2010–2019
“Lokola Nazali na Bomoi, Bokozala na Bomoi mpe Lokola”
Sánzá ya Zómi 2012


“Lokola Nazali na Bomoi, Bokozala na Bomoi mpe Lokola”

Na ntina na Ye, kutu Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mayoki wana ya mawa, bomoko, mpe bozangi elikia ekomelama mpenza mokolo moko na litondi ya esengo.

Na kosalaka lokola elenge misionele na Chili, moninga na ngai mpe ngai tokutanaki na libota moko ya bato nsambo na etape. Mama azalaki koya mposo nyonso elongo na bana na ye. Tokanisaki ete bazalaki bandimi ya kala na Eklezia. Na nsima ya bamposo mingi toyokaki ete babatisamaka te.

Nokinoki nasololaki na libota mpe natunaki bango soki tokokaki koya na ndako na bango mpe koteya bango. Tata asepelaki te na koyekola nsango malamu kasi amonaki mabe te mpo na biso koteya libota na ye.

Ndeko mwasi Ramirez apusanaki mbangumbangu na mateya. Amitungusaki mpo na koyekola malongi manso toteyaki. Mpokwa moko ntango tozalaki kolobela libatisi ya bana, toteyaki ete bana mike bazali na elindo te mpe bazali na ntina te mpo na libatisi. Tobengisaki ye atanga Buku ya Moloni:

“Tala nalobi epai ya yo ete likambo liye okolakisa—boyamboli mpe libatisi ezali epai ya bango baye bazali bayanoli mpe bakoki kosala lisumu; iyo, lakisa baboti ete basengeli koyambola mpe kobatisama, mpe komikitisa lokola bana bake ba bango, mpe bakobikisama banso elongo na bana bake na bango.

“Mpe bana na bango ya mike mike bazali na mposa te ya boyamboli, mpe libatisi te. Tala, libatisi lizali mpo na boyamboli mpo na kokokisa mitindo, mpo ya bolimbisi bwa Masumu.

“Kasi bana bake ba bango bazali na bomoi na Klisto, kutu uta na bokeli bwa mokili; soki boye te, Nzambe azali Nzambe moko oyo atalaka bilongi, mpe lisusu abongwanaka, mpe akabolaka bato; mpo bana bake boniboni mingi bakufi na kozangaka libatisi!”1

Nsima ya kotanga makomi oyo, Ndeko Mwasi Ramirez abandaki kolela. Moninga na ngai mpe ngai tobulunganisamaki. Natunaki, “Ndeko Mwasi Ramirez, tolobi to tosali likambo moko oyo etuki yo?

Alobaki, “O, te, Mpaka, bosali likambo moko oyo ezali mabe te. Mibu motoba eleki nazalaki na bébé ya mobali. Akufaki liboso bakoka kobatisa ye. Sango na biso alobelaki biso ete mpamba te babatisaki ye te, akozala na limbe na boseko mobimba. Mpo na mibu motoba nakumbaki mpasi mpe elindo wana. Nsima ya kotanga makomi, nayebi na nguya ya Molimo Mosantu ete ezali ya solo. Nayoki bozito bonene elongwe na ngai, mpe mpizoli oyo ezali ya esengo.”

Namikundolaki mateya ya Profeta Joseph Smith, oyo ateyaki malongi oyo ya kobondisa: “Nkolo alongolaka bato mingi, ata na bomwana, ete bakokoka kokima likunia ya bato, mpe mawa mpe mabe ya mokili ya lelo; bazalaki peto mingi, ya bolingo mingi, mpo na kowumela na mabele; yango wana, soki eyebani na malamu, esika ya kolela tozali na ntina ya kosepela lokola babikisami na mabe, mpe tokozala na bango noki lisusu.”2

Nsima ya koyoka mpasi moko penepene ya kokoka komema te mpo na mibu motoba, malongi ya solo, ebimisamki na Tata na Lola na nzela ya profeta ya bomoi, ememi kimia ya sukali na mwasi oyo aniokwamaki. Ntina ya koloba te, Ndeko mwasi Ramirez mpe bana na ye oyo bazalaki na mibu mwambe to likolo babatisamaki.

Namikundoki nakomelaki libota na ngai, koyebisaka botondi oyo nayokaki na motema mwa ngai mpo na boyebi ya oyo mpe bosolo misusu mingi ya litondi mpe ya ntalo ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Nalotaki mokolo moko te boniboni mobeko oyo ya solo ya kokamwa elingaki kozongela ngai na mibu mikoya mpe kolakisama ete ezali mafuta na ngai na Giladi.

