Ema Ezali Wapi?

Na Mokambi- Henry B. Eyring

Mosungi wa Yambo na Bokambi bwa Yambo


Ema oyo emonani ekangi lisalisi ya Nzambe ezipi mpenza te Nzambe kasi ntango mosusu ekozipaka biso. Nzambe abombani mokolo moko te, nzokande ntango mosusu tobombamaka.

Na mozindo ya somo amonaki na boloko ya Liberty Jail, Profeta Joseph Smith agangaki “O Nzambe, ozali wapi, Mpe wapi ezali ema oyo ezipi esika na yo ya kobombana?”1Mingi kati na biso, na ngonga ya somo na ye, ayokaka ete Nzambe azali mosika na biso. Ema oyo emonani ekangi lisalisi ya Nzambe ezipi mpenza te Nzambe kasi ntango mosusu ekozipaka biso. Nzambe abombanaka ata mokolo moko te, nzokande ntango mosusu bison de tobombamaka, tozipami na ema ya mposa oyo ebendaka biso mosika na Nzambe mpe esalaka ete amonana mosika mpe amonana te. Mposa na bisomei, koleka liyoki ya “Bolingi na yo esalema,”2 ezali kosala liyoki ya ema oyo ekangi Nzambe. Nzambe akoki kozanga komona biso to kosolola na biso te kasi tokoki kozanga bolingi ya koyoka to kotosa bolingi na Ye mpe ntango na Ye.

Mayoki na biso ya bokabwani na Nzambe ekokita ntango tokomi mingi lokola Klisto liboso na Ye. Yango ezali pete te na mokili wapi makanisi ya bato mosusu ekoki kozala na mbano ya boye na makinisi na biso. Kasi ekosalisa biso koyeba bosolo oyo: Nzambe azali penepene na biso mpe azali na boyebi na biso mpe abombani ata moke te uta na bana na Ye ya botongono.

Nkoko na ngai ya mwasi ya mibu misato alakisaki nguya ya bozangi ekweyeli mpe bomikitisi mpo na kokanga biso na Nzambe. Akandeki elongo na libota na ye na mokolo bofungoli ya Tempelo ya Brigham City na Utah. Na kisuku moko ya ndako kitoko wana, atalaki nzinganzinga mpe atunaki, “Mama, Yesu azali wapi?” Mama na ye alimbolaki ete akomona Yesu te na tempelo, kasi akokoka koyoka nguya na Ye na motema na ye . Eliza amaniolaki mpenza eyano ya mama na ye mpe nsima asepelaki mpe alobaki, “O, Yesu akei kosalisa moto moko,” asukisaki.

Ema moko te etiaki molili na bososoli ya Eliza to ekangaki miso na ye na bosolo. Nzambe azali penepene na ye, mpe amiyoki penepene na Ye. Ayebaki ete tempelo ezali ndako ya Nkolo kasi lisusu asosolaki ete Ye mosekwi mpe ya kembo azali na nzoto mpe akoki bobele kozala na esika moko na ntango moko.3 Soki Ye azalaki na ndako na Ye te, andimaki ete Ye asengelaki kozala na esika mosusu. Mpe uta na oyo ayebi ya Mobikisi, ayebaki ete Ye asengelaki kozala esika moko kosalaka bolamu mpo bana ya Tata na Ye. Ezalaki polele ete atiaka elikya ya komona Yesu, mpo kondimisa bikamwa ya bomoi na Ye te kasi bobele mpo alingaki Ye.

Molimo ekokaki kolakisa na mayele mpe motema na ye ya bomwana libondisi biso banso tozala na yango mposa mpe tolingaka. Yesu Klisto azali na bomoi, ayebi biso, akengelaka biso, mpe abatelaka biso. Na ntango ya mpasi, bomoko, to mobulu, tosengeli te komona Yesu Klisto mpo na koyeba ete Ye azali na boyebi ya ezalela na biso mpe ete etinda na Ye ezali ya kopambola biso.

Nayebi uta na bomoi na ngai moko ete likambo ya Eliza ekoki kozala nsuka na biso mpenza nsima ya bomwana na biso. Na mibu ya ebandeli ya mosala na ngai, nasalaki makasi mpo na kozwa ebonga ya moteyi na Stanford University. Nakanisaki nasalaka bomoi malamu mpo na ngai moko mpe mpo na libota na ngai. Tovandaki penepene na baboti ba mwasi wa ngai na esika ya kitoko mingi. Na lolenge ya mokili, nalongaki. Kasi napesamaki na nzela ya Eklezia libaku ya kotika Californie mpe kokende na Ricks College na Rexburg, Idaho. Bantina ya bomoi na ngai lokola moteyi ekokaki kozala ema oyo ekabolaki ngai na Tata wa bolingo oyo ayebaki malamu mingi koleka ngai nini bomoi na ngai ya nsima ekokaki kozala. Kasi napambolamaki mpo na koyeba ete elonga nazwaki na bomoi na ngai ya mosala mpe libota na esika wana ezalaki likabo uta na Nzambe. Yango wana lokola mwana, nafukamaki na losambo mpo na kotuna nini nasengelaki kosala. Nakokaki koyoka mongongo moko ya kimia na mayele na ngai oyo elobaki, “Ezali eteyelo na ngai.” Ezalaki na ema te mpo na kokabola ngai na Nzambe. Na bondimi mpe bosawa, natikaki bolingi na ngai na Ye mpe nayokaki bobateli na Ye mpe azalaki penepene na ngai.

