2010–2019
Bondimi na Bomikabi ya Yesu Klisto Ekomami na Mitema na biso?
Sánzá ya Zómi 2012


Bondimi na Bomikabi ya Yesu Klisto Ekomami na Mitema na biso?

Kosala, kobatela, mpe kosepela na mayokani na biso ekolakisa polele ete Bomikabi ya Yesu ekomami ya solo na mitema na biso.

Bandeko na ngai basi ya bolingo, bozali kati na molimo na ngai mpe na motema na ngai na basanza oyo wana ezali ngai kokanisa mokumba oyo ya mikakatano. Atako nazali komiyoka ya kokokana te na mokumba oyo etiami likolo na ngai, nayebi ete libiangi ewuti na Nkolo na nzela ya profeta na Ye aponama, mpe mpo na sikawa, yango ekoki. Makomi eteyi ete ezala na mongongo ya Nkolo to ya basali na Ye, ezali ndenge moko.” 1

Moko ya makabo ya motuya makangani na libiangi oyo ezali na ntembe te ete Tata na Lola alingi bana na Ye ya basi nyonso. Nayoki bolingo na Ye mpo na moko na moko na biso!

Lokola bino, nalingi makomi! Na boku ya Yilimia tomoni likomi oyo ezali ya motuya na motema na ngai. Yelimia azalaki na bomoi na ntango mpe esika ya mpasi, kasi Nkolo apesaki ye nzela ya “komona liboso ekoya na ntango ya elikia na eleko ya bosangani ya mikolo mya nsuka ya Yisalaele”2——mokolo na biso. Yelimia asakolaki ete:

“Nsima na mikolo yango; Yawe alobi bongo. Nakotia mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango; nakojala Nzambe na bango mpe bango bakojala bato na ngai. …

“… Nyonso bakoyeba ngai, longwa na oyo ya nsima kino oyo ya liboso na bango; Yawe alobi bongo. Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te.” 3

Tozali bato oyo Yelimia amonaki. Esili biso kobengisa Nkolo akoma mobeko, to malongi, na mitema na biso? Endimi biso ete bolimbisi oyo ezwami na nzela ya Bomikabi oyo Yelimia azali kolobela ezali mpo na biso moko?

Mwa mibu mileki Mpaka Jeffrey R. Holland akabolaki mayoki na ye na ntina ya bondimi ya mozindo ya bapionie oyo bazalaki kopusana epai ya Salt Lake Valley ata nsima ya baliwa ya bana na bango. Alobaki ete, “Basalaki yango mpo na pologalami moko te, basalaki yango mpo na molulu ya bato nyonso te, basalaki yango mpamba te bondimi ya nsango malamu ya Yesu ezalaki na milimo na bango, ezalaki na mafuta ya mikuwa na bango.”

Alobaki, na liyoki ya boboto:

“Oyo ezali lolenge se moko oyo bamama wana bakokaki kokundela [bana na bango] na basanduku ya mampa mpe kokoba kokende libobo, kolobaka, ‘Mabele ya elaka ezali kuna na esika moko boye. Tokokoma kuna na lubwaku.’

Bakokaki koloba yango na ntina ya mayokani mpe malongi mpe bondimi mpe bobimisi mpe molimo.”

Asukisaki na maloba ya kotumbola-makanisa ete: “Soki tokobomba yango na mabota na biso mpe na Eklezia, ntango mosusu makambo mingi mosusu ebandi komilengela. Ntango mosusu makambo mingi ya lokola ya ntina-moke ekweyi libanda ya motuka na biso. Nayebisami ete balokalo ya maboko ekokaki komema motango moke ya biloko. Wana bankoko na biso basengelaki kopona oyo bamemaki, ntango mosusu ekeke ya mbala 21ekotinda biso tozwa mokano, ‘Nini ekoki biso kotia na lokalo ya maboko oyo?’ Ezali mpo mpenza likonzi ya molimo na biso; ezali eloko na nse ya mafuta ya mikuwa na biso.” 4 To, mpo na koloba na lolenge mosusu, ezali nini ekomami na mitema na biso!

