Ya Mawa mpe Mikano

Na Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Mosungi ya Mibale ya Bokambi ya Yambo


Dieter F. Uchtdorf
Soki tokomipesa mingi na kolukaka bosantu mpe esengo, tokozala moke mpenza na nzela ya mawa.

Ya Mawa

Mokambi Monson, tolingi yo. Topesi yo botondi mpo na liyebisi efulami mpe ya kobosana te oyo etali botongi ya batempelo ya sika mpe mosala ya misio. Na ntina na yango, nandimi solo ete mapamboli manene ekozala likolo na biso mpe na bankola mingi ya mikolo mikoya nsima.

Bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe basi, baninga na ngai ya bolingo! Tozali banso bato ya kufa. Nalikii oyo eyaka lokola likambo ya kosutuka na moto moko te.

Moko te akowumela na mabele ntango molai mpenza. Tozali na motango ya mibu ya ntango oyo, na emoneli ya seko, ekoki kutu komekama na bofini ya liso.

Mpe nsima tolongwi. Milimo na biso “mizongisami epai ya Nzambe oyo apesaki [biso] bomoi.”1 Totii nzoto na biso na nse mpe totiki makambo ya mokili oyo nsima wana ezali biso kokende epai ya efandeli elandi ya bomoi na biso.

Ntango tozali bilenge, emonanaka lokola tokozala na bomoi libela. Tokanisaka ete moi ekotikala se kobima na kozangaka ndelo, mpe lobi emonanaka epai na biso lokola nzela moko ebukana te etandami na kozangaka nsuka liboso na biso.

Nzokande, mingi ezali biso kokola, mingi tolukaka kotala nsima mpe kokamwa boniboni mokuse nzela wana ezali mpenza. Tokamwaka lolenge nini mibu ekokaki koleka nokinoki boye. Mpe tobandaka kokanisa na ntina ya maponi tosalaki mpe makambo tosili kosala. Na nsima, tomikundoli bantango ya kitoko mingi oyo epesaka mwa molunge na milimo mpe esengo na mitema na biso. Kasi tomikundolaka mpe mawa—makambo totombeli tokokaki kozongela mpe kobongola.

Mwasi monganga moko oyo asalisaka bakoni bakomi na nsuka ya bomoi na bango alobaki ete mbala mingi atunaka motuna moko ya pete na bakoni na ye wana ezali bango komilengele mpo na kolongwa na bomoi oyo.

“Ozali na mawa moko boye?” azalaki kotuna bango.2

Kozala bongo penepene na mokolo wana ya nsuka ekomisaka mingi makanisi polele mpe epesaka bwania mpe emoneli ya mosika. Yango wana ntango ntango atunaka bato oyo na ntina ya mawa na bango, bafungolaka mitema na bango. Bakanisaka na ntina ya oyo bakokaki kobongola soki bakokaki kozongisa makonga ya ngonga nsima.

Ntango natalaki oyo balobaki, ekamwisaki ngai lolenge nini mibeko ya ntina ya nsango malamu ya Yesu klisto ekoki kosimba nzela ya bomoi na biso mpo na malamu, soki kaka tosaleli yango.

Ezali na eloko moko te lokola mobombamo na ntina ya mibeko ya nsango malamu. Toyekoli yango na makomi, tokaboli yango na Eteyelo ya Eyenga, mpe toyoki yango uta na ebaelo mbala mingi. Mibeko mpe makambo ya motuya ya bonzambe ezali pete mpe polele; ezali ya kitoko, ya mozindo, mpe ya nguya; mpe ekoki mpenza kosalisa biso mpo na koboya mawa ya mikolo mikoya nsima.

Soki Nakokaka Kolekisa Ntango Mingi Elongo na Bato Nalingaka

Ntango mosusu mawa eyebani mingi koleka oyo elobama na bakoni oyo bazali kokufa ezali soki bakokaka kolekisa ntango mingi elongo na bato oyo balingaka.

