Bandeko, Tozali na Mosala ya Kosala

Na Mpaka D.  Todd Christofferson

Ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale


Lokola Mibali ya bonganganzambe, tozali na mosala ya ntina ya kosala na bato, na ndako, mpe na Eklezia

Bandeko, mingi elobami mpe ekomami na mibu mileki kala te mpo na oyo etali mikakatano ya mibali mpe bana mibali. Mwa ndakisa ya bankombo ya buku, ezali na Why There Are No Good Men Left, The Demise of Guys, The End of Men, Why Boys Fail, andManning Up. Likambo ya esengo na koyoka, emonani lokola ete mingi ya maye ekomami na basi. Ezala atako boni, mama na likambo oyo bato bazali kotalela ezali ete na mangomba mingi ya bato lelo mibali mpe bilenge mibali bazali kozwama na boweli mpe bazali kokitisa bilembo mpo na eye etali mosala mpe motuya na bango na lingomba ya bato.

Mokomi ya Manning Up alakisaki yango boye: “Ezali pene mobeko moko ya bompenza mpo na mokili mobimba ete bana basi bakomaki basi kaka na kokolaka na nzoto, bana mibali basengeli koleka na momekano. Basengeli kolakisa mpiko, nkonzo ya nzoto, to kozala na makoki masengeli. Ntina ezalaki ya kolakisa polele ete bakoki kobatela basi mpe bana; oyo ezalaki ntango inso mosala na bango ya yambo na lingomba. Lelo, nzokande, komonaka basi kokende liboso na makoki ya misolo, mibali mpe batata oyo mokumba ezali ya kopesa nyonso mpo na mabota na bango bakomi kopona kosala to te, mpe bizaleli ya kimobali basengelaki mpo na kosala mosala na bango—bokasi, kondima nyonso, mpiko, boyengebene—ekomi makambo ya kala mpe kutu mwa mindondo.”1

Na mpila na bango mpo na kopesa libaku na basi, eloko tozali kokumisa, ezali na baye bazali kotiola mibali mpe makabo na bango. Bazali komonana lokola neti bazali kokanisa ete bomoi ezali momekano katikati na mibali mpe basi—ete moko asengeli komatela mosusu, mpe sikawa ezali ngonga ya basi. Basusu bazali koloba ete mosala ezali nyonso mpe libala mpe bana esengeli kozala to te yango wana, ntina nini tozali na mposa ya mibali?2Na bafilime mingi ya Hollywood, na baTV ya antenne mpe TV ya nsinga, kutu na bafilime ya bato na mombongo, bazali kolakisa mibali lokola bato oyo bakokaka makambo te, bato bakola te, to bamiyimi. Ezaleli oyo ya kolongola mobali kimobali ezali kobebisa makambo.

Na Etazini, na ndakisa, elobamaki ete: “Bana basi baleki bana mibali na makambo manso, uta na eteyelo na bana kino na eteyelo ya likolo. Na kelasi ya liboso ya secondaire, na ndakisa, bobele bana mibali 20 na mokama bayebi kokoma mpe 24 na monkama bayebi kotanga. Bilembo ya bilenge mibali, ntango wana, na 2011 ezalaki ya mabe mingi koleka nyonso oyo esili kozala na mibu 40. Engebene na Center for Education Statistics (NCES), bana mibali bazali na libaku mingi mpo na kokita na nse mbala 30 na mokama koleka bana basi ya biteyelo ya katikati mpe ya likolo. … Esili kosakolama ete na bamobu 2016 basi bakozwa 60 na mokama elonga ya diploma ya License, 63 na mokama diploma ya maitrise mpe 54 na mokama diploma ya doctorat. Bana 2 na misato ya bayekoli oyo basengeli pologalami ya kobongisa bizaleli ezali bana mibali.”3

