Litambe Moko Pene Mingi na Mobikisi

Na Russell T. Osguthorpe

Mokambi Monene ya Eteyelo ya Eyenga


Kobongola motema ezali ntina ya boyekoli mpe boteyi nyonso ya nsango malamu. Kongola motema ezali likambo ya mbala moko te. Ezali boluki ya bomoi mobimba mpo na kokoma mingi lokola Mobikisi.

Eleko ya moi oyo eleki mwa nkoma moko oyo nakomaki ebimaki na Liahona mpe Ensign. Mwana na ngai ya mobali akomelaki ngai e-mail kolobaka, “Tata, ntango mosusu okoki koyebisa biso soki ozali na nkoma okomi ya kobimisa.” Nayanolaki ete, “Nalingaki kaka kotala soki bozalaki kotanga magazini ya Eklezia.” Akomaki mpo na kozongisa kolimbolaka ete mwana na ye ya mwasi ya mibu 10 “alongaki momekano. Azwaki Ensign uta na engongolo ya mikanda, ayaki na ndako, mpe atangaki yango. Nsima ayaki na lisuku na biso mpe alakisaki biso nkoma na yo.”

Nkoko na ngai atangaki Ensign mpo alingaki koyekola. Asalaki yango na yemei na kosalelaka bonsomi na ye. Bokambi ya yambo kala te andimaki banzela ya koyekola ya sika mpo na bilenge oyo ekosunga mposa ya mbotama ya bilenge mpo na koyekola, kobika, mpe kokabola nsango malamu. Banzela ya sika oyo ezwama sikawa mpo na bosemboli na internet. Na nsanza ya yambo tokobanda kosalela yango na bakelasi (Boyekola mingi etali bisalele ya sika ya koyekola mpo na bilenge na lds.org/youth/learn.)

Ntango Mobikisi ateyaki, Bonsomi ya moyekoli ezalaki na motuya mingi mpenza. Ye alakisaki biso kaka te nini tokoteya kasi lisusu boniboni tokoteya. Ye alobelaki mingi likolo ya bamposa ya moyekoli. Ye asalisaki bato na bato babombola bosolo na bangomei.1 Azalaki koyoka ntango nyonso mituna na bango.2

Banzela ya boyekoli ya sika oyo ekosalisa biso koyekola mpe koteya na lolenge ya Mobikisi na bandako na biso mpe na bakelasi na biso.3 Ntango tosali boye, tokoyanolaka na libiangi na Ye mpo na “koya kobila ngai,”4 kaka lokola Mpaka Robert D. Hales ateyaki yango na malamu mpenza. Wana ezalaki banzela ya sika kosalelama, namonaki bakambi mpe bateyi na masanga malandi mpe seminele kosalaka makita elongo na baboti mpo ete bakoka kokokisa bamposa ya bayekoli na bango. Namoni bilenge basi na bakelasi na bango, bilenge babali na masanga makoki na bango, mpe bilenge na eteyelo ya eyenga koyekola mpo na kosalela bonsomi na bango mpe kosala mpo na bangomei.

Moteyi moko ya Eteyelo ya eyenga ya bilenge amitunaki lolenge nini akosalisa bilenge babali mibale ya bizengi basala mpo na bangomei. Ntango asengaki baye kelasi bakabola maye bazalaki koyekola, abangaki ete bilenge babali mibale oyo bakoka koboya libengisi na ye. Kasi baboyaki te. Moko atelemaki mpo na koteya maye ayekolaki mpe nsima abegisaki moninga ya kelasi na ye ya kizengi mpo na kosalisa ye. Ntango oyo ya yambo abandaki kobunda, moninga ya kelasi na ye atikalaki elongo na ye mpe alobaki na nse kati na litoyi na ye mpo ete akoka koyoka ete alongi. Bazalaki bango mibale koteya mokolo wana. Bazalaki koteya nini Mobikisi ateyaki, kasi bazalaki lisusu koteya lolenge Mobikisi ateyaki. Ntango Mobikisi azalaki koteya, asalaki na bolingo mpo na moto oyo azalaki koteya, kaka lokola moninga ya kelasi oyo asalaki mpo na moninga na ye.5