Lokola bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, toluki Nkolo na bosolo mpo na koyeba makambo nini ya ntina Ye akolinga totia na lokalo ya maboko na biso ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na kokoba kotambwisa mosala na Ye ekende liboso. Toyoki ete Tata na Lola akolinga yambo tosalisa bana na Ye ya bolingo ya basi basosola malongi ya Bomikabi ya Yesu Klisto.Wana ezali biso kosala bongo, toyebi ete bondimi na biso bokokola, lokola ekokola mposa na biso ya kowumela na bosembo. Ya mibale, lokola totali mposa makasi ya kolendisa mabota mpe bandako, toyoki ete Nkolo akolinga tolendisa bana na Ye ya bolingo ya basi bamipesa na mayokani na bango na esengo. Ntango mayokani mabatelami, mabota malendisami. Na nsuka, tozali koyoka ete akolinga tosala na bomoko elongo na masanga malandi mosusu mpe na bakambi ya bonganganzambe na biso, kobundaka mpo na koluka mpe kosalisa baye bakeleli bakola o ntaka ya nzela. Ezali losambo na biso ya mpiko ete moko na moko na biso tokofungola mitema na biso mpe kotika Nkolo akotisa kati na bango malongi ya Bomikabi, boyokani, mpe bomoko.

Lolenge nini tokoki kozela mpo kolendisa mabota to kosalisa basusu soki tokomi yambo na mitema na bisomei bondimi ya mozindo mpe ya kowumela kati na Yesu Klisto mpe Bomikami na Ye ezangi nsuka? Na mpokwa ya lelo nakolinga kokabola mibeko misato ya Bomikabi oyo soki ekomami na mitema na biso ekokolisa bondimi na biso na Yesu Klisto. Ezali elikia na ngai ete kososolaka mibeko oyo ekopambola moko na moko na biso atako soki tozali ya sika na Eklezia to bandimi ya bomoi mobimba.

Mobeko ya 1: “Nyonso oyo ezali ya bosembo te na ntina ya bomoi ekoki kokomisama sembo na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.” 5

Biso, elongo na bino, totatoli na ntina Bomikabi ya Mobikisi, Yesu Klisto. Matatoli na biso, lokola ya oyo ya bino, ekomami na mitema na biso lokola tokutani na mikakatano mpe bokeseni epesami mpo na kotandola molimo. Na kozanga boyebi ya mwango ya esengo ebongi nie ya Tata na Lola mpe Bomikabi ya Mobikisi lokola mama ya likambo ya mwango wana, mikakatano oyo ekomonana lokola ya bosembo te. Tokabolaka banso na mimekano ya bomoi na lisanga. Kasi na mitema ya botongono ekomami, “Nyonso oyo ezali bosembo te na bomoi ekoki kokomisama sembo na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.”

Mpo na nini azali kotika monioko mpe bokeseni eya epai na biso na bomoi oyo? Na ntembe te, ezali eteni ya mwango mpo na bokoli mpe bokeyi liboso! “Togangaki na esengo”6 ntango toyebaki ete tokozala na libaku ya koya na mabele mpo na koyeba kufa. Mpaka Dallin H. Oaks ateyaki ete, “Mbongwana oyo tozali na yango mposa eyaka mingimingi na pete na nzela ya monioko mpe ya bokeseni koleka na nzela ya elengi mpe kimia.” 7

Ndakisa ya pionie ndeko mwasi ya botongono elakisi bosolo oyo. Mary Lois Walker babalaki ye na mibu 17 epai ya John  T. Morris na mboka St.  Louis, Missouri. Bakatisaki bisobe elongo na Basantu na mobu 1853, kokotaka na Salt Lake Valley ntango moke nsima ya bokundoli mobu ya libala na bango ya yambo. Na mobembo na bango, baniokwamaki mpo na kozanga biloka ya ntina bo momesano ya Basantu mosusu. Kasi monioko mpe bokeseni na bango esukaki te ntango bakomaki na Salt Lake Valley. Mobu elandaki nsima Mary, wana na mibu19, akomaki ete: “Mwana abotamelaki biso. … Mpokwa moko ntango azalaki na mibu mibale to misato … eloko moko elobaki na ngai na nse ete, ‘Okobungisa mwa mwana wana.’”

