2010–2019
Mapamboli ya Elambo
Sánzá ya Zómi 2012


Mapamboli ya Elambo

Tokopambolama ntango toyoki botondi mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto, tozongisi sika mayokani na biso ya libatisi, toyoki bolimbisi mpe tozwi bofuli uta na Molimo Mosantu.

Nakolaki na Rexburg, Idaho, esika wapi nazwaki nguya mpe nateyamaki na libota, baninga, bateyi, mpe bakambi ya malamu. Ezali na makambo ya ndenge na babomoi na biso banso oyo esimbi milimo na biso mpe esalaka makambo ekesena mpo na libela. Moko ya makambo ya boye esalamaki na bolenge na ngai.

Nazalaki ntango nyonso na mosala kati na Eklezia mpe na kolaki na nzela ya Bonganganzambe ya Alona. Ntango nazalaki elenge, Ndeko mobali Jacobs, moteyi na ngai, asengaki biso tokoma likolo ya kalati moko oyo tozalaka kokanisa na eleko ya elambo. Nazwaki kalati na ngai mpe nabandaki kokoma. Ya yambo na listen a ngai ezalaki lisano ya ndembo ya kitunga oyo tolongaka na butu ya lobi. Mpe nsima eyaki mokolo moko nsima ya lisano mpe bongo na bongo. Elongolamaki mpenza mpe solo na nkoma ya minene te ezalaki nkombo ya Yesu.

Eyenga moko na moko kalati ezalaki kotondisama. Mpo na elenge mosimbi ya Bonganganzambe ya Alona, elambo mpe liyangani ya elambo ezwaki ndimbola ya sika,ya monene, mpe ya molimo. Nazalaki kokozela na motema molai baeyenga mpe mabaku ya kolia elambo, lokola kososolaka Bomikabi ya Yesu ezalaki kobongwanisa ngai. Eyenga moko na moko kino lelo, wana ezali ngai kolia elambo, nazali komona kalati na ngai mpe nazali kotala lisusu baliste na ngai. Ntango nyonso na listen a ngai sikawa, ya liboso na nyonso, ezali Mobikisi ya bato.

Na Kondimana na Sika totangi na ntina ya ntango oyo Mobikisi mpe Bapostolo na Ye bakutanaki na elambo ya mpokwa na lisuku ya likolo mpo na Elambo na Elekeli

“Akamataki kwanga, atondaki, mpe abukaki yango mpe apesaki na bango, mpe alobaki ete, Oyo ezjali njoto na ngai esili kopesama mpo na bino: Sala boye mpo na ekaniseli na ngai.

“Bobele bongo akamataki Kopo na nsima na kolia, mpe alobaki ete, Kopo oyo ejali kondimana na sika na makila na ngai masili kosopana mp[o na bino.1

Yesu lisusu akotisaki likuli ya elambo ntango ya batali na Ye na Bafite.2 Nasili koyeba motuya ya makambo mibale oyo.

Mokambi David O. McKay alobaki, “Nazwi liyoki mpo na kobeta sete ete Nkolo aponaki liyangani ya motuya koleka nyonso na Eklezia, mpe yango ezali liyangani ya elambo.”3 Soki tomilengeli malamu mpo na elambo, tokoki kobongola bamoi na biso. Nakolinga kopesa likanisi ya mibeko mitano oyo ekoki kopambola babomoi wana ezali biso kolia elambo na bolongobani.

I. Zala na Liyoki ya matondi mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto

Mobeko ya yambo ezali kozala na liyoki ya matondi na Tata na Lola na ntango ya elambo mpo na Bomikabi ya ya Mwana na Ye. Lisolo oyo elandi ebetami na ntina ya bolekisi elambo:

