2010–2019
Kokoma Moyekoli ya Solo
Sánzá ya Zómi 2012


Kokoma Moyekoli ya Solo

Ntango totosi mitindo na Ye mpe tosalisi bandeko na biso bato, tokomi bayekoli ya malamu mingi ya Yesu Klisto.

Baye kati na biso oyo bakoti na kati ya mai ya libatisi mpe bazwi likabo ya Molimo Mosantu bayokani ete balingi kokamata likolo na bangomei nkombo ya Yesu, to na maloba mosusu, tomisakoli kozala bayekoli ba Nkolo. Tobandeli lisusu boyokani wana mposo na mposo lokola tozali kokabola elambo, mpe tolakisi kozala moyekoli yango na lolenge tozali kotambwisa bomoi na biso. Kozala moyekoli ya boye elakisamaki malamu mingi kala te na Mexico.

Ezalaki eleko ya milona ya kolonaka mbuma na mpo na bato ya Mexiko ya nordi. Banzete ya mbuma etondaki na fololo mpe bato bazalaki kozela ete bakobuka ebele. Miango esilaki kosalema mpo na kofuta niongo, kobongola masini mpe banzete enuni, mpe kokokisa mikumba lokola mbongo ya kelasi mpo na bato ba libota. Miango ezalaki kutu kosalema mpo na bopemi ya libota. Elikya ezalaki ya malamu mpenza. Nde, na nsima ya nzanga ya mokolo mwa yambo na nsuka ya sanza ya misato, mopepe monene ekotaki, mpe mvula ya mabanga ebandaki kokweya. Mabanga ekweyaki kino penepene na ngonga misato na ntongo. Nde, ntango mapata ebimaki, mpio ebandaki. Na butu mobimba mpe na ntongontongo, makasi nionso esalemaki mpo na kobikisa ata ndambo ya mbumba ya kobuka. Nyonso ezalaki mpamba. Malili ezalaki mpenza makasi, mpe mbumba ekomaki nyonso ekangamaki na malili. Mbumba ya kobuka mpe koteka ekokaki kozala te mobu wana. Ntongo etanaki mokolo mwa mibale elongo na bozangi ya miango ya kitoko, bozeli, mpe bandoto ya bobele lobi eleki, epesaki maladi mpe mpasi na motema.

Nazwaki mokanda na interneti mpo na eye etali mokolo wana ya nsomo na ntongo uta na Sandra Hatch, mwasi ya John Hatch, ntango wana mosungi wa yambo na bokambi ya tempelo ya Colonia Juárez Chihuahua. Natangi biteni ya mokana wana: John alamukaki ntongontongo—penepene na 6:30—mpo na kokende mbangu na tempeto mpo na kotala soko tokokaki kolongola liyangani ntongo wana. Azongaki kolobaka ete esika ya mituka mpe nzela ezalaki polele, yango wana tokanaki kokende liboso. Tokanisaki ete ntango mosusu boko basali baye bazalaki na mbuma te balingaki koya mpe kotia basali banso na liyangani… . Ezalaki ya bofuli mpenza komona bato kokota, moko na moko. Bazalaki wana nsima ya kozanga mpongi mpenza, mpe kokanisaka mbuma ya bango ebungaki… . Nazalaki kotala bango na bolengeli ya liyangani, mpe bazalaki na ntango ya mabe kolalaka te. Kasi esika ya kokanisa bazalaki na bolimbisi ya malamu na koyaka te, bazalaki wana. Mpe ezalaki bato 38 na liyangani (liyangani mobimba)! Ezalaki ntongo moko ebondisaki biso, mpe totondaki Tata wa Lola mpo na bato malamu baye basalaki mokumba mwa bango, ata nini ekoya. Nayokaki molimo ya kafukafu kuna ntongo wana. Nayebi na ntembe te Ye asepelaki koyeba ete tolingi ndako ya Ye mpe toyoki ete ezali esika malamu ya kozala na ntongo ya mpasi ya boye.