Na eleko ya malili, bokonongono ya nzoto ya mwana ebebaki. “Tosalaki nyonso oyo tokokaki, … kasi mwana akolaki mokemoke mabe. … Na mokolo ya mibale ya sanza ya Mibale akufaki … mpe boye namelaki nkeni ya bololo ya kokabwanaka na mosuni mpe makila na ngaimei.” Kasi mimekano na ye esilaki kaka te. Molongani ya Mary abetamaki lisusu, mpe mposo misato nsima ya kobungisaka mwana, akufaki.

Mary akomaki ete: “Bongo nzalaki, atako na bolenge na ngai naino, kozangela na ngonga mokuse ya mikolo 20, molongani na ngai mpe mwana se moko na ngai, na mokili ya mompaya bakilometele monkama kolongwa libota na ngai mpe na bangomba ya mpasi liboso na ngai … mpe natombelaki ete ngai lokola, nasengelaki kokufa mpe kolanda [ba]lingami na ngai.”

Mary akobaki: “Mokolo ya eyenga moko na mpokwa nazalaki kotambola elongo na moninga na ngai. … Namikundolaki na ntina ya bozangi ya [molongani na ngai] mpe ya ya kozala etike makasi na ngai, mpe lokola nalelaki makasi nakokaki komona, lokola soki ezalaki na limoni ya molimo, bangomba makasi ya bomoi oyo nasengelaki kobuta mpe nayokaki bosolo na yango na bokasi monene. Bolembi mozindo elataki ngai, mpo monguna ayebi ntango nini asengeli kobundisa biso, kasi ya biso [Mobikisi, Yesu Klisto] azali na nguya mpo na kobikisa. Na nzela ya … lisalisi epesama ya Tata, nazalaki na makoki ya kobunda na bokasi nyonso oyo emonanaki lokola kotelemela ngai na ntango eye.” 8

Mary ayekolaki na mobu 19 ya bolenge ete Bomikabi epesaka biso bobangi te ete makambo nyonso oyo ezali semba te na bomoi oyo ekoki mpe ekokomisama sembo—ata kutu mawa ya makasi.

Mobeko ya 2: Ezali na nguya na Bomikabi mpo na kopesa biso makoki ya kolonga moto to mwasi ya mokili mpe kokoma bayekoli ya Yesu Klistu ya solo. 9

Ezali na nzela moko ya kosalsai biso toyeba ntango nini toyekoli malongi to mobeko ya nsango malamu. Ezali ntango tozali na makoki ya koteya malongi to mobeko na lolenge moko oyo mwana akoki kososola yango. Liziba ya motuya mpo na koteya bana mpo na basosola Bomikabi ezali ndakisa moko oyo ezali na liteya ya Eteyelo ya Bana. Ntango mosusu oyo ekoki kosunga biso wana ezali biso koteya bana, bankoko, to baninga ya biyamba oyo bazali na mposa ya kososola malongi ya ntina oyo.

“[Mwasi] moko oyo azalaki kotambola na nzela akweyaki na libulu moko molai mpenza ete [ye] akokaki kobima te. Likambo te mpo na oyo [ye] asalaki, [ye] akokaki te kobima na [yemei]. [Mwasi] yango asengaki lisalisi mpe asepelaki ntango moleki nzela ya boboto ayokaki [ye] mpe akitisaki esikalie na libulu. Eye esalisaki [ye] mpo na kobima na libulu mpe kozwa lisusu bonsomi na [ye].

“Tozali lokola [mwasi] yango kati na libulu. Kosumukaka ezali lokola kokweyaka na libulu, mpe tokoki kobima bisomei te. Kaka lokola moleki nzela ya boboto ayokaki kobelela mpo na lisalisi [ya mwasi], Tata na Lola atindaki Mwana Se Moko wa Ye mpo na kopesa banzela ya kokimela. Bomikabi ya Yesu Klisto ekokaki komekisama na kokisaka esikalie na libulu; epesaka biso banzela ya kobimela.” 10 Kasi Mobikisi asalaki mingi koleka kokitisa esikalie, Ye “akitaki na libulu mpe asalaki ete biso tokoka kosalela esikalie mpo na kobimela.” 11 “Kaka lokola [mwasi] yango na libulu asengelaki komata esikalie, tosengeli koyambola masumu na biso mpe kotosa mibeko mpe mayokani mpo na kobima na libulu na biso mpe kosala mosala ya bomikabi na babomoi na biso. Bongo, nsima ya nyonso tokoki kosala, Bomikabi esalisi biso tokoma ya kolongobana mpo na kozonga na miso ya Tata na Lola.”12

