2010–2019
Na Bondimi Makambo manso Makokisami
Sánzá ya Zómi 2012


Na Bondimi Makambo manso Makokisami

Bondimi ekosalisa biso komata na likama te nzela ya nsango malamu, kolonga mokakatano nyonso ya kufa, mpe kozonga na bozali ya lokumu ya Tata wa biso na Lola.

Kala mingi te mingi na biso na libota ya BaNash tobutaki na somge ngomba ya Huayna Picchu, songe moko molai pembeni bantika ya Bainca ya kalaya Machu Picchu na bangomba ya Peru. Ezali bobuti moko ya etelema ngbwi oyo ezali na bisika ya kotala ya kitoko mpe mabulu ya mbalakaka. Na mawa, ndambo ya babuti babungisaki bomoi na bango na kokweyaka libanda ya nzela ya nkaka, etelema ngbwi. Mpo na koboya makama ya boye, basinga makasi engangisami na mabanga na mopanzi ya ngomba ya Huayna Picchu. Tosimbaki na basinga oyo wana ezalaki biso komata mpe esalisaki biso mpo na kokoma malamu na nsonge wapi bomoni ezalaki ya lokumu!

Lokola nzela likolo ya Huayna Picchu, mobembo na biso na kufa ezali bobuti moko etelema ngwi mpe ya pkokoso, moko oyo esengaka lisalisi ya Tata wa biso na Lola mpo na kosilisa yango na elonga. Na ntina na yango, Ye atiaki mibeko mpe makuli ya nsango malamu mpo na komema biso epai ya Mobikisi mpe nguya na Ye ya lobiko.1 Mibeko na Ye ya yambo, Bondimi na Nkolo Yesu Klisto,2 ezali lokola bansinga na ngomba Huayna Picchu: soki ekangisami makasi mpe na bokebi na libanga ya Mosikoli na biso,”3 bondimi ekosalisa biso komata na likama te nzela ya nsango malamu, kolonga mokakatano moko moko ya kufa,4 mpe kozonga na bozali ya lokumu ya Tata wa biso na Lola. Biloko nyonso ekokisami na bondimi.5

Bondimi ezali mobeko ya mosala mpe ya nguya lokola.6 Yango “ezali te kozala na boyebi book bobongo nie ya makambo; yango wana soko [biso] tozali na bondimi [biso] tozali na elikia mpo ya makambo maye mamanoni te, maye mazali solo.”7Ezali elendiseli moko 8 oyo etindaka biso na mosala9 mpo na kolanda ndakisa ya Mobikisi mpe na losambo kobatela mitindo na Ye, ata na bantango ya libonza mpe momekano.10 Bondimi ememelaka biso nguya Nkolo, oyo—o ntei ya makambo mosusu—malakisami na elikia ya makambo malamu ekoya,11 makamoisi oyo efandisaka bondimi na biso,12 mpe bobateli ya bonzambe na makambo ya molimo mpe ya mosuni.13

