Nini Moto Akoki Kopesa mpo na Bomoi na Ye?

Na Elder Robert C. Gay

Ya Bantuku Sambo


Robert C. Gay
Tosengeli kotika masumu na biso, minene to mike, mpo na mbano ya Bomoi ya seko uta na Tata.

Mobikisi mbala moko atunaki bayekoli na Ye motuna elandi:” Nini moto akopesa mpo na bomoi na ye?”1

Oyo ezali motuna oyo tata na ngai ateyaki ngai mpo na komaniola malamu mibu mileki. Ntango nazalaki kokola, baboti na ngai bapesaki ngai misala nzinganzinga ya ndako mpe bafutaki ngai mbongo mpo na mosala wana. Mbala mingi nasalelaki mbongo wana, mwa moke koleka mpata 50 na mposo moko, mpo na kokende na sinema. Na ntango wana tike ya sinema ezalaki mpata 25 mpo na mwana ya mibu 11. Natikalaki ngai na mpata 25 mpo na kosomba babombon, oyo ezalaki mpata 5 na moko. Sinema na babombon mitano! Ekokaki kozala malamu mingi te koleka yango.

Nyonso ezalaki malamu kino nakomaki na mibu 12. Natelemaki na molongo nsima ya nzanga moko, nasosolaki ete ntalo ya tike mpo na mwana ya mibu 12 ezalaki mpata 35, mpe ete elingaki koloba babombon moke. Namilengelaki te mpo na libonza wana, nakanisaki na ngai moko, “Ozali ndenge moko lokola ozalaki mposo moko eleki.” Kondimaka likambo wana, namataki mpe nasengaki tike ya mpata 25. Moteki amonaki te mpe nasombaki babombon mitano esika ya misato.

Kosepelaka na likambo nasalaki, nsima nakimaki na ndako mpo na koyebisa tata wa ngai libaku na ngai ya monene. Ntango nasopelaki ye yango na mikemike, alobaki eloko te. Ntango nasilisaki, atalaki ngai kaka mpe alobaki, “Mwana, olingi koteka molimo na yo mpo na cent mitano?” Maloba ma ye ekotaki motema na ngai ya mibu 12. Ezali liteya nabosani ata moke te.

Mibu ya nsima natunaki motuna wana kaka na mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeki moko ya bolembu. Azalaki moto moko ya malamu oyo alingaki libota na ye. Ye, nzokande, akendaka te na eklezia mpo na mibu mingi. Azalaki na mwana mobali moko na likabo ya kobeta na lingomba ya makasi na mibembo mingi oyo azalaki kosala mpe kobeta masano mokolo ya Eyenga. Lingomba wana elongaki masano minene mbala mingi. Ntango tokutanaki, nakundolisaki ye ete lokola momemi bonganganzambe, balakelaki ye ete soki akumisi ndai mpe boyokani na ye, akozwa “nionso oyo Tata [na biso] azali na yango.”2 Nsima natunaki ya, “Lisano ya mboka ezali na motuya mingi koleka nyonso Tata na biso azali na yango?” Alobaki na boboto, “Namoni likambo na yo” mpe asalaki elako mpo na kokutana na episikopo na ye.

Lelo ezali pete kozwama na makelele ya mokili yango—atako na makanisi na biso ya malamu. Mokili ezali kofina biso mpo na “[kotala] koleka elembo.”3 Moto moko kala te atunaki ngai, “komela mbala moko ezali mpenza likambo?” Okoki komona ete ezali motuna ya monguna? Kaina atunaki, “Nzambe azali nani ete na nasengeli koyeba ye?”4 mpe nsima abungisaki molimo na ye. Na komindimisaka na masumu ya kitoko, Satana alongi. Mpo na molangi ya miliki,5 nkombo ekomamaki mabe,6 mpo mwa bilei,7 likoki ya bonkulutu mpe libula ya kosangola etekami.

Ntango tokanisi kobongola mpata mitano to masano ya mboka na bomoi na biso, tokoki kolonga na misala na biso, lokola Kaina, to komitika na bolingi ya Nzambe. Motuna liboso na biso ezali te soki tozali kosala makambo oyo esengeli kosembola, mpamba te tozali ntango nyonso kosala yango. Esika na yango, motuna ezali, “kozonga nsima” to “kosilisa” libiangi likolo ya molimo na biso mpo na kosala bolingi ya Tata?8

Nkolo alingi bosembo na biso kasi atuni biso tokoba na boyamboli mpe botosi. Na Biblia totangi ete ezalaki na elenge mobali mobateli mobeko, ya bomengo oyo afukamaki liboso ya Mobikisi mpe atunaki nini asengelaki kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Ye abalukaki mosika na mawa ntango Mobikisi alobaki, “Eloko moko ozangi: … teka nionso ozali na yango.”9

Kasi, ezalaki na moto mosusu ya bomengo, mokonzi monene ya Balamani, tata wa Lamoni, oyo atunaki motuna wana kaka na ntina ya bomoi ya seko, kolobaka: “Nini nasala mpo ete nakoka kobotama na Nzambe, kobakolaka molimo moye mwa nkuna libanda lya motema mwa ngai, mpe kozwa Molimo mwa Ye? … nakotika manso nazwi, iyo, nakosundola bokonzi bwa ngai, ete nakoka kozwa bosepeli boye bonene.”10