Mwa mibali mpe bilenge mibali bakamati mayebisi mabe oyo lokola escuse mpo na koboya mikumba mpe bazali kokola ata moke te. Na likanisi oyo ezali mbala mingi mabe solo, moteyi moko ya université alobaki ete, “Mibali bakoya na kelasi na bango kolataka bikoti na lolenge ya nsima mpe [mabe na bango] mikalo ezali ‘mbwa aliaki mosala batindaki ngai na kelasi’. Na ntango yango, basi bazali kotala manaka ya mokolo na bango mpe bazali koluka bakomisa bango na biteyelo ya mibeko.”4 Mwasi moko mosemboli ya filime apesaki likanisi oyo kutu ya mabe ete “nini tokoki kotalela mibali, soki tozali na libaku mpe toponi kozala na moninga, ezali kaka azala—moninga. Moto moko oyo akotelema na esika na yemei kutu lokola azali na limemia ya kotika biso na esika na biso moko.”5

Bandeko mibali, ekoki kozala boye te mpo na biso. Lokola mibali ya bonganganzambe, tozali na mosala ya ntina na lingomba ya bato, na ndako, mpe na Eklezia. Kasi tosengeli kozala mibali oyo basi bakoki kotiela mitema, oyo bana bakoki kotiela mitema, oyo Nzambe akoki kotiela motema. Na Eklezia mpe bokonzi ya Nzambe na mikolo miye ya nsuka, tokoki te kondima kozala na bana mibali mpe mibali oyo bamipesi mpenza te na mosala. Tokoki te kondima bilenge mibali oyo bazangi komikonza mpe balingi kaka babokola bango. Tokoki te kondima bilenge mibali ya bakola oyo bazali na eloko ya kosala mpo na mikolo na bango ya nsima te, oyo bazali na lokengo te mpo na kosala mabota mpe kopesa likabo ya solo na mokili. Tokoki te kondima mibali babala mpe batata oyo bazangi kopesa bokambi ya molimo na ndako. Tokoki te kondima baoyo bazali kosalela Bonganganzambe Bosantu, na Molongo ya Mwana wa Nzambe, babebisa makasi na bango na bilili ya bato bolumbu to balekisa bomoi na bango na bandako ya Interneti (na litio kozalaka bato ya mokili wana kozalaka na mokili te).

Bandeko mibali, tozali na mosala ya kosala.

Bilenge mibali, bosengeli kosala malamu na kelasi mpe nsima kokoba boyekoli na bino koleka eteyelo ya likolo. Basusu kati na bino bakolinga kolanda koyekola na université mpe kosala mimbongo, mosala ya bilanga, misala ya mbula-matari, to misala misusu. Basusu bakolonga na bantoki, miziki, to koteya. Basusu bakopona mosala ya soda to koyekola misala misusu. Na mibu mileki, nazalaki na misala ya maboko mwa mingi etali kozongisaka sika mpe kobongisa ndako na ngai, mpe naluli mosala makasi mpe mayele ya mosala ya bato oyo. Na oyo nyonso boponi, ezali na ntina ete bokoma bato ya mayele ekoki na mosala mpo ete bokoka kosunga libota mpe kopesa likabo mpo na bolamu na lingomba na bino mpe ekolo na bino.

Kala mingi te namonaki video moko kolakisaka mokolo moko na bomoi ya elenge mobali ya mibu 14 na Inde abengami Amar. Alamukaka ntongo ntongo mpe asalaka misala mibale, liboso mpe nsima ya eteyelo, mikolo motoba na ndambo na mposo moko. Lifuta na ye epesaka lisalisi ya monene na bomoi ya libota. Akimaka mbangu na velo na ye ebeba mpo na nkozonga ndako uta na mosala ya mibale nsima ya molili mpe alukaka mwa bangonga moke mpo na mosala ya kelasi liboso ya komibwaka na mbeto na katikati ya bandeko na ye oyo balali na ba 11:00 na butu. Atako nakutani naino na ye te, nazali na lolendo mpo na ye mpo na etingia mpe mpiko na ye. Azali kosala ya malamu mingi akoki na bozwi mpe mabaku moke na ye, mpe azali lipamboli mpo na libota na ye.