Lisolo esuki wana te mpe na ntembe te ezali kokoba.

Mingi ya baye babungisaki kobuka mbuma bazwaki mwa mabele ezalaki kuna mpo na kolona nkona mosusu mpo na eleko ya nsima lokola pilipili to madesu. Bilanga oyo ekokaki kopesa ata mwa mosolo, ekoki mpo na kobikela kino mobu ya nsima. Nzokande, ezalaki na ndeko mobali moko ya malamu elongo na libota ya elenge oyo azalaki te na mabele ya kobakisa mpe akutanaki na mobu ezanga ata lifuta. Basusu na lingomba, na komonaka ezalela ya nsomo ya ndeko mobali oyo mpe kosalaka na ndenge ya bangomei mpe mosolo ya bangomei, babongisaki ndambo ya mabele, basalelaki masini ya bangomei mpo na kolengela mabele, mpe kopesa mwa banzete ya pilipili mpo na kolona.

Nayebi bato towuti kolobela. Koyebaka bango, nasutukaki te nini basalaki. Kasi baye bayebi bango te bakoki ntango mosusu kotuna mituna mibale, yango mibale ebandi na likambo ntina nini. Ntina nini balingaki koya na tempelo mpo na kosala mikumba mya bango mpe kosalisa nsima ya kozala ya kotelema butu mobimba, bobele mpo na kososola ete babungisaki eteni monene ya lifuta ya bango mpo na mobu mobimba? Ntina nini balingaki kosalela nini ezalaki sikawa bomengo ya moke mpe ya motuya mpo na kosalisa mosusu na mposa mayele te ntango bangomei bazalaki sikawa na nkaka ya boye ya nsomo ya mosolo ?

Soki ososoli nini elingi koloba kozaka moyekoli ya Yesu Klisto, nde okoyeba eyano ya mituna miye.

Kosalaka boyokani ya kozala moyekoli ya Klisto ezali ebandeli ya botamboli molayi, mpe nzela ezali ntango nyonso pete te. Soki toyamboli masumu ma biso mpe tobundi mpo na kosalla nini Ye alingi biso tosala mpe tosaleli ndeko ya biso moto lokola Ye alingaki kosalela bango, tokokoma na ntembe te lokola Ye. Kokomaka lokola Ye mpe kozalaka moko elongo na Ye ezali ntina ya biso mpe lotomo la biso---mpe na mozindo ndimbola mpenza ya boyekoli ya solo.

Lokola Mobikisi atunaki bayekoli ba Ye ntango Ye abimelaki mokili ya Amerika, “Yango wana, lolenge kani ya bato bosengeli kozala, Mpe nde, ayanoli motuna mwa Yemei, Ye alobaki, “Solo nalobi epai ya bino, kutu lokola nazali” (3 Nephi 27:27).

Kokomaka lokola Mobikisi ezali mosala ya pete te, mingimingi na mokili oyo tozali. Tokutani na bikonongo mpe kpokoso mbele mokolo na mokolo ya bomoi bwa biso. Ezali na ntina mpo na yango, mpe ezali moko ya bantina ya bokufi. Ntango totangi na Abraham 3:25, “Mpe tokomeka bango na yango, mpo na komona soki bakosala makambo mango kani Nzambe akotinda bango”.

Bomeki to Mimekano miye ekesani na bozali mpe bokasi. Kasi moko te akotika bozali ya bokufi na kozanga koleka na yango. Mingimingi, tolakisi mimekano lokola bobungisi ya mbuma to mosala, liwa ya molingami moko; bokono; bozangi ya nzoto, ya mayele to ya mayoki; bokeleli; to bobungisi ya baninga. Nzokande, ata na bozwi ya bantina oyo emonani ya motuya ekoki komema makama ma yangomei ya lolendo ya ntina te, wapi toluki mingi lokumu ya bato koleka bondimi ya lola. Yango ekoki kokwa boyebani ya mokili, bondimami ya bato, bokamwisi ya mosuni, ntoki to talanta ya masano, bomengo, mpe bozwi. Mpo na mimekano oyo, boko ya biso bakoki kozala na moyoki ya lolenge moko mpo na maye malakisami na Tevye naFiddler on the Roof:Soki bozwi ezali botutu, “tika Nzambe abeta ngai na yango mpe tika ngai nabika mokolo moko te!”1

