Boko bakoki kozala bakambi, baninga, to baye libota na yo. Basusu okokaki kokutana na bango liboso. Nzokande, moto nyonso oyo omoni nzinganzinga na yo—kati na likita oyo to na esika mosusu, lelo to na ngonga mosusu—azalaki elombe na mokili ya liboso ya kufa. Moto wana ya bosawa mpe ya momesano kofandaka mpembeni na yo akokaki kozala moko ya bilongi ya ntina oyo olingaki mpe osepelaki na yango na mokili ya milimo. Okokaki kozala ndakisa moko ya mosala mpo na yomei!

Moko ya likambo okoki koyeba: moto nyonso ozali komona—kotala te loposo, eyamba, bondimi na makambo ya politiki, lolenge ya nzoto, to ezalela ya nzoto—ezali libota. Elenge mwasi ozali kotala azali na Tata na Lola se moko lokola yo, mpe atikaki miso na Ye ya bolingo kaka lokola yo osalaki, motema na mposa mpo na koya na mabele oyo mpe kofanda mpo ete mokolo mosusu akoka kozonga epai na Ye.

Nzokande, akokaki komiyoka se ye moko, kaka lokola yo ntango mosusu. Akoki kutu na libaku kobosana ntina ya mobembo na ye. Nasengi kundolisa ye, na nzela ya maloba na yo mpe bikela na yo, ete azali ye moko te. Tozali awa mpo na kosalisana.

Bomoi ekoki kozala mpasi, mpe ekoki koyeisa mitema makasi tii na esika wapi bato mosusu bamonani lokola bakoki kosimbama te. Boko bakoki kotondisama na nkanda. Basusu bakoki koseka mpe kotiola baoyo bandimeli Nzambe ya bolingo. Kasi tala oyo: atako bamikundoli te, bango mpe na ntango moko boye bazalaki na mposa ya kozonga epai ya Tata na Lola.

Ezali na mokumba na yo te ya kobongolisa moto songolo. Ezali mosala ya Molimo mosantu. Mosala na yo ezali kokabola bondimi na yo mpe kozala na kobanga te. Zala moninga na banso, kasi kobebisa bandelo na yo mokolo moko te. Tikala botongono na boyambi mpe bondimi na yo. Telema, mpamba te ozali mwana na Nzambe, mpe Ye atelemi elongo na yo!

Etinda ya mibale: “Bolingana pelamoko ngai nasili kolinga bino. ”8

Esi okanisa lokota nini biso banso tolobaki ntango tofandaki na miso ya Nzambe? Nabanzi makasi ete ezalaki Allemand, atako nakanisi moto moko ayebi solo. Kasi nayebi ete na bomoi liboso ya kufa toyekolaki uta liboko ya yambo, uta na Tata wa milimo na biso, lokota ya molongo mobimba—moko oyo ezali na nguya ya kobuka bakale ya mayoki ya motema, mosuni mpe molimo.

Lokota wana ezali bolingo ya peto ya Yesu Klisto.

Ezali lokota ya nguya koleka nyonso na mokili.

Bolingo ya Klisto ezali bolingo ya netineti te. Ezali bolingo ya kalati ya mbote te. Ezali te lolenge ya bolingo oyo esanjolami na miziki mpe filimi ya mokili.

Bolingo oyo ememaka oyo etali mbongwana ya ezalela. Ekoki kolonga boyini mpe kosilisa mposa. Ekoki kobikisa nkanda mpe koboma bamoto ya bololo. Ekoki kosala makamwisi.

Tozwaki “mateya na biso ya yambo”9 na lokota oyo ya bolingo lokola milimo na miso ya Nzambe, mpe awa na mabele tozali na mabaku ya kosalela yango mpe koloba yango malamu. Okoki koyeba soki ozali koyekola lokota oyo ya bolingo na kotiaka motuya na maye matindiki makanisi mpe bikela na yo.

Ntango makanisi na yo ya yambo efandisami likolo ya makambo kani okozwela litomba, babotindiki na yo ekoki kozala ya moyimi mpe ya mozindo te. Wana ezali lokota yo olingi koyekola.

Kasi ntango makanisi mpe bizalela na yo ya yambo efandisami likolo ya kosalelaka Nzambe mpe basusu—ntango ozali solo na mposa ya kopambola mpe kotombola baye bazali nzinganzinga na yo—nde nguya ya bolingo ya peto ya Klisto ekoki kosala na motema mpe bomoi. Wana ezali lokota olingi koyekola.

