Nayebi Yango. Nasaleli Yango. Nalingi Yango.

By Ann M. Dibb

Mosungi ya Mibale na Bokambi Monene ya Bilenge Basi


Ann M. Dibb
Tozali balandi ya Mobikisi wa Biso, Yesu Klisto. Bobongoli motema mpe bondimi ya boye ezali mbano ya bokasi ya etingia mpe ya bolingi. Ezali ya moto ye moko. Ezali nzela ya bomoi mobimba.

Nazali yakofulama na bandakisa etiami na bandimi ya bosembo ya Eklezia, mpe lokola ya bilenge ya lokumu. Bozali kotalela na mpiko nyonso Mobikisi. Bozali na botongono, na botosi, mpe na bopeto. Mapamboli bozali kozwa mpo na bolamu na bino ezali kosimba kaka bomoi na bino te kasi lisusu bomoi na ngai mpe ya basusu bayebani motango te na mozindo kasi na ndenge mbala mingi eyebani te.

Mwa mibu mileki, natelemaki na molongo mpo na kosomba na magazini ya biloko ya kolia ya esika na ngai. Liboso na ngai etelemaki elenge mwasi moko, ya mibu 15. Amonanaki lokola na bondimi mpe na esengo. Namonaki tiliko na ye mpe nakokaki te kozanga koloba na ye. Nabandaki boye, “Owuti libanda ya mboka, bongo te?”

Asutukaku na motuna na ngai mpe azongisaki ete, “Iyo, ezali bongo. Nawuti na Colorado. Oyebelaki ndenge nini?”

Nalimbolaki ete, “Mpo na tiliko na yo.” Nazwaki makanisi na ngai ya solo nsima ya kotangaka maloba likolo ya tiliko, “Nazali Mormon. Bongo yo?”

Nakobaki, “Nasengeli koyebisa yo ete nasepeli na bondimi na yo ya kotelema mpe kolata lisakola makasi ya boye. Namoni bokeseni kati na yo, mpe nateombeli ezala elenge mwasi nyonso mpe mondimi nyonso ya Eklezia akokokaki kozala na bolikii mpe bondimi bo ya yo.” Esilisaki biso babosombi na biso, topesanaki mbote mpe tolongwaki.

Nzokande mikolo mpe bamposo nsima ya ngonga oyoya libaku ya mikolo minso, namikutaki komaniolaka mpenza na bokutani oyo. Namitungisaki boniboni elenge mwasi oyo ya Colorado ayaki kozwa bondimi ya boye na bomiyebi na ye lokola mondimi ya Eklezia ya Basantu ba mikolo mya Nsuka. Nakokaki bobele komituna maloba nini ya ntina nalingaki kopona lokola elembo mpo na koniatisa likolo ya tiliko na ngai kotalisaka bondimi mpe litatoli na ngai. Na mayele na ngai, nakanisaki maloba mwa mingi. Na nsuka, namonaki maloba moko ya kitoko nalingaki kolata na lolendo: “Nazali Mormon. Nayebi yango. Nasaleli yango. Nalingi yango.”

Lelo nalingi nalobela makebisi na ngai nzingazinga ya maloba oyo ya makasi, ya elikia.

Eteni ya yambo ya maloba wana ezali lisakola ya komindima, ya kosenga bolimbisi te: “Nazali Mormon.” Lokola kaka elenge mwasi nakutanaki na ye na magazini ya biloko ya kolia abangaki te kotika mokili eyeba ete azalaki mondimi ya Eklezia ya Basantu ba Mikolo mya nsuka, nalikii ete tokobanga to tokotepatepa moko moko te mpo na kondima, “Nazali Mormon.” Tosengeli kolikia, lokola ezalaki Apostolo Polo ntango asakolaki ete, “Mpo ete nayoki nsango malamu nsoni te! Yango ejali nguya ya Njambe kobikisa bandimi yonso.”1 Lokola bandimi, tozali balandi ya Mobikisi wa biso, Yesu Klisto. Bobongoli motema mpe bondimi ezali mbano ya bokasi ya etingia mpe ya bolingi. Ezali ya moto ye moko. Ezali nzela ya bomoi mobimba.