Kala mingi te napesamaki libaku ya kokutana pionie moko ya ntango ya lelo, mwana mwasi wa bolingo ya Nzambe mpe mobongwani ya kala te na Eklezia ya Chilie. Azali mama monzemba na bana babali mibale. Na nzela ya nguya ya Bomikabi, apesamaki makoki ya kotia bomoi na ye ya kala nsima mpe azali sikawa kobunda na lokengo mpo na kokoma moyekoli ya malamu ya Yesu Klisto. Wana ezali ngai kokanisa na ntina na ye, mobeko moko eteyama na Mpaka David A. Bednar ezali koya na molimo na ngai: “Ezali malamu koyeba ete Yesu ayaki na mabele mpo na kokufa mpo na biso—oyo ezali ya ntina mpe ya moboko mpo na malongi ya Klisto. Kasi tosengeli lisusu kolula ete Nkolo alingi, na nzela ya Bomikabi na Ye mpe na nguya na Molimo Mosantu, kofanda kati na biso—kaka mpo na kokamba biso te kasi lisusu mpo na kolendisa.” 13

Lokola ndeko mwasi ya Chili mpe nasololaki lolenge nini kotikala na nzela oyo ekambaka na bomoi ya seko, ayebisaki ngai na motema nsai ete akanaki kokoba kotambola na nzela. Azalaka mosika ya nzela na bomoi na ye mingi, mpe alobaki ete ezalaki na eloko moko te “libanda kuna” mosika ya nzela alingaki ezonga na bomoi na ye lisusu. Nguya ya likoki ya Bomikabi ezali kosala kati na ye. Ezali kokomama na motema na ye.

Nguya wana ezali kaka te kopesa biso likoki ya kobima na libulu kasi lisusu ezali kopesa biso nguya ya kokoba na nzela moke mpe nkaka kokambaka mpo na kozonga na miso ya Tata wa biso na Lola.

Mobeko ya 3: Bomikabi ezali litatoli ya monene mingi koleka oyo tozali na yango na ntina ya bolingo ya Tata mpo na bana na Ye.

Tokosala malamu kokanisa na ntina ya likanisi oyo ezali koleka ngai na molimo ewuti na mpaka Oaks: “Kanisa lolenge nini esengelaki koyokisa Tata na lola mawa mpo na kotinda Mwana na Ye aniokwama na mpasi ekoki kososolama te mpo na masumu na biso. Eye ezali litatoli monene mingi koleka ya bolingo na Ye mpo na moko no moko na biso!” 14

Likela ya bolingo liluti wana esengeli etinda moko na moko na biso na mabolongo na biso na nsambo ya komikitisa mpo na kotonda Tata wa biso na Lola mpo na kolingaka biso mingiboye ete Ye atindaki Mwana Se Moko wa Ye mpe Mwana Abongi nie aniokwama mpo na masumu na biso, mitu mpasi na biso, mpe nyonso oyo ezali komonana lokola ya bosembo te na bomoi ya moko moko ya bisomei.

Bomikundoli Mwasi oyo Mokambi Uchtdorf alobelaki kala mingi te? Alobaki ete: “Mwasi moko oyo azalaki na mibu ya momekano mpe mawa alobaki na nzela ya mpinzoli na ye, ‘Nasosoli ete nazali lokola lokasa enuna ya dolar-20—efwasakana, epasuka, ya mbindo, basalela mingi, mpe ezokazoka. Kasi natikali kaka lokasa ya dolar-20. Nazali na motuya. Atako kutu nakoki te komonana ya motuya te mpe atako nabetami mpe nasalelami, nazali kaka na mutuya ya dolar 20 ya mobimba.’” 15

