Likabo Ekoki Kolobama Te Uta na Nzambe

Na Mpaka Craig C. Christensen

Ya Bokambi ya Bantuku Sambo


Craig C. Christensen
Molimo Mosantu asalaka na bomoko oyo ekoki mpenza elongo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto, kokokisaka misala mingi ya motuya mpe mikumba mikeseni.

Na 1994, Mokambi Howard W. Hunter abengisaki bandimi banso ya Eklezia mpo na kosala tempelo … lokola elembo ya bondimi na [biso].”1 Nsima na mobu wana kaka, botongi ya Tempelo ya Bountiful na Utah esilaki. Lokola bato mingi, tomitungisaki mpo na komema libota na biso ya bolenge na bofungoli ndako yambo ya bobulisi. Tosalaki na etingia mpo na kolengela bana na biso mpo na kokota na tempelo, kosambelaka na makasi ete bakoka kozwa mayele ya molimo mpo ete tempelo ekoka kokoma esika ya motema na bomoi na bango.

Lokola tozalaki kotambola na limemia na kati ya tempelo, namimonaki kolulaka botondi ya lipombo, bosilisi ya malonga, minda kongengaka na kati ya maninisa ya likolo, mpe mingi ya mayemi na langi ya kofulisa bato. Lolenge mobimba ya etonga oyo ya bule ezalaki kitoko eluta.

Kokotaka na kati na kisuku ya selesitiale, na mbalakaka nasosolaki ete mwana na biso ya mobali ya leki, Ben ya mibu motoba, akangamaki makasi na lokolo na ngai. Amonanaki komitungisama—mbele kutu na mwa mobulu.

“Likambo nini, Mwana?” Nalobaki na mongongo moke.

“Daddy, azongisaki, “nini ezali kosalema awa? Nayoka naino lolenge oyo liboso te.”

Koyebaka ete oyo ezalaki ntango mosusu mbala ya yambo mwana na biso ya mobali ayokaka nguya ya Molimo Mosantu na lolenge ya nguya moko ya boye, nafukamaki na mabele penepene na ye. Ntango batali mosusu bazalaki kotambola nzinganzinga na biso, Ben mpe ngai tolekisaki miniti mingi, ngambo na ngambo, koyekolaka na ntina ya Molimo Mosantu elongo. Nakamwaki na pete nini tokokaki kolobela mayoki na ye. Lokola tozalaki kotambola, emonnaki polele ete eloko ezalaki ya bofuli mingi koleka mpo na Ben ezalaki te nini amonaki kasi nini ayokaki—kitoko ya biloko nzinganzinga na biso te kasi mongongo ya kimia, ya moke ya Molimbo ya Nzambe na kati ya motema na ye. Nakabolaki elongo na ye nini nayekolaka uta na mayele na ngai moko, kutu lokola bokamwi na ye ya bomwana elamusaki lisusu na ngai liyoki moko ya mozindo ya botondi mpo na likabo oyo ya Nzambe ezanga elobeli—likabo ya Molimo Mosantu.2

Molimo Mosantu Azali Nani?

Molimo Mosantu azali moto ya misato na Bozambe, mpe, na bongo, lokola Nzambe Tata mpe Yesu Klisto, Ye ayebi makanisi mpe bamposa ya mitema na biso.3 Molimo Mosantu alingi biso mpe alingi biso tozala na esengo. Lokola ayebi mikakatano tozali kokutana na yango, Ye akoki kokamba biso mpe koteya biso makambo manso tosengeli kosala mpo na kozonga mpe kowumela elongo na Tata wa biso ya lola mbala moko lisusu.4

Na bokesani na Tata wa Lola mpe Yesu Klisto, oyo bazali na banzoto ekembelama ya misuni mpe mikuwa, Molimo Mosantu azali moto ya molimo oyo asololaka na milimo na biso na nzela ya mayoki mpe makanisi.5 Lokola mozalani ya molimo, Ye azali na mokumba ya ye moko kaka ya kozala mosali na lisalisi na ye libimisi ya moto na moto ezwami. Na makomi, Molimo Mosantu elobelami lokola Molimo Esantu, Molimo ya Nkolo, Molimo Mosantu ya Elaka, to bobele Molimo.6

Etinda ya Molimo Mosantu Ezali Nini?