“Elambo etikala mokolo moko te kolobela ngai mingi tii na eyenga oyo nakulisamaki diakona. Sima na nzanga wana nalekisaki elambo mpo na mbala ya yambo. Yambo tombanda liyangani, moko ya badiakona akebisaki ngai ete, ‘Sala keba mpo na Ndeko mobali Schmidt. Ekoki kosenga yo olamusa ye!’ Na nsuka ntango eyaki mpo na ngai ya kosala elongo na kolekisaka elambo.Nasalaki na milongo motoba ya yambo na malamu. Bana mpe baboti baliaka limpa kozanga komona likanisi to likambo. Nsima nakomaki na molongo ya sambo, molongo wapi Ndeko Schmidt azalaki kofanda ntango nyonso. Kasi nakamoisamaki. Esika ete azala ya kolala azalaki ya kolamuka. Na bokeseni na basusu mingi oyo nasalisaka, azwaki lipa na oyo emonanaki lokola likanisi ya limemia.

“Mwa minuti nsima namikutaki lisus ya kobelemaka na molongo sambo na mai. Ntango oyo moninga na ngai azalaki malamu. Ndeko mobali Schmidt afandaki na moto ya kongumbama mpe miso na ye ya minene ya kokangama. Amonanaki lokola azalaki kolala. Nini ekokaki ngai kosala? Natalaki na mwa ntango na mbunsu na ye, efinana mpe elembi uta na mosala mpe bomipimi ya mibu ebele. Asanganaka na Eklezia lokola elenge mpe azwaka minioko na engumba moke ya Allemagne. Nasilaki koyoka lisolo yango mbala mingi na liyangani ya litatoli. Nakanaki na nsuka ya beta mwa na lipeka na ye na elikia ya kolamusaka ye. Ntango nayaki kosala bongo, moto na ye malembemalembe etombolamaki. Ezalaki na main a miso kokitaka na nse ya matama na ye mpe etalaki ngai na miso na ye namonaki bolingo mpe bosepeli. Asembolaki loboko na malembe mpe azwaki mai. Atako nazalaki mibi zomi na mibale na ntango wana, nakoki lisusu komikundola na polele liyoki nazwaki ntango nazalaki kotala mobange atonda mandefu oyo kolia elambo. Nayebaki na ntembe te ete azalaki koyoka eloko moko na ntina ya elambo oyo nayokaki mokolo moko te. Nazwaki mokano nde ete nalingaki koyoka mayoki wana kaka.”4

Ndeko mobali Schmidt Asololaka na lola, mpe lola esololaka na ye.

II. Mikundola Ete Tozali Kozongisaka Sika Mayokani ya Libatisi

Mobeko ya mibale ezali komikundola ete tozali kozongisa sika mayokani na biso ya Libatisi wana ezali biso kolia elambo. Ndambo ya bilaka tosalaka, lokola ekomami na ma makomi, ikwi:

“Bokota na etonga ya Nzambe, mpe kobiaangema bato ba ye, … mpe bozali kondima komeme mikumba mya bino, … kolela elongo na baye bakolela … , kotelemeke lokola banzeneneke ya Nzambe.”5

“Baya na mitema mibukana mpe milimo ya mawa, … kolingaka kozwa likolo na bango nkombo ya Yesu Klisto, kozwaka mokano ya kosalela ye kino nsuka,” 6 mpe kobatela mitindo mpe ntango nyonso komikundolaka Ye.7

Nsambo ya elambo ezali bokundoli ya mayokani maye. Ntango tozali kolia elambo tozali kozongisa sika bomipesi na biso mpo na kobatela mayokani maye. Nandimi ete ekozala malamu kokanga nsambo ya elambo na mayele na biso mpe mitma na biso. Oyo ekosalisa biso tokangama na kozongisaka sika mayokani na biso ya libatisi. Ata soki tozali mibu 8 to 80 ntango tobatisami, nalikii ete tokobosana ata moke te mokolo wana mpe mayokani tosalaki.

