2010–2019
Koyekola na Mitema na Biso
Sánzá ya Zómi 2012


Koyekola na Mitema na Biso

Nzela moko ya koya epai ya Klisto ezali kolukaka koyekola babosolo ya mozindo na mitema na biso.

“Boya epai ya ngai, ete bokoka koyoka mpe bomona.” 1 Oyo ezali libiangi ya nguya oyo Mobikisi apesaki epai ya Bato ya Amerika ya kala. Bayokaki na maboko na bango mpe bamonaki na miso na bango ete Yesu azalaki Klisto. Motindo bazwaki ezali motuya mpo na biso lelo lokola ezalaki na mokolo na bango. Wana eyei biso epai ya Klisto, tokoki koyoka mpe komona mpe “koyeba na ntembe te” 2—na maboko mpe na miso na biso te kasi na motema mpe na mayele na biso nyonso—ete Yesu azali Klisto.

Nzela moko ya koya epai ya Klisto ezali kolukaka koyekola babosolo ya mozindo na mitema na biso. Wana ezali biso kosala boye, mayoki oyo ewuti na Nzambe ekopesa biso boyebi oyo ekoki kozwama na nzela mosusu te. Apostolo Petelo ayebaki ete Yesu azalaki Klisto, Mwana ya Nzambe ya Bomoi. Mobikisi alimbolaki ete liziba mpo na boyebi ya Petelo ezalaki te “mosuni mpe makila … kasi Tata oyo azali na lola.”3

Profeta Abinadi alimbola Mosala ya mayoki oyo ewuti na Nzambe tii na mitema na biso. Ateyaki bango ete tokoki kososola makomi mobimba te longola se soki totii mitema na biso mpo na kososola.4

Bosolo oyo elobelamaki malamu mpenza na buku ya bana, Le Petit Prince ya Antoine de Saint-Exupéry. Na lisolo, Petit Prince akomaki moninga ya mfwenge. Yambo ya longwa, mfwenge akabolaki sekele moko na Petit Prince. Alobaki, “Sekele na ngai yango oyo … : Ezali bobele na motema nde moto akoki komona malamu; ntina ya mozindi emonani te na miso.”5

Ndeko mobali Thomas azali ndakisa malamu ya moto amonaki na motema na ye makambo ya mozindo. Azalaki moko ya lisanga ya banganganzambe monene ya botongono na Paysandú, Uruguay. Yambo ya kokoma mondimi ya Eklezia, azwaki likama ntango azalaki kokumba tukutuku na ye. Wana elalaki ye na mabele, kokoka kotelama te, basionele na biso mibale basalisaki ye atelema mpe azonga na ndako na ye. Alobaki ete ayokaki eloko moko ya ndenge ntango bamisionele bapesaki ye lisalisi. Nsima ayokaki mayoki makasi lisusu ntango bamisionele bateyaki ye. Mbano ya mayoki wana ezalaki boye ete atangaki Buku ya Mormon uta ebandeli kino nsuka kaka na mwa mikolo. Abatisamaki mpe asalaki na kolemba te uta mokolo wana. Namikundoli ye kokumbaka tukutuku na ye komataka mpe kokitaka babalabala ya engumba na biso, ata na malili mpe bileko ya mpio na mvula, mpo na komema basusu na Eklezia mpo bakoka koyoka, komona, mpe koyeba na ntembe lokola ye asalaki.

Lelo, tozingami na nsango mingi mpenza, tokoki kokanisa ete kolukaluka na nkasa nkotonkoto ya Interneti ekopesa biso oyo nyonso tozali na mposa ya koyeba. Tokoki kozwa nsango malamu mpe mabe na Interneti, kasi nsango yango moko ekoki te. Nzambe apesi biso liziba mosusu mpo na boyebi mingi koleka,6 kutu boyembi uta na lola. Tata wa biso na Lola akoki kopesa biso boyebi ya boye ntango tozali kolukaluka na Interneti ya lola na mitema mpe mayele na biso. Profeta Joseph Smith alobaki ete azalaki na “buku ya kala mingi koleka na motema na [ye], kutu likabo ya Molimo Mosantu.” 7

Tokoti na liziba ya lola ntango tazali kosala makambo lokola kotanga makomi, koyokamelaka baprofeta, mpe kosambelak. Ezali lisusu na motuya kozwa ngonga mpo na kozala kimia8 mpe koyoka babotindiki ya lola. Ntango tosali yango, “tokoyoka mpe tokomona” makambo oyo tokoki koyekola te na masini ya mikolo oyo. Soki tozwi mwa mayele na kolukaka na Interneti ya lola, tokososola malamu bosolo, ata ntango tozali kotanga mambi ma mokili to makambo mosusu. Baluki ba bosembo ya bosolo, bakoyeba bosolo ya makambo nyonso na nguya ya Molimo Mosantu.9

