Ekoki Bino Koyoka Bongo Sikawa?

Na Mpaka Quentin L. Cook

Ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale


Quentin L. Cook
Basusu na Eklezia bandimaka ete bakoki koyanola mituna ya Alma na iyo ya koyokana te. Bazali “koyoka bongo sikawa” te.

Mokambi Monson, tolingaka, tokumisaka, mpe tosungaka yo! Liyebisi oyo ya ntina eyebana na limemia epai ya bamisionele efulaka. Nakoki komikundola bosepeli ya 1960 ntango mibu mpo na bilenge babali ya kosalaka misio ekitisamaki uta mibu 20 tii na 19. Nakomaki na misio ya Angletere lokola mobiangami ya sika ya mibu 20. Moto ya yambo ya mibu 19 na misio na biso ezalaki Mpaka Jeffrey R. Holland, bobakisi moko ya kokamwa. Azalaki koyoka na mwa basanza sonisoni kozalaka na mibu 20. Nde na kati na mobu, mingi ya mibu 19 bayaki. Bazalaki bamisionele ya botosi mpe ya botongono, mpe mosala ekolaki. Nandimi ete bobuki mbuma mingi kutu ekosalama sikawa lokola bamisionele ya bosembo, ya komipesa bazali kokokisa motindo ya Mobikisi mpo na kosakola nsango malamu na Ye.

Na emoneli na ngai, baye kati na bino na nkola ya sika oyo bamilengeli malamu koleka bankola nyonso ya kala. Boyebi na bino ya makomi ezali mpenza kobetisa ngai motema. Nzoka nde, mikakatano nkola na bino ezali kokuta wana ezali bino komilengela mpo na mosala ekokani na miye bandimi banso ya Eklezia bakutanaki na yango. Toyebi banso ete bonkoko na mwa mikili mingi esengaka bomipesi ya bosembo to ya molimo te. Na lisolo nyonso, bakambi ya Eklezia bakebisi mpe batei bato boyambola. Na Buku ya Mormon, Elenge Alma azalaki motema likolo na ntina ya bozangi bosembo mpe bozangi komipesa ete aboyaki kozala mosambisi mokonzi, moyangeli ya bato ya Nefi, mpe amipesaki na bokasi bonso na libiangi na ye ya boprofeta.1

Na moko ya milongo ya mozindo makasi koleka nyonso, Alma asakolaki ete, “Soko boyoki mbongwana yoko o motema, mpe soko boyoki koyemba nzembo ya bolingo bwa lobiko, ekoki bino koyoka boye sikawa?”2

Bayangeli ya bisika na mokili mobimba balobi ete ntango batalami lokola liboke, bandimi ya Eklezia, mingimingi bilenge na biso, bazali makasi koleka ata mokolo moko te. Kasi penepene ntango nyonso bapesaka matungisi mibale: yambo, mokakatano ya bokoli ya bozangi bosembo na mokili mpe, ya mibale, goigoi mpe bozangi bomipesi ya ndambo ya bandimi. Bazali koluka toli na ntina ya boniboni kosalisa bandimi balanda Mobikisi mpe basala mbongwana ya mozindo mpe ya kowumela.

Motuna oyo, “ekoki bino koyoka boye sikawa?” ezali kotunama na bikeke nyonso. Elongo na oyo nyonso tozui na eleko oyo—kokwaka Bozongisi ya nsango malamu mobimba ya Yesu Klisto, bosopani ya makabo ya molimo, mpe mapamboli ya koboya te uta na lola—mokakatano ya ezala mokolo moko ta monene koleka.

Noki nsima ntango Ezra Taft Benson abiangamaki lokola Apostolo na 1943, Mokambi George Albert Smith3 apesaki toli, “misio na bino … ezali ya … kokebisa bato … Na lolenge moko ya boboto ekoki ete boyamboli ekozali nkisi se moko mpo na balali ya mokili.”4 Ntango maloba oyo malobamaki, tozalaki na kati ya moto Etumba ya Mokili II.

