2010–2019
Bosala Keba na Ntina ya Binomei
Sánzá ya Zómi 2012


Bosala Keba na Ntina ya Binomei

Botikala na nzela ya bonganganzambe na kokotisaka mbongwana na bino na mozindo mpe kolendisaka libota na bino. … Bokima makama na kotiaka bokebi na bilembo ya molimo kolobaka “Keba” oyo bitiami na nzela na biso na Nzambe mpe baprofeta.

Ntango nazalaki elenge mobali, libota na biso ezalaki kolinga kokende na motuka likolo ya bangomba ya America’s Rocky Mountains mpo na kotala bankoko. Nzela ebandaki na esobe ya mwa banzete, emataki na kati ya mopanzi, etonda na nzete etelama ngwi, mpe na nsuka ebimaki na kati ya zamba ya banzete mosusu mpe esobe ya matiti, wapi tokokaki komona mbele nsuka na nsuka.

Kasi nzela oyo ya kitoko ezangaki likama mpenza te. Mingi ya balabala ekatamaki na kati ya mopanzi ya ngomba oyo etelema ngwi. Mpo na kobatela bato na mobembo, batongi ya banzela batongaki bilalu mpe batiaki bilembo oyo ekomi, “Keba: Kokweya ya Mabanga.” Tososolaki ntina monene mpo na likebisi oyo. Mabanga mike mpe mabanga minene epanzanaki na nse ya mai mosika na nse ya nzela. Ntango mosusu, tokokaki komona mituka eniefuniefuka na nse ya libulu, likundoli ya bakumbi mituka oyo bazangaki kosala keba.

Ndai mpe Boyokani ya bonganganzambe

Bandeko, moko na moko na bino akoti, to akokota kala te, na kati ya ndai mpe boyokani ya Bonganganzambe ya Melekisedeki. 1 Na boyakani wana ekoti mobembo ya nkembo oyo ebandi na kozwaka bonganganzambe ya moke mpe ya monene, ekei liboso na nzela ya kokumisaka mabiangi na biso, mpe emati libela likolo na bomoni bonene ya Nzambe, kino tozwi “manso maye Tata azali na yango.”2

Mokeli ya bwania ya nzela wana ya selisitiale atelemisaki bilemo ya kokebisa mpo na mobembo na biso. Ndai mpe boyokani ya bonganganzambe ezali na bokebisi ya koluka milimo: “Sikawa napesi bino mitindo ya kosala keba etali bino.”3

Ntina nini Nzambe atindi biso mpo na kosala keba? Ye ayebi ete Satana azali moto mpenza4 oyo azali koluka kobenda milimo na biso na nse na kati ya lobwako ya bobola. 5 Nzambe ayebi ete evandi na kati ya bamemi bonganganzambe ezali “moto ya mokili”6 na mposa ya kobunga.”7 Yango wana, baprofeta babengisi biso na “kolongola moto ya kala”8 mpe “kolata Klisto”9 na nzela ya bondimi, boyamboli, makuli ma lobiko, mpe kowumelaka mokolo na mokolo na nsango malamu.

Kokima Makama

Na komataka na nzela ya bonganganzambe, mwana mobali to mobali nyonso akoki kokitisama na nse soki azangi kosala keba. Okamwisami mpe opasukami motema na bokwei ekanami te ya elombe elenge, misionele azongi sika, mokambi ya bonganganzambe ya limemie moko, to moyelibota moko ya bolingo.

Lisolo ya Boyokani ya Kala ya Dawidi ezali ndakisa ya mobomano ya nguya ya bonganganzambe ebungaki. Atako akweisaki Goliati wana ezalaki ye elenge mpe kowumelaka na bosembo mpo na bamibu zomi,10 profeta mokonzi oyo azalaki naino na likama ya molimo. Na ntango wana ya kpokoso ntango uta na likolo ya ndako na ye amonaki Bataseba mwasi kitoko azalaki kosukola, bobateli bomoi ya bolamu moko te ezalaki penepene mpo na koganga, “Sala keba Dawidi, yo liboma!” Kozanga bokebi na ye mpo na yemei11 mpe kosala engebene na etinda ya Molimo 12 ememaki bobungisi ya libota na ye ya seko.13

Bandeko, soki kutu Dawidi ya nguya akokaki kolongolama na nzela na bonetoli, boniboni tokoki kokima likama ya boye?

Bibende ya bobateli mibale ya mbongwana ya mozindo ya moto na moto mpe mikangano ya libota ya makasi esalisi kobatela biso na balabala ya lola.

