2010–2019
Ntongo ya Kitoko
Sánzá ya mínei 2013


Ntongo ya Kitoko

Tosengeli kobanga mikolo ekoya te, to kobebisa elikia mpe boyiki mpiko, mpo Nzambe azali elongo na biso

Mokolo ya minei na Yelusaleme, Yesu asanganaki elongo na bayekoli na ye na lisuku ya likolo mpo na kotosa Pasika. Bato oyo basanganaki na Ye bayebaki te ete elambo oyo ekobiangama mokolo mosusu Elambo ya Nsuka. Soki bayebaka yango mpe nini elingaki koloba, balingaki kolela.

Nzokande, Moteyi na bango asosolaki malamu ete momekano ya Getesemane mpe ya Gologota elingaki kala te kobanda. Bangonga ya mpasi koleka nyonso na mambi ma kala ya mokili ezaliki mpembeni; atako bongo, Yesu alobaki na bango, “Kasi na mokili bojali na boloji; nde boyika mpiko; ngai nasili koleka mokili” (Yoane 16:33).

Tozali lele na eleko moko ya mobulu mpe ya polele te, ntango moko oyo Nkolo asakolaki na Enok ekoyebana na mikolo ya mabe mpe bozongisi mabe(Moses 7:60 ). Motungisi mpe kpokoso ekoki kozela biso, kasi biso mpe tozali na ntina ya koyika mpiko mpe kosepelaka. Nazali na bomoi na eloko ya nsuka, ntango Nzambe azongisi Eklezia mpe bokonzi na Ye na mabele na bolengeli ya bozongi ya Mwana na Ye.

Mokambi Boyd K. Packer mbala moko alobelaki bankoko na ye mpe na ntina ya bobuti ya mobulu ya mokili na yango tofandi. Alobaki: “Bakomona makambo mingi kotondaka na kati ya ntango ya bomoi na bango. Boko na yango ekotelemela mpiko na bango mpe ekokolisa bondimi na bango. Kasi soki baluki na losambo lisalisi mpe toli, bakopesama nguya likolo ya makambo ya mabe.”

Mpe nsima abakisaki: “Mituya ya bomoto na yango bompenza yangomei esengeli eyekemela ezali kokita na mbangu moko ya kobuta makasi. Atako bongo, nazali kobangela mikolo ekoya te” (“Do Not Fear,” Ensign toLiahona, May 2004, 77, 78).

Bandeko mibali mpe basi, tosengeli kobanga mikolo ekoya te, to kobebisa elikia mpe boyiki mpiko, mpo Nzambe azali elongo na biso. Na katikati ya maloba makomama ya yambo ya toli oyo Yesu apesaki na bayekoli na Ye babiangemi sika na Galilai ezalaki etinda ya maloba mibale, “Banga te” (Luke 5:10).). Ye azongelaki toli wana mbala mingi na mosala na Ye. Na Basantu na Ye na mokolo na biso, Mobikisi alobi na biso ete tosengeli kobanga te mpo ete Nkolo azali na biso, mpe akotelema mpembeni na biso (D&C 68:6).).

Nkolo akotelema mpembeni ya Eklezia mpe bato na Ye mpe akobatela bango malamu kino boyei na Ye. Ekozala na kimia na Siona mpe na makonzi na Ye, mpo Ye asakoli, “Mpe mpo ete bosangani elongo na mabele ya Siona, mpe na makonzi na ye ekoka kozala mpo na bobateli, mpe mpo na ekimelo uta na mvula makasi, mpe uta na nkanda ntango ekosopana na kosangana te na mabele mobimba (D&C 115: 6).

Eklezia etelemi lokola lisungi ya kimia mpo na bandimi na ye. Atako bizaleli na mokili ekoki kokoma ya kopesa nkanda ntango mosusu, Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya botongono bakozwa ndakonzambe na makonzi ya Siona. Nkolo asakoli ete libanga litimolami na maboko te etiki ngomba ekobaluka kino etondisi mokili mobimba(tala Danyele 2:31–45; D&C 65:2). Mpe nguya ya moto moko te ekoki kokanga yango mpo Nzambe azali Nkolo ya mosala, mpe Yesu azali libanga likonzi.

Profeta Nefi azwaki limoni ete na mikolo ya nsuka nguya ya Mwana na Mpate wa Nzambe ekokita likolo lya bato ba boyokani ba Nkolo, mpe bakozala kolatisama “na bibundeli bya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo enene.” (1 Nefi 14:14).

Moto nyonso kati na biso, mpe mabota na biso, tokoki kolatisama na nguya ya Nzambe lokola bobateli soki kaka tokotika na bosolo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe kotika Molimo azala mokambi na biso. Mimekano ekoki koya, mpe tokoki te kososola makambo nyonso oyo ezali kosalama na biso to nzinganzinga na biso. Kasi soki biso na bosawa, na kimia totie elikia na Nkolo akopesa biso toli na mikakatano tokokutana na yango. Ntango mposa na biso ezali bobele kosepelisa Ye, tokopambolama na kimia moko ya mozindo ya kati.

