2010–2019
“Yaka epai na Ngai, O Yo Ndako ya Yisalaele”
Sánzá ya Zómi 2012


“Yaka epai na Ngai, O Yo Ndako ya Yisalaele”

Wana ezali biso koya epai ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe kopetola mitema na biso, tokozala banso bisalele na kokokisaka bilaka ya nguya ya Buku ya Mormon.

Namipesaki mpo na kosala lokola soda na Mampinga ya Masuwa ya United States na Etumba ya Vietnam. Noki nsima na ngai kokoma na Quantico, Virginia, mpo na boyekoli ya ebandeli namimonaki kotelemaka na garde-à-vous liboso ya mbeto na ngai na ndako ya mabaya elongo na balikili mosusu ya Mampinga ya Masuwa 54. Nakutanaki na sergent molakisi na ngai, ancien combattant ya kala alenda na etumba, ntango abetaki kisambeti mpo na kofungola ekuke ya ndako ya mabaya mpe akotaki na kogangaka maloba etonda na bosoto.

Nsima ya ebandeli oyo ya nsomo, abandaki na nsuka moko ya ndako ya mabaya mpe atelemelaki likili moko na moko na mituna. Kolongola moko te, sergent moteyi na ndenge azalaki na likambo moko mpo na likili moko na moko mpo na koseka ye na maloba ya koganga, mpe ya yauli. Akitaki na molongo, na marine moko na moko kozongisaka, lokola etindamaki, eyano na ye: “Iyo” to “Te”, Sergent Molakisi.” Nakokaki te komona malamu nini azalaki kosala, mpamba te totindamaki kotelama na garde-à-vous na miso na biso kotalaka kaka liboso. Ntango akomaki epai na ngai, nakoki koloba ete akamataki saki na ngai mpe asopaki biloko na yango nyonso na matelas nsima na ngai. Atalaki biloko na ngai malamu, nsima azongaki nsima mpo na kotala ngai. Namilengelaki mpo na loma na ye. Na loboko na ye ezalaki Buku ya Mormon. Nazelaki agangela ngai; na esika ya oyo ayaki penepene na ngai mpe alobaki na mongongo moke, “Ozali Mormon?”

Engebene na mibeko, nagangaki, “Iyo, Sergent Moteyi.”

Lisusu nazelaki maloba ya mabe mingi koleka. Na esika na yango, apemaki mpe atombolaki loboko na ye oyo esimbaki Buku ya Mormon mpe na mongongo moko ya kimia mpenza alobaki, “Ondimaka buku oyo?”

Lisusu nagangaki, “Iyo, Sergent Moteyi.”

Na ntango oyo nazalaki na ntembe te ete alingaki koganga maloba ya kotiola Bamormon mpe Buku ya Mormon, kasi bobele atikalaki kimia. Nsima ya ngonga moko azongaki nsima na mbeto na ngai mpe akitisaki Buku ya Mormon na nse. Nsima atambolaki mpembeni na ngai na kozangaka kotelema mpe akobaki koseka mpe kotiola na mangala ya bosoto balikili oyo batikalaki.

Namitunaka mbala mingi ntina nini Sergent ya Mampinga ya Masuwa oyo atikaki ngai mokolo wana. Kasi nazali na botondi nakokaki koloba na kozangaka kotatabana, “Iyo, nazali mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basanto ba Mikolo mya Nsuka” mpe “Iyo, nayebi Buku ya Molomoni ezali ya solo.” Litatoli oyo ezali likabo ya motuya epesami na ngai nzela ya Molimo Mosantu na lisalisi ya bamisionele mibale mpe mopesi toli moko ya lisanga likoki ya banganganzambe.

Ntango nazalaki na mibu 14, bamisionele mibale, Lee Pearson mpe Boyd Camphuysen, bateyaki libota na ngai nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto, mpe nabatisamaki. Mibu mibale nsima, mopesi toli na lisanga likoki ya bonganganzambe, abetaki mondenge na ngai mpo na kotanga Buku ya Mormon. Nandimaki mondenge, mpe natangaki ata nkasa 10 butu nyonso kino nasilisaki.

Na lokasa ya nkombo natangi ete ekomami “mpo ya Balamani, baye bazalaki montika moko mwa ndako ya Yisalaele; mpe lisusu mpo ya Moyuda mpe Mopaganu.” Na boyingisi ya Buku ya Mormon: Litatoli Lisusu ya Yesu Klisto, elobi ete Balamani “bazali o ntei ya bankoko ya BaIndi ya Amerika.” Ntango natangaki Buku ya Mormon, emonanaki na ngai ete ezalaki kolobela bankoko na ngai BaIndi ya Amerika. Elobeli lisolo ya bato moko babengami lokola “Balamani” oyo basalaki mobembo uta na Yelusaleme tii na “mboka ya elaka” (1 Nephi 2:20) penepene na mibu 600 Yambona Klisto. Ezali nsango ya bozalani ya Nzambe elongo na bavandi ya kala bazalaki esika moko na mikili ya Amerika. Ezali na nsango moko ya mosala ya Yesu Klisto o ntei ya bango nsima ya Bosekwi na Ye. Matangi na Buku ya Mormon epesi likanisi ete o ntaka ya ntango bapalanganisamaki na mikili ya Amerika mobimba mpe bisanga ya mbu ya penepene (tala Alama 63:9–10). Baprofeta na bango balobelaki yambo esalema ete bapaganu ebele mpenza balingaki koya na mabele oyo ya elaka, mpe nkanda ya Nzambe elingaki kozala likolo ya Balamani, mpe balingaki kopalanganisama, kobetama, mpe penepene na kobebisama (tala 1  Nefi 13:10–14).

