2010–2019
Botuna Bamisionele! Bakoki Kosalisa Bino!
Sánzá ya Zómi 2012


Botuna Bamisionele! Bakoki Kosalisa Bino!

Bamisionele banso, bilenge mpe bankulutu, bazali kosala na elikia moko ya kokomisa bomoi malamu mingi mpo na bato basusu.

Bandeko ba ngai ba bolingo mibali, basi, mpe baninga, topesi bolingo mpe mbote na biso na moko na moko na bino. Tosepeli mingi na liyebisi ya Mokambi President Thomas S. Monson ntongo ya lelo, oyo ekitisi mibu mpo na kosala mosala ya misio na mibu 18 mpo na bilenge mibali mpe mpo na mibu 19 mpo na bilenge basi. Na nzela ya boponi oyo, mingi ya bilenge na biso bakokoka kosepela na mapamboli ya misio.

Mibu mibale mileki mpe eyebisami lisusu na ntongo ya lelo, Mokambi Monson asakolaki “elenge mobali oyo alongobani, mpe akoka asengeli komilengela mpo na kosala misio. Mosala ya misio ezali lotomo ya bonganganzambe—lotomo moko Nkolo azeli na biso oyo topesameli mingi mpenza.”1 Lisusu alimboli ete mpo na bilenge basi, misio ezali boponi ya koyamba na malamu kasi ezali mokumba te. Mpe lisusu abengisi balongani bakomela mingi lisusu mpo na kosala misio.

Bolengeli mpo na misio ezali na motuya. Misio ezali mosala ya bolingi na Nzambe mpe bato. Bamisionele bakosunga litomba oyo na ekozo na bango moko. Baboti, mabota, bandeko, mpe bakabi na Mosolo Monene ya Misio bakoki lisusu kosunga. Bamisionele banso, bilenge mpe bankulutu, bakosala na elikia moko ya kokomisa bomoi malamu mingi mpo na bato.

Mokano ya kosala misio ekobongisa atandele ya misionele, mwasi to mobali wa ye, mpe bana na bango mpo na bankola ekoya. Mposa ya kosala misio ezali mbano ya solo ya bobongoli motema, bolongobani, mpe bolengeli ya moto.

Na bato ya mokili mobimba, mingi na bino bozali na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka te mpe boyebi moke mpenza na oyo etali biso mpe bamisionele na biso. Bozali awa to bozali koyoka mpamba te bolingi koyeba mingi oyo etali Bamormon mpe maye basionele na biso bazali toteya. Lokola bozali koyekola mingi oyo etali biso, bokoyeba ete tokaboli makambo mingi ya motuya. Tolendisi bino bobatela oyo nyonso ezali malamu mpe solo mpe nsima bomona soki tokoki kobakisa mosusu. Na mokili oyo etonda na mikakatano, tozali mpenza na mposa ya lisalisi mbala na mbala. Boyambi, bosolo ya seko, mpe bamisionele na biso bazali biteni ya motuya mingi ya lisalisi wana.

Bilenge bamisionele na biso batiaka mpembeni boyekoli, misala, bolingo, mpe makambo misusu na bango oyo bankulutu ya bilenge basalaka mingi na ntango oyo ya bomoi. Mpo na sanza 18 tii 24 batiki nyonso na ntina ya mposa na bango ya kosalela Nkolo. 2 Mpe boko ya bamisionele na biso bazali kosala na mibu na bango ya kokomela mingi ya bomoi. Nayebi ete mabota na bango epambolami. Na libota na biso moko, mwambe bazali sikwa kosala misio ya ntango mobimba—bana basi misato, mibali na banso, papa nkoko moko, mpe nkoko moko.

Boko na biso bakoki komituna oyo etali nkombo Mormon. Ezali nkombo babambi mpo na biso. Ezali te nkombo na biso ya solo, atako toyebani mingi lokola Bamormon. Nkomo wana ewuti na buku ya bule moko eyebani lokola Buku ya Mormon.