Bino mibali bankulutu—batata, bamikolo banzemba, bayangeli, bateyi na ndako—bozala bandakisa balongobani mpe bosalisa nkola ya sika ya bana mibali bakoma mibali. Boteya bango ntoki ya lingomba mpe misusu: boniboni kosala na lisolo, bonboni koyebana mpe kozalana na basusu, boniboni kozala na basi mpe bana basi, boniboni kosalisa, boniboni kozala moningi mpe kosepela na masano, bonboni kolandela eloko mpe kozanga kokakema, boniboni kosembola mbeba mpe kosala boponi malamu.

Mpe boye banso oyo bazali koyoka, ezala wapi nsango oyo ekozwa bino, nalobi lokola Yehova alobaki na Yosua, “Jala makasi mpe yika mpiko” (Yosua 1:6). Bozala mpiko mpe bomilengela malamu mingi lokola bokoki, ezala bozali na babozui nini. Bomilengela mpo na kozala mobali mpe tata ya malamu; bomilengela mpo kozala bato ba ekolo ya malamu mpe ya kobota mbuma; bomilengela mpo na kosalela Nkolo, oyo ya Ye bonganganzambe bosimbi. Wapi esika bozali, Tata na bino na lola azali kokanisa bino. Bozali bino moko kaka te; bozali na bonganganzambe mpe likabo ya Molimo Mosantu.

Na bisika mingi wapi bosengami, moko ya motuya mingi koleka ezali lisanga likoki ya bonganganzambe. Tozali na mposa ya masanga makoki oyo ezali kopesa bilei ya molimo na bandimi na Eyenga mpe oyo lisusu ezali kosalisa. Tozali na mposa ya bayangeli ba masanga makoki oyo bakangamaka na kosala mosala ya Nkolo mpe na kosungaka baye lisanga likoki mpe mabota na bango.

Kanisa mosala ya misio. Bilenge mibali, bozali na ntango te ya kobebisa. Bokoki kozela te kokoma na lokengo na oyo etali bomilengeli kino bokokoma na mibu 17 to 18. Lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona ekoki kosalisa bandimi basosola ndai mpe boyokani ya bonganganzambe mpe bamilengela mpo na kokula lokola bampaka, bakoki kosalisa bango basosola mpe bamilengela mpo na makuli ya tempelo, mpe bakoki kosalisa bango bamilengela mpo na misio ya elonga. Masanga ma Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe Lingomba ya Bamama Basungi ekoki kosalisa baboti balengela bamisionele oyo bayebi Buku ya Mormon mpe oyo bakokende na elanga bamikaba mobimba. Mpe na palwasi mpe etape moko na moko, masanga makoki wana kaka ekoki kokamba bosali elongo na bamisionele ya ntango mobimba oyo bazali kosala kuna.

Mosala moko ekangani na yango oyo evandi liboso na mapeka ya banganganzambe ezali libiangi ya Mobikisi, ezongelami na Mokambi Thomas S. Monson, mpo na kosalisa baye babungi nzela ya nsango malamu to oyo batengami mpo na ntina moko to mosusu. Tozali na elonga kitoko na makasi oyo, lokola mosala ya malamu mingi na bilenge mibali. Lisanga likoki moko na Bonganganzambe ya Alona na Palwasi ya Rio Grande Spanish na Albuquerque, New Mexico, bapesanaki toli etali nani bakokaki kozongisa mpe nsima lokola lingomba bakendeki kotalana. Moko alobaki, “Ntango bayaki na ekuke na ngai, namiyokaki ya mutuya,” mpe mosusu abakisaki ete, “Nayokaki esengo na kati ete moto moko alingaki mpenza ngai nakende na Eklezia; esalaka ete ngai nalinga kokende na eklezia sikawa.” Ntango baye lisanga likoki babengisaki elenge mobali moko na kozonga, basengaki ye aya elongo na bango na botali oyo elandaki, mpe asalaki yango. Bazalaki bobele kobengisaka ye te mpo na kozala na eklezia; bazalaki mbala moko kokomisa ye eteni ya lisanga likoki.