Mosala ya Molimo Mosantu asalaka na bomoko ebonga mpenza elongo na Tata wa Lola mpe Yesu Klisto, kokokisaka misala mingi ya motuya mpe mikumba mikesani. Ntina ya liboso ya Molimo Mosantu ezali kopesa litatoli ya Nzambe Tata mpe Mwana wa Ye, Yesu Klisto, 7 mpe koteya biso bosolo na makambo manso.8 Litatoli ya ntembe te uta na Molimo Mosantu ememi bosolo mosika mingi koleka litatoli uta na liziba nyonso mosusu. Mokambi Joseph Fielding Smith ateyaki ete “Molimo ya Nzambe kolobaka na molimo ya moto azali na nguya mpo na kopesa bosolo na lolenge mpe bososoli monene mingi koleka bosolo ekoki kopesama na bokutani ya moto ye moko na bazalani ya lola.”9

Molimo Mosantu ayebani lisusu lokola Mobondisi.10 na ntango ya mobulu to ya bozangi elikia to bobele ntango tozali na mposa ya koyeba ete Nzambe azali penepene, Molimo Mosantu akoki kotombola milimo na biso, kopesa biso elikia, mpe koteya biso “makambo ya kimia ya bokonzi,”11 kosalisaka biso koyoka “kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso.”12

Mibu mingi eleki lokola libota monene ya biso esanganaki mpo na bolei ya bopemi moko, tata wa ngai abandaki kosakana na mingi ya bankoko na ye. Na mbalakaka mpe na kozanga koyebisa akweyaki mpe nokinoki akufaki. Likambo oyo tozelaki te ezalaki nsomo, mingimingi mpo na bankoko, kobimisaka mituna oyo ezalaki mpasi na koyanola. Nzokande, ntango tosangisaki bana ba biso nzinganzinga na biso, ntango tosambelaki mpe totangaki maloba ma baprofeta ya Buku ya Mormon etali ntina ya bomoi, Molimo Mosantu abondisaki moko na moko na biso moto na moto. Na lolenge moko oyo ezalaki mpasi na kolimbola na maloba, biyano tolukaki eyaki na polele na kati ya mitema na biso. Toyokaki kimia oyo ya solo elekiya biso bososoli, kasi litatoli uta na Molimo Mosantu ezalaki ya ntembe te, ya koboya te, ya solo.

Molimo Mosantu azali moteyi mpe mobimisi.13 Ntango toyekoli, tomanioli, mpe tosambeli mpo na oyo etali bosolo ya nsango malamu, Molimo Mosantu akopelisa mayele na biso mpe akoningisa bososoli na biso.14Ye akosala ete bosolo ekomama libela na milimo na biso mpe akosala mbongwana ya makasi eya na mitema na biso. Ntango tokaboli bosolo elongo na mabota na biso, elongo na baninga na biso, elongo na bandeko bandimi na Eklezia, mpe elongo na baninga mpe bato ya pembeni na lingomba na biso, Molimo Mosantu akokoma moteyi na bango mpe lokola, mpo Ye amemaka etinda ya nsango malamu “na kati na mitema ya bana ya bato. ”15

Molimo Mosantu afulaka biso mpo na kokende epai ya basusu mpo na kosalisa. Mpo na ngai, ndakisa ya makasi mingi koleka ya bokebi na bitinda ya Molimo Mosantu mpo na kosalisa basusu ewuti na bomoi mpe mosala ya Mokambi Thomas S. Monson, oyo alobaki: “Na kokokisaka mikumba na biso, nayekoli ete ntango tosali bokebi na etinda moko ya kimia mpe tosali likolo na yango na kozangaka kozela, Tata wa biso ya Lola akokamba matambe na biso mpe akopambola bomoi na biso mpe bomoi ya basusu. Nayebi likambo moko te ezali sukali mingi to liyoki ya motuya mingi koleka kosala bokebi na etinda bobele mpo na komona ete Nkolo ayanoli losambo ya moto mosusu na nzela na yo.”16

Nakokabola kaka likambo moko ya boboto. Ntango Mokambi Monson azalaki episikopo, ayekolaki ete mondimi moko ya palwasi, Mary Watson, azalaki na lopitato. Ntango akendeki kotala ye, ayokaki ete azalaki kovanda na kisuku moko ya monene elongo na babeli mingi misusu. Ntango apusanaki mpembeni ya Ndeko mwasi Watson, amonaki ete mobeli moko na mbeto ya mpembeni azipaki moto na ye nokinoki.