Bobebi ya ezalela ekoli lelo. Moko ya mokomi monen alobaki kala mingi te, “Moto nyonso ayebi bonkoko ezali na ngenge, mpe moto moko te alukaka yango ebongwana.”5 Bolakisi ya ntango nyonso ya elulu mpe bonsoni na muziki, masano, ntoki, mpe balolaka mosusu na bonkoko na biso ya mokolo na mokolo esalama naino te. Oyo elimbolamaki malamu na Batist moyekoli ya bonzambe ya limemia makasi ntango alobaki ete, “Lolenge ya kobunda ya molimo ya bompenza moko mobimba ezokisami.”6

Ezali kokamwa te ete basusu na Eklezia bandima bakoki koyanola motuna ya Alma na iyo ya koyokana te. Bazali “koyoka boye sikawa” te. Bakanisi bazali na bokauki ya molimo. Basusu bazali na nkanda, ya kozoka, to bayokisami nsoni. Soki babolimboli oyo ezali kosalama na yo,7 ezali na motuya otala mpo na nini okoki “koyoka boye sikawa” te.

Mingi baye bazali na bokauki ya molimo mpe bazangi bomipesi bazwami mpenza na masumu minene to babobuki mibeko te, kasi basali maponi ezanga bwania. Ndambu bazali kotosa mayokani ya bule na ntango. Basusu bazali kolekisa ntango ntango na bango mingi koleka nyonso kopesaka losambo ya esika ya yambo na bantina ya nse koleka. Ndambo bazali kopesa nzela na makambo ya masano to politiki makasi mpo na kolembisa liyokani na bango na Yesu Klisto. Ndambo bamizindisi bangomei na biloko ya Interneti oyo ezali kokomisa monene, koloba mingi, mpe, basusu, bazali kokosa bambeba ya bayangeli ya Eklezia ya ebandeli. Nde bazali kobenda bansuka ya malamu te oyo ekoki kobebisa litatoli. Moto nyonso oyo asali baboponi oyo akoki koyambola mpe kozonga lisusu sika.

Bomizindisi na makomi ezali na ntina mpo na bilei ya molimo.8 Liloba ya Nzambe efulaka bomipesi mpe esalaka lokola mafuta ya kobikisa mpo na mayoki ya mpasi, nkanda, to bosisoi.9 Ntango bomipesi na biso ekiti mpo na ntina kani, eteni ya eyano ezali boyamboli.10 Bomipesi mpe boyamboli ezali ya kokangana makasi.

C. S. Lewis, mokomi ya Moklisto ya makambo na mosuni, mobundi, atiaki motuna yango na katikati mpenza. Alobaki ete Boklisti eyebisaka bato babongola mpe elakaka bango bolimbisi; kasi kino bato bayeba mpe bayoka ete bazali na mposa ya bolimbisi, Boklisto elobaka na bango te. Alobaki ete, “Ntango oyebi ete ozali malali, okoyokela dokotolo.”11

Profeta Joseph alobaki ete liboso ya libatisi na yo, okokaki kozala na bisika biyebani te na katikati ya bolamu mpe mabe. Kasi “ntango okotaki na Eklezia oyo okotaki na mosala ya kosalela Nzambe. Ntango osalaki yango otikaki mabele ya katikati, mpe okoki mokolo moko te kozonga nsima.” Toli na Ye ezalaki ete tosengeli mokolo moko te kotika Motei.12

Alma abetaki sete ete na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, “maboko ma ngolu maninolami” na baoyo bazali koyambola.13 Ye atunaka mituna ya mozindo mpe ya nsuka, lokola: Tomilengeli mpo na kokutana na Nzambe? Tomibateli mpo na kokima bopameli? Tosengeli banso kotala malamu mituna oyo. Mayele ya Alma yemei na kokweyaka mpo na kolanda tata na ye ya botongono mpe nsima koyaka na bososoli moko ya kafukafu ya boniboni azalaki na mposa ya bolimbisi mpe nini elingaki koloba koyemba loyembo ya bolingo ya lobiko ezali ya nguya mpe ya koboya te.