Mosala mosusu ya bonganganzambe ya mpasi kasi ya kopesa mposa ezali oyo ya bonkoko ya libota mpe ya tempelo. Tala mokanda ya Bokambi ya Yambo oyo ezali koya kala te oy ekolobela libiangi ezongisami sika mpe limoni ya likolo ya eteni ya ntina ya mosala oyo tosengeli kosala.

Masanga makoki na biso lisusu esali bondeko moko ya kosungana. Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki: “ekozala mokolo ya makamwisi, bandeko na ngai—ekozala mokolo ya bokokisi ya ntina ya Nkolo—ntango masanga makoki ya bonganganzambe ekokoma longo ya bokasi mpo na moto nyonso oyo azali na kati na yango, ntango moto moko na moko ya boye akoki kozala na makoki ya lolenge elongobani mpo na koloba, ‘nazali moko ya lisanga likoki ya bonganganzambe ya Eklezia ya lisanga likoki ya bonganganzambe ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Natelemi mpe namilengeli mpo na kosalisa bandeko ba ngai na bamposa na bango nyonso, lokola nazali na elikia ete bakosalisa ngai na mposa na ngai. Na kosalaka elongo, tokoki kotelema, na kozanga mindondo mpe kozanga kobanga, kobunda na mopepe ya bokeseni oyo ekoki kobeta, ezala yango ya mosolo, bozalani, to molimo.’”6

Atako bokasi na biso ya malamo koleka nyonso, makambo masalamaka te ntango nyonso lokola tobongisi, mpe “mopepe ya bonguna” moko oyo ekoki koya na bomoi ya moto ezali bozangi mosala. Mwa nkasa moko ya kala ya bolamu ya Ekleiza elobi, “Moto moko azangi mosala ezali ntango moko ya ndenge mpo na Eklezia mpo ete, azangi lisango, azali na momekano lokola Yobo azalaki na momekano—mpo na bosembo na ye. Lokola mikolo ekomi bamposo mpe basanza mpe kutu mibu ya bokesani, mpasi ekoti mozindo. … Eklezia ekoki te kolikia kobikisa moto mokolo ya Eyenga soki na mposo azali nzeneneke oyo asepeli mpo na bobaki na ekulusu ya molimo mwa ye”7

Na sanza ya minei 2009 Mosungi ya Episikopo Mokonzi kala Richard  C. Edgley alobelaki lisolo ya lisanga likoki moko ya ndakisa oyo eninganaki mpo na kosalisa ndeko moko mondimi oyo abungisaki mosala na ye:

“Phil’s Auto of Centerville, Utah, ezali ndakisa ya oyo bayangeli ya bonganganzambe mpe lisanga likoki bakoki kosala. Phil azalaki moko ya lisanga likoki moko mpe asalaki lokola mobongisi mituka. Mawa, esika ya kobongisa mituka wana wapi Phil azalaki kosala ezwaki mobulu ya nkita mpe esengelaki kolongola Phil na mosala na ye. Abebisamaki mbala oyo na likambo wana.

“Na koyokaka bobungisi mosala ya Phil, episikopo na ye, Leon Olson, mpe bokambi ya lisanga likoki na ye na losambo bayekolaki nzela bakokaki kosalisa Phil kozonga na nzela ya mosala. Mpamba te azalaki moto moko ya lisanga likoki, ndeko moko, mpe azalaki na mposa ya lisalisi. Basukisaki ete Phil azalaki na makoki mpo na kosala nkita na ye moko. Moko ya lisanga likoki asalaki ete azalaka na ndako oyo ntango mosusu akokaki kosalela lokola esika ya kobongisa mituka. Moto mosusu akokaki kosangisa bisalele mpe biloko mosusu mpo na kokokisa esika wana ya sika. Penepene na banso na lisanga likoki bakokaki ata kosalisa na kosukola esika wana ya kala.

