Bosepeli ya Bonganganzambe

Na Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Mosungi ya Yambo na Bokambi ya Yambo


Tika toyamba mpe tososola bikamwa mpe litomba ya bonganganzambe. Tika tondima mpe tolinga mikumba tosengami mpo na kokokisa.

Bosepeli ya Kopumbwa

Mibu mingi mileki bakapiteni mibale ya mpepo mpe ngai tozwaki mokano ya kokokisa ndoto moko ya bomwana ya kobongisaka mpepo moko ya kala. Elongo tosombaki Piper Cub ya 1938 moko ya kala mpe tobandaki mosala ya kozongisa yango na lolenge na yango ya ebandeli. Mosala yango ezalaki mosala tozalaki kolinga kosala. Ezalaki na ndimbola ya ndenge mpo na ngai mpamba te nayekolaki kopumbwa na mpepo ya lolenge moko ntango nazalaki elenge mobali.

Mpepo oyo esalamaki liboso kaka mibu 35 nsima ete bandeko Wright bapumbwa mpo na mbala na bango ya yambo. Kokanisaka na ntina na yango kaka esalaka namiyoka mokolo mpenza.

Masini oyo ezalaki na fongola ya lotiliki te; wana ezalaki biso kopelisa motele uta na cabine, moto mosusu na mabele akosimba pakapaka makasi mpe akobwaka yango na makasi kino masini ekotambola na yangomei. Kopelisa masini ezalaki ngonga moko ya esengo mpe ya konzo.

Ntango kaka topumbwaki likolo, emonanaki polele ete Piper Cub esalamaki mpo na mbangu. Solo, ntango mopepe ezalaki makasi, yango ezalaki komonana lokola soki tozalaki kopusana te. Namikundoli kompumbwaka elongo na elenge mwana na ngai ya mobali, Guido, likolo ya nzela ya mituka na Allemagne, mpe solo mpenza, mituka na nse ezalaki kotambola mbango koleka biso!

Kasi, o, boniboni nalingaki mpepo oyo ya moke! Ezalaki nzela ya malamu ya koyoka bikamwa mpe kitoko ya kobumbwa. Okokaki koyoka, kosimba, konukuta, komeka, mpe komona nini kopumbwa ezalaki. Bandeko Wright balimbolaki yango na lolenge boye: “Ezali na [eloko moko] ekokani na oyo bakumbi mpepo basepelaka na yango wana ezali bango komemama na mopepe na likolo ya mapapu ya mpembe.”1

Na bokeseni, na ebandeli ya mobu oyo nazwaki libaku ya kopumbwa na mpepo F-18 ya mbangu mpo ya bitumba elongo na ba Blue Angels, ekipi bapumbuki ya mpepo ya Mampinga ma United States Navy oyo bayebana mingi na mokili. Ezalaki lokola kopumbwaka likolo mpe kolandaka balabala eyebana mpamba te mibu 50 mpenza liboso, penepene na mokolo ya lelo, nasilisaki boyekoli na ngai mpo na kokoma soda mokumbi mpepo ya bitumba.

Boyebi mpepo F-18, solo, ezalaki nyonso mpenza na bokeseni uta na oyo na Piper Cub. Elakisaki ngai kitoko ya kopumbwa moko ya makasi mingi. Ezalaki lokola kosalelaka mibeko ya kotambola na mopepe na lolenge moko ebongi nie mingi. Nzokande, kopumbwaka elongo na baBlue Angels lisusu ekundolisaki ngai ete kozalaka mokumbi ya mpepo ya mbangu mpo na bitumba ezali lisano ya elenge mobali. Na kozongela maloba ya bandeko Wright lisusu ete, “Mingi koleka eloko mosusu liyoki [ya kopumbwa] ezali moko ya kimia ebongi nie, esangani na esengo oyo efungolaka misisa mpo ekoma monene.”2 Mpo na kobakisa, kopumbwa elongo na baBlue Angels epesaki ngai likanisi ya lolenge mosusu mpenza ya kozalaka na “baanzelu” zingzinga na yo mpe komemaka yo likolo.

Soki bosengelaki kotuna ngai wapi kati ya mabaku ya kopumbwa mibale oyo nasepelaki na yango mingi koleka, nandimi te ete nakokaki koyebisa yo. Na lolenge moko ya mwa polele, ezalaki ya kokesana mpenza, mpo naloba moke. Kasi lisusu na lolenge mosusu, ezalaki ya kokokana mingi.