Esilisaki Mokambi Monson kotala Ndeko mwasi Watson mpe kopesa ye lipamboli ya bonganganzambe, apesaki ye mbote, alobaki tikala malamu, mpe amilengelaki mpo na kolongwa. Nsima likambo moko ya pete kasi ya kokamwa eyaki. Natangi sikawa Mokambi likundoli ya Monson yemei:

“Nakokaki te kotika mpembeni na ye te. Ezalaki lokola soki loboko moko ya komonana te evandaki na lipeka na ngai, mpe nayokaki na kati na molimo na ngai ete nazalaki koyoka maloba oyo: ‘Kende na mbeto ya mpembeni wapi mwasi ya moke afinikaki elongi na ye ntango okotaki’ Nasalaki yango. …

Nabelemaki na mpembeni ya mbeto ya mobeli mosusu, nabetaki na boboto lipeka na ye mpe na lolenge ya malamu nabendaki na nsima elamba oyo ezipaki elongi na ye. Bongo tala! Ye, lisusu, azalaki mondimi ya palwasi na ngai. Nayebaka te azalaki mobeli na lopitalo. Nkombo na ye ezalaki Kathleen McKee. Ntango miso na ye ekutanaki na ya ngai, agangaki na mai na miso, ‘O, Episikopo, ntango okotaki na ekuke, nayokaki lokola oyaki kotala ngai mpe kopambola ngai na eyano na nsambo na ngai. Nasepelaki na kati na kokanisa ete olingaki koyeba nazali awa, kasi ntango okangamaki na mbeto mosusu, motema na ngai ezindaki, mpe nayebaki ete oyaka te mpo na kotala ngai.’

“Nalobaki na [Ndeko mwasi] McKee: ‘Ezali eloko te ete nayebaki te ozalaki awa. Ezali ya motuya, nzokande, ete Tata wa biso ya Lola ayebaki mpe ete osambelaki na nse ya motema mpo lipamboli ya bonganganzambe. Ezali Ye oyo atindikaki ngai mpo na kokota na nkuku na yo.”17

Lolenge nini Molimo Mosantu Alobaka na Biso?

Biso banso tokutana na Molimo Mosantu, atako tokoki ntango inso koyeba yango te. Ntango makanisi efulama ekoti na kati ya mayele na biso, toyebi yango ezali ya solo na mayoki oyo ekoti na mitema na biso. Mokambi Boyd K. Packer ateyaki: “Molimo Mosantu akoloba na mongongo oyo oyoki mingi koleka oyoki. … Ntango tolobeli ‘koyoka’ nungunungu ya Molimo, mbala mingi moto akolimbola etinda ya molimo na kolobaka, ‘nazwi liyoki … ’.”18 Ezali na nzela ya mayoki oyo ya bule uta na Molimo Mosantu de toyei koyeba nini Nzambe alingi tosala, mpo na yango, lokola elobami na makomi, “ezali molimo ya bobimisi.”19

Elingi Koloba Nini Kozwa Likabo ya Molimo Mosantu?

Na koteyaka mwana na biso ya mobali ya mibu motoba, Ben, nakanisaki ete ezali ya motuya kotia bokeseni katikati ya nini ayokaki, oyo ezali nguya ya Molimo Mosantu, mpe likabo ya Molimo Mosantu, oyo akokaki kozwa nsima ya libatisi. Liboso ya libatisi, baluki ba bosembo mpe ba solo bakoki koyoka nguya ya Molimo Mosantu mbala na mbala. Nzokande, libaku ya kozwa kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu mpe likoki ya mapamboli manso masangani na yango ezwami bobele na bandimi balongobani, babatisami oyo bazwi likabo ya Molimo Mosantu na kotiamaka maboko na nzela ya baye basimbi likoki ya bonganganzambe ya Nzambe.

