Bomikabi

Na Mokambi Boyd K. Packer

Mokambi wa Likita Likoko ya Bapostolo Zomi na Babale


Esika nyonso bandimi mpe bamisionele na biso bakoki kokende, nsango na biso ezali ya bondimi mpe elikya na Mobikisi Yesu Klisto.

Etinda na ngai etali baye kati na biso oyo bazali koniokwama, batondi na mabe mpe botau mpe bokwei, mawa, mpe bozangi elikya.

Na 1971, napesamaki mosala na Makita ya Likonzi na Western Samoa, lokola kobongisa likonzi ya sika na esanga ya Upolu. Nsima ya masolo todefaki mpepo ya moke mpo na kokende na esanga ya Savai’i kosala likita ya likonzi kuna. Mpempo ekitaki na esika ya matiti na Faala mpe esengelaki kozonga nsima ya nzanga elandaki mpo nakozwa biso kozonga na esanga ya Upolo.

Mokolo tosengelaki kozonga uta na Savai’i, mvula ezalaki konoka. Koyebaka mpempo ekokaki te kokita na esika ya mai, tokendeki na nsuka ya westi ya esanga, wapi ezalaki na nzela moko lokola nsonge esika ya nsuka. Tozelaki kino butu, kasi mpepo moko te ekokaki kopumbwa. Tozongisaki na radio ete tolingaki kokoma na masuwa. Moto moko asengelaki kokutana na biso na Mulifanua.

Tolongwaki libongo ya Savai’i, Kapiteni ya masuwa ya 12 m atunaki mokambi ya misio soki azalaki na mwinda ya moke. Esengo, azalaki na yango mpe akabelaki yango Kapitene. Tosalaki 21 km kokatisaka esanga ya Upolo na mbu ya kotomboka mpenza. Moko te na biso asosolaki ete mopepe makasi ya nkanda ya mboka ya molungie ebetaka esanga, mpe tozalaki kokende semba na kati na yango.

Mpo na kokoma na libongo na Mulifanua, ezalaki na nzela ya nkaka wapi koleka na kati na mabanga. Mwinda moko na mwa ngomba likolo ya libongo mpe minda mosusu ya nse elakisaki nzela. Ntango masuwa etambwisamaki mpo ete minda mibale ezala moko likolo ya mosusu, masuwa elingaki kozala alima mpenza mpo na koleka na kati na mabanga ya likama oyo elandanaki na nzela.

Kasi butu wana ezalaki na mwinda se moko. Bampaka babale bazalaki kozela na mabele mpo na kokutana na biso, kasi kokatisa ewumelaki mingi koleka momesano. Nsima ya kotalaka bangonga masuwa na biso, bampaka balembaki mpe bakweyaki na mpongi, kobosanaka kopelisa mwinda ya mibale, mwinda ya nse. Lokola mbano, nzela na kati ya mabanga ezalaki polele te.

Kapiteni atambwisaki masuwa malamu koleka nyonso lokola akokaki na nzela ya mwinda moko ya likolo na libongo ntango moto moko ya masuwa asimbaki mwinda ya kodefa likolo ya liboso, kolukaka mabanga liboso. Tokokaki koyoka bafele kotutanaka likolo ya mabanga. Ntango tokomaki mpembeni mingi mpo na komona yango na mwinda, kapiteni na kolenga angangaki bozongi mpe azongaki mosika mpo komeka lisusu komona nzela.

Nsima ya komeka mingi, ayebaki ete ekokaki kosalema te koleka nzela wana. Nyonso tokokaki kosala ezalaki komeka kokoma na libongo ya Apia na 64 km mosika. Tozalaki na lisalisi te na nguya ya nkanda ya mbu. Namikundoli naino te kozalaka wapi esika ezalaki molili bongo.

Totambolaki ngonga ya yambo, atako masini ezalaki na makasi nyonso. Masuwa elingaki kobunda likolo ya mbonge lokola ngomba mpe nsima kopema ya kolemba na nsonge na bapakapaka libanda ya mai. Boningani ya bapakapaka elingaki koningisa masuwa penepene na kobukana yambo esielumukaki na nse na ngambo mosusu.

Tolalaki maboko mpe makolo mapanzana na mofinuku ya masuwa kosimbanaka na maboko ma biso na ngambo moko mpe na misapi ya makolo ekangana na ngambo mosusu mpo na koboya kopola likolo ya masuwa. Ndeko Mark Littleford abungisaki kosimba mpe abwakisamaki komibetaka na nzela ya ebende ya nse.Motu na na ye ezokisamaki, kasi libende ebatelaki ye mpo na kobwakisama te.