Mibu na ngai na Ricks College, na ntango namekaki koluka bolingi ya Nzambe mpe kosala yango, epekisaki ema kokanga ngai to kotia mobulu na mosala mpenza ya Nzambe na bomoi na ngai. Ntango nalukaki kosala Mosala na Ye, namiyokaki penepene na Ye mpe nayokaki bolikii ete Ye ayebaki misala na ngai mpe abatelaki na mozindo esengo na ngai. Kasi lokola ezalaki na Stanford, bamposa ya mokili ebandaki komilakisa na ngai. Moko ezalaki liyebisi ya mosala moko ya kitoko, epesamaki kaka ntango nazalaki kosilisa mobu na ngai ya mitano lokola mokambi na Ricks College. Nayekolaki liyebisi mpe nasambelaki mpo na yango kutu nasololaki mpo na yango na Bokambi ya Yambo. Bayanolaki na mwa molunge mpe mwa koseka kasi mpenza te na bokambi moko songolo. Mokambi Spencer W. Kimball ayokaki ngai kolimola liyebisi ya mosala nazwaka uta na lingomba moko monene mpe alobaki: “Malamu, Hal, yango ezali lokola libaku ya kitoko! Mpe soki tozali na mposa na yo, toyebi wapi kokuta yo.” Balingaki koyeba wapi kokuta ngai, kasi bamposa na ngai mpo na elonga na mosala ekokaki kosala ema oyo elingaki kokomisa yango mpasi mpo na ngai kokuta Nzambe mpe mpasi mingi mpo na ngai koyoka mpe kolanda mbela na Ye.

Mwasi na ngai, koyebaka yango, azwaki liyoki makasi ete tosengelaki te kotika Ricks College. Nalobaki ete, “Wana ekoki mpo na ngai.” Kasi alendisaki, na bwania, ete nasengelaki kozwa libimisi ya ngaimei. Mpe boye nasambelaki lisusu. Mbala oyo nazwaki bokambi, na lolenge ya mongongo na mayele na ngai oyo elobaki, “Nakotika yo na Ricks College mwa ntango molai.” Bamposa na ngai ekokaki kozipa bomoni na ngai ya bosolo mpe kokomisa yango mpasi mpo na ngai kozwa limoni.

Mikolo ntuku misato napambolamaki na mokano ya molimo mpo na koboya mosala epesamaki mpe kotikala na Ricks College, Barrage ya Teton epanzanaki penepene. Nzambe ayebaki ete barrage elingaki kopasuka mpe ete mikama ya bato balingaki kozala na mposa ya lisalisi. Atikaki ngai koluka toli mpe kozwa ndingisa na ye mpo na kotikala na Ricks College. Ayebaki bantina nyonso ete mosala na ngai ekokaki kozala naino ya ntina na college mpe na Rexburg. Yango wana nazalaki wana mpo na kotuna Tata ya Lola mbala na mbala na losambo ete Ye akolinga ngai nasala makambo oyo ekosalisa bato oyo ya bango bozwi mpe babomoi ebebisamki. Nalikisaki baangonga mingi kosalaka elongo na bato mosusu mpo na kolonola potopoto mpe mai uta na bandako. Mposa na ngai mpo na koyeba mpe kosala bolingi na Ye epesaki ngai libaku moko ya koluka molimo.

Likama wana elakisi lolenge mosusu tokoki kolela bokabwani mpo nakoyeba bolingi ya Nzambe to koyoka bolingo na Ye mpo na biso: tokoki kokangama te na manaka na biso ntango Nkolo azali na oyo ya Ye. Nakanisaki nalekisaki ntango ekokaki na mosala na ngai na Rexburg mpe nazalaki na lombangu mpo na kolongwa. Ntango mosusu bokangami na biso na kosala engebene na manaka na biso ekoki kotia molili na bolingi na Ye mpo na biso.