Siakwa, tika napesa liloba ya likebisi: kokota na Interneti ya lola ebebisami na masumu mpe na kobosanaka Nkolo. Nefi ayebisaki bandeko na ye babali ete “bakokaki te koyoka maloba ya [Nkolo]” mpamba te bazalaki “bangu mpo na kosala lisumu [mpe] malembe mpo ya komikundola Nkolo.”10 Lisumu ebebisaka likoki na biso ya komona, koyoka, mpe kolinga basusu. Kozala mbangu mpo na komikundola Nkolo na kosambelaka “na makasi manso ya motema”11 mpe komemaka na mayele na biso makambo ya molimo etandolaka likoki na biso ya komona mpe koyoka makambo ya Klisto.

  • Esili bino komikundola kimia boyokaki ntango, nsima ya mitungisi mingi, bobelelaki epai na Nkolo na losambo ya nguya?

  • Esili bino komikundola kobongola makambo bobongisaki ya kosala mpo na kolanda botindiki moko na motema na bino?

Bato minene na Buku ya Mormon babongisaki kokota na boyebi monene mingi na komemaka na mayele fungola ya makambo ya molimo. Alama alendisaki bana na ye na kokundolisaka bango oyo etali mayele na ye ya bobongoli motema.12 Elamani ateyaki Nefi mpe Lehi bamikundola—komikundola ete ezalaki likolo ya libanga ya Klisto nde basengelaki kotonga moboko na bango mpo satana azala na nguya moko te likolo na bango.13 Komikundola Nzambe esalisaka biso koyoka mpe kozala na bomoi. Oyo epesi ntina ya mozindo na maloba ya Mokonzi Benyamina, oyo alobaki, “Mpe sikawa, O moto, omikundola, mpe owa te.”14

Moko ya bomikundoli ya bule mingi koleka nalulaka ezali liyoki nazwaki ntango nayaki koyeba Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe. Nayokaki ete tokoki koyoka bosepeli oyo maloba ekoki te kobimisa. Mokolo wana mpenza, na mabolongo na ngai, nayokaki mpe nayebaki na ntembe te makambo oyo nakokaki te koyeba na nzela mosusu. Bomikundoli ya bongo ezali ntina ya botondi ya libela mpe elendisaka ngai na ntango ya mpasi.

Baye bazwaka boyebi uta na mosuni mpe makila te kasi uta na Tata wa biso na Lola, bayebi mpenza na ntembe te ete Yesu azali Klisto mpe oyo ezali Eklezia na Ye. Boyebi wana mpenza epesaka bokasi ya kosala bambongwana mpo na koya epai ya Klisto. Na ntina oyo, tobengisi molimi nyonso na kobatisama, koyambola, mpe kobaluka epai na Ye sikawa.15

Na koyaka epai ya Klisto, moto nyonso akoki komona, koyoka, mpe koyeba na ntembe te ete Klisto ayokaki mpasi mpe amikabaki mpo na masumu na biso. Soki toyamboli, tokoyoka mpasi mpambampamba te. 16 Na ntina na Ye, milimo ezoka ekoki kobika mpe mitema ebukana ekoki kobongisama. Ezali na mokumba moko te oyo Ye akoki kokomisa pete to kolongola te. Ye ayebi mapipi mpe maladi na biso. Nalaki mpe natotoli epai na bino ete ntango bikuke nyonso emonani lokola ekangami, ntango biloko nyonso mosusu emonani lokola ezangi, Ye akozanga yo te. Klisto okosalisa mpe azali nzela ya kobima, atako etumba ezali na bokakemi, na bolembu, to na likambo mosusu. Ye ayebi “boniboni kosalisa bato ba ye.”17 Mabala mpe mabota oyo ezali kobunda ezala mpo na ntina kani—mikakatano ya mbongo, banguya ya lolaka ya mabe, to makasi ya libota—bakoyoka nguya ya kokitisa motema uta na lola. Ye azali kolendisa “koyoka mpe komona” ete Ye asekwaki uta na bawa elongo na bobikisi ya bokono na mapapu ma ye,”18 ete na ntina na Ye, tokomona mpe tokoyamba lisusu balingami na biso oyo bakufa. Ya solo bobongoli motema na biso epai na Ye epesi biso mbano ya kobika na biso. 19

Nayebi na ntembe te ete oyo nyonso ezali ya solo. Mpo na ntina na yango nasangisi mongongo na ngai elongo na bato ya Amerika ya kala, kogangaka: “Hosanna! Epambolama nkombo ya Nzambe Aleki Likolo!”20 Ye apesi biso lobiko. Natatoli ete Yesu azali Klisto, Masiya Mosantu. Ye azali Nkolo ya Mampinga, Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.