2010–2019
Nzambe Azala na Bino Kino Tokokutana Lisusu
Sánzá ya Zómi 2012


Nzambe Azala na Bino Kino Tokokutana Lisusu

Wana ekokamata biso bitinda ya mikolo mibale mileki na mitema na biso mpe na bomoi na biso, tokopambolama.

Balingami bandeko na ngai mibali mpe basi, tokomi na nsuka ya likita linene mosusu oyo efuli biso. Na koloba kaka mpo na ngai moko, naleisami mpenza na molimo mpe natombwami mpe nayebi ete bino mpe boyokaki molimo ya likita linene liye.

Topesi matondi na biso uta na nse ya motema na bino banso baye bazwamaki na lolenge nyonso kani. Babosolo ya Nsango malamu eteyami na lolenge moko ya kitoko mpe sete ebetisami. Ekotia biso bitinda ya mikolo mibale miye mileki na mitema na biso mpe na bomoi na biso, tokopambolama.

Lokola ezalaka ntango nyonso, malandi ya likita linene oyo ekomonana na banimelo ekoya ya bazulunale Ensign mpe Liahona . Nalendisi bino kotanga lisusu badisikulu yango mbala moko lisusu mpe komanyola na bitinda bizwami na kati. Nasili komona nkutu na bomoi na ngai ete nazwaka mingi koleka uta na mateya mafulami maye ntango nayekolaka yango na mozindo makasi.

Tozwi bopanzi nsango oyo tozwa naino liboso te ya likita yango, kokomaka koleka mikili mpe bamboo na bato bipai nyonso. Atako tozali mosika uta na mingi ya bino tozali koyoka molimo na bino mpe totindeli bino bolingo mpe matondi na biso.

Epai ya Bandeko na biso oyo bapemisi na likita liye, tika nazongisa matondi ma ngai uta na motema na biso banso mpo na mibu mingi na bino ya bomipesi na mosala. Baye bapambolami na likabo na bino na mosala ya Nkolo bakoki kotangama te.

Bandeko mibali mpe basi, nawuti se kosepela eyenga na ngai ya mbotama ya mbala ya 85, mpe natondi na botondi mpo na mobu moko moko moye Nkolo apesi ngai. Lokola nazali komoanyola na makambo ya bomoi na ngai, napamboli Ye mpo na mapamboli na Ye ya mingi epai na ngai. Lokola nalobaki yango na etinda na ngai ya ntongo ya lelo, nayokaki loboko na Ye kokamba makasi na ngai wana ezalaki ngai na bokasi bonso kosalela Ye mpe kosalela bino banso.

Mosala ya kozala Mokambi ya Eklezia ezali masengami mingi. Boniboni nazali na botondi mpo na basungi mibale, oyo bazali kosalela na mopanzi na ngai, mpe oyo bazali ntango nyonso na bolingi mpe na lolenge ya koloba ten a makoki ya kosalisa na mosala oyo eyaka na Bokambi ya Yambo. Nazongisi mpe botondi bwa ngai na mibali ya lokumu oyo bazali na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale. Bazali kosala na ntina ya Moteyi na lolenge ya kolembe te, elongo na bandimi ya Lisanga Likoki kopesaka lisalisi efulami epai na bango.

Natombeli kopesa bino longonia, bandeko ba ngai mibali mpe basi, epai nyonso bozwami bipai na mokili, mpo nyonso oyo bosalaka na bapalwasi, bitape, makonzi, mpe na badisitiliki na bino. Lokola bokokisaka na botongono mabiangi na bino ntango bosengami, bozali kosalisa mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe na mabele.

Tika ete totalana bamoko mpe basusu, kosunganaka na ntango ya mposa. Tika tolobanaka mabe te mpe tosambisana te kasi tondimanaka, kutu tolanda ndakisa ya Mobikisi ya bolamu na bolingo. Na nzela se moko wana, tika tozala na bolingi ya kosalela moko mpe mosusu. Tika tosambela mpo na kozwa bofuli ya koyeba bamposa ya baye bazali nzinga nzinga na biso, mpe nsima tokendaka liboso na kopesaka lisalisi.

Tiaka tozala na esengo wana ezali bomoi na biso koleka. Atako tozali na ntango ya makamba oyo mazali se kobakisama, Nkolo alingaka biso mpe Akanisaka biso. Azali ntango nyonso na ngambo na biso wana ezali biso kosala sembo. Akosalisa biso na ntango ya mposa. Pkokoso ezali koya na bomoi na biso, makambo maye tokoki te kokanisana mosika mpe maye tokoki te kopona. Moko na biso azangi kokutana na yango. Ntina ya bomoi oyo ya kufa ezali ya koyekola mpe kokola mpo na kozala mingi lokola Tata na biso, mpe ezali mbala mingi na ntango ya mpasi oyo toyekolaka mingi koleka, atako mpasi lokola liteya yango ekoki kozala. Bomoi na biso ekoki kotondisama na esengo wana ezali biso kolanda mateya ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Nkolo atindaki ete, “Bozala na esengo; Nalongi mokili.”. 1 Esengo monene oyo nini boyebi oyo esengeliu komemela biso. Azalaki na bomoi mpo na nbiso. Afutaki ntalo ya masumu na biso. Tika tolanda ndakisa na Ye. Tika tolakisa botondi na biso ya monene epai na Ye na kondimaka libonza na Ye mpe kotambwisaka bomoi oyo ekolongisa biso kozonga mpe mokolo moko kozala elongo na Ye.

Lokola nalobaki yango na Makita ya libodo, natondi bino mpo na bansambo na bino mpo na ngai. Nazali na mposa na yango; nayokaka yango. Biso mpe Bakambi Banene tokundalaka bino banso lisusu mpe tosambelaka ete mapamboli maponami koleka ma Tata na Lola mazala na bino.

Sikawa, balingami bandeko mibali mpe basi, tokati yango mpo na sanza motoba. Tika ete Nzambe azala na bino kino tokokutana lisusu na ntango wana. Na nkombo ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, kutu Yesu Klisto, amene.