2010–2019
Kozala Moklisto Koleka Moklisto
Sánzá ya Zómi 2012


Kozala Moklisto Koleka Moklisto

Oyo ezali libiangi ya Klisto epai ya Moklisto nyonso lelo: “Leisa bana na mpate na ngai. … Leisa bampate na ngai.”

Elingi koloba nini kozala Moklisto?

Moklisto azali na bondimi na Nkolo Yesu Klisto, ete Ye azali Mwana mpenza ya Nzambe, atindamaki na Tata wa Ye koyoka mpasi mpo na masumu na biso na mosala moluti bonene ya bolingo oyo toyebi lokola Bomikabi.

Moklisto andimaka ete na nzela ya ngolu ya Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, tokoki koyambola, kolimbisa basusu, kobatela mitindo, mpe kosangola bomoi ya seko.

Liloba Moklisto elingi koloba kokamataka likolo na biso nkombo ya Klisto. Tosalaka boye na kobatisamaka mpe kozwaka likabo ya Molimo Mosantu na botii maboko na baye bazali na likoki ya bonganganzambe.

Moklisto ayebi ete na mibu nyonso, baprofeta ya Nzambe batatoli ntango nyonso na ntina ya Yesu Klisto. Yesu oyo kaka, elongo na Tata na Lola, bamimonisaki na Profeta Joseph Smith na mobu 1820 mpe azongisaki nsango malamu mpe libongisi ya Eklezia na Ye ya ebaneli.

Na nzela ya makomi mpe litatoli ya Joseph Smith, toyebi ete Nzambe, Tata wa biso na Lola, azali na nzoto ya nkembo mpe ebongi nie ya mosuni mpe mokuwa. Yesu Klisto azali Mwana Mwana se Moko wa Ye na mosuni. Molimo Mosantu azali moto ya molimo oyo mosala na ye ezali kotatola Tata mpe Mwana. Bonzambe ezali bato misato ya kokabwana mpe ya kokesana, basangani na ntina.

Na malongi maye lokola moboko ya bondimi na biso, ekoki kozala na ntembe moko to boweli ete biso, lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali Baklisto? Nzokande mpo na Moklisto nyonso, motuna etikali: Baklisto ya lolenge nini tozali? Na maloba mosusu, tozali kosala ndenge nini na boluki na biso ya kolanda Klisto?

Kanisa elongo na ngai makambo ya bayekoli ya Baklisto mibale :

Yesu,“Etambolaki ye pembeni ne libeke na Galilai, amoni bandeko mibale, Simona oyo abiangami Petelo Andalea ndeko na ye, kobwaka moluba kati na mai mpo bajalaki baluki na mbisi.

“Alobi na bango ete, boyaka nsima na gai mpe na kojalisa bino baluki na bato.

“Nokinoki batiki moluba kobila ye.”1

Lokola Baklisto lelo, tozali na libaku ya kosala sikawa, sasaipi, mpe na mokano, lokola Petelo mpe Andelea basalaki: “batiki miluba mpe babili ye.”2 Mpe tobiangemi mpo na kotika miluba na biso, kobwaka mimesano, bizaleli, bonkoko ya mokili. Tobiangemi lisusu mpo na kotika masumu na biso. “[Ntangu Yesu] abiangi ebele epai na ye…, alobi na bango ete, Soko moto alingi kobila ngai, tika te amiboya ye mpenja, atombola ekulusu na ye, mpe abila ngai.”3 Kotikaka bisomei bizaleli ya bonzambe te ezali ebandeli ya boyamboli, oyo ememaka mbongwana ya motema makasi kino “tozali na meko mpo ya kosala bobe te.”4

Mbongwana oyo, ebengami bobongoli motema, esalami se na nzela ya Mobikisi. Yesu alakaki ete: “Soko bato baye epai ya ngai nakolakisa bango botau bwa bango. … Mpe boboto bwa ngai bokoki mpo ya bato banso baye bakomikitisaka liboso lya ngai; mpo soko bamikitisi liboso lya ngai, mpe bondimi na ngai, nde Ngai nakosala makambo matau makoma makasi mpo ya bango.”5 Ntango biso tokomisami sikana Klisto, bizaleli na biso ebongwani mpe tokolinga kozongela makambo na biso ya kala te.

