2010–2019
Momekano ya Bondimi na Bino
Sánzá ya Zómi 2012


Momekano ya Bondimi na Bino

Lokola molunge ya makasi oyo ebongoli libende na ebende ya makasi, ntango totikali na botongono na momekano ya nsomo ya bondimi na biso, bopetolami ya molimo ekokoma mpe bokasi na biso ya molimo ekobakisama.

Mibu zomi eleki, mwasi wa ngai, Kathi, mpe ngai tozalaki kovanda na São Paulo, Brazil, Mokambi David Marriott azalaki kokamba Misio ya Brazil São Paulo Interlagos. Ye mpe mwasi wa ye, Neill, mpe bana babali ba ye Will, mpe Trace bazalaki kovanda penepene na biso. Batikaki ndako ya bango nkita ya bango, mpe mingi ya libota lya bango mpo na koyanola libiangi moko ewutaki na profeta ya kosala misio.

Mokambi Marriott abiangaki ngai mpokwa moko. Mwana mwasi ya bango ya mibu 21, Georgia, nkulutu na kobeta violon na Indiana University, batutaki ye na motuka ntango azalaki kozonga ndako na velo nsima ya liyangani ya Eklezia. Na nsango ya liboso, Georgia akomaki malamu. Nan gonga ya nsima ezaleli na ye ebebaki mpenza.

Libota mpe baninga babandaki kokila mpe kosambela mpo na likamwisi mpo na Georgia. Neill Marriott akendeki na mpempo na butu na Brazil. Ntango akomaki na libanda ya mpempo na Indiana mokolo elandaki akutanaki na bana ba ye ya mobali mpe mwasi. Bayambaki ye mpe na mai na miso balimbolaki na ye ete bazalaki na Georgia ntango awaki.

Natalaki libota ya baMariott na ntango ya makambo mana mpe na sanza mpe mibu milandaki. Balelaki, basambelaki, balobelaki Georgia, bayokaki mpasi mpe mawa mingi mpenza, kasi bondimi bwa bango elembaki te. Na liyangani ya ntongo oyo, toyokaki bondimi ekokani na bomoi ya kitoko ya mabota Bowen mpe Wilberger. 1

Likabo ya bondimi ezali likabo ya molimo ezanga ntalo. “Eye ezali bomoi bwa seko,” Yesu asambelaki, “ete bakoka koyeba yo Nzambe se moko, mpe Yesu Klisto, oyo otindaki.” 2

Bondimi bwa biso ezwi na katikati Nzambe mpe Yesu Klisto, oyo azalaki Mobikisi mpe Mosikoli wa biso. Elendisami na boyebi ete nsango malamu ezongisami na mabele; ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe; mpe ete baprofeta mpe bapostolo lelo basimbi bafungola ya banganganzambe. Topesi motuya ya bondimi bwa biso, tozali kosala mpo na kolendisa bondimi ba biso, tozali kosambela mpo na kokolisa bondimi, mpe tozali kosala nyonso na nguya ya biso mpo na kobatela mpe kobomba bondimi bwa biso.

Apostolo Petlo asosolisaki yango eloko moko abengaki “komekama ya bondimi na bino” 3. Ye mpe akutanaki na yango. Bomikundola maloba ya Yesu:

“Simona, … Satana alombi ete ajua bino konyongela yo lokola masango:

“Nde ngai nasili kobondela na ntina na yo ete kondima na yo ejanga te.”4

Petelo alendisi basusu: “Bokamwa te pelamoko,” elobaki ye, “mpo na ntina ya momekano ya nsomo oyo ezali koyela bino, lokola soko ekamwiseli ejali kokwela bino.” 5

Mimekano ya nsomo ezali na ntina ya kokomisa biso makasi, kasi ekoki kokitisa to kobebisa elikia ya bino na Mwana wa Nzambe mpe kolembisa mokano ya bino mpo na kobatela bilaka bya bino na Ye. Mikakatano mbala mingi ebombani, kokomisaka yanbo mpasi na kososola. Ekotisi misisa na bolembu na biso, botau na biso, mayoki na biso, to na makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na biso. Momekano ya solo kasi oyo moko akoki kolongo ekoki kozala momekano ya nsomo mpo na mosusu.

Boniboni bokoki kotikala “ngwi mpe na kozangaka koningana” 6ntango bozwi momekano ya bondimi? Bomizindisi na makambo maye masalisaki kotonga likonzi ya bondimi na bino: bosaleli bondimi na Klisto, bosambeli, bomanioli makomi, boyamboli, mpe babateli mibeko, mpe bosaleli basusu.