Nkombo ya solo ya Eklezia ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya ebandeli oyo etiami lisusu. Ntango atambolaki na mabele, abongisaki Eklezia na Ye. Ye abiangaki Bapostolo, Bantuku Sambo, mpe bayangeli misusu na bango apesaki likoki mpo na kosala na nkombo na Ye.3 Nsima ya liwa ya Klisto mpe Bapostolo na Ye, bato babongolaki makuli mpe malongi. Eklezia ya ebandeli mpe bonganganzambe ebungaki. Nsima ya Bikeke ya Molili, mpe na nse ya bokambi ya Tata ya Lola, Yesu Klisto azongisaki Eklezia na Ye. Sikawa ezali lisusu na bomoi, ezongisami mpe ezali kosala na nse ya bokambi na Ye ya bonzambe.4

Tolandaka Nkolo Yesu Klisto mpe toteyaka Ye. Toyebi ete nsima ya elonga na Ye likolo na liwa, Nkolo mosekwi abimelaki bayekoli na Ye na mabaku mingi. Ye aliaki elongo na bango. Ye atambolaki elongo na bango. Liboso ya Ntombwa na Ye ya nsuka, atindaki bango “bakenda kojalisa bayekoli na mabota yonso, kobatisaka bango na nkombo ya Tata mpe na Mwana mpe na Molimo Mosantu.”5 Bapostolo basalaki bokebi na lilako wana. Bango lokola babiangaki basusu mpo na kosunga bango kokokisa motindo ya Nkolo.

Lelo na nse ya bokambi ya bapostolo mpe baprofeta ya sikawa, mokumba wana kaka epesami na bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bamisionele oyo bazali kosala na mingi koleka bikolo 150. Lokola bantoma ya Nkolo Yesu Klisto, bazali kobunda kokokisa motindo wana ya bonzambe—ekomisami ya sika na mikolo na biso na Nkolo Yemei—mpo na komema litondi ya nsango malamu mosika mpe kopambola bomoi ya bato bipai binso.6

Bamisionele na nsika ya bolenge to ebandeli ya mibu 20 na bango bazali bilenge na lolenge ya mokili. Kasi bapambolami na makabo—lokola nguya ya Molimo Mosantu, bolingo ya Nzambe, mpe matatoli ya bosolo—oyo ezali kokomisa bango bantoma ya nguya ya Nkolo. Bakaboli nsango malamu ya nsango malamu oyo ekomema bosepeli ya solo mpe esengo ya libela na banso oyo basali bokebi na nsango na bango. Mpe mbala mingi, bazali kosala yango na ekolo mpe lokota ya bampaya mpo na bango.

Bamisionele bazali kobunda mpo na kolande Yesu Klisto na maloba mpe misala. Bazali koteya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.7 Bazali koteya Bozingisi mpenza ya Eklezia ya Klisto ya kala na nzela ya profeta ya mikolo mya nsuka ya Nkolo ya yambo, Joseph Smith.

Bokokaki kokutana liboso, to koboya koyeba, bamisionele na biso. Elikia na ngai ezali ete bokobanga bango te kasi bokoyekola na bango. Bakoki kozala liziba etindamaki uta na lola epai na bino.

Yango ekomelaki Jerry, mobali moko ya malonga ya protestant na katikati ya mibu 60 oyo azalaki kovanda na Mesa, Arizona. Tata ya Jerry azalaki mokengeli moko ya Babaptiste, mama na ye mokengeli moko ya Baméthodiste. Mokolo moko moninga moko ya motema ya Jerry Pricilla akabolaki na ye mpasi ayokaki na liwa ya mwana na ye na eleko ya kobota mpe bobomi libala oyo elandaki mwa nsima. Kobundaka lokola mama ye moko kaka, Pricilla azalaki na bana minei—bana basi misato mpe mwana mobali moko. Ntango afungolaki motema na ye na Jerry, atubelaki ete azalaki kokanisa komiboma. Na bokasi nyonso mpe bolingo Jerry akokaki komeka kosalisa ye asosola ete bomoi na ye ezalaki na motuya. Abengisaki ye mpo na kokende na eklezia na ye, kasi Pricilla alimbolaki ete asundolaka Nzambe.