Na Piper Cub mpe na F-18 nyonso mibale, nayokaki esengo, kitoko, mpe bosepeli ya kopumbwa. Na nyonso mibale nakokaki koyoka libiangi ya mokomi na ntoki mpo na “[kotika] basinga ya bonguna ya mabele mpe [kobina] ya likolo likolo ya mapapu ya ekomi lokola palata na koseka.” 3

Bonganganzambe Se Moko Wana Bisika Nyonso

Sikawa, bokoki kotuna, nini mabaku mibale ya kopumbwa ekeseni mpenza oyo ezali kosala na liyangani na biso lelo to na bonganganzambe topesameli litomba na komema to na mosala ya bonganganzambe oyo banso tolingaka mingi?

BandekoBrethren, ezali solo ete makambo ya moto na moto na mosala ya bonganganzambe ekoki nyonso kozala ya mwa kokesana? Tokoki koloba ete ndambo na bino bazali kopumbwa na bampepo ya bangu makasi F-18, ntango basusu bazali kopumbwa na Piper Cubs. Ndambo na bino bafandi na bapalwasi mpe makonzi wapi ebonga moko na moko, uta na mosungi kino mokambi ya liboke ya banganganzambe minene kino na sekeletele ya lisanga likoki ya badiakona, etondisami na mosimbi bonganganzambe ya moningi. Bozali na libaku ya kosala elongo na libongisi ya palwasi oyo ezali na bato bakoka mpo na kosala na mabiangi.

Basusu kati na bino bafandi na bituka ya mokili wapi ezali se motango moke ya bandimi ba Eklezia mpe basimbi bonganganzambe. Bokoki komiyoka bino moko mpe na mokumba ya mnyonso oyo esengeli kosalama. Mpo na bino ekoki kozwa bomipesi mingi ya moto na moto mpo na kozwa masini ya mosala ya bonganganzambe ebanda. Ntango mosusu ekoki kutu komonana ete etape na bino to palwasi ezali kokende liboso te.

Nzokande, likambo te mikumba na bino nini to bozwi na bino ekoki kozala bino mpe ngai toyebi ezali ntango nyonso na bosepeli ya ndenge oyo eyaka uta na mosala ya komipesa ya bonganganzambe.

Nalingaki kopumbwa ntango nyonso, ata soki ezalaki na Piper Cub, na F-18, to na mpepo mosusu. Ntango nazalaki na Piper Cub nayimayimaki te na ntina ya bozangi mbangu; ntango nazalaki na F-18 namilelaki te ntango bobangi ya botamboli ya tapale na mawa te elakisaki ngai bosolo ya mibu na ngai ya kopusana.

Iyo, ezali ntango nyonso na eloko moko ebonga nie te na ezalela nyonso. Iyo, ezali pete kokuta makambo ya koyimayima na ntina na yango.

Kasi bandeko, tozali bamemi ya Bonganganzambe bonsantu, nsima ya Molongo ya Mwana na Nzambe! Moko na moko na biso totiamaki maboko na mito na biso, mpe tozwaki bongangansambe ya Nzambe. Topesamaki likoki mpe mokumba ya kosala na nkombo na Ye lokola basali na Ye na mabele. Ata soki na palwasi monene to na etape moke tobengami mpo na kosalisa, kopambola, mpe kasala na makambo manso mpo na bolamu ya moto nyonso mpe eloko nyonso oyo ezali na bobateli na biso. Ekoki kozala na likambo moko eleki esengo?

Tososola, tolula, mpe toyoka bosepeli ya mosala ya bonganganzambe.

Bosepeli ya Bonganganzambe

Bolingo na ngai mpo kopumbwa ezalaki na nguya na bokambi ya bomoi na ngai mobimba. Kasi lokola ya kolendisa mpe ya esengo makambo na ngai lokola mokumbi mpepo ezalaki, makambo na ngai lokolo mondimi ya Eklezia ezali mozindo mingi, ya bosepeli mingi, mpe bozindo mingi koleka. Ntango na mizindisi na mosala ya Eklezia nayokisami nguya ya makasi mingi ya Nzambe mpe boboto ya ngolu na Ye lokola.

Lokola mokumbi mpepo nasimbaki likolo. Lokola mondimi ya Eklezia nayoki bolingo mpe bobateli uta na lola.

Na libaku, nazali kozanga kovanda na moto ya mpepo. Kasi kosalaka elongo na bandeko na ngai mibali mpe basi na pete ekokisi esika yango. Kokoka koyoka kimia eluti mpe esengo oyo ekoli uta na kozalaka mwa eteni ya likambo mpe mosala oyo monene, nalingi kozanga mpo na eloko moko te na mokili.