Atako bongo, Baklisto ya botongono bakopambolama ntango nyonso na kokutana na bampasi mpe babosisoi. Ntango mikakatano ya bopetoli oyo eye, tokoki kosenginiama mpo na kozongela makambo na biso ya kala. Nsima ya Bobakisami ya Yesu klisto, abimelakiaki basi mpe ayebisaki bango ete bandeko babali bakobombola Ye na Galilea. Ntango Petelo, Apostolo ya nkulutu, azongaki na Galilea, azongelaki lisusu oyo ayebaki—oyo azalaki koyoka elengi na kosalaka. “Nakei koluka mbisi,”6 alimbolaki mpe azwaki bayekoli ebele elongo na Ye.

Na boye, Petelo mpe basusu balukaki mbisi butu mobimba kozangaka kozwa ata mbisi moko te. Ntongo elandaki Yesu abimelaki na libongo mpe abelelaki bango na ngambo ya mai, “Bobwaka moluba [na yo] na loboko na mobali.” Bayekoli baoyo batikalaki na bwato balandaki malakisi ya Mobikisi mpe nokinoki bamonaki miluba na bango na kokamwa etondaki penepene ezinda. Yoane na akitolaki mongongo ya Mobikisi, mpe Petelo na mbala moko amibwakaki na mai mpe akataki mai kino na libongo.7

Na Baklisto baoyo bazongeli makambo na bango ya kala, ya botongono moke, bokanisa ndakisa ya botongono ya Petelo. Bowumela te. Boya koyoka mpe bokitola mongongo ya Mobikisi kobengaka. Nde sikasikawa bozongela Ye mpe bozwa mapamboli na Ye ya mingi mbala moko lisusu.

Ntango bandeko babali bazongaki na libongo, bakitolaki lipati ya mbisi na mapa. “Yaka kolia,”8 Mobikisi alobaki. Wana ezalaki Ye koleisa bango, atunaki Petelo mbala misato, “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?” Ntango Petelo alakisaki bolingo na ye, Mobikisi abondelaki ye, “Leisa bana na mpate na ngai. … Leisa bampate na ngai.”9

Oyo ezali libiangi ya Klisto epai ya Moklisto nyonso lelo: “Leisa bana na mpate na ngai. … Leisa bampate na ngai.”—kabola nsango malamu na ngai na bilenge mpe bakolo, kotombolaka, kopambolaka, kobondisaka, kolendisaka, mpe kotongaka bango, mingimingi, baoyo bakanisaka mpe bandimaka na bokeseni na oyo tosalaka. Toleisaka bana na mpate na Ye na bandako na biso na lolenge tozali kowumela na nsango malamu: kobatelaka mitindo, kosambelaka, koyekolaka makomi, mpe komekolaka bolingo na Ye. Toleisaka bampate na Ye na Eklezia ntango tozali kosala na ya masanga makoki ya bonganganzambe mpe mabongisi malandi. Mpe toleisaka bampate na Ye na mokili mobimba na kozalaka bazalani malamu ya Baklisto, kosalelaka boyambi ya solo ya kokendaka kotala mpe kosalisa basi bakufeli mibali, bana etike, babola, mpe banso baoyo bakeleli.

Mpo na mingi, libiangi ya kozala Moklisto ekoki komonana lokola ya mpasi, kutu ya bozito boluti. Kasi tosengeli kobanga te to komiyoka ya kokoka te. Mobikisi alakaki biso ete akosala biso ete tolonga na mosala na Ye. “Boyaka nsima na ngai,” Alobi “mpe Ngai nakojalisa bino baluki na bato.”10 Na kolandaka Ye, Ye apambolaka biso na makabo, batalanta, mpe bokasi ya kosala bolingi na Ye, kopesaka biso nzela ya kokende mosika ya bisika na biso ya libondi mpe kosala makambo tokanisi ata mokolo moko te liboso ekoki kosalama . Oyo ekoki kolinga koloba kokabolaka nsango malamu na bazalani, kobikisaka baoyo babungi na molimo, kosalaka misio ya ntango-mobimba, kosalaka na tempelo, kobokolaka mwana moko azali na banbosenga ya ndenge, kolingaka mwana na kilikili, kosalisaka moninga ya malali, kokutanaka na babozangi koyokana, to koniokwamaka motungisi. Elingi koloba komilengelaka mpo na koyanola libiangi na Ye. Na kolobaka, “Nakokende wapi olingi ngai nakende; nakoloba maye olingi ngai naloba; nakosala makambo olingi ngai nasala; nakozala oyo olingi ngai nazala.”11

Mpo na kozala oyo Tata na Lola alingi biso tozala, tolandaka Yesu Klisto. Natatoli ete Ye azali kokoba kobiangaka biso mpo tolanda Ye. Soki ozali kaka koyekola oyo etali bomipesi ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka to soki ozalaki kosala elongo na mobimba te na Eklezia mpe olingi kolanda Ye lisusu—kobanga te! Bayekoli ya Nkolo ya yambo bazalaki banso bandimi ya sika na Eklezia, babongwani sika na nsango malamu na Ye. Yesu na bompikiliki ateyaki moko na moko. Ye asalisaki bango bakokisa mikumba na bango. Ye abengaki bango baninga na Ye mpe abonzaki bomoi na Ye mpo na bango. Mpe asili kosala yango kaka mpo na biso.

