2010–2019
Boyei Bolamu na Likita
Sánzá ya Zómi 2012


Boyei Bolamu na Likita

Tika toyoka na bokebi bitinda …, ete tokoka koyoka Molimo ya Nkolo mpe kozwa boyebi Ye alingi mpo na biso.

Mosika lokola nakoki komona, kiti nyonso etondi—longola se moke kuna na loboko ya mobali na nsima. Ezali na esika mpo na bato mosusu. Oyo ezali bonkonde mpo na baoyo bakoki koya mwa nsima, na ntina ya mituka mingi, mpo na kokuta kiti ntango bakoya.

Oyo ezali mokolo monene—mokolo ya likita. Toyoki bayembi ya kitoko bayembi miziki ya limpombo. Mbala nyonso nayoki bayembi to nayoki lindanda to nayoki piano, nakanisi na mama na ngai, oyo alobaki, “Nalingi boyokani ya lokito oyo epesameli yo, bandelo nyonso ozwi, mpe mosala nyonso osali. Mawa na ngai ezali bobele ete otikalaki na piano te.” Matondi, Mama. Natombelaki kozala na yango.

Malamu boniboni ezali, bandeko mibali mpe basi, mpo na kotombela bino boyei malamu na Likita Linene ya Katikati ya Mobu ya Mbala ya 182 ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka.

Uta tokutanaki sanza motoba eleki, tempelo ya sika misato ebulisami, mpe tempelo moko ebulisami lisusu. Na nsanza ya mitano, ezalaki litomba na ngai mpo na kobulisa Tempelo ya kitoko ya Kansas City na Missouri mpe mpo na kozala na bosepeli ya mambi ya mboka esanganaki na yango. Nakolobela bosepeli wana na makambo mikemike na makebisi na ngai lobi na ntongo.

Na sanza ya motoba, Mokambi Dieter F. Uchtdorf abulisaki tempelo tozelaki uta kala na Manaus, Brézil, mpe na ebandeli na sanza ya libwa, Mokambi Henry B. Eyring abulisaki lisusu tempelo ebongisami sika na Buenos Aires, Argentine, tempelo moko oyo nazwaki litomba ya kobulisa penepene na mibu 27 eleki. Bobele mposo mibale eleki, Mokambi Boyd K. Packer abulisaki Tempelo ya kitoko ya Brigham City na engumba wapi abotamaki mpe akolaki.

Lokola nalakisaki liboso, ndako moko te ya Eklezia etongama ezali na motuya mingi koleka tempelo, mpe tozali na esengo ya kozala na batempelo 139 na mosala na mokili mobimba, na mingi koleka 27 eyebisami to ezali kotongama. Tozali na botondi mpo na bitonga oyo ya bule mpe mapamboli ememi na kati ya bomoi na biso.

Ntongo oyo nazali na esengo mpo na koyebisa bino batempelo mibale ya kobakisa, oyo na basanza mpe mibu mikoya ekotongama na bisika oyo: Tucson, Arizona, mpe Arequipa, Peru. Makambo mikemike etali batempelo oyo ekopesama na nsima ntango bandingisa mpe babondimami ezwami.

Bandeko mibali mpe basi, nabaluki sikawa na likambo mosusu—elingi koloba, mosala ya misio.

Mpo na mwa ntango Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale bapesi ndingisa na bilenge mibali uta na bikolo moko boye mpo na kosala na mibu 18 ntango balongobani, bakoki, mpe basilisi eteyelo ya bilenge, mpe balakisi mposa moko ya solo mpo na kosala. Oyo ezali meko ya ekolo songolo mpe epesi ndingisa na bankoto ya bilenge mibali mpo na kosala misio ya lokumu mpe lisusu kokokisa lotomo ya kozala soda mpe mabaku ya koyekola.

Mayele tozwi na bamisionele ya mibu 18 ezali ya malamu. Bakambi na bango ya misio bapesi nsango ete bazali na botosi, botongono, balakisi bokoli, mpe basali kaka na makoki ya mosala lokola bamisionele bakolo oyo bazali kosala na bamisio se moko wana. Botongono, botosi, mpe bokoli oyo balakisi esali ete toyoka mposa ya kopona se mosala moko wana ya bamisionele ya ebandeli mpo nabansobilenge mibali, ezala soki bawutaki ekolo nini.

Nazali na esengo ya koyebisa ete uta sikawa bilenge mibali nyonso ya kolongobana mpe kokoka oyo basilisi eteyelo ya bilenge to oyo ekokani na yango, ezala wapi bavandi, bakokoka kopona kopesama ndingisa ya kosala misio kobanda na mibu 18, esika ya mibu 19. Nazali kopesa likanisi te ete bilenge mibali nyonso bakosala—to basengeli kosala—misio na mibu ya moke. Kasi, engebene na bizalela ya moko na moko mpe na mokano ya bayangeli ya bonganganzambe ya alona, boponi oyo ekoki sikawa kosalema.

Ntango tomanioli na losambo mibu oyo bilenge mibali bakoki kobanda mosala ya misio, totali lisusu mibu oyo elenge mwasi akoki kosala misio. Lelo nasepeli koyebisa ete elenge mwasi akoka, alongobani oyo azali na mposa ya kosala misio akoki kopesama ndingisa mpo na kosala misio kobanda na mibu 19, esika ya 21.

Tondimi ete mosala ya misio ezali lotomo ya bonganganzambe—mpe tolendisi bilenge banso oyo balongobani mpe bakoka na nzoto mpe na mayele mpo na koyanola na libiangi ya kosala misio. Bilenge basi mingi lisusu bazali kosala, kasi bazali na lotomo ekokani te mpo na kosala misio lokola bilenge mibali.Toyebisi na ntembe te bandeko basi ya Eklezia, nzokande, ete bazali kosala elongo mosala ya motuya lokola bamisionele, mpe tondimi lisalisi na bango.

Tozali ntango nyonso na mposa ya balongani bankulutu mingi. Ntango ezalela epesi nzela, ntango bokokisi ntango ya bopemi, mpe ntango kolongono ya nzoto endimi, nalendisi biso mpo na komipesa mpo mosala ya misio ya ntango mobimba. Mobali mpe mwasi bakozala na esengo moko monene ntango basalisi elongo bana ba Tata wa biso.

Sikawa, bandeko mibali mpe basi, tika toyoka na bokebi bansango oyo ekopesama na mikolo mibale oyo, ete tokoka koyoka Molimo ya Nkolo mpe kozwa boyebi Ye alingi mpo na biso. Ete yango ekoka kozala mayele na biso nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.