Eteni elandi ya maloba oyo endimi ete, “Nayebi yango.” na mokili ya lelo, ezali na milulu, makambo, mpe matomba ebele oyo ezali kowela minuti nyonso ya bokebi na biso. Na masano ebele boye, ezali biso na bokasi, botosi, mpe bomipesi mpo na kokangama na makambo eleki na motuya? Emizindisi biso na kati ya babosolo ya nsango malamu wana ezali biso na baboyekoli, bamisala, bamposa, masano na biso, to na bankoma mpe batexto mike na biso? Ezali biso koluka mpenza kozwa biyano na mituna na biso na kosalaka feti ya makomi mpe ya mateya ya baprofeta? Ezali biso koluka bondimisami ya Molimo?

Motuya ya kozwaka boyebi ezali mobeko ya seko. Profeta Joseph Smith “alingaki boyebi mpo na nguya na yango ya bosembo.”2 Alobaki ete: “Boyebi ezali na ntina mpo na bomoi mpe bonzambe. … Boyoka, bino banso bandeko babali, fungola oyo ya monene: boyebi ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko.”3

Bosolo mpe boyebi nyonso ezali na ntina, kasi na katikati ya masano mbala na mbala ya babomoi na biso ya mikolo na mikolo, tosengeli mingimingi kosala keba mpo na kokolisaka boyebi na biso ya nsango malamu mpo ete tokoka kososola boniboni kosalela nsango malamu na babomoi na biso.4 Wana boyebi ya na biso ya nsango malamu ezali kokola, tokobanda koyoka ya bondimi na matatoli na biso mpe kozala na makoki ya koloba, “Nayebi yango.”

Oyo elandi nsima ezali maloba, “Nasaleli yango.” Makomi etei ete tosengeli kozala “basaleli ya liloba, bobele bayoki mpamba te.”5 Tosaleli nsango malamu mpe tokomi “basaleli ya liloba” na kosalelaka bondimi, kozalaka botosi, kosalisaka basusu na bolingo, mpe kolandaka ndakisa ya Mobikisi na biso. Tokosala na bosembo mpe tokosala maye toyebi ezali malamu “o ntango inso mpe o makambo manso, mpe o bisika biso”6 likambo te soki nani akoki to akoki te kotala.

Na ezalela na biso na kufa, moko te abongi nie. Ata na babokasi na biso ya etingia mingi koleka mpo na kosalela nsango malamu, banso na biso tokosala mabunga, mpe banso na biso tokosumuka. Libondisi kani ezali na koyeba ete na nzela ya libonza ya kosikola ya mobikisi, tokoki kolimbisama mpe kopetolama lisusu. Nzela oyo ya boyamboli mpe bolimbisi ya solo eledisaka litatoli na biso mpe bolingi na biso ya kotosa mitindo ya Nkolo mpe kobika bomoi na biso engebene na mibeko ya nsango malamu.

Ntango nakanisi na maloba, “Nasaleli yango,” Namikundoli elenge mwasi nakutanaki na ye oyo nkombo na ye ezalaki Karigan. Akomaki ete: “Nazali mondimi ya Eklezia koleka mwa mobu moko. … mpo na ngai, ntango nazalaki koluka, elembo moko ete oyo ezalaki Eklezia ya solo eyaki mpamba te nayokaki ete nakutanaki na eklezia moko oyo eteyi bosawa mpe mibeko. Namonaki na miso na ngaimei maye makomelaka bato ntango batali mpamba mitindo mpe baponi nzela ya mabe. Nazwaki mokano, uta kala mingi, kosalela mibeko ya bolamu ya likolo. … Namiyokaki ya kopambolama mpenza mpo nakutaki bosolo mpe mpo nabatisamaki. Nazali na esengo mpenza.”7

Maloba ya nsuka na lisakola na ngai ezali “Nalingi yango.” Kozwaka boyebi ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe na etingia kosalelaka mibeko ya nsango malamu na babomoi na biso ya mokolo na mokolo ekambaka bandimi mingi ya Eklezia na kongakaka na motema nsai, “Nalingi nsango malamu!”

Liyoki oyo eyai wana ezali biso koyoka Molimo Mosantu kotatolaka na biso ete tozali bana ya Tata wa biso na Lola, Ye azali na mposa na biso, mpe tozali na nzela ya malamu. Bolingo na biso mpo na nsango malamu ekoli ntango tozali koyoka bolingo ya Tata wa biso na Lola mpe kimia elakelamaki na Mobikisi wana ezali biso kolakisa Ye ete tozali na bolingi ya kotosa mpe kolanda Ye.