Ntango tokutani na momekano ya bondimi—ezala nini osali, kokende mosika te ya Eklezia! Komikomisa mosika na bokonzi ya Nzambe na ntango ya mimekano ya bondimi ezali kotika bozangi likama ezala ebombelo kaka lokola soki mopepe ya mvula makasi ezali koya.

Apostolo Paulo alobaki, “Bongo tozali lisusu bapaya mpe batamboli te kasi bojali bato na mboka na babulami elongo mpe bana na ndako na Njambe.”7 Ezali na kati ya esika esantu ya Eklezia nde tokobatela bondimi bwa na biso. Kosanganaka elongo na basusu baye bazali bandimi, tokosambela, tokokumbamela na nzela ya miziki, mpe tokokabola litatoli ya Mobikisi, tokosalisana, mpe tokoyoka Molimo ya Nkolo. Tokokabola elambo, tokozwa mapamboli ya bonganganzambe, mpe tokokende na tempelo. Nkolo asakolaki, “Na makuli …, nguya ya bonzambe ekomonisama.” 8 Ntango okutani na momekano ya bondimi—tikala na bozangi likama na kati ya ebombolo ya ndako ya Nzambe. Ezali ntango inso esika moko mpo na yo awa. Momekano moko te ezali monene mingi ete tokoki te kolonga yango elongo.9

Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Likonga ya kolakisa nzela ya mokili [ezali kotambola na lombangu mpenza]. Bizaleli … oyo kala … emonanaki ebongi te mpe malonga te sikawa … emonani na … bato mingi lokola endimami.”10

Ezali na bakolo mingi ya minzemba na Eklezia mosika mpenza na mibu na bango ya bolenge. Atako bamoni bomoi na bango ya bokesani na nini bazalaki kozela, bazali kobatela mobeko ya bopeto. 11 Ekoki kozala momekano ya bondimi na bango. Nalakisi limemia ya mozindo mpe longonia mpo na bayekoli oyo ya Klisto.

“Nzambe atindaki ete banguya ya kobota … esalelama bobele katikati na mobali mpe mwasi, babalana engebene na mibeko.”12 Na Boyokani ya Sika Mobikisi atombolaki ndelo ya boponi mpo na bolandi ba ye ntango asakolaki, “Ye oyo atali mwasi mpo na kolula ye asali ekobo na ye na kati ya motema mwa ye.”13 Ye ateyaki biso tosambisa basusu te, kasi abangaki te koloba semba “Kende”, elobi ye, “mpe kosala lisusu masumu te.”14

Libota na biso ezali na moninga moko. Bino na ntembe te boyebi moto moko lokola ye, to bokoki kozala lokola ye. Ntango nyonso na botongono, kosalaka na Eklezia, alulami na mosala, alingami na libota lya bango, mpe atako kala akanisaki na libala, azali monzemba. “Nazwaki mokano,” elobaki ye, “ya kotia … elikia na Yesu Klisto. Nazali na bondimi … ete … lipamboli moko te ekolongwa … ntango …natikali botongono na mayokani ma ngai, kotangaka mpe mobeko ya bopeto.” 15

Moninga mosusu asalaki misio ya kafukafu, nsima asalaki boyekoli ya makasi na université. Azalaki na elikia ya kozwa libota. Momekano ya bondimi na ye: mayoki ya mposa ya kobalana mobali na mobali. Akomaki na ngai kala te: “Nazwaki elaka na lipamboli ya batata ete nakozala na libota na ngaimei mokolo moko. Ezala … na bomoi boye to ya nsima, nayebi [te] … [Kasi] nalingi te kosala likambo moko ekoki kotia na likama mapamboli Nzambe alaki ngai …Kobatelaka [mobeko ya bopeto] ezali mokakatano, kasi eyaki biso te na mabele mpo na kotelemela mikakatano mpe kolakisa Nzambe bolingo mpe limemi na biso … na kobatelaka mibeko mya Ye? Napambolami na bokolongono, nsango malamu, liboto ya malamu, mpe baninga ba bolingo. Nazali na botondi mpo na mapamboli mingi.” 16

Mokili endimi te, boniboni okoki kosenga mingi boye? Nkolo ayanoli ete:

“Makanisi na ngai mazali makanisi na bino te, mpe njela na bino ijali njela na ngai te. …

“Jambi lokola lola eleki mokili likolo, boye njela na ngai ileki njela na bino mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino.”17

Bayekoli baye mibale ya Klisto mpe zomi ya bankoto lokola bango bayoki elaka ya Mobikisi : “Kimia natikeli bino, kimia na ngai napeki bino: lokola mokili epesi te, napesi epai na bino. Tika été mitema na bino mizala na kobanga te.”18

Eye ezali momekano mosusu na mikolo mya biso. Ezali ntango nyonso boko baye balingi kotiola Eklezia mpe kobebisa bondimi. Lelo bazali kosalela Internet.