Bomikundola eyano ya Nkolo apesaki na mokonzi na nzela ya mosala wa Ye Aloni? “ Soko ozali na mposa ya likambo liye, soko okobombama liboso lya Nzambe, iyo, soko okoyambola masumu ma yo manso, mp okogumbama liboso ya Nzambe, mpe okobianga likolo lya nkombo ya ye na bondimi, kondimaka ete okozwa, nde okozwa elikya eye ozali na mposa.”11

Ntango mokonzi asosolaki libonza esengelami, amikitisaki mpe amigumbaki mpe nsima asambelaki, “O Nzambe, … nakotika masumu ma ngai manso mpo na koyeba yo.”12

Eye ezali mbongwana Mobikisi azali kosenga biso: tosengeli kotika masumu ma biso, minene to mike, mpo na mbano ya bomoi ya seko uta na Tata. Tosengeli kobosana masolo ya komindimisa, bolimbisi ya lokuta, mayele mabe, ezaleli ya komibomba, kozelisa, komilakisa, lolengo ya bomoto, makanisi ya kosambisa, mpe kosalaka makambo na lolenge na biso. Tosengeli komikabola na kimokili mpe kokamata likolo na biso elilingi ya Nzamba na elongi ya biso.13

Bandeko babali mpe basi, mikundola ete mokumba eye ezali mingi koleka bobele kozala te makambo ya mabe. Na ntina ya monguna ya loma, tosengeli kosala mpe kovanda te kidiba na mayele te.”14 Kokamata elongi ya Nkolo elingi koloba kosalisana. Ezali masumu ya kosala mpe masumu ya kozanga kosala, mpe tosengeli komatela yango mibale.

Na kosalaka lokola mokambi ya misio na Afrika, nateyamaki libela bosolo bonene . Nazalaki na nzela na ngai ya liyangani ntango namonaki elenge mobali oyo azalaki se ye moko, kolelaka makasi na mpembeni ya nzela. Mongongo moko elobaki na kati na ngai, “Telema mpe salisa mwana mobali wana.” Ntango nayokaki mongongo oyo, na ntaka ya secondi, nakanisaki: “Okoki kotelema te. Ngonga eleki. Ozali na mosala ya bokambi mpe okoki kotambola te na butu.”

Ntango nakomaki na ndako ya mayangeni, nayokaki mongongo wana kaka kolobaka lisusu: “Kende salisa mwana bobali wana.” Napesaki nsima fungola ya motuka na ngai na mondimi moko ya Eklezia na nkombo Afasi mpe nasengeki ye amema mwana mobali wana epai na ngai. Penepene na minuti 20 nsima, nayokaki kobete moko na lipeka na ngai. Elenge mobali azalaki libanda.

Azalaki penepene na mibu10. Toyebaki nsima nde tata wa ye akufaki mpe mama wa ye azalaki na boloko. Ye avandaki na bisika ya babola ya mboka Accra elongo na mobokoli, oyo apesaki ye bilei mpe esika ya kolala. Mpo na kozwa lisalisi oyo, azalaki koteka makayabu ya kokauka na babalabala. Kasi na mokolo oyo ya koteka, ntango akotisaki loboko na libenga na ye amonaki ete ezalaki na lidusu. Abungisaki bozwi na ye nyonso. Afasi mpe ngai toyebaki mbala moko ete soki azongi na mbongo te, alingaki kobiangama mokosi, mingimingi kobetama, mpe kobwakama libanda na balabala. Ezalaki na ngonga wana ya mpasi nde namonaki ye mpo na mbala ya liboso. Tokitisaki babobangi na ye, tozongisaki oyo ye abungisaki, mpe tozongisaki ye epai ya mobokoli na ye.

Ntango nakendeki ndako mokolo wana, nasosolaki bosolo mibale ya minene. Yambo, nayebaki lokola mokolo moko te liboso ete Nzambe azali na likanisi ya moko na moko na biso mpe akosundola biso ata moko te, ya mibale, nayebaki ete tosengeli ntango nyonso koyokela mongongo ya molimo Mosantu kati na biso mpe kokende “kobila”15bisika nyonso ekomema biso, kozangaka kotala babobangi na biso to likama kani.