Koyebaka oyo, Satana aningisi mabanga minene ya kobebisa mbongwana mpe kokabola libota mpo na kokuta nzela na biso ya bonganganzambe. Botondi, Yesu Klisto mpe baprofeta na Ye batii bilembo ya “Sala keba” na nzela. Bazali mbala na mbala kokebisa biso na masumu ya lolendo ya kobebisaka mbongwana 14 mpe ya kokabola libota lokola nkanda, lokoso, mpe mposa.

Kala mpenza, Mose apesaki toli, “Bosala keba noki te bokobosana Nkolo.”15 Na mokili na biso ya mbangumbangu mpe etonda na masano, bato bazali naino noki na “kobosana Nkolo, … kosala lisumu, mpe komemama mosika na moto moko ya mabe.”16

Bokotisa Mbongwana ya Mozindo mpe Bolendisa Libota

Mpo na kotikala na likama te na nzela ya bonganganzambe bondima bosielumuki ya mabanga ya bomekami, nakundolisi bino mibeko motoba oyo ekoki kokotisa na mozindo mbongwana mpe kolendisa libota.

Yambo, kosambelaka ntango nyonso efungolaka ekuke mpo na lisalisi ya Bonzambe mpo na “kolonga Satana.”17Ngonga moko na moko Yesu akebisi bamemi bonganzambe na “kosala keba, mpo Satana alingi ayungula [bino],” Ye alakisi losambo lokola mosala ya kotelemela lisenginia.18 Mokambi Thomas S. Monson ateyi: “Soki moko na biso azali malembe na koyokemela toli mpo na kosambela ntango inso, ezali na ngonga moko te ya kitoko mingi koleka sikawa. … Moto atelemaka mokolo moko te molai mingi koleka ntango ye azali na mabolongo.”19

Ya mibale, koyekolaka makomi ya kala mpe ya sika ekangisi biso na Nzambe. Nkolo akebisaki bandimi ya Eklezia na “kosala keba boniboni basimbi [baprofeta] noki te bakozwama lokola eloko ya petepete, mpe bamemami na nse ya etumba na yango, mpe babeti libaku mpe bakweyi.”20 Mpo na kokima etumbu oyo ya makasi, tosengeli na etingia kotanga makomi, mpe mikanda ya Eklezia mpe bisika ya internet oyo esalisi biso mpo na“kozwa toli na lolenge moko ya penepene mpe ya moto na moto na profeta baponama na Nkolo.”21

Ya misato, kosalaka elongo na bolongobani na makuli elengeli biso mpo na kokamata “Molimo Mosantu lokola mokambi na [biso] .”22 Ntango Mobikisi akebisi, “Bosala keba noki te bokokosama,” Ye alaki biso ekosalema te soko toluki “ …na lokengo makabo maleki malamu” ya Molimo Mosantu.23 Kokabolaka na bolongobani elambo mposo nyonso ekokokisa bandimi na “ntango inso kozala na Molimo na Ye elongo na bango.”24 Na bokumbamii ya tokoki “kozwa likoki ya Molimo Mosantu.” 25

Ya minei, kolakisaka bolingo ya solo ezali motema ya mbongwana ya moto na moto mpe mikangano ya libota. Mokonzi Benyamina alobaki ete, “Kebani mbele ekozala na bowelani o ntei ya bino.”26 Kobosana mokolo moko te ete Satana tata ya bowelani mpe ya boswani ”27 mpe alukaka ete bato ya libota “babunda mpe baswana.”28 Bandeko, soki toyokisi mpasi na mayoki, na maloba to na nzoto na moto moko ya libota na biso, to konyokola moto kani, nde tobungisi nguya ya bonganganzambe. 29 Bopona kokima nkanda. Baye libota basengeli koyoka mapamboli uta na minoko na bango, botutu te. Tozali na nguya ya kopesa na basusu na kondimisa, motema molai, bosembo, bosekomi, bolingo ya lokuta te, boboto, mpe lolango.30

Ya mitano, kotosaka mobeko ya moko na zomi ezali eteni ya motuya ya bondimi mpe bomoko ya libota. Mpamba te Satana asaleli lokoso mpe boluki bozwi mpo na kolongola mabota mosika na balabala ya selesitiale, Yesu apesi toli, “Bosala keba na likunia.” 31 likunia ekangami ntango tobongisi mwango ya kosalela bozwi na biso, tofuti moko na zomi na bosembo mpe likabo ya bokili bilei ya moyimi te, tobongisi kobimisa mosolo esengeli, tokimi niongo ezanga ntina, tobombi mbongo mpo na mposa ya nsima, mpe tokomi na bomikoki na ntango. Elaka ya Nzambe na biso ezali, “Boluka liboso bokonzi ya Nzambe, mpe bosembo na ye; mpe makambo manso oyo ekobakisela bino.”32