Nsukansuka, tokendeki liboso mpe penepene na pole ya moi na nsuka kobendanaka na kati na libongo na Apia. Bamasuwa ekanganaki mpo na koboya likama. Ezalaki mingi na libongo. Tongulumaki na katikati na yango, komekaka kolamusa te baye bazalaki kolala na libongo. Tokendeki na Pesaga, tokausaki bilamba na biso, mpe topusanaki epai ya Vailuutai mpo na kobongisa likonzi ya sika.

Nayebi te nani azalaki kozela biso na libongo ya Mulisanua. Naboyaki kotika bango koyebisa ngai. Kasi ezalaki ya solo ete na kozanga mwinda ya nse, tolingaki bango kobunga.

Ezali na buku na biso ya nzembo loyembo moko ya kala mpenza mpe eyembamaka mingi te oyo ezali na ntina ya kafukafu mpo na ngai.

Ya Kopela ezali ngolu ya Tata was biso
Uta na ya Ye ndaku ya mwinda ya libela,
Kasi na biso apesi bobateli
Ya minda o ntaka ya libongo
Tika minda ya nse epela
Tinda bongengi na kati ya mbonge
Tala babola balembi, bato na mbu kobundaka
Bokoki kosalisa, bokoki kobikisa.
Molili ya butu etii lisumu
Makasi mbonge ya nkanda egangi.
Miso ya mposa ezali kotala, kolinga,
Mpo na butu o ntaka ya libongo.
Bateli mwinda ya yo moke, ndeko na ngai;
Moto moko ya masuwa, abetama na mopepe
Komekaka sikawa kokoma na libongo,
Na molili akoki kobunga.1

Nalobeli lelo na baye bakoki kobunga mpe bazali koluka mwinda ya nse kosalisa bango kozonga.

Esosolamaki uta na ebandeli ete na bokufi tosengelaki kozala te babonga mpenza. Esengelaki te kozela ete tokowumela na kozanga kobuka mobeko moko to mosusu.

“Mpo moto ya mokili azali moyini wa Nzambe, mpe azalaki uta o bokwei bwa adama, mpe akozala, libela na libela, longola se soko amitiki o masengisi ma Molimo Mosantu, mpe abwaki mosika moto wa mokili mpe akomi moko mosantu o nzela ya bomikabi bwa Klisto Nkolo.”2

Uta na Pearl of Great Price, tososoli ete “eloko moko te ya mbindo ekoki kovanda [na bokonzi ya Nzambe],”3 mpe nzela moko epesameli bango baye basumuki mpe bakomi balongobani na miso ya Nzambe na Lola mbala moko lisusu.

Moyokanisi moko, Mosikoli moko aponamaki, moko oyo alingaki kozala na bomoi na Ye na bobongi nie, akosala lisumu te, mpe akomipesa “libonza mpo na lisumu, mpo na koyanola nsuka ya mobeko, mpo na banso oyo bazali na motema mobukana mpe molimo ya mawa; mpe mpo baye basusu te ekoki nsuka ya mibeko koyanolama.”4

Etali motuya ya Bomikabi, na Alma toyekoli, “Mpo elongobanaki ete bomikabi boko bosalema; … to soko te bato banso basengelaki na ntembe te kowa.”5

Soki osalaki mbeba te, nde ozali na mposa ya Bomikabi te. Soki osalaki mbeba, mpe banso tozali na yango, ezala moke to monene, nde ozali na mposa monene ya koyeba boniboni yango ekoki kopangusama mpo ete ozala lisusu te na molili.

“[Yesu Klisto] azali mwinda mpe bomoi ya mokili.”6 Ntango totie miso na biso na mateya na Ye, tokokambama na libongo ya bozangi likama na molimo.

Eteni ya misato ya bondimi elobi, “Tondimi ete na nzela ya Bomikabi ya Klisto, banso bakoki kobikisama, na botosi na mibeko mpe makula ma Nsango Malamu.”7

Mokambi Joseph F. Smith ateyaki: “Bato bakoki te kobosana masuma ma bangomei; bakoki te komisukola na mbano ya masumu. Bato bakoki kotika kosumuka mpe bakoki kosala malamu na nsima, mpe lokola mpenza misala na bango endimaki liboso na Nkolo bakomi balongobani. Kasi banani bakobongisa mabe basalaki na bangomei mpe na basusu, oyo emonani ekoki kosalema te mpo na bango kobongisa? Na Bomikabi ya Yesu Klisto masumu ya moyamboli esukwami mpenza; atako bazali motane ngwa bakokomisama mpembe lokola elamba ya mpembe [talaYisaya 1:18]. Oyo ezali elaka epesameli bino.”8

Toyebi te mpenza boniboni Nkolo asalaki Bomikabi. Kasi toyebi ete monyoko ya nsomo ya ekulusu ezalaki bobele eteni ya mpasi oyo ebandaki na Getesemane—esika ya bule ya mpasi—mpe esilaki na Gologota.