Bomoi ya Ann Rowley, Mwasi moko ya pionie na mikolo ya ebandeli ya Eklezia, alakisaki lolenge nini bondimi esalaka na babomoi na biso mpo na bolamu. Mwasi mokufeli mobali ya mboka Angletere, Ndeko mwasi Rowley asalelaki bondimi na ye mpo na koyanola libiangi uta na profeta mpo na kosangana na Siona. Azalaki moko ya kompani ya lokalo ya Willie, oyo ekutanaki na galasi ya mozindo na mopepe makasi na nzela na eleko ya ebandeli ya malili ya 1856. Bakomaki na esika moko na mobembo wapi bana na ye sambo bazangaki bilei. … Butu ezalaki koya mpe ezalaki na molei mpo na elambo ya mpokwa. INasengaki lisalisi ya Nnzambe lokola ezalaki kosala ngai ntango nyonso. Nafukamaki, komikundolaka bisikiti ya makasi oyo … nayokisamaka likolo uta na mobembo ya mai. Ezalaki monene te, mpe ezalaki makasi mpenza ete ekokaki kobukana te. Solo, wana ezalaki ya kokoka te mpo na koleisa bato8, kasi mampa 5 mpe mbisi 2 ezalaki ya kokoka te mpo na koleisa bato 5,000 lokola, kasi na nzela ya likamoisi, yesu aslaka yango. Boye, na lisalisi ya Nzambe,makambo manso makoki kosalama. Nazwaki bisikiti mpe natiaki yango na nzungu moko ya monene mpe natiaki mai mpe nasengaki lipamboli ya Nzambe. Mpe na kotiaki singa likolo ya nzungu mpe natiaki yango na makala. Ntango nalongalaki singa mwa ngonga moke nsima, nakutaki nzungu etonda na bilei. Nafukamaki elongo na libota na ngai mpe natondaki Nzambe mpo na bolamu na Ye. Mpokwa wana libota na ngai ezalaki na bilei ya kokoka.”14

Ann Rowley azalaki kobika nsango malamu na libonza monene ya ye moko, azalaki na mposa ya lisalisi, mpe asengaki yango na losambo. Mpo na bondimi na ye, atondisamaki na elikia mpe apesamaki na bokamoi bilei mpo na libota na ye. Nkolo apambolaki ye lisusu na likoki ya ntina ya seko ya “koyika mpiko na bondimi kino na nsuka.”15 Atako na lobi moko eyebanaki te, asengaki te mpo na koyeba boniboni akoleisalaka bana na ye mokolo ya nsima; na esika wana, “atalelaki na bompikiliki Nkolo”16 mpe akendeki liboso na elikia—kaka lokola nzembo kitoko elobeli yango:

Kamba, Mwinda ya boboto, na kati na molili zingazinga na ngai; Kamba liboso!

Butu ezali molili, mpe nazali mosika na ndako; koba kokamba ngai!

Batela makolo na ngai; nasengi komona te

Esika mosika—litambe moko ekoki mpo na ngai.17

Biso mpe tokoki kosalela bondimi ya boye na Nkolo, Kondimelaka mpe kotiaka elikia ete Nzambe wa biso ya boboto mpe ya sikisiki18 akopambola biso na nguya na Ye ya kokamwa oyo ebongi mpo na bozui na biso, engebene na ntango na Ye. Ntango tozali kosala boye, biso mpe tokomona loboko na Nzambe komonisama na bomoi na biso.

Nkolo atindi biso tozwa “nguba ya bondimi na yango okozala na makoki ya kobebisela makonga nyonso ya nkanda ya moyini.” 19Satana akosalela biloko lokola ntembe, bobangi, lisumu mpo na kosenginia biso tokimisa bondimi mpe tobungisa bobateli epesaka. Tika na mokuse tososola mikakatano nyonso oyo epai ya bondimi moko na moko mpo ete tokoka kokitola mpe kosala keba na masenginia ya monguna te.20

Yambo, bozangi bondimi na Nkolo to na nsango malamu na Ye, ekosala biso totelemela Molimo ya Nzambe.21 Eyano ya Nkolo mpo ntembe ezali ya pete. Ntango Mokonzi Benyamina alobaki, “Ndimela Nzambe; ndima ete azali, ete akelaki biloko binso, o lola mpe o mabele lokola; ndimani ete azali na bwania bonso, mpe nguya inso o lola mpe o mabele lokola; ndimani ete moko akososola te makambo manso maye Nzambe akoki.”22