Mingimingi mibali nde bayembaka eleli oyo eyebana mokili mobimba: bango “Bayokaki mawa makasi na kolekisaka mingi ya bomoi na bango na momeseno [ya mokolo na mokolo] ya … mosala.”3 Mingi babungisaki mpenza makundoli eleki malamu oyo eyaka na kolekisaka ntango elongo na libota mpe baninga. Bazangi kokolisaka mokangano makasi elongo na baoyo bazali na ntina koleka nyonso mpo na bango.

Ezali solo te ete tozali mbala mingi na mosala mingi? Mpe, mawa mpo na koloba, tozali kutu kolata ekomeli ya mosala na biso lokola elembo ya lokumu, lokola soki kozala na mosala mingi, na yangomei, ezalaki kokokisa eloko ya monene to elembo ya bomoi moko ya likolo.

Ezali bongo?

Nakanisi Nkolo mpe Ndakisa na biso, Yesu Klisto, mpe bomoi na Ye ya mokuse na katikati ya bato ya Galilea mpe Yelusaleme. Nameki kokanisa Ye kosalaka katikati ya mayangani mpe ya misala ebele mpo na kozwa molongo ya makambo ya kosala noki.

Nakoki komona yango te.

Na esika wana nazali komona Mwana ya Nzambe ya mawa mpe ya mobateli kotambwisaka bomoi na ntina mokolo na mokolo. Ntango azalaki kosolola elongo na baye zingazinga na Ye, bamiyokaki ete bazali bato ya motuya mpe balingami. Ye ayebaki motuya monene ya bato Ye akutanaki na bango. Ye apambolaki bango, asalaki na bango. Ye atombolaki bango, abikisaki bango. Ye apesaki bango likabo ya ntalo ya ntango na Ye.

Na ntango na biso ezali pete na kosala kaka lokola kolekisaka ntango elongo na basusu. Na bofini ya mpuku ya ordinatele, tokoki “kokangana” elongo na bankoto ya “baninga” kozangaka ata koluka kokutana na moko na bango. Tekinolozi ekoki kozala eloko ya kokamwa, mpe ezali na ntina mpenza ntango tokoki kozala penepene ya moko na balingami na biso. Mwasi na ngai mpe ngai tofandi mosika na baye ya motuya na libota; Toyebi boniboni yango ezali. Nzokande, nalikii ete tozali kokende na nzela malamu te, lokola moto moko to lokola lisanga ya bato banso, ntango tokangani na libota to baninga mingimingi na kotiaka bafoto ya kosekisa, kokabolanaka makambo ezanga ntina, to kokangisaka boko balingami na biso na Interneti. Nabanzi ezali na esika mpo na mosala ya boye, kasi ntango boni ezali biso kolinga kolekisa na ntina na yango? Soki tozangi kopesa ya bisomei ya malamu mingi koleka mpe ntango mobimba na baoyo bazali solo na motuya na biso, mokolo moko tokoyoka mawa mpo na yango.

Tika tozwa mokano ya kolinga baye tolingaka na kolekisaka ntango ya motuya elongo na bango, kosalaka makambo na lisanga, mpe kokolisaka makundoli ya bolingo.

Soki Nakoka Kosalela Makoki na Ngai

Mawa mosusu bato babimisaka ezali ete bazangaki kokoma moto oyo bamiyokaki bakokaki mpe basengelaki kozala. Ntango batalaki nsima kati na bomoi na bango, basosolaki ete batambwisaki mokolo moko te bomoi engebene na likoki na bango, ete banzembo mingi etikalaki ya koyembama te.

Nazali te awa koloba na ntina ya komata bibutelo ya elonga na misala na biso ya kilikili. Bibutelo wana, atako boniboni molai ekoki komonana na mabele oyo, ekoki mpenza te kokokana na eteni moko na mobembo monene ya seko oyo ezali kozela biso.

Kasi, nazali kolobela na ntina ya kokomaka moto oyo Nzambe, Tata wa biso na Lola, alingi biso kozala.

Toyei na mokili oyo, lokola mokomi ya ntoki alobaki, “kobendaka mapata ya nkembo”4 uta na mokili ya yambo na kufa.

