2010–2019
Kokoma Baboti ya Malamu
Sánzá ya Zómi 2012


Kokoma Baboti ya Malamu

Ezali na banzela mingi oyo baboti ya malamu bakoki kozwa lisalisi mpe lisungi bazali na yango mposa mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto na bana na bango.

Nakomaki na esika ya kafukafu eleko oyo ya molunge—Nasepeli mobu 90 ya mbotama na ngai. Ntango okomi na esika ya boye na bomoi na yo, esalisaka mpe eteyaka soki okanisi makambo mpe mayele ya kala. Bino bilenge oyo bozali koyoka to kotanga lisikulu oyo mibu 90 ya bomoi ekoki kokamwisa bino mpenza te, kasi na ntango nabotamaki, kozala na bomoi molai ezalaki kokokisa likambo moko monene. Mokolo nyonso nazali na botondi na Tata na Lola mpo na kopambolaka ngai na bomoi ya molai.

Mingi mpenza ebongwanaki na bomoi na ngai. Namoni bokoli ya eleko ya masini ya minene mpe eleko ya informatique. Kosala ebele ya mituka mpe batelefone mpe bampepo ezalaki makambo minene ya sika na mikolo na ngai ya ebandeli. Lelo lolenge tozali kozwila, kokabola, mpe kosalela nsango ezali kobongwana penepene mokolo na mokolo. Na mibu na ngai nakamwi na mokili ya mbongwana ya nokinoki tozali na yango. Mbongwana mingi mpenza ya lelo etumboli makanisi mpo nakokoka kobongisa bomoi na biso.

Na nzela ya bambongwana nyonso ya nokinoki oyo ezali kosalema nzinganzinga na biso, tozali kosambela makasi mpe kosala mpo na kokokisa ete makambo ya motuya ya nsango malamu ya Yesu Klisto ewumela. Boko na yango esili kala kobanda kobunga. Na nsonge ya molongo ya makmbo maye ya motuya mpe, boye, mongete ya liboso ya monguna, ezali bosantu ya libala mpe bonene ya mabota na katikati ya nyonso. Yango epesi longo mpe libongo ya kimia ya ndako wapi mwana moko na moko ya Tata wa bolingo na Lola akoki kozala na nguya mpo na bolamu mpe kozwa makambo mosusu ya motuya ya seko.

Libota na ngaimei, kolengela kokumisa esika oyo ya mibu 90 na bomoi na ngai, kobandaka kosalisa ngai komikundola mpe kolula makambo ya bomoi na ngai molai. Na ndakisa, mwana nkazi na ngai asangisa mpe akabolaki na ngai mikanda mingi oyo nakoma na baboti na ngai penepene na mibu 70 mileki uta na esika na ngai ya mampinga ya masuwa na esanga ya Saipan na Pacific na ntango ya Etumba Enene ya II.

Moko ya mikanda oyo ebetaki miso na ngai. Ezalaki mokanda moko nakomaki na mama na ngai mpo na kofungola mpe kotanga na Mokolo ya Mama na 1945. Nalingi nakabola mwa biteni elongo na bino na elikia bokomona ntina nini nakozalaka kaka na botondi na tata mpe mama na ngai mpo na mateya nayekolaki uta na boteyi na bango na ndako. Baboti na ngai bazali ndimbola ya ndakisa nasimbaki ya baboti balamu oyo batii libala mpe bobokoli bana lokola ya likolo na motuya.

Mokanda ya Mokolo ya Mama na Ngai na 1945 ebandi:

“Mama wa bolingo,

“Mibu minei oyo ya nsuka, nazali na mawa ya kolekisa Mokolo ya Mama mosika na yo. Mobu nyonso nalingaka kozala elongo na yo mpe koyebisa yo bobele boniboni nakanisaka yo, lokola ekoki mbala moko kosalema te, nakosengela kosala likambo ya malamu mingi elandi mpe kotinda makanisi na ngai na nzela ya mokanda.

“Mobu oyo mingi koleka mibu misusu nakoki komona kaka nini kozala na mama ya kokamwa esali mpo na ngai. Liboso na nyonso, nazangi makambo ya mike ozalaki kosala mpo na ngai. Ezala nabimi na mbeto na ntongo, namitungisa naino te etali soki nakokuta simisi ya peto mpe soseti ya peto. Na ntango yango nayebaki ntango inso ete nalingaki kokuta eloko nalingaki na lolenge ya malamu mingi koleka. Na butu nayebaki ntango inso ete nalingaki kokuta bilamba ya kofinika na mbeto na ngai mpe kaka motango ekoki ya babulangeti mpo nazala na esengo. Kozala na ndako ezalaki mpenza elengi mingi.”

Ntango natangi maboke misatu ya liboso ya nkoma ya mokanda, nakamwaki na boniboni emonani likola ewuti na motema. Ntango mosusu kowumela na ema mpe kolala na nse ya moniama ya bangungi na mbeto ya nganda etiaki makanisi na ngai kozongaka na ndako na ngai ya kafukafu.