Wana ekoloba yo malamu lokota mpe okosalela yango na bozalani na yo na basusu, bakomona likambo moko kati na yo oyo ekoki kolamusa kati na bango liyoki moko ebombana kala mpo na koluka nzela malamu na mobembo ya kozonga na ndako na bango na likolo. Nsima ya manso, lokota ya bolingo ezali lokota na bango ya kobotama ya solo lokola.

Nguya oyo ya mozindo mpe ya kokanga ezali lokota oyo ekomelaka molimo nyonso. Ezali lokota ya bososoli, lokota ya lisalisi, lokota ya kotombolaka mpe kosepelaka mpe kobondisaka.

Yekola kosalela lokota ya molongo mobimba ya bolingo ya Klisto.

Mpe etinda ya misatu: Tosengeli kozala na bosepeli. ”10

Ntango mususu tokokoma motema moto na wapi tozali na mobembo na biso, boye te? Soki ozali na mibu 12, okoki kolinga kozala na mibu 14. Na mibu 14, okoki kolinga kozala 18. Mpe na mibu 18, na libaku mosusu okokoka kutu kolinga ozala na mibu 12 lisusu mpe okoki kobandela ntango nyonso.

Ekozala ntango nyonso na makambo na ntina na yango koyimakoyima—makambo oyo mamonani lokola ezali malamu te. Okoki kolekisa mokolo na yo komiyokaka mawa, yo moko, ososolami te, to olingami te. Kasi wana ezali te mobembo oyo otielaka elikia, mpe ezali te mobembo oyo Tata na Lola atindaka yo osala. Mikundola, ozali solo mwana mwasi ya Nzambe!

Koyebaka yango, nabengisi yo otambola na bondimi mpe na esengo. Iyo, nzela ezali na mabaku mpe mabunga mpe kutu mwa makama. Kasi kotala yango te. Luka esengo oyo ya Tata wa yo na Lola alengeli mpo na yo na litambi nyonso ya mobembo na yo. Esengo ezali nsuka ya mobembo, kasi ezali lisusu nzela. Kimia na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili ekoya ezali maye Ye alakaki. 11 Yango wana Ye atindi biso “zala na bosepeli.”

Wana okosalela na bosepeli kalati Tata wa yo apesi mpo na mobembo na yo, ekokamba yo na esika esantu mpe okotombwama tii na likoki na yo ya likolo. Okokola na kimwana mwasi ya Nzambe oyo olikiaki ete okokoma.

Bandeko basi ba bolingo, bandeko bilenge basi babolingo ya Eklezia, bandeko baninga bilenge ba bolingo, lokola Apostolo ya Nkolo natiki bino na lipamboli ete bokomona nzela na bino na mobembo oyo ya kozonga ndako mpe ete bokozala bofuli moko mpo na baninga na bino ya mobembo. Ezali lisusu elaka mpe losambo na ngai ete wana ezali bino kokumisa mpe kobika na kati ya mayokani, mabongisi, mpe bolamu ya nsango malamu ya Yesu Klisto, na nsuka ya mobembo na yo Tata ya Lola akozala wana. Ye akoyamba yo, mpe okoyeba mbala moko mpe mpo na libela ete olongi kozonga ndako na kimia. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Lakisa Matangi

    Matangi

  1.  

    1. Tala Charles Dickens, A Christmas Carol.

  2.  

    2. Tala J. R. R. Tolkien, The Hobbit.

  3.  

    3. Tala Yoane 14:6.

  4.  

    4. Tala Doctrine and Covenants 68:6;; tala lisusu Yisaya 41:10; ; Yoane 14:18..

  5.  

    5. Tala 1 Samwele 16:7.

  6.  

    6. Tala 1 Petelo 5: 6–7.

  7.  

    7. Tala Yilimia 29:13.

  8.  

    8. Yoane 15:12 ; tala lisusu Yoane Yoane 13:34; Moroni 7:45–48..

  9.  

    9. Tala Doctrine and Covenants 138:56.

  10.  

    10. Doctrine and Covenants 78:18 ; tala lisusu Yoane 16:33; 3 Nefi 1:13.

  11.  

    11. Doctrine and Covenants 59:23..