Boko sango etali Eklezia, esala boniboni mpo na kondimama, ezali bobele ya likuta. Na 1985 (yambo ya Internet) namikundoli moninga moko azalaki kokota na bilo na ngai ya nkita na Floride. Azalaki na nkoma ya nkasa ya Time na nkombo “Challenging Mormonism’s Roots.” Elobelaki mokanda moko eyebani kala te, soki ekomama na Martin Harris, eye etii mobulu na nsango ya Joseph Smith etali komona Buku ya Mormon.19

Moninga wa ngai atunaki soki nsango oyo ya sika elingaki kobebisa Eklezia ya Mormon. Nkoma elobelaki moto moko oyo alobaki alongwaki na Eklezia likolo ya mokanda wana. Nsima, basusu ntango mosusu balongwaki Eklezia. .20 Nandimi na ntembe te ezalaki momekano ya bondimi na bango.

Mwa sanza nsima, banganga ya mayele bamonaki (mpe mobosani andimaki) ete mokanda ezalaki ya lokuta. Namikundoli ya solo kolikiakka ete baye balongwaki Eklezia na ntina ya lokuta oyo azongaki.

Mwa bato batungisi bondimi na bango ntango bamoni lisakola moko esalemaki na Eklezia bazomi ya mibu mileki eye eyokanaki te na malongi ya Eklezia. Malongi eteyami na bato banso zomi na mitano ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bazomi na Babale. Ezali ya kobombana te na liboke ya nkoma ya lisikulu moko. Mibeko ya solo eteyami mbala na mbala mpe na mingi. Malongi ma biso ezali mpasi te na kokuta.

Bayangeli ba Eklezia bazali ba bosembo kasi bato babongo nie te. Mikundola maloba ma Moloni: “Kosambisa ngai te na ntina ya bozangi bobongo nie ya ngai, to ya tata wa ngai …; kasi kutu pesa matondi na Nzambe ete ye amilakisi epai na yo bozangi bobongo nie ya yo, ete okoka koyekola kozala na bwana mingi koleka ozali na yango.” 21

Joseph Smith alobaki, “Naloba na bino mokolo moko te nabongo nie—kasi ezali na mbeba te na mabimisi nateyi.” 22 Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali mosala ya kitoko ya Nzambe, mpe likamwisi ya mambi ma kala mpe atandele ya yango ekososolama mobimba bobele na nzela ya boluki ya molimo.21 Mokambi Ezra Taft Benson alobaki, “Moto na moto na nsuka akokangama na efelo ya bondimi, mpe kuna asengeli kotelema ngwi.” 23. Bosutuka te ntango ekoyela bino!

Na ndimbola, mimekano mikozala makasi. Ekoki kozala na nsomo, mobulu, babutu ezanga mpongi, nkata epoli na mpizoli. Kasi mimekano na biso esengeli te ezala ya libebi ya molimo. Esengeli te elongola biso na ndako ya Nzambe.

“Bomikundola … ezali na likolo lya libanga lya Mosikoli wa biso, oyo ezali Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, ete bosengeli kotongama nse ya bino; ete ekotinda zabulu mipepe mikasi mya ye ya, …ekobete mvula inso ya mabanga ya ye mpe moketi mokasi mwa ye likolo lya bino mpo ya kobenda bino o nse …na ntina ya libanga likolo lya yango botongami, …liye lizali nse yoko na wapi soko bato batongi bakoki te kokweya “24

Lokola molunge ya makasi oyo ebongoli libende na ebende ya makasi, ntango totikali na botongono na momekano ya nsomo ya bondimi na biso, bopetolami ya molimo ekokoma mpe bokasi na biso ya molimo ekobakisama.

Mpaka D. Todd Christofferson alimbolaki nini ayekolaki na momekano na ye moko: “Atako nayokaki mpasi ntango wana, nakotalaka nsima sikawa, nazali na botondi ete ezalaki te na eyano ya mbangu na kpokoso na ngai. … Nayaki koyeba Mobikisi wa ngai mpe Tata wa ngai ya Lola na lolenge moko mpe ndelo moko oyo ekokaki te koya ndenge mosusu. … Nayekolaki kolikia na Nkolo na motema mwa ngai mobimba. Nayekolaki kotambola elongo na Ye mokolo na mokolo.” 25