Tata wa biso na Lola amonaka makoki na biso ya solo. Ye ayebi makambo matali biso oyo toyebi te bisomei. Ye atindika biso na bomoi na biso mpo na kokokisa lomeko ya bokelami na biso, kozala na bomoi malamu, mpe kozonga na miso na Ye.

Mpo na nini, sikawa, topesaka ntango mpe bokasi na biso mingi na makambo ya ntango moko, ezanga mbano mpenza, mpe ya likololikolo mpenza? Ekoboya biso komona liboma na kolukaka oyo ezanga ntina mpe ekoleka?

Ekozala bwania te mpo na [bisomei] “komibombela biloko na motuya kuna na likolo, wana lomboli mpe mbanga ikoliaka te mpe wana bayibi bakokotaka te mpe bakobotola te”?5

Lolenge nini tosalaka yango? Na kolandaka ndakisa ya Mobikisi, na kokotisaka mateya na Ye na bamoi na biso ya mokolo na mokolo, na kolingaka solo Nzambe mpe mozalani na biso.

Tokoki ya solo kosala yango te na kobendeka makolo na biso, kotalaka ntango na biso, komilelaka wana ezali biso kopusana na kozala moyekoli.

Ntango ekomaka ya kosalela nsango malamu, tosengeli te kozala lokola elenge mobali oyo azindisaki mosapi ya makolo na ye na mai mpe nsima alobaki ete akendeki kosokola. Lokola bana mibali mpe bana basi ya Tata na biso na Lola, tozali na makoki ya kosala mingi koleka. Mpo na yango, makanisi malamu ekoki te. Tosengeli kosala. Kutu ya motuya koleka, tosengeli kokoma oyo Tata na biso na alingi biso tokoma.

Kopesa litatoli na biso ezali malamu, kasi kozala ndakisa na bomoi ya nsango malamu ezongisami ezali malamu mingi koleka. Kotombelaka kozala ya botongono mingi na mayokani na biso ezali malamu; solo mpenza kozala botongono na mayokani ya bule—lokola kotambwisa bomoi ya malamu, kofuta moko na zomi mpe mabonza na biso, kobatela Liloba ya Bwania, mpe kosalisa baye bakeleli—ezali malamu mingi koleka. Koyebisa ete tokopesa ntango mingi mpo na losambo ya libota, koyekola makomi, mpe milulu malamu ya libota ezali malamu; kasi kosala makambo manso maye na solo mpenza ekomema mapamboli ya lola na bomoi na biso.

Kozala moyekoli elakisi koluka bosantu mpe esengo. Ezali nzela komemaka na bolamu mpe esengo koleka nyonso ya biso moko.

Tika kozwa mokano ya kolanda Mobikisi mpe tosala na etingia mpo na kokoma moto oyo totangamaki kokoma. Tika toyoka mpe totosa bitinda ya Molimo Mosantu. Ntango tozali kosala bongo, Tata na lola akobimisa na biso makambo toyebaki ata moke te oyo etali biso. Ye akongengisa nzela oyo ezali liboso mpe akofungola miso na biso mpo na komona batalanta na biso oyo toyebi te mpe ntango mosusu oyo takonisaka te.

Soki tokomipesa mingi na koluka bosantu mpe esengo, moke tokozala na nzela ya mawa. Ntango toyekami mingi na ngolu ya Mobikisi, tokoyoka mingi ete tozali na nzela oyo Tata wa biso na Lola akani mpo na biso.

Soki Namitikaki Kozala na Esengo Mingi

Mawa mosusu ya baoyo bayebaki ete bazalaki kokufa ekoki na lolenge moko kokamwisa. Soki bamitikaki kozala bato ya esengo mingi.

Mbala mingi tokangamaka na likanisi ya mpamba ete ezali na likambo moko tozangi kososola oyo ekomemela biso esengo: kozala na libota ya malamu mingi, kozala na mosolo ekoki, to nsuka ya momekano ya mpasi.

Mingi ezali biso kokoma mibange, mingi totalaka nsima mpe tososolaka ete esengo na biso etali mpenza makambo nzinga nzinga na biso te.

Biso nde tozali likambo.Esengo na bison de etali biso moko.