Mwasi oyo ayebi ete azali mwana mwasi wa bolingo ya Tata na Lola mpe azali na motuya ekoki na Ye mpo na kotinda Mwana na Ye amikaba mpo na ye, se moko. Ndeko mwasi moko na moko kati na Eklezia asengeli koyeba maye mwasi oyo ayebi—ete azali mwana mwasi ya bolingo ya Nzambe. Lolenge nini koyebaka motuya na biso epai na Ye ebongwanisaka lolenge tobatelaka mayokani na biso? Lolenge nini koyebaka motuya na biso epai na Ye esalaka na mposa na biso ya kosalisa basusu? Lolenge nini koyebaka motuya na biso epai na Ye ekolisaka mposa na biso ya kosalisa baoyo bazali na mposa ya kososola Bomikabi lokola tosalaka—nzela ya kokita na nse mpenza? Ntango moko na moko na biso akomisami malongi ya Bomikabi na nse ya mitema na biso, nde tokobanda kokoma bato ya lolenge Nkolo alingaka tozala ntango akoya lisusu. Akoyeba biso lokola bayekoli ya solo.

Tika ete Bomikabi ya Yesu Klisto esala ete “mbongwana enene” esalama na mitema na bino.16 Lokola tolamusamu na malongi oyo, esakolamaki na anzelu ya Nzambe mpo na kozala “nbongo ya nsai ya bosepeli monene,”17 nalaki ete tokoyoka lokola bato ya Mokonzi Benyamina bayokaki. Nsima ya kosambelaka makasi mpo ete Bomikabi etiama na babomoi na bango,“batondisamaki na bosepeli” 18 mpe “bazalaki kolinga kokota o kati ya boyokani boko elongo na Nzambe … mpo na kosala bolingi bwa ye, mpe kozala na botosi na mitindo mya ye na makambo manso.” .”19 Kosalaka, kobatelaka, mpe kosepelaka na mayokani na biso ekolakisa polele ete Bomikabi ya Yesu ekomami ya solo na mitema na biso. Nasengi bino bomikundola mibeko misato miye, bandeko basi:

  1. “Nyonso oyo ezali ya bosembo te na bomoi ekoki kokoma sembo na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.” 20

  2. Kati na Bomikabi Ezali na nguya mpo na kosalisa biso tolonga moto ya mokili mobali to mwasi mpe tokoma bayekoli ya solo ya Klisto.21

  3. Bomikabi ezali litatoli monene mingi koleka oyo tozali na yango na ntina ya bolingo ya Tata mpo na bana na Ye.22

“Nsima ya mikolo wana, elobaki Nkolo, nakotia mibeko na ngai kati na bango, mpe nakokoma yango na mitema na bango; mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.” 23 Nabengisi biso tosenga Nkolo akoma mibeko miye ya Bomikabi na mitema na biso. Natatoli ete ezali ya solo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene

Matangi

  1. Doctrine et Alliances 1:38.

  2. Old Testament: Gospel Doctrine Teacher’s Manual (2001), 198.

  3. Yilimia 31:33–34; mongwa biso nde tobakisi.

  4. Jeffrey R. Holland, “Roundtable Discussion,” Worldwide Leadership Training Meeting, Feb. 9, 2008, 28.

  5. Preach My Gospel : A Guide to Missionary Service (2004), 52.

  6. Yobo 38:7.

  7. Dallin H. Oaks, “The Challenge to Become,” Liahona, Jan. 2001, 42.

  8. Bomoi ya Mary Lois Walker Morris ekomami na ye moko (buku esimbami na Linda Kjar Burton).

  9. Tala David A. Bednar, “The Atonement and the Journey of Mortality,” Liahona, Apr. 2012, 12–19.

  10. Primary 7: New Testament (1997), 104.

  11. Joseph Fielding Smith, Doctrines of Salvation, comp. Bruce R. McConkie, 3 vols. (1954–56), 1:123.

  12. Primary 7, 104.

  13. David A. Bednar, Liahona, Apr. 2012, 14.

  14. Dallin H. Oaks, “Love and Law,” Liahona, Nov. 2009, 26.

  15. Dieter F. Uchtdorf, “You Are My Hands,” Liahona, May 2010, 69.

  16. Tala Alama 5:12–14.

  17. Moziya 3:3.

  18. Tala Moziya 4:1–3.

  19. Tala Moziya 5:2–5.

  20. Preach My Gospel, 52.

  21. Tala David A. Bednar, Liahona, Apr. 2012, 12–19.

  22. Tala Dallin H. Oaks, Liahona, Nov. 2009, 26.

  23. Yilimia 31:33; mongwa biso nde tobakisi.