Babongwanaki epai ya Nkolo

Na Mpaka David  A. Bednar

Ya Lisanga likoki ya Baposolo Zomi na Babale


Koyebaka ete nsango malamu ezali ya solo ezali mozindo ya litatoli. Kozalaka na molende ya solo na nsango malamu ezali mozindo ya bobongoli motema.

Etinda na ngai Ekangami likolo ya mokangano ya kozwaka litatoli ete Yesu azali Klisto mpe kokomaka mobongwani epai na Ye mpe na nsango malamu na Ye. Lokola momesano, tokolobela makambo ya litatoli mpe mbongwana na kokabolaka yango moko na moko. Nzokande, tokozwa limoni ya motuya mpe boyebi monene mingi ya molimo ntango tomanioli makambo oyo mibale ya motuya elongo.

Nasambeli Molimo Mosantu akoteya mpe akolendisa moko na moko na biso.

Bino Bolobi ete Ngai Nazali Nani?

Tokoki koyekola mingi etali litatoli mpe mbongwana uta na mosala ya Apostolo Petelo.

Ntango Yesu akendaki na libongo ya Kaisala na Filipo, Ye atunaki bayekoli na Ye motuna oyo ya mozindo: “Nde bino bolobaka ete ngai najali nani?”

Petelo azongisaki mbala moko ete:

“Yo ojali Klisto, mwana na Njambe na bomoi.

“Yesu ajongiseli ye ete, Esengo na yo, Simona mwana na Yona, jambi mosuni mpe makila imonisi yango na yo te kasi Tata na ngai na Likolo” (Matai 16:15–17).

Lokola etalisami polele na eyano ya Petelo mpe na lilako ya Mobikisi, litatoli ezali boyebi ya moto na moto ya bosolo ya molimo ezwami na bobimisi. Litatoli ezali likabo uta na Nzambe mpe ebongisami mpo na bana na Ye nyonso . Moto nyonso ya bosembo oyo azali koluka bosolo akoki kozwa litatoli na kosalelaka “eteni yoko ya bondimi” na Yesu Klisto mpo na “bomeki boko likolo ya” (Alama 32:27), mpe “komeka bokasi ya liloba” (Alama 31:5), mpo na komitika “na masengisi ya Molimo Mosantu” (Moziya 3:19), mpe kolamuka epai ya Nzambe (tala Alama 5:7). Litatoli ememaka bokoli ya boyanoli ya moto ye moko mpe ezali liziba ya ntina, ya bobangi te, mpe ya esengo.

Kolukaka mpe kozwaka litatoli ya bosolo esengi kotuna, koluka, mpe kobeta (tala Matai 7:7 ; 3 Nefi 14:7 ) na motema ya bosembo, mokano ya solo, mpe bondimi na Mobikisi (tala Moloni 10:4 ) Biteni ya ntina ya litatoli ezali koyeba ete Tata na Lola azali na bomoi mpe alingi biso, ete Yesu Klisto azali Mobikisi na biso, mpe ete litondi ya nsango malamu ezongisami na mabele na mikolo mya nsuka miye.

Ntango Yo Obongwani

Lokola Nkolo ateyaki bayekoli na Ye na Elambo ya Nsuka, Ye alobaki na Petelo,

“Simona, Simona, Satana alombi ete … anyongela bino lokola masango:

“Nde ngai nasili kobondela na ntina na yo ete kondima na yo ejanga te. Mpe wana esili yo kobongola motema, lendisa bandeko na yo.” ( Luka 22:31–32 ).

Na litomba, Apostolo ya nguya oyo, alobaka mpe atambolaka elongo na Nkolo, azalaka nzeneneke ya makamwisi mingi, mpe azalaki na litatoli monene ya bonzambe ya Mobikisi. Kasi kutu Petelo azalaki na mposa ya malakisi mosusu uta na Yesu etali nguya ya mbongwana mpe ya kosantisama ya Molimo Mosantu mpe lotomo na ye ya kosala na botongono.

Mozindo ya nsango malamu ya Yesu Klisto esengi mbongwana ya mozindo mpe ya ntango nyonso na lolenge na biso mpenza oyo esalami na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi. Bobongoli motema ya solo ememi mbongwana na boyambi, motema, mpe na bomoi mpo na kondima mpe kotosa bolingi ya Nzambe (tala Misala 3:19; ; 3 Nefi 9:20 ) mpe ezali na komipesa moko ya solo mpo na kokoma moyekoli ya Klisto.

