Bozala Bilombe na Mpiko, Bokasi, mpe Mosala

Na Episikopo Gary E. Stevenson

Episikopo Mokonzi


Bomikokisa lokola esalaki bilenge basoda 2.000 na kozalaka bilombe na mpe mpiko lokola basimbi banganganzambe ya botongono.

Na mpokwa ya lelo nazali mingimingi koloba na bilenge babali, basimbi Bonganganzambe ya Alona, basangani elongo uta mokili mobimba mpo na koyoka liyangani monene ya bonganganzambe. Nakaboli na bino lisolo uta na Buku ya Mormon oyo elimboli Elamani mpe basoda banzenga na ye 2,000. Likomi oyo ekopesa biso bososoli ya ezalela ya bilenge babali ya kala wana—mpe bofuli mpo na bino, bilenge babali ya mikolo mya nsuka. Natangi likomi moko naligaka: “Mpe bazalaki banso bilenge babali, mpe bazalaki bilombe makasi koleka mpo na oyo etali mpiko, mpe lisusu mpo na bokasi mpe mosala; kasi tala, oyo ezalaki nyonso te—bazalaki bato oyo bazalaki solo na ntango nyonso.”1 mpiko, bokasi, mosala, mpe solo—bizaleli nini kitoko boye!

Nakolinga kolobela mingimingi ezaleli ya yambo oyo elimboli bango: “Bilombe na mpiko.” Mpo na ngai, oyo elimboli bondimi ya bilenge babali oyo na kosalaka na mpiko maye mazali malamu, to lokola Alma alimboli, “kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ntango inso … mpe na bisika binso.” 2Bilenge basoda 2.000 bazalaki na bantango mingi ya kolakisa mpiko na bango. Moko na moko na bino akozala na bantango ya ntina na bomoi na bino oyo esengaka mpiko. Moninga na ngai, John, akabolaki na ngai bantango wana na bomoi na ye.

Mibu mingi eleki, John andimamaka na Univesité monene ya Japon. Azalaki moyekoli ya pologalami ya bayekoli uta na bikolo mingi elongo na bayekoli ya mayele mingi uta na mokili mobimba. Misusu bakomamaki na elikia ya kokolisa bososoli na bango ya boyebi mpe ya lokota, basusu bamonaki yango lokola eloko moko ya kosunga bango mpo na mosala moko boye mpe lotomo na Japon, Kasi banso batikaki bandako mpo na koyekola na mboka mopaya.

Noki nsima ya bokomi ya John, lisolo ya feti oyo ekosalama likolo ya ndako ya motomoko epanzanaki katikati bayekoli ya bapaya—libengisi na moto nyonso oyo akolinga koya na osangani ya bato mpo na koyebana. Mpokwa wana, John mpe baninga mibale bakendaki na balabala oyo bayebisamaki.

Kolandaka nzela ya etombola tii na étage ya suka ya ndako, John mpe baninga na ye balandaki nzela ya esikalie ya nkaka mpo na moto moko oyo ezalaki kokamba tii na likolo ya ndako mpe babandaki kosolola na basusu. Ntango butu ekomaki makasi, mokili ebongwanaki. Makelele, makasi ya miziki, mpe masanga makasi ekolaki, mpela moko na kozanga elengi ya John. Nde na mbala moko moto moko abandaki kobongiso bayekoli na zolongano monene na likanisi ya kokolaka marijuana. John abebisaki elongi mpe nokinoki eyebisaki baninga na ye mibale ete ntango ekokaki balongwa. Penepene lokola mpo na liseki, moko na bango ayanolaki ete, “John, oyo ezali pete—tokotelama mpamba na zolongano, mpe soki ekomi ntango na biso, tokolekisa yango na esika ya komela yango. Na lolenge wana tokokoka koyokisama nsoni te liboso ya bato banso na kolongwaka.” Oyo emonanaki pete na John, kasi emonanaki ya malamu te. Ayebaki ete asengelaki koyebisa likanisi na ye mpe kosala. Na mwa ntango aboti mpiko na ye mpe alobaki mpe ayebisaki bango ete bakokaki kosala lokola balingaki, kasi ye azalaki kolongwa. Moninga moko azwaki mokano ya kotikala mpe azwanaki elongo na zolongano; mosusu na motemo moko te alandaki john na nse ya baesikalie mpo na komata na etombola. Na bokamui mingi, ntango bikuke ya etombola efungwamaki, bapolisi ya Japon na motema moto mto, balekaki bango, mpe bawelelaki mpo na komata na likolo ya ndako. John mpe moninga na ye bakotaki na etombola mpe bakendaki.