Ya motoba, salelaka na bomoi na yo mobimba mobeko ya bopeto epesi bondimi mpo na kotelema “na miso Ya Nzambe” elongo na Molimo Mosantu lokola “moninga na biso ya sikisiki.” 33 Satana azali kobundisa bolamu mpe libota na mbonge ya bonsoni. Ntango Nkolo akebisi moto na ekobo mpo na “kosala keba mpe koyambola noki,” ndimbola na Ye etandolami mosika koleka mosala na nzoto ya ekobo tii na makanisi oyo ezali liboso na yango.34 Baprofeta ya sikawa mpe bapostolo balobi mbala mingi mpe na polele oyo etali bokono ya bilili mpe nkoma ya baton a bolumbu. Mokambi Gordo  B. Hinkley ateyaki ete: “[ Pornografi] ezali lokola ekumbaki ya makasi, kobebisaka bato mpe mabota, kobukaka na mobimba oyo kala ezalaki malamu mpe kitoko….Ntango ekomi mpo na moto nyonso oyo akangemi na yango mpenza amibimisa na potopoto .”35Soki osenginiami na kobuka mobeko ya bopeto na lolenge kani—landa ndakisa ya Yosefi Ejipito oyo “akimaki, mpe abimaki”36

Mibeko motoba oyo ya ntina esalisi bamemi bonganganzambe kokoba na balabala ya lola na kozanga likama katikati ya bibende ya bobateli ya mbongwana ya moto na moto mpe makangano ya libota. Bilenge mibali, kotosaka na mibeko miye ekolengela bino mpo na mayokani ya tempelo, mosala ya mission ya ntango mobimba, mpe libala ya seko. Mibali mpe batata, kosalelaka mibeko miye na bomoi na bino ekolongisa bino mpo na kokamba libota na bosembo, kosalaka lokola moyangeli ya libota na molimo, elongo na mwasi na yo lokola moninga ya makoki se moko. 37Nzela ya bonganganzambe ezali mobembo etondi na bosepeli.

Kotikalaka na Nzela ya Bonganganzambe

Kozongaka na mayele na ngai lokola elenge mobali, namikundoli bokatisi moko ya Rocky Mountains. Nsima na koleka elembo ya “Keba: Kokweya ya Mabanga”, tata na ngai amonaki mabanga ya kitoko mpe mabanga ya mike kokitaka na mabele liboso na biso. Ye nokinoki alembisaki motuka tii penepene na kokangama kaka lokola mabanga ya monene lokola ya bale ya basketball ezalaki koleka mpembeni na biso. Tata azelaki ete bosielumuki ya libanga esila yambo ya kokoba. Tata na ngai na bokebi ya sikisiki mpe likela ya mbala moko asalaki ete libota na biso ekoma malamu na esika ya nsuka.

Bandeko, Satana azali koluka “kobebisa milimo ya bato.”38 Soki molimo na yo ezali kobunga penepene na ndelo ya lobwaku, kangama sikawa liboso okweya, mpe zonga na nzela. 39 Soki oyoki molimo na yo elali ya kobeba na nse ya canyon esika ezala na likolo na nzela ya bonganganzambe mpamba te otali mpamba elembo ya “Kosala keba” mpe osali lisumu, natatoli ete na nzela ya boyamboli ya solo mpe nguya ya libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto, okoki kotombolama mpe kozongisama na balabala ya lola ya Nzambe.40

Yesu ateyi, “ Sala keba na …bokibisi,”41 Soki olongobani te mpo na kosalela bonganganzambe, nasengi kutana na episikopo na yo, oyo akoki kosalisa yo oyambola. Sala mpiko ete atako Mobikisi alobaki, “Sala keba … kima lisumu,” 42 Ye alaki lisusu, “Ngai, Nkolo, nalimbisi yo. … Kende mpe kosala lisusu lisumu te.”43

Nabengisi mwana mobali mpe mobali nyonso atikala na nzela ya bonganganzambe na kokotisaka na mozindo mbongwana na yo mpe kolendisaka libota na yo. Bolingo, bofuti moko na zomi, mpe bopeto ya nzoto elendisaka libota. Kima mobomano na kosalaka bokebi na bilembo ya “Sala keba” ya molimo etiami na nzela na Nzambe mpe baprofeta. Bunda na kolanda ndakisa ebonga nie ya Yesu Klisto, oyo “ayokaki mpasi ya masenginia kasi asalaki keba na yango te.”44

Nalaki ete soki moto abateli liyokani ya bonganganzambe mpo na “kosala keba etali binomei,”45 biso mpe mabota na biso tokoki kozala na bozangi likama mpe na bosepeli mpo na kokoma na nsuka na biso ya bonetwami na bokonzi ya selesitiale. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.