III. Na Ntango ya Elambo Tokoki Komiyoka ya Kolimbisama na Masumu na biso

Ya misato, na ntango ya elambo tokoki komiyoka ya kolimbisama na masumu na biso. Soki tobebisi ntango yambo ya liyangani ya elambo koyambolaka masumu na biso, tokolongwa na liyangani ya elambo koyokaka ya kosokwama mpe peto. Mokambi Boyd K. Packer alobaki: “Elambo ezongisaka sika nzela ya bolimbisi. Eyenga nyonso ntango elambo epesami, wana ezali molulu ya kozongisa sika nzela ya bolimbisi. ... Eyenga nyonso misokola, mpo ete, na ntango esengeli, ntango okokufa molimo na yo ekosokwama.”8 Bolei elambo na bolongobani ekoki kosalisa biso toyoka toyoka bato ya Mokonzi Benyamina, oyo “batondisamaki na bosepeli, kozwakabolimbisi boko bwa masumu ma bango, Mpe kozalaka na kimia na motemawere.9

IV. Tokoki Kozwa Bofuli mpo na Biyano na Bakpokoso na Biso

Mobeko ya minei ezali ete tokoki kozwa bofuli mpo na biyano na bakpokoso na biso na ntango ya liyangani ya elambo. Ntango nazalaki Mokambi ya Misio na Bolivie, Mary Anne mpe ngai tozwaki lipamboli ya kokendeke na seminele ya bakambi ya misio elongo Mokambi Eyring. Na liyangani wana ateyaki ete ezali na banzela misato ya motuya ya komilengela mpo na kozwa litomba uta na liyangani moko. Tosengeli koya na bakpokoso na biso, na bosawa lokola bana,na bolingi ya koyekola, mpe na mposa ya kosalisa bana ya Nzambe.

Wana ezali biso koya na bosawa na liyangani ya elambo, tokoki kopambolama na kozwa mayoki mpo na biyano bakpokoso na biso ya mikolo nyonso. Tosengeli koya ya kolengelama, na bolingi ya koyoka, mpe ya kobenda makanisi libanda te. Na makomi totangi ete, “Kasi, tala, nalobi na bino, ete bosengelikoyekola yango na molimo na bino; nde bosengeli kotuna ngai soki ezali malamu, mpe soki ezali malamu nakosala ete nsopo na yo etumbama kati na yo; yango wana, okoyoka ete wana ezali malamu.10 Tokoki koyeba nini tosengeli kosala mpo na kosilisa bakpokoso na biso.

V. Koliaka elambo na Bolongobani Ekosalisaa Biso Totonda na Molimo Mosantu

Mobeko ya mitano ezali, koliaka elambo na bolongobani, ekosalisa biso totonda na Molimo mosantu. Na kokotisaka elambo na ntango ya botali na Ye epai ya Banefite, Yesu alobaki ete, “Ye oyo alei limpa eye alei nzoto ya ngai mpo ya molimo mwa ye; mpe ye oyo ameli vino eye ameli makila ma ngai mpo ya molimo mwa ye; Mpe molimo mwa ye mokoyoka mokolo moko te nzala mpe mposa ya mai kasi mokotondisama.”11 Balakelamaki ete soki bayoki nzala mpe mposa ya mai nsima ya bosembo, bakotondisama na Molimo Mosantu. Losambo ya elambo elaki ete soki tobateli mayokani na biso, tokozwa ntango nyonso Molimo na Ye mpo na kozala elongo na biso.12

Mpaka Melvin J. Ballard alobaki: “Nazali nzeneneke ete ezali na molimo kozalaka na mosala ya elambo oyo eniangoisaka molimo uta na moto tii na makolo; okoyoka bampota ya molimo kobikisamaka, mpe bozito kotombolamaka. Boleendisi mpe esengo eyakela molimo oyo ezali ya kolongobana mpe solo na mposa ya kolia blei ya oyo ya molimo.”13

Tokopambolama ntango toyoki botondi mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto, tozongisi sika mayokani na biso ya libatisi, toyoki bolimbisi mpe tozwi bofuli uta na Molimo Mosantu ntango tokaboli elambo eyenga nyonso. Ekozala ntango nyonso liyangani monene ya elambo soki elambo ezali na katikati ya losambo nabiso. Napesi matondi na ngai mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto. Nayebi ete Azali na bomoi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.