Ntango toyekoli mpe toteyi liloba na Ye na lolenge na ye, tondimi libengisi na Ye ya “koya kobila ngai.” Tolandaka Ye litambe moko na mbala moko. Na litambe moko na moko, topusani penepene mingi na Mobikisi. Tobongwani. Nkolo ayebaki ete bokoli ya molimo eyaka te nyonso na mbala moko. Eyaka mokemoke. Ntango nyonso oyo tondimi libengisi na Ye mpe toponi kolanda Ye, tokei liboso na nzela mpo na kobongola motema mobimba.

Kobongola motema ezali ntina ya boyekoli mpe boteyi nyonso ya nsango malamu. Kobongola motema ezali likambo ya ngonga moko te. Ezali boluki ya bomoi mobimba mpo na kokoma lokola Mobikisi. Mpaka Dallin H. Oaks akundolisaki biso ete “koyeba ”ekoki te. “kokoma ya ‘kobongwana’ … esengaka biso kosala mpe kokoma. 6 Yango wana koyekola mpo na kobongola motema ezali botamboli moko na kokoba koyeba, kosala, mpe kokoma. Lisusu, koteya mpo na kobongola motema esengaka malongi ya ntina, mabengisi na mosala, mpe mapamboli malakelama.7 Ntango tozali koteya malongi ya solo, tozali kosalisa moyekoli ayeba. Ntango tozali kobengisa basusu na mosala, tozali kosalisa bango basala to babika malongi. Mpe ntango mapamboli maye oyo Nkolo alaki, tobongwani. Lokola Alma, tokoki kokoma bikelamu ya sika.8

Banzela ya boyekoli ya sika mpo na bilenge ezali na ntina moko ya katikati: kosalisa bilenge kokoma babongwani na nsango malamu ya Yesu Klisto. Kala mingi te namonaki elenge mobali moko na kelasi ya Eteyelo ya Eyenga oyo abombolaki bosolo na yemei. Ntango namonaki ete azalaki kozwa pkokoso oyo etali Bomikabi na bomoi na yemei, natunaki ye soki asika koyoka bolimbisi. Ayanolaki: “Iyo, lokola ntango wana nabukaka zolo ya moto moko boye ntango nazalaki kobeta ndembo ya makolo. Nayokaki mabe na ntina na yango. Namitungisaki nini nasengelaki kosala mpo na koyoka malamu. Yango wana nakendaki na ndako na ye mpe nasengaki ye alimbisa ngai, kasi nayebaki ete nasengelaki kosala mingi koleka, mpe nasambelaki, mpe nde nayokaki ete Tata na Lola alimbisaki ngai lokola. Oyo ezali nini Bomikabi elakisi mpo na ngai.”

Ntango akobolaki mayele na ye na kelasi mokolo wana, atangaki na Yoane 3:16—“Mpo ete Njambe alingaki mokili na motindo ya boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye”—mpe nsima atatolaki na ntina ya nguya ya Bomikabi. Malongi oyo ezalaki lisusu likanisi ya mpamba te epai na elenge mobali oyo. Ekomaki eteni ya bomoi na ye mpamba te atunaki motuna ya yemei mpe asalelaki bonsomi na ye mpo na kosala.9

Elenge mobali oyo azalaki kokoma ya kobongwana mingi koleka, mpe boye ezalaki baninga ya kelasi na ye. Batiaki mayele na bango na malongi na koyekolaka makomi. Basangisaki maloba ya bule wana na bomoi na bango mpe nsima batatolaki na ntina ya mapamboli maye mayelaka bango lokola mbano ya kosaleka malongi na bomoina bango. Ntango tozali koteya nsango malamu ya Yesu Klisto, totalaka malamu makomi mpe maloba ya baprofeta ya mikolo oyo. Toyekamaka na nkoma ya bule mpo na kosalisa kolendisa bondimi, kotonga matatoli, mpe kosalisa moto nyonso akoma ya kobongwana mobimba. Banzela ya koyekola ya sika mpo na bilenge ekosalisa banso baye bazali kosalela yango mpo na kososola mpe kobika maloba ya Nzambe.

