Esengo ya Kosikola Bawa

Na Mpaka Richard  G. Scott

Ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale


“Akolona na mitema ya bana bilaka bipesamaki epai ya batata, mpe mitema ya bana misengeli kobaluka epai ya batata na bango.”

Nkolo abimisaki epai ya Profeta Joseph Smith malongi ya kafukafu oyo etali makuli ya bule ya libatisi. Pole wana eyaki ntango baeklezia mosusu ya baklisto ezalaki koteya ete liwa na libela, na seko, esali atandele ya molimo. Bazalaki koteya ete babatisami bazwaki mbano ya bosepeli ezanga nsuka ntango basusu banso bazalaki kokutana na monioko ya seko, kozangaka elikia ya bosikoli.

Bobimisi ya Nkolo ete na nzela ya likoki ya bonganganzambe ya solo libatisi ekokaki kosalama na bozwili mpo na bawa ebateli bosembo ya maloba na Ye: “Soko moto akobotama na mai mpe na molimo te, akokoka koingela na Bokonji na Njambe te.” 1. Libatisi na bozwili ekoki kopesa na ngolu likuli eye ya ntina mpo na bawa nyonso ya botongono baye bazwaki yango te na bomoyi ya kufa.

Malongi oyo ya nkembo ezali litatoli mosusu ya lolenge ezingi nyonso ya Bosikoli ya Yesu Klisto. Ye asalaki ete lobiko ezala mpo na moto nyonso ayamboli. Bomikabi na Ye elongaki liwa, mpe Ye apesaki nzela na bawa ya botongono bazwa makuli nyonso ya lobiko na bozwili.

Na mokanda moko, ekomama mibu 150 mileki, Joseph Smith asakolaki: “Basantu bazali na libaku ya kobatisamaka mpo na … bandeko na bango bakufa … baye basili kozwa Nsango malamu na molimo … na nzela ya … baye batindami mpo na koteya bango” 2 Nsima abakisaki, “Basantu oyo batali yango mpamba mpo na litomba ya bandeko na bango bakufa, bazali kosala yango na libebi ya lobiko ya bangomei.” 3

Profeta Eliya apesaki bafungola ya mosala mpo na bozwili na Joseph Smith na Tempelo ya Kirtland 4 mpo na kokokisa elaka ya Nkolo ete “akolona na mitema ya bana bilaka bipesamaki epai ya batata, mpe mitema ya bana misengeli kobaluka epai ya batata na bango.” 5

Na nzela ya bobimisi epai ya Joseph Smith mpe baprofeta balandi nsima, ekoyei bososoli moko ya mpe makoki mpo na mosala ya tempelo mpe makasi ya mambi ya libota oyo ezali kosunga yango. Profeta nyonso uta Joseph Smith alendisi mposa etindami mpo na kosala makuli nyonso mpo na bisomei mpe bankoko na biso bakufa.

Mosala ya tempelo mpe mambi ya libota ezali mosala moko ekabwani na biteni mibale. Ekangani elongo lokola makuli ya libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu. Boko bato bakoki ntango mosusu kokoka te kosala misala nyonso mibale na ntina ya bokonongono ya nzoto to mosika ya batempelo. Mokambi Howard W. Hunter ateyaki:

Mokambi Howard  W. Hunter ateyaki ete:

“Tosengeli kosala tempelo na mosala ya makuli ya bonganganzambe oyo esengelami mpo na bonetwami na bisomei; nsima tosengeli kosala mosala esengelami mpo na baye bazwaki libaku te ya kondima nsango malamu na bomoi na bango. Kosalaka mosala mpo na basusu ekokisami na biteni mibale: yambo, na boluki ya mambi ya libota mpo na koyeba na ntembe te baboti na biso; mpe ya mibale, na kosalaka makuli ya tempelo mpo na kopesa bango mabaku wana lokola epesami na baye bazali na bomoi.

“Kasi ezali na bandimi mingi ya Eklezia baye bazali na mabaku moke mpo na kokota na batempelo. Basalaka manso bakoki. Bakobaka kosala boluki ya mambi ya libota mpe basalelaka bango mosala ya likuli ya tempelo na basusu. Na ngambo mosusu, ezali na boko bandimi baye bamipesi na mosala ya ya tempelo kasi bazali na bolembu mpo na kosala boluki ya mambi ya libota oyo etali babokitani ya libota na bangomei. Atako bazali kosala mosala ya bonzambe na kosungaka basusu, babungisi lipamboli moko na kozangaka koluka bandeko na bangomei bakufa lokola ekambemi na bonzambe na baprofeta ya basantu ba mikolo mya nsuka. …

“Nayekoli ete baye bamipesi na boluki mambi ya libota mpe bazali kosala mosala ya likuli ya tempelo mpo na baye oyo bankombo na bango babomboli bakoyeba bosepeli mosusu ya kozwaka bandambu mibale ya bopamboli.”6.

Tata na lola alingi moko na moko na biso tozwa biteni mibale ya bopamboli ya mosala ya ntina mpenza ya bozwili. Ye akambi basusu mpo na kolakisa biso lolenge nini tokolonga. Etali yo to ngai mpo na kosenga mapomboli wana.