Jerry ayebaki te nini kosala. Nsima, ntango azalaki kotia mai na banzete na bilanga na ye, mobali oyo ya bondimi asambelaki na Nzambe mpo na bokambemi. Lokola asambelaki, ayokaki mongongo moko na makanisi na ye kolobaka, “Kangisa bana mibali wana na velo.” Jerry na mwa mobulu, amitunaki oyo yango elingaki koloba. Wana ezalaki ye kokanisa na liyoki oyo, atalaki likolo na balabala mpe amonaki bilenge mibali mibale na simisi ya mpembe mpe kalavati koyaka na velo epai ya ndako na ye. Ekamwaki ye na “bokutani,” oyo atalaki bango koleka mpembeni. Nde, kososolaka ete likambo esengaki ye asala, agangaki, “E, bino, nasengi bino botelema! Nalingi koloba na bino!”

Na botali moko ya komituna mpe ya mposa, bilenge bana mibali batelamaki. Lokola bazalaki kobelema, Jerry amonaki ete balataki bilembo na nkombo kolakisaka bango lokola bamisionele na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Jerry atalaki bango mpe alobaki, “Oyo ekoki komonana mwa mabe, kasi nazalaki kosambela mpe basengaki ngai na ‘telemisa bana mibali na velo.’ Natalaki likolo na balabala, mpe na moni bino. Bokoki kosalisa ngai?”

Bamisionele basekaki, mpe moko alobaki, “Iyo, nazali na ntembe te tokoki.”

Jerry alimbolaki matata ya motungisi ya Pricilla. Mosika te bamasionele babandaki kokutana na Pricilla, bana na ye, mpe Jerry. Balobelaki ntina ya bomoi mpe mwango ya seko ya Nzambe mpo na bango. Jerry, Pricilla, mpe bana na ye bakolaki na bondimi na nzela ya losambo ya solo, boyekoli ya Buku ya Mormon, mpe bondeko ya bolingo elongo na bandimi ya Eklezia. Bondimi ya makasi ya Jerry ya kala ekomaki kutu makasi mingi koleka. Ntembe ya Pricilla mpe makanisi na ye ya komiboma ebalukaki na elikia mpe esengo. Babatisamaki mpe bakomaki bandimi ba Eklezia ezongisami ya Klisto.8

Iyo, bamisionele bakoki kosalisa na nzela mingi. Na ndakisa basusu kati na bino bokoki kolinga koyeba mingi mpo na oyo etali bankoko. Bokoki koyeba bankombo na baboti na bino mpe ya bankoko minei na bino, kasi boniboni mpo na bankokololo mwambe? Boyebi bankombo na bango? Bolingi koyeba mingi ya oyo etali bango? Botuna bamisionele! Bakoki kosalisa bino!9 Bayebi penepene na kokota na makundoli ma mambi ya libota ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Basusu kati na bino bozali bandimi kasi sikawa bozali na botau. Bolingi Nkolo mpe mbala mingi bozali kokanisa kozonga na lopango na Ye. Kasi boyebi te lolenge nini bokobanda. Napesi bino likanisi ete botuna bamisionele! 10 Bakoki kosalisa! Bakoki lisusu kosalisa na koteyaka balingami na bino. Biso bamisionele tolingi bino mpe tozali na mposa ya komema bosepeli mpe pole ya nsango malamu ezonga na bomoi na bino.

Basusu kati na bino bakoki kolinga koyeba boniboni kolonga bokakemi to kowumela ntango molai mingi mpe kosepela mingi na konongono ya nzoto. Botuna bamisionele! Bakoki kosalisa bino! Boyekoli ya bosomi elakisi ete, lokola lingomba, bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazali liboke ya nzoto konongono. Motango ya liwa ezali o ntei ya nse mingi koleka mpe bomoi ezali ya molai mingi koleka lingomba nyonso oyo esili kotangema bayekola na ntango moko molai na Etazini.11

Basusu kati na bino bokoki koyoka ete bomoi ezali na mosala mingi mpe ya matata, kasi na nse ya mozindo ya motema na bino boyoki mpamba ya nsomo, na bokambi to ntina te. Botuna bamisionele! Bakoki kosalisa bino! Bakoki kosalisa bino mpo na koyekola mingi etali ntina mpenza ya bomoi—ntina nini bozali awa na mabele mpe wapi bokokende nsima ya liwa. Bokoki koyekola boniboni nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto ekopambola bomoi na bino koleka eloko nyonso mosusu bokoki sikawa kobanza.

Soki bomitungisi etali libota na bino, botuna bamisionele! Bakoki kosalisa bino! Kolendisa mabala mpe mabota ezali ya motuya mingi mpenza na Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Mabota ekoki kozala elongo libela. Botuna bamisionele mpo na koteya bino boniboni yango ekoki kosalema mpo na libota na bino.