Bobongoli motema ezali kokolisa, kokomisa mozindo, mpe koyeisa monene ebandeli ekambi litatoli. Ezali mbano ya bobimisi uta na Nzambe, etamboli nzela moko na boyamboli, botosi, mpe etingia ya moto ye moko. Moluki nyonso ya bosembo ya bosolo akoki kobongola motema na koyokaka mbongwana ya nguya ya motema mpe kobotamaka na molimo na Nzambe (tala Alama 5:12–14 ). Ntango tozali kokumisa makuli mpe mayokani ya lobiko mpe ya bonetwami (tala D&A 20:25 ), kokende “mbangu o boso na sikisiki na Klisto” (2 Nefi 31:20), mpe koyika mpiko na bondimi tii na nsuka (tala D&A 14:7 ), tokomi bikelamo ya sika na Klisto (tala 2  Bakolinti 5:17). Bobongoli motema ezali libonza ya bisomei, ya bolingo, mpe ya bosembo topesi epai ya Nzambe na botondi mpo na likabo ya litatoli.

Bandakisa ya Bobongwani na Buku ya Mormon

Buku ya Mormon etondi na masolo mafulama ya kobongola motema. Amaleki, mwana ya Yakobo, asakolaki: “Nalingi ete boya epai na Klisto, oyo azali Mosantu Moko wa Yisalaele, mpe bokabolaka lobiko la ye, mpe nguya ya bosikoli bwa ye. Iyo, yakani epai ya ye, bonzani molimo mwa bino mobimba lokola libonza lyoko epai ya ye” (Omini 1:26 )

Koyebaka na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu azali Klisto ezali na motuya mpe esengelami. Kasi koyaka na lokengo epai na Ye mpe kopesaka molimo na biso mobimba lokola libonza esengi mingi koleka boyebi ya mpamba. Bobongoli motema esengi motema na biso mobimba, nguya na biso mobimba, mpe molimo mpe na makasi na biso mobimba (tala D&A4:2 ).

Bato ya Mokonzi Benyamina bayanolaki na malako na ye na kobelelaka, “Iyo, tondimi makambo manso maye olobi epai ya biso; mpe lisusu, toyebi sikisiki mpe bosolo bwa mango, na ntina ya Molimo mwa Nkolo mwa Nguya Inso, oyo asali mbongwana ekasi na biso, to o mitema mya biso, ete tozali lisusu na meko mpo na kosala bobe te, kasi mpo ya kosala bolamu ntango inso.” (Moziya 5:2). Kondimaka maloba malobama, kozwaka litatoli ya litondi ya bosolo na yango, mpe kosalelaka bondimi na Klisto ebotaki mbongwana makasi ya motema mpe bomipesi ya makasi mpo na kokola mpe kokoma malamu mingi koleka.

Balamani oyo babongolaki mitema na buku ya Elamani balimbolami lokola kozalaka “o nzela ya lotomo la bango, mpe bazali kotambola na bokebi liboso lya Nzambe, mpe batosi kobatela mitindo mya ye mpe meko mya ye mpe masambisi ma ye. ...

“Bazali kosalaka makasi na etingia ya sikisiki ete bakoka komeme etikali ya bandeko ba bango o boyebi bwa bosolo” (Elamani 15:5–6).

Kaka lokola bandakisa oyo etalisi polele, bizalela ya motuya oyo ekangami na bobongoli motema ezali kosala mbongwana makasi na mitema na biso, kozalaka na meko ya kosala malamu ntango nyonso, kokendeke liboso na nzela ya lotomo, kotambolaka na bokebi liboso ya Nzambe, kobatelaka mitindo, mpe kosalaka na etingia ya sikisiki. Na polele, Milimo ya botongono oyo bakomaki ya komikaba na mozindo na Nkolo mpe mateya na Ye.

Kokoma babongwani

Mpo na mingi kati na biso, bobongoli motema ezali nzela ya kokende liboso moke moke kasi likambo ya ngonga moko te uta na likambo ya nguya to ya kokamwa. Monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise, malembe malembe mpe penepene na kozangaka koyeba, ntina na biso, makanisi na biso, maloba na biso, mpe misala na biso ekomi engebene na bolingi ya Nzambe. Bobongoli motema epai ya Nkolo esengi molende mpe bompikiliki.