Mokolo moko bayekoli batunaki Mobikisi nani azalaki monene mingi koleka na bokonzi ya lola. Ye ayebisaki bango babongwana, bamikitisa, mpe batosa lokola bana bake. Ye nsima alobaki, “Mwana ya moto ayaki kobikisa oyo ebungaki.”16 Na liloba moko wana, Ye alimbolaki etinda ya biso. Tosengeli kokende kobikisa—bato babunga, bazali na nsuka, mpe bato ya moke. Koboya mabe ekoki te; tosengeli “koyoka mpasi ya ekulusu”17 mpe “komipesa na na motema nsai,”18 kosasalisaka basusu babongola mitema. Na mawa mpe bolingo toyambi mokilikili,19 toyanoli bilelo ya bana etike na esengo, bosengi ya baye bazali na molili mpe bazangi elikia,20 mpe bobeleli ya boluki libiki ya libota ekeleli. “Satana azali na ntina te ya kokomisa bato banso lokola Kaina mpe Yudasi … ,” elobaki Mpaka  Neal A. Maxwell. “Azali bobele na ntina ya kokomisa bato ba bokoki … bamimona lokola na mindondo ya katikati.”21

Nsima ya likita ya likonzi, elenge mobali moko ya mibu penepene 16 apusanaki mpembeni na ngai mpe atunaki ete, “Nzambe alingaka ngai? ” Tika babomoi ya lisalisi endimisa ntango nyonso ete nzambe abwakisaka moto moko te.

Namotuna, “Nini moto akozongisa mpo na molimo na ye?” Satana alingi biso totekisa bomoi na biso mpo na babombon mpe masano ya mokili oyo. Mobikisi, nzokande, abiangi biso, na kosomba te, tolongola masuma na biso, tokamata likolo na biso elongi na Ye, mpe tokamata yango kati ya mitema mya baye tokoki koyamba. Mpo yango tokoki kozwa nionso oyo Nzambe azali na yango, oyo balobeli biso ezali monene mingi koleka bomengo nyonso esangani ya mokili.22 Okoki kutu kososola?

Na mobembo ya kala te na Nicaragua, namonaki palaki moko na ndako ya bozwi mingi te ya libota moko tokendaki kotala. Elobi, “Litatoli ezali bozwi bwa ngai boleki na motuya.” Bongo ezali mpo na ngai. Litatoli na ngai ezali bomengo ya molimo na ngai, mpe na bosembo ya motema na ngai, natikeli bino litatoli na ngai ete eklezia oyo ezali Eklezia ya solo ya Nzambe, ete Mobikisi atelemi na moto na yango mpe azali kokamba yango na nzela ya profeta aponama na Ye. O nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Show References

  1.  

    1.  Matai 16:26.

  2.  

    2.  Doctrine et Alliancess 84:38.

  3.  

    3.  Yakobo 4:14.

  4.  

    4. Tala Moses 5:16.

  5.  

    5. Molangi ya miliki mpe fulufulu na yango ezalaki na katikati ya boswani katikati ya mwasi ya Thomas B. Marsh mpe Mama Harris, oyo bayokanaki kosangisa biloko mpe kosala fromage. Ntango Mama Harris amonaki ete Mama Marsh atiaki te fulufulu na miliki kasi abombaki yango mpo yemei, Mama Harris amilelaki mpe basi babale baswanaki. Thomas Marsh amemeki likambo na episikopo, oyo azalaki na ngambo ya Mama Harris. Ekendeki uta na episikopo, tii na lisanga ya banganganzambe banene, tii na Bokambi ya yambo, banso kati na bango bayokanaki ete Mama Marsh azalaki mabe. Yango etimolaki libulu katikati ya Thomas Marsh mpe Bandeko. Noki nsima, Thomas Marsh atatolaki liboso ya bazuzi ya Missouri ete Bamormon azalaki banguna ya ekolo Missouri. . (Tala George A. Smith, “Discourse” Deseret News, sanza ya minei  16, 1856, 44.)

  6.  

    6. Ntango Profeta Joseph Smith abimisaki libiangi ya Simonds Ryder mpo na kosala lokola misionele, Ryder amonaki ete nkombo na ye ekomamaki “Rider” na libimisi eniatamaki. Ayokaki mabe, mpe yango ememaki bopengwi na ye mpe na nsuka na kosala elongo ntango batiaki profeta potopoto ya mwindu mpe bansala. Ryder ayebaki te ete Joseph Smith amesanaki koloba mabimisi na mokomi mpe ye asalaki eloko moko te na bokomi. (Tala Milton  V. Backman Jr., The Heavens Resound: A History of the Latter-day Saints in Ohio, 1830–1838 [1983], 93–94; Donald Q. Cannon and Lyndon W. Cook, eds., Far West Record: Minutes of The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 1830–1844 [1983], 286.)

  7.  

    7. Na Genese 25 toyoki ete Esau atekaki kinkulutu na ye na Yakobo mpo na “lipa mpe supu ya ndunda ” ” (verse 34).

  8.  

    8. Tala Doctrine et Alliancess 19:18–19.

  9.  

    9. Tala Malako 10:21–22.

  10.  

    10.  Alma 22:15.

  11.  

    11.  Alma 22:16.

  12.  

    12.  Alma 22:18.

  13.  

    13. Tala Alma 5:14–19.

  14.  

    14.  Alma 60:7.

  15.  

    15.  Malako 1:18.

  16.  

    16.  Matai 18:11.

  17.  

    17.  Yakobo 1:8.

  18.  

    18.  Doctrine et Alliancess 58:27.

  19.  

    19. Tala Luka 15:11–32.

  20.  

    20. Tala Joseph Smith—History 1:15–16.

  21.  

    18. Neal A. Maxwell, Deposition of a Disciple (1976), 88.

  22.  

    22. Tala Doctrine et Alliancess 19:38.