Mosala nyonso okosala na tempelo ezali ntango olekisi malamu, kasi kozwaka makuli na bozwili mpo na moko ya bankoko na yomei ekosala ngonga na tempelo ya bule mingi mpe kutu mapamboli mingi ekozwama. Bokambi ya Yambo esakoli, “Mokumba na biso ya yambo ezali koluka mpe koyeba bankokona bisomei.” 7

Elingi bino bilenge babali nzela ya solo mpo na kolongola nguya ya monguna na bomoi na bino? Mizindisa na boluki bankoko na yo, lengela bankombo na bango mpo na makuli ya bule ya bozwili ezwami na tempelo, mpe nsima kende na tempelo mpo na kozala mozuili mpo na bango bazwa makuli ya libatisi mpe ya likabo ya Molimo Mosantu. Wana ezali yo kokola, okozala na makoki ya kosala elongo na kozwaka makuli mosusu lokola. Nakanisi na bobateli monene mosusu te na nguya ya monguna kati na bomoi na yo.

Na misio ya Rostov-na-Donu ya Russie, bilenge babengisamaki na kotala molongo ya ba nkombo 2.000 mpe nsima kopona ata nkombo moko uta na mabota na bangomei mpo na makuli ya tempelo. Baye bakokisaki ntina oyo babengisamaki kokende mobembo ya molai na Tempelo ya sika ya Kiev na Ukraine. Elenge mobali moko akabolaki mayele na ye: “Nazalaki kolekisa ntango mingi kosakanaka na ordinatele. Ntango nabandaki kokoma molongo ya nkombo, nazwaki lisusu ntango ya kosakana te. Na ebandeli nakanisaki, ‘O te! Boniboni ekoki kozala boye!’ ntango mosala oyo esilaki, kutu nabungisaki mposa ya lisano …. Mosala ya mambi ya libota ezali likambo moko oyo tokoki kosala awa na mabele, mpe ekotikala na lola.”

Basantu ya botongono mingi basili kosala mosala yango ya kolukaka babokitani ya mabota mpe bazali kosalela makambo ya ebombelo ya FamilySearch mpo na kobomba makuli ya bayelibota na bangomei ya kosala bozwili. Ntina ya kobombaka bankombo ezali mpo na kopesa nzela eleko ya ntango esengeli mpo na bato basala makuli mpo na bankoko mpe bandeko ya mpembeni. Ezali lelo na bankombo nkotonkoto 12 mpe bankotonkoto ya makuli makokani maye mabatelami. Nkombo mingi esili kobombama uta mibu mingi mileki. Bankoko baye babombolami bazali na ntembe te komitungisa mpe bazali na esengo ntango bankombo na bango elongolami mpo na makuli. Nzokande, bakoki te kozala na esengo mpenza ntango basengeli kokoba kozela makuli na bango esalama.

Tozali kolendisa baye kati na bino bazali na ebombelo monene ya bankombo bakabola yango mpo ete bato ya libota na bino ya monene to palwasi mpe likonzi ekoka kosalisa bino na kosalaka mosala wana. Bokoki kosala eye na kokabolaka bakalati ya tempelo na bandimi ya palwasi mpe ya likonzi oyo balingi kosalisa to na kosalelaka libongisi ya ordinatele ya FamilySearch mpo na kotia bankombo mbala moko tii na tempelo. Nzela oyo ya nsuka ezali eloko moko Cindy Blevins ya mboka Casper, Wyoming, azalaki kosala na mibu mingi mileki.

Ndeko mwasi Blevins abatisamaki wana ezalaki ye elenge mpe azalaki se moko ya libota na ye ya kosangana na Eklezia. Asililaki kokokisa motango monene mpenza ya mosala ya mambi ya libota. Kasi ezali na bankombo mosika mingi koleka mpo na ye mpe libota na ye kokokisa. Yango wana, Ndeko mwasi Blevins apesi bankombo na tempelo, oyo, elobi ye, ezali mbala mingi ekokisami na mwa bamposo, mbala mingi na moko ya batempelo ezali penepene ya ndako na ye. Alobi ete alingaka kokanisa ete baninga mpe bato ya penepene ya palwasi mpe likonzi na yemei bakoki kozala o ntei ya baye bazali kosalisa mpo na kokokisa mosala mpo na bankoko na ye. Azali kokumisa lolenge na bango ya kosala bongo.