Ntango likambo nyonso oyo ekitisaka bomipesi ezali na litomba, mikakatano mibale ya ntina ezali ya komonana mpe ya motuya lokola. Ya liboso ezali bozangi boboto, elulu, mpe bosaleli mabe na ndako. Ya mibale ezali ezalela ya bobuki mobeko ya bompeto mpe makanisi ezanga mpeto. Oyo mbala mingi eyaka liboso mpe ezali na nse ya boponi ya kozala na bomipesi.

Lolenge tosalaka na baoyo bazali mpembeni na biso koleka ezali na motuya makasi. Elulu, bosaleli mabe, bozangi bomoto, mpe bozangi limemia na ndako edimami te—endimami te mpo na bakolo mpe te mpo na bana ya nkola ya sika. Tata na ngai azalaki na moningi na Eklezia te kasi azalaki ndakisa malamu mpenza, mingimingi na esaleli na ye epai ya mama na ngai. Amesanaki koloba ete, “Nzambe akozwa bato lokola bayanoli mpo na mpizoli nyonso bazali kobimisa basi na bango.” Likanisi moko oyo ebetameli sete na “La Famile, Déclaration au Monde.” Totangi, “[Baye] oyo basaleka mabe balongani to bana … bakozala bayanonoli liboso ya nzambe.”14 Atako na bonkoko kani tobokolalemi, mpe soki baboti na biso basalaki biso mabe to te, tosengeli te kosala mabe na moto mosusu na mosuni, na molimo, to na maloba.15

Mposa ya bomoto kati na bato ezala mokolo moko te na motuya koleka. Moboko ya boboto mpe ya bomoto ebandaka na bandako na biso. Ezali kokamwa te ete maloba na biso kati na bato ekiti na ndelo moko ya kokokana na bokwei ya libota. Libota ezali moboko mpo na bolingo mpe mpo na kosimba kimolimo. Libota etombolaka ezalela esika wapi botosi ya Nzambe ekoki kobotama. Ezali bongo “kitoko zingazinga nyonso ntango ezali na bolingo na ndako.”16

Ezalela ya bobuki mobeko ya bompeto mpe makanisi ezanga mpeto ebukaka mibeko etiamaki na Mobikisi.17 Tokebisamaki na ebandeli ya eleko oyo ete ezalela ya bobuki mobeko ya bompeto ekozala ntango mosusu momekano ya makasi koleka nyonso.18 Botamboli ya boye, na kozanga boyamboli, ekosala bokauki ya molimo mpe bobungisi ya bomipesi. Filimi, TV, mpe Interneti mbala mingi ememaka bansango mpe bilili ya mabe. Mokambi Dieter F. Uchtdorf mpe ngai tozalaki kala mingi te na mboka moko na zamba ya Amazonie mpe tomonaki banteni ya satelite kutu likolo ya ndambu ya bandako mike, etongami na pete. Tosepelaki na nsango ya kafukafu ezwamaki na bisika ya mosika oyo. Tomonaki lisusu ete ezali na esika moko te mpenza na mabele oyo ekoki te kosimbama na bilili ya kopesa mposa, ya kobuki mobeko, ya mabe. Oyo ntina moko oyo mpo na yango bilili ya bato bolumu ekomi bokono moko mabe na mikolo na biso.

Kala mingi te nazalaki na lisolo moko ya mokuse na mosimbi ya Bonganganzambe ya Alona moko ya mibu 15. Asalisaki ngai nasosola boniboni pete ezali na ntango ya Interneti oyo mpo na bilenge batalisama penepene na kozanga bolingi na bilili ya mpeto te mpe ya nsoni. Alobaki ete mpo na mibeko mingi oyo Eklezia eteyaka, ezali pene na ndambo ya bondimami na bato mingi ete kobukaka mibeko oyo ekoki kozala na matomba ya kobomaboma na oyo etali bokolongono ya nzoto mpe bozali malamu. Atangaki komela likaya, kosalela mbenda, mpe komela lotoko na bilenge. Kasi amonaki ete ezali na makelele ekokani te to kutu likebisi ya motuya uta na lisanga ya bato mpo na oyo etali bilili ya bato bolumbu to makmbo ya nsoni.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, bososoli ya elenge mobali oyo ezali malamu. Eyano ezali nini? Na mibu ebele, baprofeta mpe bapostolo bateyi bonene ya botosi ya bonzambe na ndako.19