Na mikolo ya ebandeli ya Bozongisi, Bandimi ya Eklezia bakutanaki mimekano makasi. Mokambi Brigham Young alobaki etali ntango wana: “Ntango tozingamaki na maboke ya bato, na liwa mpe bobebisi kobangisaka na ngambo nyonso, namikundoli ete namiyokaki kaka lokola ya kosepela [mpe] malamu na milimo na ngai, lokola nazali komiyoka sikawa. Makambo makoki komonana mpasi mpe nsomo, kasi naino namona te ntango na nsango malamu oyo na yango nayebaki te ete nsuka ekozala ya litomba na ntina ya bosolo (Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young [1997], 357).

Moninga wa ngai ya misio, Paul, azalaki moko moko oyo ntango nyonso azalaki kongenga na esengo. Lokola tata ya elenge, abetamaki na bokono ya bongo. Kasi atako mokakatano oyo elandaki, akobaki kosalisa basusu na esengo mpe kosekisa. Mbala moko akotaki na bilo afandaki na kiti ya kotambolela mpe asakolaki, “Bomoi ebandi na kiti ya kofandala ya tukutuku!” Nakomikundola ntango nyonso ye, mwa mibu yambo akufa, kosimbaki likolo mwinda ya Jeu olympique ntango azalaki kotambolisa kiti na ye ya kotambolela lokola bankama bazalaki kokumisa. Lokola mololi ya moto oyo ekokufaka te, bondimi ya Paul ekosila mokolo moko ten a ekumbaki ya bomoi.

Ntango nazalaki moyekoli na Université ya Brigham Young, nafandaki na ndako na bilenge mibali mingi. Moninga na ngai ya kisuku, Bruce, azalaki moto wa bosepeli mingi koleka banso namona. Totikala koyoka ye mokolo moko te koloba likambo songolo ya mabe etali moto kani to ezalela kani, mpe ekokaki kosalema te omiyoka ya kolendisama te na miso na ye. Koyika mpiko na ye esopanaki uta na elikia ya kowumela na Mobikisi mpe na nsango malamu.

Na mokolo moko ya malili mpe mopepe, moninga na ngai moko mosusu, Tom, azalaki kotambola kokatisa kaa ya université. Ezalaki kaka 7:00, mpe kaa ezalaki na bato te mpe na molili. Mvula ya mpembe makasi ezalaki kokweya, esangana elongo na mopepe ya mbalakaka “ntango kani ya mawa,” Tom akanisaki. Wana ezalaki ye kotambola liboso, na libanda kati na molili mpe mvula ya mpembe, ayokaki moto moko koyembaka.

Ya solo, na mvula ya mpembe makasi eyaki moninga wa biso ya bosepeli ya ntango nyonso, Bruce. Na maboko na ye ya kotombwama na likolo, azalaki koyemba loyembo moko ya Broadway musical Oklahoma:: “O, ntongo nini kitoko boye! O, mokolo nini kitoko boye! Nayoki liyoki kitoko, makambo nyonso ekozala kitoko lelo.” (Richard Rodgers and Oscar Hammerstein II, “Oh, What a Beautiful Morning” [1943]).

Na mibu milekaki, mongongo wana ya esengo na ekumbaki ya makasi ekomi mpo na ngai elembo ya maye bondimi mpe elikia elingi koloba. Ata na mokili moko oyo etondi mabe, biso lokola Basantu ba Mikolo mya Nsuka tokoki koyemba na bosepeli, koyebaka ete banguya ya lola ezali elongo na Eklezia mpe bato ya Nzambe. Tokoki kosepela na boyebi ete ntongo moko kitoko elali liboso—ebandeli ya mokolo ya mibu nkoto, ntango Mwana na Nzambe akongenge epai na ngele mpe akokonza lisusu na mabele.

Nakanisi lisusu kolobela bantongo kitoko mosusu mibale na mambi ma kala ya mokili. Na eleko ya moi moke ya 1820, na ntongo ya mokolo kitoko, ya moi na Palmyra, New York, elenge mobali moko abengami Joseph Smith akotaki na zamba ya banzete mpe afukamaki na losambo. Eyano na losambo wana, bobimeli ya Tata mpe Mwana, ebandaki eleko ya litondi ya ntango mpe Bozongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto na mabele.

Mpe kasi na ntongo moko mosusu ya kitoko etanaki penepene ya mibu 2.000 eleki kaka libanda ya efelo ya engumba yaYelusaleme. Moi na ntembe te engengaki na bongengi ekeseni na ntongo ya Pasika wana. Liboke moke ya basi bayaka kotala lilita ya elanga, kolikiaka kopakola mafuta nzoto ya Nkolo na bango mosekwi. Banzelu mibale bakutaki bango mpe basakolaki: “Bojali koluka moto na bomoi kati na bakufi mpo na nini? Ajali awa te, kasi asekwi” (Luka 24:5–6).

Na ntina ya elonga ya Yesu Klistu likolo ya lisumu mpe liwa, napesi litatoli. Na ntina ya mwango ya mawa ya Tata wa biso ya Seko mpe bolingo na Ye ya seko seko, natatoli. Lokola tolamukaka ntongo moko na moko, ekoka biso likolo na lola na bondimi mpe koloba, “O, ntongo nini kitoko boye,” Nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.