Na boloko ya Liberty, Profeta Joseph atunaki na Nkolo mpo na kopesa etumbu na baye baniokolaki bandimi ya Eklezia na Missouri. Losambo na ye ezalaki ezalaki mpo na etumbu ya solo mpe ya noki. Kasi Nkolo ayanolaki ete na “mpo na mibu mingi te uta wana,”4 Ye alingaki kolandela banguna ya Eklezia. Na milongo ya mbala 24 mpe 25 ya eteni 121 na Doctrine et Alliances, Ye alobi:

“Tala, miso na ngai emoni mpe eyebi misala na bango nyonso, mpe nabombi bosambisi ya noki na ntango na yango, mpo na bango banso;

“Mpo ezali na ntango eponami mpo na moto, engebene lokola misala na ye ekozala.”5

Tolongoli ema ntango toyoki mpe tosambeli, “Bolingi na Yo esalema” mpe “na ntango na Yomei.” Ntango na Ye ekozala noki ya kokoka mpo na biso, zambi toyebi ete Ye alingi bobele oyo ezali malamu mingi.

Moko ya bokoli na ngai ya mwasi alekisaki mibu mingi koyokaka ete Nzambe atiaki ema moko likolo na ye. Azalaki elenge mama ya bana misato oyo azalaki na mposa ya bana mingi koleka. Nsima ya kokufela bana mibale na kobota, nsambo na ye ya kobondela ekomaki na kobanga. Lokola mibu mingi ya kozanga bana elekaki, ayokaki lisenginia ya nkanda. Ntango mwana na ye ya leki koleka banso azalaki kokende na eteyelo, polele ya ndako na ye ekomaki lokola koseka ye mpo na kotala na ntina ya bomama—bazemi ya kobongisa te mpe kutu ya kolinga te ya bato oyo ayebaki ezalaki kosala ye bongo. Ayokaki lokola amipesaki mpe amikabaki lokola Malia, oyo alobaki, “Ngai nazali mosali ya Nkolo.”6 Kasi atako alobaki maloba oyo na motema na ye, akokaki koyoka eyano moko te.

Lokola ataiaki elikya ya kotombola molimo na ye, mobali na ye abengisaki ye na kosangana na ye na mobembo ya nkita na Californie. Ntango mobali azalaki na mayangani, ye atambolaki o ntaka ya libongo ya kitoko ezanga moto. Motema na ye penepene na kopasuka, asambelaki na mongongo makasi. Mpo na mbala ya yambo, asengaki te mwana mosusu kasi etinda moko ya Nzambe. “Tana na Lola,” egangaki ye, “Nakopesa yo ntango na ngai nyonso; nabondeli yo lakisa ngai lolenge ya kokokisa yango.” Alakisaki bolingi na ye mpo na kokamata libota na ye wapi nyonso balingaki kosenga ye akende. Losambo wana epesaki liyoki moko ya kimia oyo azelaki te. Esepelisaki te mayele na ye na koluka bosolo, kasi mpo na mbala ya yambo, elembisaki motema na ye.

Losambo elongolaki ema mpe efungolaki maninisa ya lola. Na mposo mibale, ayokaki ete azalaki kozela mwana. Bebe ya sika azalaki na mobu moko kaka ntango libiangi ya misio eyaki na mwana na ngai ya mobali mpe bokilo na ngai ya mwasi. Lokola alakaki kokende mpe kosala nyonso, bisika nyonso, atiaki bobangi mpembeni mpe akamataki mwana na ye na mikili misusu. Na misio azwaki mwana mosusu—na mokolo moko ya kobongola bamisionele.

Komitika mobimba na bolingi ya lola, lokola elenge mwasi oyo asalaki, ezali na motuya mpo na kolongola ema totiaka ntango mosusu likolo na moto na biso. Kasi ekokisi te mbala moko biyano na nsambo na biso.

Motema ya Abalayama emonani lokola ezalaki alima mosika yambo Sala azwa zemi ya Yisaka mpe yambo azwa mabele ya elaka. Lola ezalaki na ntina misusu mpo na kokokisa yambo. Bantina wana ezalaki kaka te mpo na kotonga bondimi ya Abalayama mpe Sala kasi lisusu mpo na koteya bango bosolo ya seko oyo bakabolaki na basusu na nzela na bango ya zunguluke mpo mabele elengelamaki mpo na bango. Kozela ya Nkolo mbala mingi emonanaka molai; boko ewumelaki bomoi mobimba. Kasi ntango inso ebongisami mpo na kopambola. Ntango ya komiyoka yo moko kakato na mawa to na bozangi bompikiliki ezali ata moke te.