Bamisionele bakoki lisusu kosalisa bino na mposa na bino mpo na koyeba mingi koleka. Molimo ya moto ezali na mposa mpenza ya mwinda. Ezala bosolo ewuti na labo ya mayele to na bobimisi uta na Nzambe, tokoluka yango! Nkembo ya Nzambe ezali ya solo mayele.12

Kokola na boyekoli ezali na boyebi ya molimo mpe ya ntango lokola. Tobeti sete na motuya ya bososoli makomi ma bule. Boyekoli ya bonsomi moko kala te esosolaki ete Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazalaki bato bayebi mingi koleka na oyo etali Boklisto mpe Biblia.13 Soki bolingi kososola Biblia malamu mingi, kososola Buku ya Mormon malamu mingi, mpe kozwa bososoli ya monene mingi ya bondeko ya moto mpe botata ya Nzambe, botuna bamisionele ! Bakoki kosalisa bino!

Mingi na bino bazalina mposa ya mozindo mpo na kosalisa bato bakeleli. Mpamba te tolandi Yesu Klisto, Basantu ya Mikolo mya Nsuka batindami na mposa wana ya makasi. 14 Moto nyonso akoki kosangana na biso mpo na kosalisa bakeleli mpe kopesa lisungi mpo na bato ya likama ya mobomano esika nyonso na mokili. Soki bolingi kosala elongo na biso, botuna bamisionele! Bakoki kosalisa bino!

Mpe soki bolingi koyeba mingi ya oyo etali bomoi nsima na liwa, oyo etali lola, oyo etali mwango ya Nzambe mpo na bino; soki bolingi koyeba mingi ya oyo etali Nkolo Yesu Klisto, Bomikabi na Ye, mpe Bozongisi ya Eklezia na Ye lokola etiamaki na ebandeli, botuna bamisionele! Bakoki kosalisa bino!

Nayebi ete Nzambe azali na bomoi. Yesu azali Klisto. Eklezia na Ye ezongisami. Na makasi nasambeli ete Nzambe akoka kopambola moko na moko na bino mpe moko na moko na bamisionele na biso ya ntalo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “As We Meet Together Again,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2010, 5–6.

  2. Tala Doctrine et Alliances 4:3.

  3. Tala Matai 10:1; Luka 6:13; 10:1; Baefese 4:11–12.

  4. Tala Doctrine et Alliances 1:30.

  5. Matai 28:19.

  6. Tala Doctrine et Alliances 68:8; 84:62; 112:28.

  7. Tala 1 Bakolinti 2:2; 2 Nefi 25:26.

  8. Bosololi ya yemei uta na W. Tracy Watson, mokambi ya kala na Misio ya Mesa na Arizona.

  9. Wapi esika napesi libengisi ya “kotuna bamisionele”, bokoki lisusu kotuna moninga moko oyo azali mondimi ya Eklezia mpo na lisalisi.

  10. Bandeko, baninga, mpe bayangeli ya Eklezia oyo bazali kosalaka elongo na moninga bakoki kozala na esengo ya kosalisa.

  11. Tala James E. Enstrom mpe Lester Breslow, “Lifestyle and Reduced Mortality among Active California Mormons, 1980–2004,” Preventive Medicine, vol. 46 (2008), 135.

  12. Tala Doctrine et Alliances 93:36.

  13. Tala U.S. Religious Knowledge Survey (Pew Forum on Religion and Public Life, sanza ya libwa 28, 2010), 7.

  14. Tala Ram Cnaan, Van Evans, mpe Daniel W. Curtis, Called to Serve: The Prosocial Behavior of Active Latter-day Saints (University of Pennsylvania School of Social Policy and Practice, 2012); “Mormon Volunteerism Highlighted in New Study” (sanza ya misato 16, 2012), http://www.mormonnewsroom.org/article/mormon-volunteerism-report; Mormons in America: Certain in Their Beliefs, Uncertain of Their Place in Society (Pew Forum on Religion and Public Life, sanza ya yambo 12, 2012), 43; Robert D. Putnam mpe David E. Campbell, American Grace: How Religion Divides and Unites Us (2010), 444–54.