Nalingi koloba na baye babungisi mwana mpe batuni motuna, “Ntina nini ngai? To ntango mosusu kutu botiaki ntembe na bondimi na bino moko na Tata moko ya bolingo ya Lola. Ezali losambo na ngai ete na nguya ya Molimo Mosantu, nakoka komema mwa ndelo ya elikia, ya kimia, mpe ya bososoli. Ezali mposa na ngai mpo na kozala esalelo na komema penepene bozongisi ya bondimi na Tata wa biso ya Lola, oyo ayebi makambo manso mpe apesi biso ndingisa mpo na kokutana na mimekano oyo ekoya na koyeba mpe kolinga Ye mpe kososola ete soki Ye te tozali na eloko te.

Na sanza ya mibale 4 ya 1990, mwana na biso ya mobali ya misato mpe mwana ya motoba abotamaki. Topesaki ye nkombo Tyson. Azalaki mwa mwana mobali ya kitoko, mpe libota epesaki ye mbote na motema mpe maboko ya kofugwama. Bandeko na ye ya mibali mpe ya basi bazalaki na litundu na ye. Biso banso tokanisaki azalaki mwa mwana mobali abonga mpenza mingi koleka oyo abotama naino te.

Ntango Tyson azalaki na mibu mwambe, amelaki mpembe oyo akutaki na tapi. Mpembe evandaki na mongongo ya Tyson, mpe akokaki lisusu kopema te. Nkulutu na ye ya mobali amemaki Tyson likolo, kogangaka na kolenga, “Bébé azali kokoka kopema lisusu te. Bébé azali kokoka kopema lisusu te.” Tobandaki kobikisa ye mpe tobengaki lisalisi.

Mafulume bayaki mpe bamemaki Tyson nokinoki na lopitalo. Na kisuku ya kozelela tokobaki na losambo ya makasi kobondela Nzambe mpo na likamwisi. Nsima ya oyo emonenaki lokola bomoi mobimba, dokotolo akotaki na kisuku mpe alobaki, “Nazali na mawa. Ezali na eloko mosusu te tokoki kosala. Bozwa ntango nyonso bolingi.” Mpe nsima alongwaki.

Tokotaki na kisuku wapi Tyson alalaki, tomonaki mwa liboke ya esengo ezanga bomoi. Emonanaki lokola soki azalaki na mwa pole ya selesitiale nzinganzinga na mwa nzoto na ye. Azalaki kongenga mpe peto mpenza.

Na ntango wana emonanaki lokola soki mokili na biso ekomaki na nsuka. Boniboni tokoki kozonga na bana basusu mpo na lolenge moko komeka kolimbola ete Tyson alingaki te kozonga ndako?

Nakoloba na ngai moko ntango nakosolola etikali ya likambo oyo. Mwasi na ngai ya anzelu mpe ngai tozwaki momekano oyo elongo, kasi nakoki te na kolobelaka mayoki ya mama moko mpe nakosala yango kutu te .

Ekoki te kolakisama sangisasangisa ya mayoki nazwaki na ntango wana ya bomoi na ngai. Mbala mingi mpenza nayokaki lokola soki nazalaki na ndoto ya mabe mpe ete nalingaki nokinoki kolamuka mpe ndoto ya mabe oyo elingaki kosila. Butu mingi nalalaki te. Nawayawayaki na butu kisuku na kisuku, kosalaka keba ete bana basusu bazalaki na likama te.

Mayoki ya ngambo etondaki na molimo na ngai. Namiyokaki na ngambo. Namiyokaki na mbindo. Nazalaki tata na ye; nasengelaki kosala mingi mpona kobatela ye. Soki kaka nasalaka oyo to wana. Ntango mosusu ata lelo, mibu 22 nsima, mayoki wana ebandi kokota na motema na ngai, mpe nazali na mposa ya kolongola yango mbangumbangu noki te ekoki kobebisa ngai.

Penepene na sanza moko nsima ya liwa ya Tyson, nasololaki na Mpaka Dean L. Larsen. Azwaki ntango mpo na koyoka ngai, mpe nakozala ntango nyonso na botondi mpo na toli mpe bolingo na ye. Alobaki, “Nakanisi te Nkolo alingi omipesa etumbu mpo na liwa ya mwa mwana mobali na yo.” Nayokaki bolingo ya Tata wa ngai ya Lola na nzela ya moko ya basali na ye apona.

Nzokande, makanisi ya koniokola ekobaki koniokola ngai, mpe nokinoki nabandaki koyoka nkanda. “Ezali malamu te! Boniboni Nzambe akoki kosala boye na ngai? Ntina nini ngai? Nini nasalaki mpo na kozwa yango lokola mbano?” Namiyokaki kutu ngai moko nakomaki na nkanda na bato oyo bazalaki komeka kobondisa ngai. Namikundoli moninga na ngai kolobaka, “Nayebi boniboni ozali koyoka.” Nalingaki kokanisa na ngai moko, “Oyebi te boniboni nazali koyoka. Bobele tika ngai nie.” Nokinoki namonaki ete mawa ya yo moko ekoki lisusu kozala mabe mingi. Namiyokaki nsoni mpo na makanisi ya boboto te na baninga na ngai oyo bazalaki bobele komeka kosalisa ngai.