Atako ntango na ye ezali ntango nyonso te ntango na biso, tokoki koyeba na ntembe te ete Nkolo abatelaki bilaka. Mpo oyo ya biso oyo ayebi sikawa ete Ye azali mpasi na kozwa, natatoli ete mokolo ekokoma oyo tokomona Ye miso na miso. Kaka lokola ezali na eloko moko te sikawa mpo na kotia molili mpo na biso komona Ye. Tokotelama banso liboso na Ye, Yemei. Lokola nkoko na ngai ya mwasi, tolingi komona Yesu Klisto sikawa, kasi bosangani na biso ya solo na Ye na esika ya bosambisi ekozala ya esengo mingi koleka soki yambo tosali makambo oyo ekomisaka Ye penepene na biso lokola tozali penepene na Ye. Ntango tosaleli Ye, tokomi lkola Ye, mpe tomiyoki penepene mingi na Ye ntango topusani na mokolo oyo eloko te ekobomba bomoni na biso.

Kokende epai ya Nzambe ekoki kokoba se kokoba. “Boya bino bapambolami ya Tata, kozwa bokonzi elengelamaki mpo na biso uta ebandeli ya mokili,”7Mobikisi ateyi. Nsima ayebisi biso boniboni:

“Mpo nazalaki na nzala, mpe bopesaki ngai bilei; nazalaki na mposa ya mai mpe bopesaki ngai mai ya komela: nazalaki mopaya, mpe boyambaki ngai:

“Bolumbu, mpe bolatisaki ngai: nazalaki na bokono, mpe botalaki ngai: nazalaki na boloko, mpe boyaki epai na ngai.

“Nde basembo bakoyanola ye, kolobaki, Nkolo, ntango kani tomonaki yo na nzala, mpe toleisaki yo? To na mposa ya mai, mpe topesaki yo mai?

“Ntano kani tomonaki yo mompaya, mpe toyamboki yo? To bolumbu mpe tolatisaki yo?

“To ntango kani tomonaki yo na bokono, to na boloko, mpo toyaki epai na yo?

“Mpe Mokonzi akoyanola mpe akoloba na bango, Ya solo nalobi na bino, mbala nyonso bosali yango na moko ya moke mingi na bandeko na bino, bosali yango na ngai.”8

Ntango tosali maye alingi biso kosala mpo na bana ya Tata na Ye, Nkolo amoni yango bosembo epai na Ye, mpe tokomiyoka mingi penepene na Ye lokola toyoki bolingo na Ye mpe bondimami na Ye. Ntango ekokoka oyo tokokoma lokola Ye mpe tokozela Mokolo ya Bosambisi na esengo.

Ema oyo emonanaki kobombaka yo mosika na Nzambe ekoki kozala bobangi ya moto na esika ya mposa oyo ya kosalisa basusu. Mposa ya Mobikisi ezalaki kaka kosalisa bato. Mingi ya bino, lokola ngai, bayokaki bobangi na kopusana penepene ya moto oyo otukaki to oyo asalaki yo mabe. Mpe kasi namoni Nkolo alembisaki mitema ntango na ntango, lokola oyo ya ngai moko. Mpe yango wana nabeti mondenge na yo mpo okende mpo na Nkolo epai ya moto moko, ata bobangi nini okoki koyoka, opesa bolingo mpe bolimbisi. Nalaki yo ete ntango osali bongo, okoyoka bolingo ya Mobikisi mpo na moto wana mpe bolingo na Ye mpo na yo, mpe ekomonana lokola ewuti mosika mpenza. Mpo na yo, mokakatano wana ekoki kozala na libota moko, ekoki kozala na lingomba moko, to ekoki kozala na kati ya ekolo moko.

Kasi soki okei mpo ete Nkolo apambola basusu, Ye akomona yango mpe akopesa yo mbano mpo na yango. Soki osali yango mbala mingi ekoki mpe ntango mingi ekoki, okoyoka mbongwana na bomoto na yo mpenza na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Kaka te okomiyoka penepene na Ye, kasi okomimona lisusu mingi mingi ete ozali kokoma lokola Ye. Nde, ntango omoni Ye mpenza, lokola banso tokomona Ye, ekozala mpo na yo lokola ezalaki mpo na Moloni ntango alobaki: “Mpe sikawa natombeli bino banso, sese. Nakei mosika te kopema o paradizu ya Nzambe, kina molimo mpe nzoto ya ngai ikosala lisusu bomoko, mpe namemami na nzela ya mopepe, mpo ya kokutana na bino liboso lya esika ya elengi ya Yova monene, Mosambisi wa Seko wa bato ba bomoi mpe bakufa elongo. Amene.”9

Soki tosalisi na bondimi, bosawa, mpe mposa ya kosala bolingi ya Nzambe, natatoli ete esika ya bosambisi ya Yova ekozala ya elengi. Tokomona Tata wa biso mpe Mwana wa Ye lokola bazali komona biso sikawa—na polele ebonga nie mpe na bolingo ebonga nie. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.