Nkoko ya nkoko na ngai Echo Hawk, Indi Pawnee, abotamaki na katikati ya 1800 na oyo ebangami Nebraska. Ntango azalaki na mibu 19, bato ya Pawnee basengisamaki kotika 9.3 million ha ya mabele na bango mpo na kotikela bawuta esika. Na 1874 bato ya Pawnee batambwisamaki bakilometele mingi na sudi na esika ya moke babombelaki bango na Mabele ya Oklahoma. Bato ya Pawnee bakitaki uta na koleka 12,000 tii na 700 nsima ya boyei na bango na Oklahoma. BaPawnee, lokola bikolo misusu, bapalanganisamaka, babetamaka, mpe na penepene bango nyonso babebisamaka.

Buku ya Mormon ezali na nsango ya kafukafu mpo na bana ya Balamani, montika moko ya ndako ya Yisalaele. Nefi alimbolaki nsango na ye ntango abongolaki limoni ya tata na ye ya mikolo miye mya nsuka: “Mpe o mokolo mona montika mwa nkona ya biso mokoyeba ete bazali baye ndako ya Yisalaele, mpe ete bazali bato ba boyokani bwa Nkolo; mpe nde bakoyeba mpe bakoya o boyebi bwa batata ba bango ba kala, mpe lisusu o boyebi bwa nsango elamu ya Mosikoli, eye esalemaki epai ya batata ba bango elongo na ye; yango wana, bakoya o boyebi bwa Mosikoli mpe biteni mpenza bya malongi ma ye, ete bakoka koyeba boniboni koya epai ya ye mpe kobikisama” (1  Nefi 15:14).

Buku ya Mormon ezali makoma ya bule. Ezali na litondi ya nsango malamu ya libela. Profeta Joseph Smith akomaki ete “Buku ya Mormon [ezali] elamu koleka buku inso likolo lya mabele, mpe fungola ya likonzi lya eyamba ya biso, mpe moto moko akoki kokoma mingi penepene na Nzambe na kowumelaka na malako ma yango, koleka buku inso isusu. ” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith[2007], 64). Yango wana, ezali na nsango moko mpo na bato banso na mokili.

Lokola elenge mwana mobali ya mibu 17 kotangaka Buku ya Mormon mpo na mbala ya yambo, nakangamaki na elaka ya Moloni: “Mpe ekozwa bino makambo maye, nalingi kolendisa bino ete bosenga Nzambe, Tata wa Seko, o nkombo ya Klisto soko makambo maye mazali ma solo te; mpe soko bokosenge na motema mwa bosembo, na bondimi na Klisto, akomonisa bosolo bwa mango epai ya bino, na nguya ya Molimo Mosantu” (Moroni 10:4).

Lokola nafukamaki na losambo, nazwaki litatoli ya molimo ya nguya te Buku ya Mormon ezali ya solo. Litatoli esalisaki ngai kokata nzela na ngai na kati ya bomoi.

Nalendisi bino banso mpo na kotanga Buku ya Mormon: Litatoli Lisusu ya Yesu Klisto.

Nasengi mingimingi montika ya ndako ya Yisalaele, bana ya bato ya Buku ya Mormon, wapi epai bokoki kozala, mpo na kotanga mpe kotanga lisusu Buku ya Mormon. Boyekola bilaka bizwami na Buku ya Mormon. Bolanda mateya mpe ndakisa ya Yesu Klisto. Bosala mpe bobatela mayokani na Nzambe. Boluka mpe balanda bokambi ya Molimo Mosantu.

Nasukisi na maloba makomama na Amaleki, profeta mosusu ya Buku ya Mormon: “Mpe sikawa bandeko balingami ba ngai, nalingi ete boya epai ya Klisto, oyo azali Mosantu Moko wa Yisalaele, mpe bokabola lobiko la ye, mpe nguya ya bosikoli bwa ye. Iyo, yakani epai ya ye, mpe bonzani bozo bwa bino mobimba lokola libonza lyoko epai ya ye, mpe kobani na kokilaka bilei mpe kosambelaki, tiani molende kina o nsuka; mpe lokola Nkolo azali na bomoi bokobikisama” (Omini 1:26).

Ntango toyei epai ya Mobikisi wa biso, Yesu Klisto, mpe topetoli mitema na biso, tokozala banso bisalele na kokokisaka bilaka ya nguya ya Buku ya Mormon. Ya yango napesi litatoli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.