Mokanda na ngai na mama na ngai:

“Kasi ya mozindo mingi ezali liyoki mpo na yo na ntina ya ndakisa yo opesaki mpo na ngai. Bomoi ekomaki ya esengo mpenza mpo na biso lokola libate ete tolingaki kolanda na matambe na yo, na kokoba na nzela ya koyoka esengo oyo ezalaka na mikolo mya biso ya bolenge. Ntango inso ozwaki ntango ya komema libota na kati ya canyon, mpe tokokaki kozela yo mpo na kosala nyonso uta na komata bangomba tii na kobeta bale elongo na biso. Yo mpe Tata bazalaki kokende na bopemi te bino moko. Libota ezalaki ntango inso elongo na bino. Sikawa lokola nazali mosika ya libota nalingi ntango inso kolobela bomoi na ndako na biso mpamba te ezalaki na esengo mingi. Nakoki te koboya mateya na yo sikawa mpamba te misala na ngai ekobimisa bomoto na yo. Bomoi ezali momekano monene mpo na ngai kozala ya kolongobana kobiangema mwana ya Nora Sonne Perry. Nazali na lolendo ya nkombo oyo, mpe nalikii ete nakozala ya kolongobana ntango inso na yango.

“Nalikii ete mobu ekolanda ekokuta ngai elongo na yo mpo na kolakisa yo ntango ya esengo nazali kokanisa kosala mpo na kolakisa yo na Mokolo ya Mama mpo na mibu minei mileki.

“Tika Nkolo apambola yo mpo na makambo manso ya kitoko osalaki mpo na mokili oyo ya mobulu.

“Bolingo na ngai nyonso, Tom”1.

Ntango natangaki lisusu mokanda na ngai, namaniolaki lisusu ezaleli ya libota, palwasi, likonzi, mpe lingomba na yango tokolaki.

Ezaleli elimbolami lokola lolenge ya bomoi ya bato moko. Ezali na ezaleli se moko ya nsango malamu, liboke ya mituya mpe bozeli mpe esaleli ezali ya lisanga na bandimi banso ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Ezaleli oyo ya nsango malamu, to lolenge ya bomoi, ewuti na mwango ya lobiko, mitindo ya Nzambe, mpe mateya ya baprofeta ya bomoi. Ezali etalisi moko na lolenge moko tokolisi mabota ma biso mpe towumeli na bomoi na biso.

Lilako ya yambo na Adama mpo na mokumba na ye ya bokufi ezali na Genese 2:24: “Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakojala mosuni moko”

Kosangisaka elongo mobali mpe mwasi mpo na kobalana engebene na mobeko mpe na mitindo kaka te mpo na bankola ekoya mpo na kosangola mabele, kasi ememi lisusu esengo koleka nyonso oyo ekoki kozwama na bomoi ya bokufi. Yango ezali mingimingi ya solo ntango banguya ya bonganganzambe esakoli libala mpo na kozala mpo na ntango mpe mpo na seko nyonso. Bana babotami na libala ya boye bazali na likama te oyo ekoki kozwama epai mosusu te.

Mateya mateyami na ndako na baboti balamu ezali kokoma na motuya ya kobakisa na mokili ya lelo, wapi nguya ya monguna epanzani mosika. Lokola boyebi, ezali komeka kosilisa mpe kobebisa moboko mpenza ya lingomba na biso—libota. Na lolenge ya mayele mpe ya kobombana, azali kobundisa komipesa na bomoi ya libota na mokili mobimba mpe kosilisa ezaleli mpe mayokani ma Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Baboti basengeli kozwa mokano ete koteya wana na ndako ezali ya bule koleka nyonso mpe mokumba ya motuya. Ntango mangomba, lokola eklezia mpe kelasi ekoki kosalisa baboti mpo na “kobokola mwana na njela ekoki na ye kotambola; ekokoma ye monene akopengwa na yango te” (Masese 22:6), oyo ezali mokumba oyo na nsuka evandi na baboti. Engebene na mwango ya esengo, ezali baboti balamu oyo bapesameli bolengeli mpe bokoli ya bana ba Tata wa Lola.

Na mokangano na biso ya kokamwa ya boboti, ezali na nzela mingi oyo baboti bakoki kozwa lisalisa mpe lisungi bazali na yango mposa mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto na bana na bango. Tika napesa likanisi ya makombo mitano baboti bakoki kosala mpo na kokela bizaleli ya libota ya makasi:

Yambo, boboti bakoki kosambena na bosolo, kotunaka Tata wa biso ya Seko mpo na kosalisa bango balinga, basosola, mpe bakamba bana Ye atindaki na bango.

Ya mibale, bakoki kosala losambo ya libota, kotanga makomi, mpe mpokwa ya libota mpe kolia elongo mbala mingi lokola bokoki, kosalaka bolei lokola ntango ya bosololi mpe koteya ya mituya.