Wana ezalaki biso koteya Basantu na mboka Costa Rica, natombolaki buku moko ya Teaching, No Greater Call mpe natunaki, “Boye boni kati na bino bozali na buku moko ya mokanda oyo?” Penepene moto nyonso atombolaki loboko. Na koseka moke, nalobaki ete, “Mpe nabeti mondenge ete bozali kotanga yango mokolo moko moko.” Na kokamwa na ngai, ndeko mwasi moko oyo afandaki na molongo ya liboso atombolaki loboko na ye, kolobaka ete azalaki kotanga yango mikolo nyonso. Nasengaki ye aya na ebaelo mpe alimbola. Ayanolaki, “Natangaka Buku ya Mormon ntongo nyonso. Nsima natangaka likambo moko na Teaching, No Greater Callmpo nakoka koteya bana na ngai na lolenge ya malamu mingi mpenza nini nayekolaki.”

Alingaki koyekola mpe koteya liloba na Ye na lolene na Ye, yango wana ayekolaki liloba na Ye na makomi mpe nsima ayekolaki lolenge nini koteya liloba na Ye mpo ete bana na ye bakoka kobongwanama mobimba. Ndakisa na ye ya koyekoli mpe koteya nsango malamu eyaki, nandimi, na mbala moko te. Azwaki mokano ya kosala likambo moko. Mpe mingi asalaki maye ayebaki asengelaki kosala, mingi kNkolo alendisaki ye mpo na kotambola na na lolenge na Ye.

Ntango mosusu nzela mpo na kokende na kobongola motema ekoki kozala molai mpe mpasi. Ndeko ya mobali ya molongani na ngai azalaki na mosala makasi te na eklezia mpo na mibu 50. Akomaki naino na kati ya mibu 60 te ete abandaki kondima libiangi ya Mobikisi mpo na kozonga. Mingi basalisaki ye kati na nzela. Moko ya bateyi na ndako azalaki kotindela ye cartes postales sanza nyonso mpo na mibu 22. Kasi asengelaki kozwa mokano ete alingaki kozonga. Asengelaki kosalela bonsomi na ye. Asengelaki kozwa litambe wana ya yambo—mpe nsima mosusu mpe mosusu . Sikawa ye mpe molongani na ye bakangisami elongo, mpe azali kosala na bopisikopo moko.

Kala te tolakisaki ye bavideo oyo esalami mpo na kosalisa bakambi mpe bateyi basalela banzela ya koyekola ya sika. Nsima ya kotalaka bavideo, ndeko ya mobali ya mwasi na ngai atengamaki nsima kati na kiti na ye mpe alobaki, na mwa motema ya kopasuka, “Ntango mosusu soki nazwaki yango ntango nazalaki elenge, nalingaka kopengwa te.”

Bamposo mingi eleki nakutanaki na elenge moko oyo azalaki kobunda. Natunaki soki azalaki mondimi ya Eklezia. Ayebisaki ngai ete azalaki moto na ntembe, kasi na ntongontongo ya bomoi na ye ayebaki Eklezia. Ntango nayebisaki ye oyo etali libiangi na ngai na Eteyelo ya Eyenga mpe ete nakoloba na likita linene, alobaki, “Ei, soki okoloba, nakotala liyangani wana.” Nalikii ete azali kotala lelo. Nayebi ete azali kotala, ayekoli likambo moko. Ndako ya Likita oyo ezali esika se moko ya koyekola mpe koteya mpo na kobongola motema.