Bino mpe ngai tozali mpenza na mokumba ya esengo na bisomei.

Mwasi na ngai, Harriet, mpe ngai tolingaka kokumba bavelo na biso. Ezali kitoko mingi kobima mpe kosepela na kitoko ya mokili. Tozali na banzela moko tolingaka mpo na kotambwisa velo, kasi tosalaka angele mingi te boniboni mosika tozali kokende to boniboni mbangu tozali kotambola na bokeseni ya bakumbi mosusu.

Nzokande, ntango mosusu nakanisi tosengeli kotia mwa momekano mingi. Kutu nakanisi tokokaki kozala na esengo mingi to kotambwisa mbango mingi koleka soki kaka tomitindikaki mwa mingi. Mpe nde ntango mosusu nasalaki kutu mbeba makasi ya koyebisaka likanisi oyo na mwasi na ngai ya kitoko.

Eyano na ye moko na makanisi na ngai ya lolenge oyo ezalaka ntango nyonso ya boboto mpenza, polele mpenza, mpe samba mpenza. Asekaka mpe alobaka ete, “Dieter, ezali lisano ya mbango te; ezali mobembo. Sepela na ngonga oyo.”

Azali koloba solo mpenza!

Ntango mosusu na bomoi totalaka mingi ndelo ya nsuka ete tozangaka komona bosepeli na mobembo. Nakendaka kokumba velo elongo na mwasi na ngai mpo nasepelaka na kosukisa yango te. Nakendaka mpamba te oyo nayokaka ntango tozali elongo na ye ezali kitoko mpe ya kosepelisa.

Ezali yango te komonana bozoba ete obebisa makambo ya kitoko mpe ya bosepeli mpo tozali ntango yango kotalaka ngonga liboso ntango makosuka?

Ekoyoka biso miziki ya kitoko kozelaka ebeteli ya nsuka eleka liboso tomipesa nzela ya kosepela na yango ya solo? Te. Toyokaka mpe tokangamaka na bambongwana ya loyembo, ya lokito, mpe boyokani na etamboli ya miziki.

Elobaka biso nsambo na biso kaka na “amene” to nsuka na makanisi? Bongo te. Tosambelaka mpo na kozala penepene na Tata na biso na Lola, mpo na kozwa Molimo Mosantu mpe koyoka bolingo na Ye.

Tosengeli te kozela tozala na esengo kino tokoma na esika moko nsima, bobele mpo na kososola ete esengo ezalaki kala wana—ntango nyonso! Bomoi esalemi te mpo na kolula bobele oyo eleka. “Oyo ejali mokolo mosalami na Yawe  … ,” mokomi nzembo akomaki. “Tosepela mpe tojala na esengo kati na yango.”6

Bandeko babali mpe basi, ezalela na biso ezali na ntina te, mikakatano to mimekani na biso ezali na ntina te, ezali na likambo moko na mokolo moko na moko ya koyamba mpe ya kolinga. Ezali na likambo moko na mokolo moko na moko oyo ekoki komema botondi mpe bosepeli soki kaka tokomona mpe tokolula yango.

Ntango mosusu tosengeli kozala koluka moke na miso na biso mpe mingi na mitema na biso. Nalingaka maloba oyo elobi: “Moto amonaka polele bobele na motema. Eloko nyonso ya mozindo emonanaka na miso te.”7

Totindami “kopesa matondi na makambo manso.”8 Ezali yango wana malamu mingi te komona na miso mpe na mitema na biso ata makambo ya mike oyo tokoki kozongisela matondi, na esika ya kokomisaka monene mabe kati na ezalela na biso ya sikawa?

Nkolo alaki ete, “Ye oyo azwi makambo manso na bozongisi matondi akokembisama; mpe makambo ya mabele oyo ekobakisama na bango, kutu balopango nkama ya bameme.”9

Bandeko babali mpe basi, na mapamboli ebele ya Tata wa biso na Lola, mwango na Ye ya likabo ya lobiko, babosolo eluti ya nsango malamu ezongisami, mpe bakitoko mingi ya mobembo ya kufa, “ezali biso na ntina ya kosepela te?”10

Tika tozwa mokano ya kozala na esengo, na kotalaka te ezalela na biso.