Lokola nayokaki ngambo, nkanda, mpe mawa ya yo moko komakaka kosilisa ngai, nasambelaki ete motema na ngai ekoka kobongwana. Na nzela ya mayele ya bule mpenza ya moto, Nkolo apesaki ngai motema ya sika, mpe atako nazalaki naino ngai moko kaka mpe na mpasi, bomoni nyonso ebongwanaki. Napesamelaki mpo na koyeba ete bayibaka ngai te kasi ete ezalaki na lipamboli monene kozelaka ngai soki namilakisi na botongono.

Bomoi na ngai ebandaki kobongwana, mpe nakokaki kotala liboso na elikia, esika ya kotala nsima na elikia te. Natatoli ete bomoi oyo ezali nsuka te. Mokili ya Molimo ezali ya solo. Mateya ya baprofeta etali bomoi nsima na kufa ezali ya solo. Bomoi oyo ezali bobele litambe na nzela ya kokende liboso na mobembo na biso mpo na kozonga epai ya Tata na biso na Lola.

Tyson atikali eteni na mobimba mpenza ya libota na biso. Na mibu nyonso ezali kitoko komona ngolu mpe boboto ya Tata moko ya bolingo na Lola, oyo apesi libota na biso ndingisa ya koyoka na lolenge moko ya kosimba nguya ya Tyson. Natatoli ete elamba ekaboli biso ezali moke. Mayoki wana kaka ya bosembo, bolingo, mpe bomoko ya libota esuki ntango balingami ba biso baleki na ngambo mosusu te; kutu mayoki wana eyei makasi.

Ntango mosusu bato bakoki kotuna, “Ntango boni esalaki mpo na yo olonga yango?” Bosolo ezali, bokolonga yango mobimba te kino bokozala lisusu elongo na balingami na bino oyo bakenda. Nakozala na litondi ya esengo mokolo moko te kino tokosangana lisusu na ntongo ya Bosekwi ya Yambo.

“Mpo moto azali molimo. Biloko ezali ya seko, mpe molimo mpe eloko, ekangani na kokabwana te, ezwi litondi ya esengo;

“Mpe ntango ekabwani, moto akoki te kozwa litondi ya esengo.”3

Kasi na ntango wana, lokola Mobikisi ateyaki, tokoki kokoba na kozala na motema ya nsai.4

Nayekolaki ete mpasi ya mingai, penepene ya kokoka komema te ekoko kokoma ya sukali ntango bobaluki na Tata wa bino ya Lola mpe bosengi mpo na libondisi oyo eyei uta na mwango na Ye; Mwana na Ye, Yesu Klisto; mpe Mobondisi na Ye, oyo azali Molimo Mosantu.

Lipamboli nini ya nkembo ezali na bomoi na biso. Elingaki kozala ya nsomo soki toyokaki mawa monene te ntango tobungisaki mwana? Boniboni ya botondi nazali na Tata wa ngai na Lola oyo apesi biso ndingisa mpo tolinga na mozindo mpe tolinga na seko. Boniboni ya botondi nazali mpo na mabota ya seko. Boniboni ya botondi nazali ete Ye abimisi lisusu na nzela ya baprofeta ba Ye ba bomoi mwango ya nkembo ya bosikoli.

Mikundola ntango okendeki na matanga ya molingami na yo mayoki moko na motema na yo ntango owuti na lilita mpe otali nsima mpo na komona sanduku yango moko—komitunaka soki motema ekobukana.

Natatoli ete na ntina na Ye, kutu Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mayoki wana ya mawa, bomoko, mpe bozangi elikia mokolo moko ekomelama mpenza na litondi ya esengo. Natatoli ete tokoki koyekama na Ye mpe ntango alobaki:

“Nakotika bino bitike te, nakoya epai na bino.

“Nsima na ntango moke, bamokili bakomona ngai lisusu te, nde bino bojali komona ngai mpo ete ngai najali na bomoi mpe bino bokojala na bomoi.”5

Natatoli ete, lokola elobami na Prêchez Mon Evangile , “ntango toyekami na Bomikabi ya Yesu Klisto, Ye akoki kosalisa bino kotia molende na mimekano, babokono, mpe mpasi. Tokoki kotondisama na esengo, kimia, mpe libondisi. Nyonso oyo ezali mabe na bomoi ekoki kokoma alima na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.”6

Natatoli ete na ntongo ya kongenga, ya nkembo ya Bosekwi ya Yambo wana, balingami ba yo mpe ya ngai bakobima na nkunda lokola elakelami na Nkolo Yemei mpe tokozala na litondi ya esengo. Mpamba te Ye azali na bomoi, bango mpe biso tokozala na bomoi lokola. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.