Ntango bapolisi babimaki na likolo ya basikalie, bayekoli babwakaki nokinoki mbenda ya mabe na libanda ya étage ete bakangama te. Nsima ya kokanga nzela ya esikalie, nzoka nde, bapolisi batiaki na molongo moto nyonso oyo azalaki likolo ya étage mpe basengaki moyekoli moko na moko asembola maboko mibale. Bapolisi nsima batambolaki tii na nsuka ya molongo, kolumbaka na bokebi mosapi ya monene mpe oyo elandi ya moyekoli moko na moko. Nyonso oyo asimbaki marijuana, ata soki bamelaki yango to te, bazalaki kokanisama ya mbeba, mpe ezalaki na bitumbu makasi. Penepene banso, bayekoli baye batikalaka likolo ya étage babenganamaki uta na bauniversité na bango ya moko na moko, Baoyo basalaki efrakata ntango mosusu babenganaki bango uta na Japon. Bandoto ya bobokoli, mibu ya bolengeli, mpe libaku mosala ya mikolo ekoya na Japon ebebisamaki na mbala moko.

Sikawa tika ngai nalobela bino maye makomaki na baninga oyo misato. Moninga oyo atikalaki likolo ya ndako abenganamaki uta na université na Japon wapi asalaki mingi mpenza mpo na kondimama mpe asengamaki azonga ndako. Moninga oyo alongwa na feti na butu wana elongo John asilisaki kelasi na Japon mpe akendaki kozwa badipolome uta bauniversite monene na Etazini. Mosala na ye ezongisaki ye na Azia, wapi azui elonga ya mosala monene. Atikali na botondi epai ya mokolo oyo mpo na ndakisa ya mpiko yajohn. Nzoka nde mpo John, bambano na bomoi na ye ezali ya kotanga te. Ntango na ye na Japon na mobu wana ekambaki ye na libala ya esengo mpe nsima mbotama ya bana babale ya mibali. Azali moto ya nkita ya elonga mpenza mpe kala mingi te akomaki motei na université moko ya Japon. Kanisa boniboni ya kokesena bomoi na ye ekokaki kozala soki azalaka na mpiko ya kolongwa na feti na mpokwa monene wana na Japon.3

Bilenge babali, ekozala na bantango mosusu oyo bino,lokola John, bokosengama bolakisa mpiko na bino ya bosembo na miso ya baninga na bino, oyo mbano na yango ekoki kozala ya liseki to ya kotiola. Na kobakisa, na mokili na bino, bitumba na monguna ekobundama lisusu na bisika ya makelele te, ezanga bato liboso ya etando moko. Tekinolozi na matomba na yango ya ntina lisusu ememi mikakatano miye bankola liboso na biso bakutanaki na yango te. Boluki ya kala mingi te ya ekolo emonaki ete bilenge ya mikolo ya lelo basenginiami kaka na bandelo ya kobangisa mokolo na mokolo na baeteyelo te kasi lisusu na mokili ya interneti. Ebimisami ete bilenge baye bazalaki kotala bililingi ya molangwa to bosaleli lopipi na nzela ya basite ya bato nyonso bazalaki mbala misato to minei na litomba ya kosalela yango. Kolobelaka na ntina ya boluki yango, ministele ya kala moko ya etazini alobaki ete,: “Boluki ya mobu oyo ebimisi ebimisi ya botindiki mibale mibale—botindiki mibale mibale ya motango ezali kotambola koleka baninga ya mwana moko mpe bana oyo basanganaka na bango. Ezali kotondisa ndako mpe lisuku ya kolala ya mwana na nzela ya Interneti.”4 Kolakisa mpiko ya bosembo emonanaka mbala mingi mpenza te lokola kaka kofina to kofina te. Bamisionele bateyami uta na Preach My Gospel, “Oyo oponi mpo na kokanisa mpe kosala ntango ozali yo moko mpe ondimaka ete moto moko te azali kotala ezali emekoli makasi ya bolamu na yo.”5 Bozala makasi! “Botelema na bisika bisantu, mpe boningana te.”6

Bilenge babali, nalaki ete Nkolo akopesa bino nguya. “Mpo ete Njambe apesaki biso molimo ya kobangabanga te kasi molimo ya nguya.”7 Akopambola bino mpo na mpiko mpe ezalela ya bosembo—na esengo mpe bosepeli. Mpiko ya boye ekozala mbano ya bondimi na bino na Yesu Klisto mpe Bomikabi na ye, nsambo na bino, mpe botosi na bino na mitindo.