“Bakabolaki makanisi na bango elongo na Phil; nsima bakabolaki mwango na bango elongo na baye ya lisanga likoki na bango. Esika epetolamaki mpe ekomaki sika, bisalele bisangisamaki, mpe nyonso etiamaki na esika. Phil Mobongisi Mituka ezwaki elonga mpe na nsuka akendeki na etuka ya malamu mingi koleka mpe ya libela—nyonso mpamba te bandeko ya lisanga likoki na ye bapesaki lisalisi na ntango ya mpasi.”8

Ya solo, lokola ezongelami na baprofeta mibu na mibu, “Ya motuya mingi koleka nyonso na mosala ya Nkolo okosala ekozala na kati na bifelo ya ndako na yo.”9 Tozali na mingi ya kosala mpo na kolendisa libala na lingomba oyo mingimingi ezali kotala mpamba motuya na yango mpe ntina na yango. Tozali na mingi ya kosala mpo na koteya bana na biso “kosambela, mpe kotambola na alima liboso ya Nkolo” (D&A 68:28). Mosala na biso ezali kaka kosalisa bana ba biso bayoka bobongoli motema to mbongwana na Nkolo elobami ma polele ya boye na Buku ya Mormon (tala Moziya 5:1–12; Alma 26). Elongo na Lingomba ya Bamama Basungi, bonganganzambe ekoki kopesa ndakisa malamu na baboti mpe mabala, mpe masanga makoki ekoki kopesa mapamboli ya bonganganzambe na mabota ya baboti banzambe.

Iyo, bandeko, tozali na mosala ya kosala. Matondo na bino mpo na komibonza na bino mpe bolamu bozali kosala. Bokoba, mpe Nkolo akosalisa bino. Ntango mosusu bokoki koyeba te nini bokosala to nini bokoloba— bokende kaka liboso. Bobanda kosala, mpe Nkolo ayebisi na ntembe te ete ekuke ya makasi ekofungwana mpo na [bino]”(D&A 118:3). Bobanda koloba, mpe Ye alaki ete, “Bokobulunganisama te liboso ya bato; mpo ekopesamala bino na ngonga wana mpenza, iyo, na ntango wawa mpenza, nini bokoloba” (D&A 100:5–6). Ezali solo ete tozali na ndenge ebele lokola bato nyonso mpe ya kobonga nie te, kasi tozali na Moteyi oyo asalaki Bomikabi ebongi nie, mpe tozali na libiangi likolo ya ngolu na Ye mpe bonganganzambe na Ye. Wana ezali biso koyambola mpe kopetola milimo na biso, tolakelami ete tokoteyama mpe tokopambolama na nguya uta likolo (tala D&A 43:16).

Eklezia mpe mokili mpe basi bazali kolela mpo na mibali, mibali oyo bazali mpe bazali kokolisa bokoki mpe mayele ma ntoki na bango, oyo balingi kosala mpe bamibonzi, oyo bakosalisa basusu bazwa esengo mpe lobiko. Bazali koganga, “Bolamuka, O bato ya Nzambe!”10Nzambe salisa biso tosala yango. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Kay S. Hymowitz, Manning Up: How the Rise of Women Has Turned Men into Boys (2011), 16.

  2.  