Soki, na ntina ya bozangi bondimi to ntembe, okuti bondimi na yo bozali kotepatepa, mikondola ete kutu Baapostolo ya kala babondelaki Nkolo mpo na “kobakisa bondimi.”23 Komikundolaka ete bondimi mpe ntina bazali baninga basengeli, kanisa lisese oyo elandi: bondimi na ntina bazali lokola mapapu mibaale ya mpepo. Nyonso mibale ezali na ntina mpo na kosimba bopumbwe. Soki, na emoneli na yo, ntina esali lokola koboya bondimi telema mpe mikundola ete emoneli na biso ezali ya kosuka mpenza komekolaka na oyo ya Nkolo.24 Botala lisusu mpamba te bondimi ete bolongola lipapu moko na mpepo na likolo. Na esika wana, leisa ndambo moko ya bondimi mpe tika ete elikia ekoma longo na molimo na yo—mpe na ntina na yo.25 Yango wana totindami “koluka boyekoli … na boyekolimpe lisusu na bondimi.”26 Mikundola, bondimi eyaka liboso mpe ebotaka makamoisi maye tokoki kolimbola te uta na boyebi tozui na nzela ya mayele na biso, lokola nzungu monene etonda na bilei uta na bisikiti moke mibale to kaka koyikaka mpiko atako ndenge nini.27

Ya mibale, bobangi ebendaka mayele libanda mpe elembisaka bondimi kati na Nkolo. Apostolo Petelo atalelaki Nkolo na butu moko ya mvula makasi mpe atambolaki likolo ya mai—kino kino abongwanisaki bisika wapi azalaki kotala mpe “amoni mopepe makasi [mpe] abangaki” mpe sima abandaki kozinda na mai ya botomboki.28Akoki kokoba kotambola soki abangaka te! Na esika ya kokangamaka mpe kobangaka mopepe ya makasi mpe bambonge na bomoi na biso, Nkolo abengisi biso “totala epai na ye na makanisi nyonso; na ntembe te, kobanga te.”29

Ya misato, lisumu ekitisaka bozali ya Molimo na babomoi na biso, mpe kozangaka Molimo Mosantu, tokobungisa bokasi ya molimo mpo na kosimba mpe kosalela bondimi. Ezalali malamu kosalela bondimi na biso ete “tosimba te makabo mabe, to eloko ya mbindo te”30 mpe “tozala na etingia na kobatelaka mitindo [yango], soki te … bondimi na yo ekokweisa yo, mpe banguna na yo bakolonga yo.”31 Soki lisumu ebebisi bomoi na yo, nabengisi biso bosalela “bondimi mpo na boyamboli,”32mpe Mobikisi, na nzela ya Bomikabi, akopetola mpe kobikisa bomoi na yo.

Bandeko babali mpe basi, Nkolo akolinga, engebene na bondimi na biso, kokokisa bilaka mpe mosala na Ye elongo na biso mpo na kolonga mokakatano nyonso.33Asalaki yango mpo Ann Rowley mpe asali bongo mpo na bato na Ye na bikolo nyonso mpe na mobu nyonso mpe nkola. Mpo Ye azali “Nzambe ya makamoisa” mpe “abongwanani te,” Ye lisusu akopambola moko na moko na biso na elikia, bobateli, mpe nguya engebene na bondimi na bondimi na Ye.34 Bondimi ya sikisiki kati na Yesu Klisto ekolinga—lokola basinga na nzela ya Huayna Picchu—kokanga yo na balingami na yo likolo ya “libanga ya Mosikoli na biso”35 mpe nguya na Ye ezanga emekoli mpo na kobikisa.

Mokambi Thomas S. Monson asakoli ete, “Lobi ezali ya kokenga lokola bondimi na yo.”36 Natatoli na ntina ya bosolo wana, na elikia, eluti mpe nabengisi moko na moko na biso akende na molende liboso na bondimi kati na Nkolo, “kobangaka eloko te.”37 Nayebi ete Mobikisi azali na bomoi, azali “mobandeli mpe mosukisi ya bondimi bwa biso,”38 mpe “mozongisi ya libonza epai na bango bakolukaka ye.”39 Natatoli boye na nkombo ya Yesu Klisto, amene.