Kasi ndenge oyo ya mimekano ekoki kozala kutu ya mpasi mpe ya likama mingi mpe ya kpokoso mingi mpo na kolonga koleka oyo ya liboso. Boyekoli bwa biso ekokokisama mpe ekomekisama te na lolenge ya mimekano oyo tozali kokuta kasi boniboni tokotelemela yango. Lokola toteyamaki na Mokambi Henry B. Eyring: “Yango wana, bomeki eleki monene ya bomoi ezali komona soki toyokemeli mpe totosi mitindo mya Nzambe o ntei ya mipepe minene ya bomoi. Ezali te kotelemela mipepe minene, kasi kopona bolamu ntango yango engali. Mpe mobomano ya bomoi ezali kokweya na momekano wana mpe boye kozanga kozonga na nkembo na mboka ya biso ya lola” (“Spiritual Preparedness: Start Early and Be Steady,” Liahona, Nov. 2005, 38).

Nazali nkoko ya lokumu ya bana 23. Bakolembaka te kokamwisa ngai na bososoli ya bango ya bosolo ya seko, ata na mibu mya bango ya ebandeli mpe ya bomwana. Ntango nazalaki komilengela mpo na lisikulu liye, natunaki moko na moko ya bango mpo na kotindela ngai ndimbola moke ya nini elingi koloba na bango kozala moyekoli to molandi ya Yesu Klisto. Nazwaki eyano ya kitoko uta na bango. Kasi nalingi kokabola na biso eyano oyo eye uta na Benjamin ya mibu mwambe: “Kozala moyekoli ya Yesu Klisto elingi koloba kozala ndakisa. Elingi koloba kozala misionele. Elingi koloba kosalisa basusu. Elingi koloba kotanga makomi mpe koloba nsambo ya yo. Elingi koloba kobatela Saba esantu. Elingi koloba koyekola botindiki ya Molimo Mosantu. Elingi koloba kokende na eklezia mpe kokende na tempelo.”

Nandimi elongo na Benjamin. Boyekoki ezali yango bobele kosala mpe kokoma. Ntango totosi mitindo mya Ye mpe tosaleli bandeko ba biso bato, tokomi bayekoli ya malamu mingi ya Yesu Klisto. Botosi mpe koyangelama na bolingi bwa Ye ekomema kotambola elongo na Molimo Mosantu, elongo na mapamboli mana ma kimia, esengo, mpe bozangi likama oyo ekotambolaka ntango nionso elongo na moto ya misato ya Bonzambe. Mpe yango ekoki koya na nzela mosusu te. Na nsuka mpenza, ezali koyengelama mobimba na bolingi bwa Ye oyo esalisi biso kokoma lokola Mobikisi azali. Lisusu, kokoma lokolaYe mpe kozala moko elongo na Ye ezali ntina ya nsuka mpenza mpe lotomo—mpe na mozindo ndimbola mpenza ya boyekoli ya solo.

Boyekoli ezali nini namonaki esalemaki na Tempelo ya the Colonia Juárez mpe na nzinganzinga na yango ntango bandeko babali mpe basi na bondimi balakisaki lisusu mikano mya bango na Nzambe mpe mpo na moko na mosusu atako mikakatano ya kopasola motema.

Natatoli ete ntango totosi mitindo mya Ye, tosaleli basusu, mpe tomitikisi na bolingi bwa ye, ya solo, tokokoma bayekoli ba Ye ya solo. Natatoli boye na Nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Note

  1. Tala Joseph Stein, Jerry Bock, Sheldon Harnick, Fiddler on the Roof (1964), 61.