Natatoli ete na nzela ya bolingo mpe ngolu na Ye ezanga nsuka tokoki kokoma Baklisto koleka Baklisto. Tala babolamu ya Kozala Lokola Klisto oyo elandi. Lolenge nini tozali kosala na kolendisaka yango kati na bisomei?

Bolingo ya Boklisto. Mobikisi apesi motuya na moto nyonso. Kozalaka boboto mpe ngolu na banso, Ye atikaki ntuku libwa na libwa mpo na kokuta moko,12 mpo “ata nsuki yonso na mito na [biso] itangami”13 na Ye.

Bondimi ya Boklisto. Atako masenginia, mimekano, minioko, Mobikisi atiaki elikia na Tata na Lola mpe aponaki kozala na botongono mpe na botongono na mitindo na Ye.

Libonza ya Boklisto. Na ntango mobimba ya bomoi na Ye Mobikisi apesaki ntango na Ye, bokasi na Ye, mpe na nsuka, na nzela ya Bomikabi, Amipesaki mpo ete bana banso ya Nzambe bakoka kosekwisama mpe kozwa libaku ya kosangola bomoi ya seko.

Kobatela ya Boklisto. Lokola Mosamalia malamu, Mobikisi akobaki kokende kobikisa, kolinga, mpe koleisa bato nzinganzinga na Ye, na bozangi kotala bonkoko, boyambi, to babozui.

Lisalisi ya Boklisto. Soki kotokaka mai uta na libulu, kolambaka mole ya mbisi, to kosokolaka makolo etonda putulu, Nkolo abebisaki mikolo na Ye kosalisaka basusu—kotelemisaka baye balembi mpe kolendisaka baye ya botau.

Bompikiliki ya Boklistu. Na mpasi mpe monioko, Mobikisi azelaki na bompikiliki Tata wa Ye. Na bompikiliki na Ye mpo na biso, Ye azali kozela biso tososola oyo ezali malamu mpe toya na ndako epai na Ye.

Kimia ya Boklisto. Na ntango mobimba ya mosala na Ye alendisaki mitema kososolaka mpe kolukaka kimia. Mingimingi na katikati ya bayekoli na Ye, Ye ateyaki ete Baklisto bakoki koswana te na Baklisto mosusu, atako babokeseni ezali.

Bolimbisi ya Boklisto. Ye ateyaki biso topambola baoyo bazali koniokola biso. Ye alakisaki biso nzela na kosambelaka ete baoyo babakaki Ye bakolimisamaka .

Bobongoli Motema ya Boklisto.Lokola Petelo mpe Andelea, mingi bakitoli bosolo ya nsango malamu noki ntango bayoki yango. Babongwani na mbala moko. mpo na basusu ekoki kozwa ntango molai. Na bobimisi moko epesamaki na nzela ya Joseph Smith, Mobikisi ateyaki ete,“Oyo ezali ya Nzambe ezali pole; mpe ye oyo azui pole mpe akobi kati na Nzambe, azui pole mingi; mpe pole wana ekoli mingimingi koleka kino mokolo ebongi nie,”14 mokolo ebongi nie ya mbongwana na biso. Yesu Klisto azali“pole mpe Mosikoli ya mokili; Molimo ya bosolo.”15

Molende kino na nsuka ya Boklisto. Na bomoi na Ye mobimba, Mobikisi ata mokolo moko te atikaki kosala bolingi ya Tata na Ye kasi akobaki na bosembo, bolamu, ngolu, mpe bosolo kino na nsuka ya bomoi na Ye ya kufa.

Oyo ezali ndambo ya balolenge ya baoyo bayokaka mpe bakebaka na mongongo ya Mobikisi. Lokola moko ya banzeneneke na Ye ya ndenge .”16na mabele, napesi litatoli na ngai ya Boklisto ete Ye azali kobenga yo lelo, “yaka kobila ngai.”Yaka mpo na kotambola na banzela oyo ememaka na esengo ya seko, bosepeli, mpe bomoi ezanga nsuka kati na bokonzi ya Tata wa biso na Lola. Na nkombo ya Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, amene.