Na nzela ya likabo ya Molimo Mosantu, tozwi bokoki mpe makabo ya molimo ebakisami, bobimisi mpe bobateli emati, boyangelami mpe bokambemi ya sikisiki, mpe mapamboli malakelami ya bosantisami mpe bonetolami na bokonzi ya selesitiale. Mapamboli manso oyo mapesami lokola mbano ya mposa ya kozwa yango mpe eyei ntango tokokisi bomoi na biso na bolingi ya Nzambe mpe toluki bokambemi na Ye ya ntango nyonso.

Ntango nazongisi mabanzo na likambo ya Ben na Tempelo ya Bountiful na Utah, nazwi mayoki mpe makanisi mingi ya sukali. Likundoli ya polele ezali ete namelami na bonene ya nini nakokaki komona, mwana moke moko penepene na ngai azalaki koyeba mayoki ya nguya na motema na ye. Na likundolisi moko ya boboto, nabengisamaki kaka kotelema mpe kofukama te kasi lisusu mpo na kosala bokebi na libiangi ya Mobikisi mpo na kokoma lokola mwana moke—mosawa, mosekomi, mpe penepene na koyoka mongongo ya kimia, ya moke ya Molimo na Ye.

Napesi litatoli ya bosolo ya bomoi mpe etinda ya Bonzambe ya Molimo Mosantu mpe ete na nguya ya Molimo Mosantu, tokaki koyeba bosolo ya makambo manso. Natatoli ete likabo ya Molimo Mosantu ezali likabo ya Tata wa biso ya Lola ya ntalo monene mpe ezanga elimboli na banso balingi koya epai ya Mwana na Ye, kobatisama na nkombo na Ye, mpe kozwa Molimo Mosantu na nzela ya nkotisa na Eklezia na Ye. Ya bosolo ya bule oyo napesi litatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Howard W. Hunter, na Jay M. Todd, “President Howard W. Hunter: Fourteenth President of the Church,” Ensign, sanza ya sambo 1994, 5; tala lisusu Howard W. Hunter, “The Great Symbol of Our Membership,” Tambuli, sanza ya zomi na moko 1994, 3; Ensign, sanza ya zomi 1994, 2.

  2.  

    2. Tala Doctrine et Alliances 121:26.

  3.  

    3. Tala Alama 12:7; 18:16–18; Doctrine et Alliances 6:15–16.

  4.  

    4. Tala 2 Nefi 32:5.

  5.  

    5. Tala Doctrine et Alliances 130:22.

  6.  

    6. TalaLuka 4:1, 18; 11:13; Yoane 1:33; Baefese 1:13; Doctrine et Alliances 88:3.

  7.  

    7. Tala 2 Nefi 31:18; 3 Nefi 28:11; Doctrine et Alliances 20:27.

  8.  

    8. Tala Moloni 10:5.

  9.  

    9. Joseph Fielding Smith, Doctrines of Salvation, comp. Bruce R. McConkie, 3 vols. (1954–56), 1:47–48.

  10.  

    10. Tala Yoane 14:26; Doctrine et Alliances 35:19.

  11.  

    11.  Doctrine et Alliances 36:2.

  12.  

    12.  Bafilipi 4:7.

  13.  

    13. Tala Luka 12:12; 1 Bakolinti 2:13; Doctrine et Alliances 50:13–22; Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 132–33.

  14.  

    14. Tala Doctrine et Alliances 11:13.

  15.  

    15.  2 Nefi 33:1.

  16.  

    16. Thomas S. Monson, “Peace, Be Still,” Liahona mpe Ensign, sanza ya zomi na moko 2002, 55.

  17.  

    17. Tala Thomas S. Monson, “Christ at Bethesda’s Pool,” Ensign, sanza na zomi na moko 1996, 18–19.

  18.  

    18. Boyd K. Packer, “Personal Revelation: The Gift, the Test, and the Promise,” Liahona, sanza ya motoba 1997, 10; Ensign, sanza ya zomi na moko 1994, 60.

  19.  

    19.  Doctrine et Alliances 8:3; tala lisusu nzela 2.