Na bantango mosusu na babomoi na biso, tozala babongwani ya sika na Eklezia to bandimi ya kala, tokoki komona ete nsai oyo ekiti. Ntango mosusu oyo esalamaka soki bantango ezali ya mikakatono mpe tosengeli kosalela bompikiliki. Ntango mosusu oyo esalamaka na nsonge ya bomengo mpe bofuluki na biso. Ntango nyonso nazwi liyoki oyo, nayebi ete nasengeli kolendisa lisusu babokasi na ngai na kokolisaka boyebi na ngai ya nsango malamu mpe kosalelaka mibeko ya nsango malamu na mobimba mingi na bomoi na ngai.

Moko ya mibeko ya nsango malamu ya makasi mingi ntango mosusu ya mpasi mpo na kosalela ezali bosawa mpe bomitiki na bolingi ya Nzambe. Na losambo ya Klisto na Elanga ya Getesemane, Ye alobaki na Tata ete, “Kasi mokano na ngai esalama te, kasi bobele mokano na yo.”8 oyo esengeli kozala losambo na biso lokola. Mbala mingi, ezali na bangonga oyo ya kimia, ya losambo nde tomiyoki ya kozingama na bolingo ya Tata wa biso na Lola mpe mayoki wana ya esengo, ya bolingo ezongisami.

Na liyangani etali bokambi ya Bilenge Basi na Eugene, Oregon, nazwaki libaku ya kokutana mpe kosolola na Ndeko mwasi Cammy Wilberger. Lisolo Ndeko Wilberger akabolaki na ngai ezalaki litatoli ya nguya mpe lipamboli ya elenge mwana wasi moko oyo alingaki koyekola, kosalela, mpe kolinga nsango malamu.

Mwana mwasi ya Ndeko Wilberger ya mibu19, Brooke, akufaki na liwa ya likama mibu mingi eleki wana ezalaki ye na bopemi ya eleko ya moi nsima ya kosilisa mobu na ye ya yambo na université. Ndeko mwasi Wilberger akundolisi lisusu ete “Ezalaki ntango ya mpasi mpe ya molili mpo na libota na biso. Nzokande, Brooke apesaka biso likabo moko monene. Tomonaki yango te ntango tozalaki kokola, kasi mobu mpe ngonga moko na moko ya bomoi na ye ya mokuse, Brooke azalaki kopesa biso likabo ya monene koleka nyonso mwana mwasi akokaki kopesa na baboti na ye. Brooke azalaki mwana mwasi moko ya bosembo ya Nzambe. … Na ntina ya likabo oyo mpe mingimingi na ntina ya nguya ya Bomikabi oyo epesaka likoki, nazwaki bokasi, libondisi, kimia elakama na Mobikisi. Nazali na motuna moko te wapi Brooke azali sikawa mpe nazali kozela bokutani na biso ya bolingo.”9

Nazali na litatoli ya mwango monene ya esengo ya seko ya Tata wa biso na Lola. Nayebi ete Ye ayebi biso mpe alingi biso. Nayebi ete alengelaki profeta moko, Mokambi Thomas S. Monson, mpo na kolendisa biso mpe kosalisa mpo na kokamba biso mpo na kozonga epai na Ye. Nasambeli ete moko na moko na biso akosala makasi mpo na kokoka kozala na makoki ya kosakola na bondimi ete, “Nazali Mormon. Nayebi yango. Nasaleli yango. Nalingi yango.” Nalobi makambo oyo na bosawa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Tanga: Mpo na kolanda boyekoli, natindi botanga Alama 32 mpe Mpaka Dallin H. Oaks’s talk, “The Challenge to Become” (Liahona, sanza ya yambo 2001, 40–43; Ensign, sanza ya zomi na moko 2000, 32–34).

Mostrar referencias

  1.  

    1.  Baloma 1:16.

  2.  

    2. George Q. Cannon, na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 261.

  3.  

    3.  Teachings: Joseph Smith, 265; tala lisusu Martha Jane Knowlton Coray, notebook, Church History Library, Salt Lake City.

  4.  

    4. Tala knowledge value experience number 1, Young Women Personal Progress (booklet, 2009), 38.

  5.  

    5.  Yakobo 1:22.

  6.  

    6.  Moziya 18:9.

  7.  

    7. Mikanda ya moto ye moko.

  8.  

    8.  Luka 22:42.

  9.  

    9. Mikanda ya moto ye moko.