Mokambi N. Eldon Tanner asakolaki ete: “Elenge mobali moko na libanda ya masano ya eteyelo akoki kazala na nguya mpo na malamu. Elenge mobali moko na ekipiya masano ya ndembo ya makolo, to na campusi, to na katikati ya baninga na ye ya mosala akoki, na kobikaka nsango malamu, kopesaka lokumu na bonganganzambe na ye, kobatelaka bolamu, asalaka malamu mingi. Mbala mingi bokokutana na matongi mpe na liseki mingi kutu na baoyo bandimaka makambo moko oyo yo osalaka, atako bakoki komemia yo mpo na kosalaka malamu. Kasi mikundola ete Nkolo yemei atungisamaki, asekamaki, abwakamaki nsoi, mpe na nsuka abakamaki mpo atatanabanaki te na bondimi na ye. Esi botelama mpo na kokanisa nini ekokaki kosalema soki alembaki mpe alobaki, ‘Bokeseni nini ekosala?’ mpe atikaki misio na Ye? Elingi biso kozala batiki, to elingi biso kozala nkozo, to tolingi kozala basali ya nkozo atako ezali na bokeseni nyonso mpe mabe na mokili? Tika tozala na mpiko mpo na kotelema mpe totangama lokola bayekoli ya Klisto ya solo, bamipesa.”8

Nabengisi bino bomikokisa lokola esalaki basoda banzenga 2.000 na kozalaka na nkozo mpe mpiko lokola basimbi banganganzambe ya botongono. Bomikundola, maye bosalaka, mpe wapi bokendaka, mpe oyo bomonaka ekosala nani bokokoma. Bolingi kokoma nani? Bokoma badiakona balongobana, batei balongobana, banganganzambe balongobana. Botia ntina moko mpo na kozala ya kolongobana mpo na kozwa likuli ya nsima na mobu ekoki mpe na nsuka mpo na kozwa Bonganganzambe ya Melekisedeke. Oyo ezali nzela moko ya bosembo oyo ebengisaka lisalisi ya bonzambe. Nkolo alobaki ete, “Na makuli wana, nguya ya Nzambe emonisami.”9

Baboti, bakambi ya bonganganzambe, mpe masakoli ya kotia esika ya yambo ezwami na Mon Devoir envers Dieu mpeJeunes Soyez Fortsna bino ekokamba bino na nzela na bino.

Mokambi Thomas S. Monson apesi toli kala mingi te ete:

“Mpo na kozwa [mikano] na bwania, mpiko esengelami—mpiko ya koloba te, mpiko ya koloba iyo. …

“Nabondeli bino bozwa mokano moko … sikawa, ya kopengwa te uta na nzela oyo ekambaka na ntina na biso: bomoi ya seko elongo na tata wa biso na Lola.”10

Kaka lokola basoda banzenga 2.000 bayanolaki na libiangi mpo na bitumba ya bakambi na bango, Elamani, mpe abongisaki nkozo na bango mpo na mpiko, bino mpe bokoki kasala lokola na kolandaka moyangeli profeta, Mokambi Thomas S. Monson.

Basimbi Bonganganzambe ya Alona, mpo na kosukisa napesi litatoli na ngai ya Nzambe tata ya Yesu Klisto mpe maloba ya joseph Smith:“Bandeko Babali, Ekoki biso kokoba na ntina monene oyo? tokende liboso kasi nsima te. Mpiko, bandeko babali; mpe tokoba, kino na elonga!”11 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1.  Alama 53:20.

  2.  

    2.  Moziya 18:9.

  3.  

    3. Lisolo ya ye moko alobaki na mokomi.

  4.  

    4. Joseph A. Califano, Jr., mokeli mpe mokambi akufa ya National Center on Addiction and Substance Abuse na Columbia University, na libimisi ya zulunale etali boluki, casacolumbia.org.

  5.  

    5.  Preach My Gospel : A Guide to Missionary Service (2004), 118.

  6.  

    6.  Doctrine et Alliances 87:8.

  7.  

    7.  2 Timoti 1:7.

  8.  

    8. N. Eldon Tanner, “For They Loved the Praise of Men More Than the Praise of God,” Ensign, Nov. 1975, 74–75.

  9.  

    9.  Doctrine et Alliances 84:20.

  10.  

    10. Thomas S. Monson, “The Three Rs of Choice,” Liahona mpe Ensign, Nov. 2010, 68.

  11.  

    11.  Doctrine et Alliances 128:22.