Ntango tozali kobika mibeko oyo eteyami na baye tosungi lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi, tozali koyekola na lolenge ya Mobikisi.10 Tosali litambe moko penepene mingi na Ye koleka. Lokola likita oyo ekomi na nsuka, nabengisi moto nyonso oyo azali koyoka ngai asala litambe wana. Lokola Banfite ya kala, tokoki kozonga “epai ya biso, mpe maniolani likolo ya makambo maye … malobami, mpe esengami na Tata , na nkombo ya [Klisto], ete [biso] tokoka kososola.”11

Tolingi elenge moko na moko asosola. Tolingi bango, bayekola, bateya, mpe babika nsango malamu ya Yesu Klisto mikolo nyonso. Oyo ezali maye Nkolo alingi mpo na bana na biso nyonso. Soki ozali mwana, elenge, to mokolo, nabengisi bino boya mpe bolanda na matambe ya makolo na Ye. Na litambe moko na moko tozali kosala, natatoli ete Nkolo akolendisa biso. Ye akosalisa biso toya na nzela oyo etikali. Nde ntango mabaku mabimi, tokokoba kotambola. Ntango ntembe eyei, tokokoba kotambola. Tokozonga nsima ata moke te. Tokopengwa ata moke te.

Natatoli ete Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bazali na bomoi. Natatoli ete Mobikisi azali kokoba kobenga biso kaka lokola asalaki na ntango ya kala toya epai na Ye. Tokoki banso kondima libengisi na Ye. Tokoki banso koyekola, koteya, mpe kobika liloba na Ye na kosalaka litambe moko penepene mingi na Mobikisi. Wana ezali biso kosala, tokokoma solo babongwani. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Tala Yoane 3:1–7. Na litangi oyo Mobikisi ayanolaki motuna Nikodeme yemei atunaki. Ateyaki engebene na babosenga ya Nikodeme. Ye apesaki nzela na Nikodeme asalela bonsomi na ye ya koyekola. Ye asalisaki Nikodeme abombola eyano yemei.

  2.  

    2. Tala Yoane 3:4; Joseph Smith—History 1:18.

  3.  

    3. Tala “Teaching the Gospel in the Savior’s Way,” lds.org/youth/learn/guidebook/teaching.

  4.  

    4. Tala Luke 18:18–22.

  5.  

    5. Tala 1 Yoane 4:19.

  6.  

    6. Dallin H. Oaks, “The Challenge to Become,” Liahona, Jan. 2001, 41; Ensign, Nov. 2000, 33: “Kotatola ezali koyeba mpe koloba. Nsango malamu etindi biso ‘tobongwana,’ yango esengi biso tosala mpe kokoma. Soki ata moko na biso ayekami kaka likolo ya boyebi na biso mpe litatoli ya nsango malamu, tozali na esika moko lokola Bapostolo bapambolami kasi babongi nie naino te na ye Yesu asengaki ‘abongwana.’ Biso banso toyebi moto moko oyo azali na litatoli kasi azali kosalela yango te mpo akoma ya kobongwana.”

  7.  

    7. Tala Abalayama 2:11.

  8.  

    8. Tala Moziya 27:24–26; 2 Bakolinti 5:17.

  9.  

    9. David A. Bednar, “Watching with All Perseverance,” Liahona and Ensign, May 2010, 43: “Ezali yo mpe ngai kosalisaka bana na biso basalelaka bonsomi na bango mpo na kosala mpe koluka boyekoli na nzela ya koyekola mpe ya bondimi,to elakisi biso bana na biso bazela bateyama mpe basalelama likolo? Ezali biso lokola baboti kopesaka liboso bana na biso oyo ekokani na mbisi ya molimo mpo na kolia, to ezali biso ntango nyonso kosalisaka bango basala, bayekola na bangomei, mpe batelema makasi mpe ngwi? Ezali biso kosalisaka bana na biso bakoma ya komipesa na motema likolo na kotunaka, kolukaka, mpe kobetaka?”

  10.  

    10. Tala Dennis B. Neuenschwander, “Living Prophets, Seers, and Revelators,” Liahona, Jan. 2001, 49–51; Ensign, Nov. 2000, 40–42.

  11.  

    11.  3 Nefi 17:3.