Ya Mikano

Mokolo moko tokotia litambe wana baboyaka te mpe tokokatisa uta na mokili ya kufa mpo na kokota na esika elandi. Mokolo moko tokotala nsima na babomoi na biso mpe tokokamwa soki tokokaki kozala malamu mingi, kozwa mikano ya malamu mingi, to kosalela ntango na biso na bwania mingi.

Mpo na koboya boko bamawa ya mozindo ya bomoi, ekozala bwania kozwa boko mikano lelo. Yango wana, tika:

  1. Tozwa mokano ya kolekisa ntango mingi na baye tolingaka.
  2. Tozwa mokano ya kobunda makasi mpo na kokoma moto oyo Nzambe alingi biso tokoma.
  3. Tozwa mokano ya kozwa esengo, na kotalaka te ezalela na biso.

Ezali litatoli na ngai ete mawa mingi ya mozindo mingi koleka ya lobi ekoki kopekisama na kolandaka Mobikisi lelo. Soki tosali lisumu to tosali libungi—soki tosalaki maponi oyo sikawa epesi biso mawa—ezali na likabo ya ntalo ya Bomikabi ya Klisto, na nzela na yango tokoki kolimbisama. Tokoki te kozonga nsima na ntango mpe kobongola makambo ya kala, kasi tokoki koyambola. Nkolo akoki kopangusa bampizoli na biso ya mawa 11 mpe kolongola mokumba ya masumu na biso.12 Bomikabi na Ye epesi biso ndingisa ya kotika makambo ya kala nsima mpe kokende liboso na maboko ya kosokwama, motema moko ya peto,13 mpe na mokano ya kosala malamu mingi mpe mingimingi kokoma malamu mingi.

Iyo, bomoi oyo ezali kolekaka mbangumbangu; mikolo na biso ezali lokola kosila nokinoki; mpe ntango mosusu liwa ezali lokola kobangisaka. Nzokande, molimo na biso ekokoba kozala mpe mokolo moko ekosangana elongo na nzoto na biso ya kosekwa mpo na kozwa nkembo ezanga kufa. Napesi litatoli ya lokumu ete mpo na Klisto atonda na ngolu, tokozala lisusu na bomoi mpe mpo na libela. Na ntina ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, mokolo moko tokososola mpe tokosepela ya solo na ndimbola ya maloba “esweli ya liwa emelami nie na Klisto.”14

Nzela oyo ememaka na bokokisi ya maye ekoya na snuka na biso ya bonzambe lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe ezali ya seko. Bandeko ba bolingo mibali mpe basi, baninga ya bolingo, tosengeli kobanda kotambola na nzela wana ya seko lelo; tokoki kotala yango mpamba ata mokolo moko te. Nasambeli ete tokozela te kino tokomi penepene ya kokufa liboso ya koyekola ya solo kobika. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1.  Alama 40:11.

  2.  

    2. Tala Susie Steiner, “Top Five Regrets of the Dying,” Guardian, sanza ya mibale 1, 2012, www.guardian.co.uk/lifeandstyle/2012/feb/01/top-five-regrets-of-the-dying.

  3.  

    3. Bronnie Ware, na Steiner, “Top Five Regrets of the Dying.”

  4.  

    4. “Ode: Intimations of Immortality from Recollections of Early Childhood,” The Complete Poetical Works of William Wordsworth (1924), 359.

  5.  

    5.  Matai 6:20.

  6.  

    6.  Nzembo 118:24.

  7.  

    7. Antoine de Saint-Exupéry, The Little Prince, trans. Richard Howard (2000), 63.

  8.  

    8.  Moziya 26:39; tala lisusu Doctrine et Alliances 59:7.

  9.  

    9.  Doctrine et Alliances 78:19.

  10.  

    10.  Alma 26:35.

  11.  

    11. Tala Emoniseli7:17.

  12.  

    12. Tala Matai 11:28–30.

  13.  

    13. See Nzembo 24:4.

  14.  

    14.  Moziya 16:8; tala lisusu 1 Bakolinti 15:54.