Baboti, mikolo ezali koleka malamu ntango bosali elongo ya ntango nyonso, ya moningi na mayangani mpe pologalami ya Eklezia, atako ezali na ntina, ekoki kotondisa mikumba na bino ya bule ya koteya bana na bino babika babomoi ya malamu, ya bosembo mpe batambola na samba liboso ya Nkolo. Na liyebisi ya Mokambi Monson na ntongo ya lelo, ezali na ntina ete oyo ekokisama na botongono na bandako oyo ezali bisika ya ekimelo wapi epai boboto, bolimbisi, bosolo, mpe bosembo eleki nyonso. Baboti basengeli kozala na mpiko ya pona to kokamba bokoti na Interneti, televizio, filimi, mpe miziki. Baboti basengeli kozala na mpiko ya koloba te, kobatela bosolo, mpe kopesa litatoli ya nguya. Bana na bino basengeli koyeba ete bozali na bondimi na Mobikisi, bolingaka Tata na bino na lola, mpe bosungaka bakambi ya Eklezia. Bokomeli ya Molimo esengeli efuluka na bandaku na bino. Elikia na ngai ezali ete moko te akotika likita oyo na kozangaka kososola ete makambo ya ezalela ya mikolo na biso esengeli elobelama na libota. Baepisikopo mpe banganganzambe mpe bakambi ba masanga malandi basengeli kosunga mabota mpe koluka koyeba ete mibeko ya molimo ezali koteyama. Bamama bateyi mpe batali bakoki kosunga, mingimingi bana ya baboti banzemba.

Elenge mobali nalobelaki liboso atunaki soki Bapostolo bayebaki ntango nini na bomoi botei mpe bobateli uta na bilili ya nsoni mpe makani ya mpeto te esengelaki kobanda. Na bobeti seti, alobaki ete na boko bisika kutu liboso ete bilenge basilisa Eteyelo ya Yambo ezali ntongo mpenza te.

Bilenge baye batalisami bilili ya mabe na mibu ya ebandeli mpenza bayokisami nsomo ete basili komilongola mpo na misala ya misio mpe mayokani ya bule. Lokola mbano, bondimi na bango ekoki kobebisama mpenza. Nalingi koyebisa bino bilenge, lokola Alma ateyaki, ete na nzela ya boyamboli bokoki koponama mpo na mapamboli manso ya lola. 20 Wana ezali ntina nyonso ya Bomikabi ya Mobikisi. Nabondeli bino boloba na baboti na bino to mopesi toli moko ya bolikii, mpe bosola na episikopo na bino.

Ntango ekomi makambo ya malamu, ndambu ya bakolo bandimaka ete bokangemi na mokano ya kosalisa bato ya yambo ya mbala moko to na mobeko eboyisaka mposa ya kokangema na mateya ya Mobikisi. Bamilobelaka ete botamboli mabe ya boyebani nzoto ezali “eloko moke … [soki ngai nazali] moto moko ya boboto mpe akabaka.”21 Likanisi ya boye ezali bosisoi ya yauli. Mwa bilenge bayebisaka ngai ete na bonkoko na biso ya mikolo oyo ezali “malamul” te komeka kosala malamu na makambo ebele, ndakisa kobikaka mpenza engebene na mibeko ya bosembo.22 Nabondeli bino bokweya na motambo oyo te.

Na libatisi tolakaki tozwa likolo na biso “nkombo ya [Yesu] Klisto, mpe kozalaka na mokano moko mpo na kosalela ye kina o nsuka.”23 Liyokani ya boye esengaka makasi ya mpiko, bomipesi, mpe bosembo soki tosengeli kokoba koyemba loyembo ya bolingo ya lobiko mpe kotikala solo ya kobongwana.