Lelo tosangani lokola liboke monene ya bonganganzambe. Ezali bosepeli mpe litomba na biso ya bule mpo na kosalela Nkola mpe bandeko na biso, mpo na komipesa mingi mpenza malamu mingi koleka nyonso oyo ezali o ntei na biso mpo na likambo ya lokumu ya komatisa basusu mpe kotoga bokonzi ya Nzambe.

Toyebi mpe tososoli ete bonganganzambe ezali nguya mpe likoki ya seko ya Nzambe. Tokoki na pete kozangela bolimboli oyo uta na motema. Nzokande, esosoli biso ndimbola ya oyo tozali koloba? Tika nazongela: bonganganzambe ezali nguya mpe likoki ya seko ya Nzambe.

Kanisa na ntina na yango. Na nzela ya bonganganzambe, Nzambe akelaki mpe akambaka balola mpe mabele.

Na nzela ya nguya oyo, Ye asikoli mpe anetoli bana na Ye, komemaka “esalema bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”4

Bonganganzambe, kaka lokola Profeta Joseph Smith alimbolaki, “nzela na yango Oyo Aleki Nguya abandaki kobimisa nkembo na ye na…bokeli ya mabele oyo mpe na nzela yango Ye akobaki komibimisa epai ya bana ya bato na ntango ya lelo, mpe na nzela na yango Ye akoyebisa bantina na Ye tii nsuka ya ntango.” 5

Tata wa biso na Lola ya nguya nyonso apesi biso likoki ya bonganganzambe—bato ya kufa oyo, na ndimbola, tozali na bambeba mpe tobongi nie te. Ye apesaki biso likoki ya kosala na nkombo na ye mpo na lobiko ya bana na Ye. Na nguya oyo topesami ndingisa ya kosakola nsango malamu, kosala makuli ya lobiko kosalisa botondi ya bokonzi ya Nzambe na mabele, mpe kopambola mpe kosalisa mabota mpe baninga na biso bato.

Ezali wana mpo na Banso

Oyo ezali bonganganzambe ya bule tomemi.

Bonganganzambe, to mokumba nyonso na kati na yango, ekoki kosombama to kobengisama te. Bosaleli nguya ya bonganganzambe ekoki kozwa nguya, kondimisama, to kotindama na makasi te na ebonga, na bomengo, to na nguya. Ezali nguya ya molimo oyo esalaka na mobeko ya lola. Owutaki na Tata monene ya biso banso na Lola. Nguya na yango ekoki kotindama mpe koyangekala kaka na nzela ya mibeko ya bosembo, 6 na bosembo ya mboto yemei te.

Klisto azali liziga ya likoki mpe nguya ya bonganganzambe ya solo nyonso likola na mabele.7 Ezali mosala na ye na kati na yango tozali na litomba ya kosunga. “Mpe moko te akoki kosunga na mosala oyo longola se azala na bosawa mpe atonda na bolingo, kozalaka na bondimi, elika, mpe lolango, kozalaka na ndelo na makambo manso, ata nini ekopesamela ye mpo na kobatela.”8

Tosalaka mpo na litomba na biso moko te, kasi tolukaka kosalisa mpe kotombola basusu. Tokambambaka na bokasi te kasi na nzela ya bondimisi… motema molai, …boboto, mpe bosokemi, mpe na bolingo ezangi lokuta.”9

Bonganganzambe ya Nzambe Aleki Nguya Nyonso ezali wana mpo na mibali bolongobana bisika nyonso bakoki kozala— kozanga kotala bankoko, ya bosawa boniboni ezali bizalala na bango, na biteni ya penepene to mosika mingi ya mokili. Ezwami na mbongo te to na ntalo songolo ya mokili. Mpo na kozongela profeta ya kala Yisaya, moko na moko oyo ayoki mposa na komela akoki koya epai na mai, mpe mosolo mosolo moko te esengami mpo na koya kolia!10

Mpe na ntina ya Bomikabi ya seko mpe eyebana te ya Mobikisi na biso Yesu Klisto, bonganganzambe ya Nzambe ekoki kozwama ata soki obeti libaku to olongobanaki te na kala. Na nzela ya mosala ya bopetwami mpe bosukwami ya boyamboli, okoki “kotelema mpe kongenga”! 11 Na ntina ya bolingo ezanga ndelo, ya kolimbisa ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, okoki kotombola miso na yo, kokoma ya kosukwama mpe kolongobana, mpe kokoma bana ya Nzambe ya bosembo mpe ya lokumu—bamemi balongobani ya bonganganzambe ya bule ya Nzambe ya Nguya Yonso.