Samwele, Molamani alakisaki biloko mitano ya ntina na kobongola motema epai ya Nkolo: (1 )  kondimelaka mateya mpe masakoli ya baprofeta basantu lokola ekomami na makomi, (2 )  kosalelaka bondimi na Nkolo Yesu Klisto, (3 ) koyambolaka, (4 ) Koyokaka mbongwana makasi ya motema, mpe (5 ) kokomaka “sikisiki mpe molende o bondimi” (tala Helaman 15:7–8). Oyo ezali nzela oyo ekambi na bobongoli motema.

Litatoli mpe Mbongwana

Litatoli ezali ebandeli mpe lisengisi ya yambo mpenza mpo na kokoba bobongoli motema. Litatoli ezali esika ya kobandela; ezali nsuka ya mobembo te. Litatoli ya makasi ezali moboko likolo na yango bobongoli motema etiami.

Litatoli yango moko ezali te mpe ekokoka te kobatela biso na mbonge mpe mabe oyo tozali na yango na mikolo mya nsuka. Litatoli ezali na motuya mpe esengelami kasi ekoki te mpo na kopesa makasi mpe bobateli ya molimo oyo tozali na yango mposa. Boko bandimi ya Eklezia oyo bazali na matatoli basili kolemba mpe kokweya. Boyebi mpe bomipesi na bango ya molimo ezalaki ya kokoka te mpo na mikakatano bakutanaki na yango.

Liteya monene etali mokangano katikati ya litatoli mpe bobongoli motema emonani polele na misala ya misio ya bana ya Moziya.

“Lokola mingi bamememeki o boyebi bwa bosolo, o nzela ya liteya ya Amona mpe bandeko ba ye, engebene na molimo mwa bobimisi mpe mwa bobikuli, mpe nguya ya Nzambe kosalaka makamwisi na bango—iyo, ... lokola Nkolo azali na bomoi, lokola mingi ya Balamani bandimaki na liteya lya bango, mpe babongwanaki epai ya Nkolo, bakweyaki mosika mokolo moko te.

“Mpo bakomaki bato moko sembo; batiaki o nse mandoki ma botomboki bwa bango, ete babundaki lisusu na Nzambe te. ...

“Sikawa, baye bazali bango baye babongwanaki epai ya Nkolo” (Alama 23:6–8 ).

Biloko mibale ya motuya elimbolami na milongo miye: (1) boyebi ya bosolo, , oyo ekoki kososolama lokola litatoli, mpe (2 ) babongwani epai ya Nkolo , , oyo nasosoli ete ezali bobongoli motema epai na Mobikisi mpe na nsango malamu na Ye. Yango wana, bosangisi ya nguya ya litatoli mpe bobongoli motema epai na Nkolo ebotaki sikisiki mpe molende mpe epesaki bobateli ya molimo.

Bakweyaki mpenza ata mokolo moko te batiaki o nse “mandoki ma botomboki na bango—, ete babundaki lisusu na Nzambe te.” Kotia mpembeni “mandoki ma botomboki” oyo balingaki lokola kimoyimi, lolendo, mpe, bozangi botosi esengi mingi koleka kondima mpe boyebi. Boyambi ya sikisiki, bomikitisi, boyamboli, mpe bomipesi eyei liboso tobwaka mandoki ma botomboki na biso. Ezali bino mpe ngai naino na mandoki ma botomboki oyo ezali kopekisa biso kobongolaka motema epai ya Nkolo? Soki boye, nde tosengeli koyambola sikawa.

Yeba ete Balamani babongwanaki te epai ya bamisionele oyo bateyaki bango to epai ya pologalami ya malamu ya Eklezia. Babongwanaki epai ya bomoto ya bakambi na bango te to epai ya bobateli bonkoko to ezalela ya bankoko ya batata na bango. Babongwanaki epai ya Nkolo—epai ya Ye lokola Mobikisi mpe epai ya bonzambe mpe malongi na Ye—mpe bakweyaki mokolo moko te.