Ndakisa ya kobosana te ya bomipesi ya kozala makasi mpe ya koningana te mpo na bato ya mibu nyonso elakisamaki na mosani ya Angletere oyo asalaki elongo na masano Olympique ya 1924 na Paris, France.

Eric Liddell azalaki mwana ya misionele ya Ecosse na Chine mpe moto ya Nzambe ya mpiko. Apesaki nkanda na bakambi ya Angletere ya masano Olympiques na koboyaka, kutu na nse ya botindiki monene, kokima mbango ya 100 m ya ebandeli oyo esalamaki na mokolo ya eyenga. Na nsuka alongaki na mbango ya 400 m. Ndakisa ya Liddell ya koboyaka kokima na mokolo ya eyenga ezalaki mpenza ya kofula.

Bilili mpe makundoli na lokumu na ye ekokani na maloba ya bofuli uta na Yisaya, “Nde baoyo bakolambelaka Yawe, bakozwa nguya na sika, bakopombwa likolo na mapapu lokola mpongo, bakopota mbango nde bakolemba te; bakotambola nde bakosenjwa te.”24

Etamboleli kitoko ya Liddell ezalaki ya nguya mpenza na mokano ya elenge mobali na biso mpo na kosala elongo na masano ya eyenga te mpe, na motuya koleka, mpo na komikabola yemei uta na botamboli ya bozangi bosembo mpe ya mokili. Asalelaki maloba ya Yisaya mpo na bobesi mosolo ya buku na ye ya mibu. Eric Liddell atikaki ndakisa moko ya nguya na oyo etali mokano mpe bomipesi na mobeko.

Ntango bilenge na biso bazali kolanda toli ya Mokambi Monsonna komilengelaka mpo na kosala bamisio, mpe ntango banso tobiki mibeko Mobikisi ateyaki mpe tomilengeli mpo na kokutana na Nzambe,25 tolongi mbango moko ya motuya mingi koleka.26 Tokozala na Molimo Mosantu lokola mokambi na biso mpo na boyangeli ya molimo. Mpo na banso oyo babomoi na bango ezali na molongo te, bomikundola, ntango eleki naino te mpo na kosala Bomikabi ya Mobikisi moboko ya bondimi mpe bamoi na biso.27

Na maloba ya Yisaya, “Ata masumu na bino ijali motane lokola ngola, ikokoma pee lokola mbula mpembe; ata ijali motane lokola makila, ikojala lokola nkunja na bampate.”28

Losambo na ngai ya bosembo ezali ete moko na moko na biso asala nyonso esengeli mpo na koyoka Molimo sikawa ete tokoka koyemba loyembo ya bolingo ya lobiko na mitema na biso nyonso. Natatoli na ntina ya nguya ya Bomikabi ya Mobikisi, na nkombo ya Yesu klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Tala Alama 4:15–19.

  2.  

    2.  Alama 5:26.

  3.  

    3. George Albert Smith azalaki nde Mokambi ya Lisanga likoki ya bapostolo Zomi na Babale. Akomaki mokambi ya Eklezia na sanza ya mitano  21, 1945. (tala Deseret News 2012 Church Almanac [2012], 98.)

  4.  

    4. George Albert Smith, na Sheri L. Dew, Ezra Taft Benson: A Biography (1987), 184.

  5.  

    5. Peggy Noonan, “The Dark Night Rises,” Wall Street Journal, sanza ya motoba 28–29, 2012, A17.

  6.  

    6. Dr. R. Albert Mohler Jr., mokambi ya, The Southern Baptist Theological Seminary, mateya epai ya bakambi ya Nzambe, New York City, sanza ya libwa 5, 2012.

  7.  

    7. Tala 2 Nefi 2:27.

  8.  

    8. Tala Yoane 5:39; Amosi 8:11; tala lisusu James E. Faust, “A Personal Relationship with the Savior,” Ensign, sanza ya zomi na moko 1976, 58–59.