Luka akomaki:

“Ye alongwaki na bango mwa mosika lokola moto akobwaka libanga, akumbaki mabolongo, mpe abondelaki ete,

“Tata, soko okani boye, longola kopo oyo na ngai, kasi mokano na ngai esalema te, kasi bobele mokano na yo.

“Mwanje na likolo amonanaki na ye kokembisa ye.

“Ajalaki na mpasi monene, mpe abondelaki makasi, koleka, mpe kotoka na ye ejalaki lokola matango monene na makila kokweya na mabele.”9

Lokola nakoki koloba, ezali bobele na nsango moko na maloba ma Mobikisi yemei oyo elakisi nini Ye ayokaki na Elanga ya Getesamene. Libimisi ekomi:

“Mpo tala, Ngai, Nzambe, nayokaki mpasi ya makambo maye mpo na banso, ete bakoka koyoka mpasi te soki balingi koyambola;

“Kasi soki balingi koyambola te basengeli koyoka mpasi kutu lokola ngai;

“Mpasi yango esalaki ngaimei, kutu Nzambe, Aleki monene na bango, nalenga na ntina ya mpasi, mpe natanga makili na madusu mango.”10

O ntaka ya bomoi na yo ezali na ntango oyo okei na esika osengelaki kokenda ata mokolo moko te mpe kosala makambo osengelaki kosala ata mokolo moko te. Soki okokima lisumu, okokoka mokolo moko koyeba kimia oyo ewuti na kolandaka nzela mobimba ya boyamboli.

Ezali bobuki mobeko nini, ezala boniboni mingi misala na biso esali basusu mpasi, elindo wana ekoki kokombolama mpenza. Mpo na ngai, ntango mosusu liloba ya kitoko mingi koleka na makomi nyonso ezali ntango Nkolo alobaki, “Tala, ye oyo ayamboli masumu ma ye, ye kaka alimbisami, mpe ngai, Nkolo, namikundoli yango lisusu te.”11

Oyo ezali elaka ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe Bomikabi: kokamata oyo nyonso ayei, oyo nyonso akosangana, mpe kotia bango na nzela ya likambo mpo ete na nsuka ya bomoi, bakoka koleka na kati ya elamba boyamboli masumu na bango mpe basukwami na nzela ya makila ya Klisto.12

Yango ezali nini Basantu ya Mikolo mya Nsuka bazali kosala na mokili mobimba. Yango ezali Mwinda topesi na baye bazali na molili mpe babungi nzela. Esika nyonso bandimi mpe bamisionele ba biso bakoki kokende, nsango na biso ezali ya bondimi mpe elikia na Mobikisi Yesu Klisto.

Mokambi Joseph Fielding Smith akomaki maloba ya loyembo “Does the Journey Seem Long?” Azalaki moninga na ngai ya bolingo. Ezali na bolendisi mpe elaka moko na baye bazali koluka kolanda mateya ya Mobikisi:

Mobembo emonani molai,
Nzela ya mpasi mpe ebuta?
Ezali na matiti mpe nzube na nzela?
Mabanga ya nsonge ekati makolo
Wana ezali yo kobunda komata
Bosanda na nzela ya moto ya mokolo?
Motema na yo elembi mpe na mawa,
Molimo na yo ebebi na kati,
Wana ezali yo na mpasi na nse ya bozito ya mitungisi?
Mokumba emonani kilo
Osengeli sikwa komema
Ezali na moto moko te akabola mokumba?
Tika te motema na yo elemba
Sikawa ezali ebandeli ya mobembo;
Ezali na Moko oyo azali naino kobelela yo.
Yango wana tala likolo na esengo
Mpe kangama na loboko na Ye;
Akokamba yo na bosanda oyo ezali ya sika—
Mokili moko esangu mpe ya peto,
Wapi esika mobulu nyonso esuki,
Mpe bomoi na ye ezwa bonsomi na misumu,
Wapi esika mpizoli ekotanga te,
Mpo mawa etikali te.
Kamata loboko na ye mpe elongo na ye kota na kati.13

Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. “Brightly Beams Our Father’s Mercy,” Hymns, no. 335.

  2.  

    2.  Moziya 3:19.

  3.  

    3. See Moses 6:57.

  4.  

    4.  2 Nefi 2:7.

  5.  

    5.  Alma 34:9.

  6.  

    6.  Moziya 16:9.

  7.  

    7. Tala Articles of Faith 1:3.

  8.  

    8.  Teachings of Presidents of the Church: Joseph F. Smith (1998), 99–100.

  9.  

    9.  Luka 22:41–44.

  10.  

    10.  Doctrine et Alliances 19:16–18.

  11.  

    11.  Doctrine et Alliances 58:42.

  12.  

    12. Tala Emoniseli 1:5.

  13.  

    13. “Does the Journey Seem Long?” Hymns, no. 127.