Ya misato, baboti bakoki kosalela mpenza lisanga ya lisungi ya Eklezia, kosololaka elongo na bateyi ya bana na bango, bayangeli ya bilenge, mpe kelasi mpe babokambi ya lisanga likoki. Na kosololaka elongo na baye babiangemi mpe batiami maboko mpo na kosala elongo na bana na bango, baboti bakoki kopesa bososoli ya ntina ya mposa ya ndenge mpe eyebani ya bana na bango.

Ya minei, baboti bakoki kokabola matatoli ma bango mbala mingi na bana na bango, kotinda bango na kobatela mibeko ya Nzambe, mpe kolakela mapamboli maye Tata wa biso ya Lola alakelaki bana na Ye ya botongono.

Ya mitano, tokoki kobongisa mabota na biso evanda na mibeko mpe bozeli ya polele, pete mpe bizaleli mpe milulu ya kolongono, mpe “nkita ya libota,” wapi bana bazali na mikumba ya ndako mpe bakoki kozwa balifuta mpo ete bakoki koyekola bwania ya mosolo, kobatela mosolo, kofuta moko ya zomi na mosolo bazwi.

Makanisi oyo mpo na kokelabizaleli ya libotaya makasi mingi esalaka elongo na ezaleli ya Eklezia. Ezaleli ya libota na biso elendisama ekobatela bana na biso na “mbanzi ya nkanda ya monguna” (1 1 Nefi 15:24) ekoti na kati ya ezaleli ya baninga, bizaleli ya lisano mpe koyebana, bizaleli ya nyongo mpe ya kosenga na makasi, mpe bizaleli ya Interneti mpe malaka na yango bazali mbala nyonso ya kofungwana. Bizaleli ya libota makasi ekosalisa bana na biso “kozala na mokili” mpe kokoma “ya mokili te” (Yoane 15:19).

Mokambi Joseph Fielding Smith ateyaki: “Ezali mokumba ya boboti koteya bana mibeko oyo ya lobiko ya nsango malamu ya yesu Klisto, mpo ete bakoyeba ntina nini bakobakisama mpe ete bakoka koniata na mitema na bango elongo na mposa ya kokoba kobatela mitindo ya Nzambe nsima ya bango kobatisama, ete bakoka kozonga na miso na ye. Elingi bino bandeko mibali mpe basi ya malamu, mabota na bino, bana na bino; elingi biso kokangisama na batata na bino mpe bamama na bino liboso na bino …? Soki boye, nde bosengeli kobanda koteya mpembene ya mbeto ya bebe. Bosengeli koteya na ndakisa mpe na malongi lokola.” 2

Lisakola ya libota elobi:

“Mobali mpe mwasi bazali na mokumba ya kolinga mpe kolengela bango na bango mpe bana na bango. ‘Bana bazali lisango ya nkolo’ (Njembo 127:3). Baboti bazali na lotomo ya bule mpo na kobokola bana na bango na bolingo mpe bosembo, mpo na kokokisa mposa na bango ya nzoto mpe ya molimbo, mpe koteya bango kolingana mpe kosalisana, kobatela mitindo ya Nzambe, mpe kozala bato bobateli mibeko ya mboka wapi bazali. …

“… Na bolingi ya Nzambe, batata basengeli kokamba libota na bango na bolingo mpe bosembo mpe bazali na mokumba ya kokokisa mposa ya bomoi mpe kobatela mabota ma bango. Bamama bazali liboso na mokumba ya kobokola bana na bango. Na mikumba na bango ya bule, batata mpe bamama bazali na lotomo ya kosalisana lokola baninga bakokana.”3

​Nandimi ete ezali na bolingi ya bonzambe nde mosala ya bomama ezali mpenza na kobokola mpe koteya nkola ya nsima. Kasi ezali kitoko komona mibali mpe basi oyo basali kimoninga ya solo wapi basangani elongo nguya na bango mpe bosololi na makasi elongo etali bana na bango mpe na bana na bango.

Etumba ya nkuna na bana na bato ezali ya mindondo mpe ya kofuka koleka oyo ezala naino te. Kotonga ezaleli ya libota ya makasi abakisi mposo ya bobateli mpo na bana na biso, kokabolaka bango na banguya ya mokili.

Nkolo apambola bino bamama mpe batata ya malamu na Siona. Ye atikeli bino bobateli ya bana ba Ye na seko. Lokola baboti tozali kosala lokola baninga, kutu elongo na Nzambe, mpo na komemaka esalema mosala na Ye mpe nkembo na Ye o ntei ya bana na Ye. Ezali mokumba na biso ya bule mpo na kosala ya biso malamu koleka nyonso. Ya yango na tatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Mokannda ya Mokolo ya Bamama uta na L. Tom Perry epai ya mama na ye, ekomama uta na Espagne, na sanza ya mitano 3, 1945.

  2. Joseph Fielding Smith, in Conference Report, sanza ya zomi 1948, 153.

  3. “The Family: A Proclamation to the World,” Liahona, sanza ya zomi na moko. 2010, 129.