    2. “Soki botuni bilenge lelo nini ekokomisa bango bankukutu, penepene na moko te akotanga libala. Bazali mingimingi mpenza komona kpososo nzinganzinga ya mosala—kosilisa koyekola, bonsomi ya mosolo, mosala ya ntango mobimba—lokola bilembo ete bakomi. Mosala, kowumala na mosala, bonsomi: yango ezali kosala moto lelo” (Hymowitz, Manning Up, 45). Nguya likolo na basi ya kozwa likanisi ya koboya libala ezali makasi mpenza. Mokomi moko ya Times ya Londres akomaki ete:” Moko moko te, libota na ngai te to bateyi na ngai te, baloba, ‘O iyo, mpe lisusu okoki kozala mwasi na libala to mama lisusu.’ Bakanaki basengeli kolanda nzela ya sika ya “bokokani” ya mikolo oyo ete mposa ya ntango na ntango ya bankola ya basi—kobala mpe kobokola—elongolamaki na nko na bomoni na bango ya mikolo mikoya (Eleanor Mills, “Learning to Be Left on the Shelf,” Sunday Times, sanza ya minei 18, 2010, www.thetimes.co.uk) na Hymowitz, Manning Up, 72). Mokomi mosusu ya bamibu 40 akomaki na ntina ya mawa na ye etali kobala te: “Nayoki mabe mpo na mposa na yo ya mobali.” “Zala na mwa bolingo ya yomei!” “Ozwi bozangi bonsomi na mobimba moko ya nse,” mpe “Soki mwana na ngai ya mwasi akoli mpo na kozala na mposa ya mobali na makasi katikati lokola yo azali kosala, nakoyeba ete nasalaki eloko moko ya mbeba na kobokolaka ye” (Lori Gottlieb, Marry Him: The Case for Settling for Mr. Good Enough [2010], 55).Nsango malamu ezali ete bato mingi, lokola bankulutu ya bilengebayekola, bazali kondima te nsango ya koboya libala, mpe koboya libota. “Engebene na boyekoli moko ya moyekoli moko ya nkita ya Université ya Pennsylvania, na Etazini na 2008, 86 na mokama ya basi ya mindele bayekola na eteyelo ya likolo babalaki na mibu 40, emekisami na 88 na mokama ya oyo bazali na nse ya mibu minei ya eteyelo. Mitango ya mibali ya mindele, batanga na eteyelo ya likolo ekokani: 84 na mokama na bango babali na mibu 40 na 2008. Bwania ya mikolo oyo, endimami te na boyekoli, na mpembeni, ekoki kozala ete libala ezali nkita ya mabe mpo na basi. Kasi basi ya mindele bayekola na eteyelo ya likolo emonani lokola bandimi yango te. Bazali mingimingi mpenza koleka liboke mosusu bakanisi ete ‘bato babala bazali mingimingi na esengo koleka bato babala te.’ …Mingi mpenza—70 na mokama—ya bayekoli ya mobu ya yambo na eteyelo ya likolo bakanisi kobokola libota ezali ‘na ntina’ to ‘ya motuya mpenza’ mpo na mikolo na bango ya nsima” (Hymowitz, Manning Up, 173–74).

  3.  

    3. Philip G. Zimbardo and Nikita Duncan, The Demise of Guys: Why Boys Are Struggling and What We Can Do about It (2012), e-book; tala mokapo “Behind the Headlines.”

  4.  

    4. Barbara Dafoe Whitehead, Why There Are No Good Men Left: The Romantic Plight of the New Single Woman (2003), 67.

  5.  

    5. Amanda Dickson, “‘Hunger Games’ Main Character a Heroine for Our Day,” Deseret News,Sanza ya Minei 2, 2012, www.deseretnews.com.

  6.  

    6. Gordon B. Hinckley, “Welfare Responsibilities of the Priesthood Quorums,” Ensign, Sanza ya Zomi na moko. 1977, 86.

  7.  

    7.  Helping Others to Help Themselves: The Story of the Mormon Church Welfare Program (1945), 4.

  8.  

    8. Richard C. Edgley, “This Is Your Phone Call,” Liahona mpe Ensign, sanza ya Mitano 2009, 53.

  9.  

    9.  Teachings of Presidents of the Church: Harold B. Lee (2000), 134.

  10.  

    10. “Rise Up, O Men of God,” Hymns, no. 323.