Likamwisi mpe Litomba ya Bonganganzambe

Nayoki mwa mawa mpo na baoyo basosoli mpe baluli bokamwisi mpe litomba ya banganganzambe te. Bazali lokola baleki nzela na mpepo baye babebisi ntango na bango koyimayimaka na ntina ya monene ya liboke ya nguba wana ezali bango kolapa ndai na mopepe mosika likolo ya mapata—likambo moko bakonzi ya kala bakokaki kopesela nyonso bazwaki mpo kaka komeka mbala moko!

Bandeko, topambolama mpo na kozala bakabola ya bosawa ya likoki mpe nguya ya bonganganzambe monene oyo. Tika totombola miso na biso mpe tomona, toyeba, mpe tondima libaku oyo mpo na oyo yango ezali mpenza.

Na nzela ya mosala ya bosembo, bolingo mpe bomipesi ya bonganganzambe, tokoki koyeba ntina ya solo ya libimisi: “Nakokendi liboso ya elongi na bino, nakozala na loboko na bino ya mobali mpe ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala na mitema na bino, mpe banzelu na ngai nzinganzinga na bino mpo na komema bino.”12

Tika toyamba mpe tososola bokamwisi mpe litomba ya bonganganzambe. Tika tondima mpe tolinga mikumba tosengami na kokokisa—mikumba na bandako na biso mpe bitonga ya Eklezia na biso, ezala monene to moke. Tika tokoba kokola na mosala ya bonganganzambe na bosembo, na bomipesi. Tika tozwa bosepeli ya kosalisa na bonganganzambe!

Tokoki kosala eye malamu koleka na kosalelaka mibeko ya boyebi, botosi, mpe bondimi.

Eye elingi koloba, yambo, tosengeli koyeba mpe kokotisa kati na biso malongi ya bonganganzambe maye mazwami na liloba ebimisami na Nzambe. Ezali motuya kososola mayokani mpe mitindo likolo ya miye wapi bonganganzambe ezali kosala.13

Nsima, tika tozala bwania mpe tosala likolo na boyebi tozwi ntango nyonso mpe na lokumu. Wana ekotosa biso mibeko ya Nzambe, koyekola kosembola mayele mpe nzoto na biso, mpe koyokanisa misala na biso na ndakisa ya bosembo eteyami na baprofeta, tokozwa esengo ya mosala ya bonganganzambe.

Mpe na nsuka, tika tokotisa na mozindo bondimi na biso na Nkolo na biso Yesu Klisto. Tika tokamata likola ya bisomei nkombo na Ye mpe tokamata mokano ya kotambola mokolo nyonso na nzela ya kimoyekoli ya sika. Tika misala na biso ebongisa nie bondimi na biso.14 O nzela ya kozala bayekoli tokoki kobonga nie litambe moko moko liboso mpe na ntango moko na kosalisaka libota, baninga bato, mpe Nzambe.

Ntango tosali na bonganganzambe na mitema, nguya, mayele mpe bokasi na biso mobimba, tozali na elaka ya kozwa boyebi eluti, kimia, mpe makabo ma molimo. Wana ekokumisa biso bonganganzambe bosantu, Nzambe akokumisa biso, mpe “tokotelama na kozangaka mbindo liboso na [Ye] na mokolo ya nsuka."15

Ete tokoka ntango nyonso kozala na miso ya komona mpe motema ya koyoka makamwisi mpe bosepeli ya bonganganzambe ya Nzambe na biso ya monene mpe ya nguya ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1. Wilbur Wright, na James Tobin, To Conquer the Air: The Wright Brothers and the Great Race for Flight (2003), 238.

  2.  

    2. Wright brothers, na Tobin, To Conquer the Air, 397.

  3.  

    3. John Gillespie Magee Jr., “High Flight,” in Diane Ravitch, ed., The American Reader: Words That Moved a Nation (1990), 486.

  4.  

    4.  Mose 1:39.

  5.  

    5.  Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 108–9.

  6.  

    6. Tala {Doctrine et Alliances 121:36.

  7.  

    7. Tala Baebele 5:4–10; Doctrine et Alliances 107:3.

  8.  

    8.  {Doctrine et Alliances 12:8.

  9.  

    9.  Doctrine et Alliances 121:41.

  10.  

    10. Tala Yisaya 55:1.

  11.  

    11.  Doctrine et Alliances 115:5.

  12.  

    12.  Doctrine et Alliances 84:88.

  13.  

    13. Tala Doctrine et Alliances 84:33–44; 121:34–46.

  14.  

    14. Tala Yakobo 2:22.

  15.  

    15.  Doctrine and Alliances 4:2.