Mwasi wa ngai ya bolingo, Jeanene, alingaki kosala boluki mambi ya libota. Ntango bana na biso bazalaki bilenge azalaki kokabola ntango ya kotala bana na baninga, na yango akokaki kozwa mwa bangonga mwa mposo nyonso mpo na kosala oyo etali boluki babokitani ya libota. Nsima ntango mwana na biso atikaki ndako, akomaki na zulunali ya ye moko: “Nakamati mokano mpe nalingi kotelama mpe koganga na ntina na yango. Lisuku ya kala ya Mike ekomi lisuku na ngai ya mambi ya libota. Ezali na biloko ekoka mpo na kobongisa nkoma mpe kosala na kati. Bomoi na ngai sikawa ekokangama na boluki ya ntina ya libota mpe botindi bankombo na tempelo. Nazali na esengo mpe motema likolo mpo na kobanda.”8

Zulunale mosusu elobi: “Likamwisi … mpo na ngai esalamaki na bilo ya Mambi ya Libota ya Mel Olsen oyo alakisaki ngai na lokasa eniatama na masini ya nzete ya bandeko na ngai bayebani nyonso ezwamaki uta na makundoli na ordinatele ya Minkanda ya Bonkoko ya sika oyo etindamaki na lingomba ya mambi ya libota . Ewutaki mingimingi na makundoli ya pologalami ya nkola minei oyo Eklezia asengaki uta mibu mingi mileki. Natondisamaki na makanisi ya mosala monene oyo ezalaki liboso na ngai ya kosangisa makundoli ya boluki bankoko na ngai banso uta na mabongisi ya libota mpo na kokotisa yango nyonso na ordinatele mpo na bokaboli ya yambo na nzela ya ordinatele ya Minkanda ya Bonkoko . Mpe kuna nyonso ezalaki, kitoko, ya kobongisama mpe eniatama na lazer mpe kofandaka wana likolo ya bilo liboso na ngai. Nazalaki na esengo mpenza mpe elekelaki ngai mpenza ete nafandaki kaka wana monoko polele mpe nsima nabandaki kolela mpo na nazalaki na esengo makasi. Mpo na moto oyo aluki na bokasi, malamu na mibu ntuku misatu, bokotisi na ordinatele ya bankoma eye nyonso ezali solo esengo. Mpe ntango nazali kokanisa bakama ya bankoto ya bato baye bazali sikawa to kala te bakozala kokotisaka maboke minene ya bankombo mpe bapalaki ya bangomoko ya boluki, nazali na esengo mpenza. Ezali solo mosala ya Nzambe mpe Ye azali koyangela yango.”9

Nameki mingi ya bambuma ya mosala kitoko oyo mpo na koyeba ete bafungola oyo ezongisamaki na Eliya epai ya Joseph Smith epesi nzela na mitema na biso ekangisama mpe ma na moko na moko na biso tosangana na bankoko na biso baye bazali kozela lisalisi na biso. Na nzela ya makasi na biso na batempelo ya bule awa na mabele kosalelaka likoki epesameli biso na Mobikisi, batata na biso bazali kozwa makuli ya lobiko oyo epesi bango nzela ya kosepela esengo ya seko.

Na kala, kotindikamaka na boyebi ya mozindo ya bosantu ya mosala, bato batelemelaki na mpiko mikakatano oyo emonanaki lokola kosalaka yo moko mpo na kobuka mbuma nyonso na Nebraska. Sikawa, bato ya nguya mingi bazali kosala mosala. Na lisanga tokoki mpe tokosala mosala esengelami.

Natatoli ete Molimo ya Eliya ezali kosimbaka mitema ya bana ya Batata mingi na mokili mobimba, kasalaka mosala mpo na bawa kotambola na lombangu moko esalama naino te.

Kasi bongo yo? Osili kosambela mpo na mosala ya bankoko na yomei? Tia mpembeni biloko wana oyo na bomoi na yo ezali na ntina mpenza te. Zwa makano ya kosala likambo moko oyo ekozala na mbano ya seko. Ntango mosusu otindikami mpo na koluka bankoko kasi ozali koyoka ete ozali moluki ya mambi ya libota te. Ekoki yo komona ete esengeli te kozala mingi koleka? Nyonso ebandaka na bolingo mpe mposa ya bosembo mpo na kosalisa baye bazali nsima ya elamba oyo bakoki te komisalisa. Tala nzinganzinga. Ekozala na moto moko na etuka na yo oyo akoki kosalisa yo ozwa elonga.

Mosala oyo ezali mosala ya molimo, bokasi ebakata ya kosala elongo ya bangambo mibale ya elamba, wapi lisalisi lipesami epai na epai na bangambo mibale. Esika nyonso ozali na mokili, na losambo, bondimi, bomipesi, etingia, mpe mwa ya libonza, okoki kosalisa na nguya. Banda sikawa. Nalaki yo ete Nkolo akosalisa yo omona nzela. Mpe ekosala yo oyoka esengo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1.  Yoane 3:5 .

  2.  

    2.  History of the Church , 4:231.

  3.  

    3.  Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 471–72.

  4.  

    4. Tala Doctrine et Alliances 110:13–16,.

  5.  

    5.  Doctrine et Alliances 2:2 ; biso nde tobeti sete.

  6.  

    6. Howard  W. Hunter, “A Temple-Motivated People,” Liahona, May 1995, 5–6 ; Ensign, Feb. 1995, 4–5 .

  7.  

    7. First Presidency letter, Feb. 29, 2012; biso nde tobeti sete.

  8.  

    8. Jeanene Watkins Scott, personal journal, Apr. 1988.

  9.  

    9. Jeanene Watkins Scott, personal journal, Sept. 23, 1989.