Petelo alakisi makambo maye lokola “ya motuya mingi koleka …wolo.” 26 Profeta Moloni abakisi ete litatoli lilandi “momekano ya bondimi ya bino.” 27

Ntango nabandaki, nalobelaki libota Marriott. Mposo elaki Kathy mpe ngai nasanganaki na bango na lilita ya Georgia. Mibu zomi eleki. Baye libota mpe baninga balobelaki bolingo mpe makundoli bazalaki na yango ya Georgia. Moko ya libota amemaki ndembo ya mpembe etonda na pema mpo na kokembisa bomoi na ye. O ntei ya mpizoli, mama wa Georgia alobelaki na boboto bondimi mpe bososoli bobekisami azwaka, mpe Tata wa Georgia alobelaki ngai “litatoli” lilakelama “ liye liyaki na ye.

Na bondimi, eyaki mimekano ya bondimi, oyo ememaki bondimi ya kobakisa. Boloko ya Liberty Profeta Josepth Smith azwaki mpiko mpe niekese na elaka ya Nkolo---elaka moko Ye apesi yo na mokakatano na yo ya bondimi: “Kangama …  , kobanga te …  , mpo Nzambe akozala elongo na yo libela na libela.” 28 Ya yango napesi litatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Shayne M. Bowen, “Because I Live, Ye Shall Live Also,” and Ann M. Dibb, “I Know It. I Live It. I Love It,” na liyangani ya mokolo mwa mposo na ntongo ya likita linene ya sanza ya zomi 2012.

  2. Yoane 17:3.

  3. 1  Petelo 1:7.

  4. Luka 22:31–32.

  5. 1 Petelo 4:12; mongwa tobakisi.

  6. Alama 1:25.

  7. Baefeso 2:19.

  8. Doctrine et Alliances 84:20.

  9. Tala Moziya 18:8-10.

  10. Thomas S. Monson, “Stand in Holy Places,” Liahona, Nov. 2011, 82.

  11. Tala Ezra Taft Benson, “The Law of Chastity,” New Era, Jan. 1988, 4–7; “The Law of Chastity” na Brigham Young University 1987–88 Speeches (1988), 1–5, speeches.byu.edu; tala lisusu Gospel Principles (2009), 224–32.

  12. “The Family: A Proclamation to the World,” Liahona, Nov. 2010, 129.

  13. Matai 5:28.

  14. Yoane 8:11.

  15. Mikanda ya ye moko, 2012

  16. Mikanda ya ye moko, 2012

  17. Yisaya 55:8–9.

  18. Yoane 14:27.

  19. Tala Richard N. Ostling, “Challenging Mormonism’s Roots,” Time, May 20, 1985, 44.

  20. Tala Gordon B. Hinckley, “Lord, Increase Our Faith,” Ensign, Nov. 1987, 52.

  21. Mormon 9:31.

  22. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 522.

  23. Ezra Taft Benson, “The Book of Mormon Is the Word of God,” Tambuli, May 1988, 6.

  24. Elamani 5:12.

  25. D. Todd Christofferson, “Give Us This Day Our Daily Bread” (Church Educational System fireside, Jan. 9, 2011), lds.org/broadcasts.

  26. 1 Petelo 1:7; tala lisusu 1 Petelo 4:13.

  27. Etele 12:6.

  28. Doctrine et Alliances 122:9; Mokambi George Q. Cannon alobaki: Ezala momekano ya mpasi boniboni, motungisi ya mozindo boniboni, kpokoso ya monene boniboni, [Nzambe] atiki biso ata moke te. Ye asala yango ata moke te, mpe Ye akosala yango ata moke te. Ye akoki te kosala yango. Ezali ezalela na Ye te. Ye azali mobongwani te; Ye kaka lobi eleki, Ye kaka lelo, mpe Ye akozala Ye kaka o ntaka ya mibu ya boseko bokoya. Tomoni Nzambe wana. Tokomisi Ye moninga wa biso, na kotosaka Nsango Malamu ya Ye; mpe Ye akotelema penepene na biso. Tokoki koleka na kati ya moto ya nsomo; tokoki koleka na kati ya mai ya mozindo; kasi tokosila te to ekolekela biso te. Tokobima na mikakatano mpe kpokoso oyo malamu mingi mpe peto mingi mpo na yango, soki bobole totii elikia na Nzambe wa biso mpe tobateli mibeko mya Ye” (“Freedom of the Saints,” in in Brian Brian H. Stuy comp., Collected Discourses Delivered by President Wilford Woodruff, His Two Counselors, the Twelve Apostles, and Others, 5 vols. [1987–92], 2:185); see also Jeffrey R. Holland, “Come unto Me,” Ensign, Apr. 1998, 16–23.