Litatoli ezali boyebi bwa molimo ya bosolo ezwami na nguya ya Molimo Mosantu. Kokobaka na bobongoli motema ezali bomipesi ya molende na bosolo ebimisami oyo tozwi—na motema oyo ezali na bolingi mpe mpo na ntina ya bosembo. Koyebaka ete nsango malamu ezali ya solo ezali mozindo ya litatoli. Kozalaka na molende ya solo na nsango malamu ezali mozindo ya bobongoli motema. Tosengeli koyebaka nsango malamu ezali ya solo mpe kozala ya solo na nsango malamu.

Litatoli, Bobongoli motema, mpe lisese ya Baseka Zomi

Nalingi sikawa kosalela moko ya ndimbola ya lisese ya baseka zomi mpo na kotalisa mokangano katikati ya litatoli mpe bobongoli motema. Baseka zomi, mitano oyo bazalaki na bwania mpe mitano oyo bazalaki bazoba, bazwaki minda na bango mpe bakendeki koyamba mobali ya libala. Nasengi ete bokanisa na ntina ya minda esalelaki baseka lokola minda ya litatoli. Baseka ya zoba bazwaki minda na bango ya litatoli kasi bazwaki mafuta te elongo na bango. Zwa mafuta yango lokola kozala mafuta ya mbongwana.

“Nde bango na mayele bakamati mafuta [ya bobongoli motema] na milangi esika moko na miinda [ya litatoli].

“Ewumeli mobali na libala, bango yonso bayoki mpongi mpe balali.

“Kati na butu, mongongo eyokani ete, tala mobali na libala, bobima mpo na kojuana na ye.

“Bongo, baseka yango yonso balongwi na mpongi mpe babongisi miinda na bango [ya litatoli].

“Bango bilema balobi na bango na mayele ete, pesa biso ndambo na mafuta na bino [kutu mafuta ya bobongoli motema], jambi miinda na biso [ya litatoli na biso ilembi mpe] ijali kojimama.

“Nde bango ya mayele bazongisi liloba ete, Te, soko ete ekokoka te mpo na biso mpe mpo na bino. Bokenda epai na batekisi mpe bosomba mpo na bino mpenja.” (Matai 25:4–9 ).

Ezalaki baseka ya bwania bayimi mpe elingaki bango kokaba te to ezalaki bango kolakisa na malamu ete mafuta ya bobongoli motema ekoki kodefisama te? Ekoki makasi ya molimo oyo ewutaka na botosi ya sikisiki na mitindo kopesama na moto mosusu? Ekoki boyebi oyo ezwami na nzela ya boyekoli ya etingia mpe ya komanyola makomi kopesama epai ya oyo akeleli? Ekoki kimia oyo nsango malamu ememi epai ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya botongono kolekisama na moto oyo akutani na bonguna to mikakatano monene? Eyano ya polele na mituna nyonso oyo ezali te.

Lokola baseka ya bwania bakangamaki malamu, moko na moko na biso tosengeli “kosomba mpo na bisomei.” Basi oyo ya kofulama bazalaki kolobela makambo ya nkita te; kasi, bazalaki kokangama na mokumba na biso ya moto na moto mpo na kobatela mwinda na biso ya litatoli kopelaka mpe mpo na kozwa bobakisi ekoki ya mafuta ya bobongoli motema. Mafuta oyo ya ntango ezwami litanga moko na ngonga —“monkoloto likolo lya monkoloto [mpe] mosise likolo ya mosise” (2  Nefi 28:30 ), na bompikiliki mpe na molende. Nzela mya mokuse ezali te. Minuti ya nsuka ya koboma nzoto mpo na bomilengeli ezali te.

“Yango wana, zala botongono, sambelaka ntango nyonso, kozalaka na mwinda na yo ya kobongama mpe kopelaka, mpe mafuta elongo na yo, ete okoka kobelema na boyei ya Mobali na Libala” ( D&A 33:17 ).

Litatoli

Nalaki ete wana ekokoma biso na boyebi ya bosolo mpe tobongwani epai ya Nkolo, tokotikala sikisiki mpe molende mpe tokokweya ata mokolo moko te. Na lombangu tokotia mpembeni mandoki na biso ya botomboki. Tokopambolama elongo na pole ya kongenga uta na minda na biso ya litatoli mpe ya bobakisi ekoki ya mafuta ya bobongoli motema. Mpe wana ezali moko na moko na biso kobongwana mobimba mpenza, tokolendisa mabota na biso, baninga na biso mpe bandeko na biso. Na ntina ya bosolo boye natatoli na nkombo ya bule Yesu Klisto, amene.