  9.  

    9. Tala Alama 31:5.

  10.  

    10. Tala Alama 36:23–26.

  11.  

    11. C. S. Lewis, Mere Christianity (1952), 31–32. Lewis azalaki Moto ya Mayele na literature ya Angele na Université ya Oxford mpe akomaki mokambi ya Medieval mpe Renaissance English na Université ya Cambridge.

  12.  

    12. Tala Enseignements des Présidents de l’Eglise: Joseph Smith (2007), 324; Tala lisusu Emoniseli 3:15–16.

  13.  

    13.  Alama 5:33.

  14.  

    14. “La Famille, Déclaration au Monde,” Liahona mpe Ensign, sanza ya zomi na moko. 2010, 129.

  15.  

    15. Tala Richard G. Scott, “Removing Barriers to Happiness,” Ensign, sanza ya mitano 1998, 85–87. Mwa masengisi ya bonkoko ekeseni na mateya ya Mobikisi mpe ekoki kokamba biso libanda ya nzela. Ntango nazalaki na Pacifique ya Sudi, nakutanaki na mobali moko oyo ayekolaki Eklezia na mibu mingi. Alobaki ete asimbamaki na mozindo ntango mokambi moko ya Eklezia ateyaki ete, “Maboko oyo osalelaki liboso mpo na kobeta bana na bino esengeli kosalelama mpo na kopambola bana na bino.” Azwaki mateya ya misionele, abatisamaki, mpe azali mokambi monene.

  16.  

    16. “Love at Home,” Banzembo, no. 294.

  17.  

    17. Tala Alama 39.

  18.  

    18. Tala Ezra Taft Benson, “Cleansing the Inner Vessel,” Ensign, sanza ya mitano 1986, 4.

  19.  

    19. Mokambi Gordon B. Hinckley akotisaki “La Famille, Déclaration au Monde” na liyangani ya Lingomba ya Bamama basungi na sanza ya libwa 1995. mokambi Thomas S. Monson akambaki mbongwana ya mokapo ya yambo na Handbook 2: Administering the Church (2010), “Families and the Church in God’s Plan.”

  20.  

    20. Tala Alama 13:27–30; 41:11–15.

  21.  

    21. Ross Douthat, Bad Religion: How We Became a Nation of Heretics (2012), 238; tala lisusu Alama 39:5.

  22.  

    22. Kotika bankoko moko te oyo etondi na elulu mpe bonsoni mpe elobi mabe mpo na baye bazali kobika mibeko ya Mobikisi ateyaki mpo na kobebisa bondimi na yo. Lokola mokomi ntoki Wordsworth akomaki na boboto, “Leisa [bongo na yo] na makanisi ya likolo, oyo ata lolemo ya mabe, bosambisi mabe, to mitambo ya bato ya miyimi … ekoyangela te… to kobebisa bondimi [na yo] ya esengo te” (“Lines Composed a Few Miles above Tintern Abbey,” na The Oxford Book of English Verse, ed. Christopher Ricks [1999], 346).

  23.  

    23.  Moloni 6:3; mongwa biso nde tobakisi; tala lisusu Moziya 18:13.

  24.  

    24.  Yisaya 40:31; tala Robert L. Backman, “Day of Delight,” New Era, sanza ya motoba 1993, 48–49.

  25.  

    25. Tala Alama 34:32.

  26.  

    26. Tala 1  Bakolinti 9:24–27.

  27.  

    27. Tala Elamani 5:12. Oliver Wendell Holmes Sr. apesaki toli ete, “Namoni ete likambo monene na mokili ezali mingi mpenza te esika wapi totelemi, lokola na nzela nini tozali kotambola: Mpo na kokoma na libongo ya lola, tosengeli konana ntango mosusu na mopepe mpe ntango mosusu kotelemela yango,—kasi tosengeli konana, mpe kotiola te, mpe kolala na longo” (The Autocrat of the Breakfast-Table [1858], 105).

  28.  

    28.  Yisaya 1:18.