2010–2019
Kondimama na Nkolo
Sánzá ya mínei 2013


Kondimama na Nkolo

Kolukaka mpe kozwaka bondimami na Nkolo ekokamba na boyebi ete toponami mpe topambolami na Ye.

Ntango nazalaki mwana mobali, namikundoli tata wa ngai ntango mosusu kokamataka ngai elongo na ye mpo na kosala misala abongisaki. Tozalaka na mwa bilenga bakilometele mingi te na esika tovandaki, mpe ezalaki ntango inso na mingi ya kosala mpo na kolengela bilanga eleko nyonso. Tozalaki kosala na mwa ndako to kotonga to kobongisa lopango. Namikundoli, mosala oyo ntango inso ezalaki kokoma na ntango ya mpio ya makasi, mvula ya mpembe, mvula konokaka. Kasi nalingaki yango. Tata wa ngai alingaki koteya ngai boniboni kosala makambo na bompikiliki mpe bondimami.

Mokolo moko tozalaki kotonga lopango. Abengisaki ngai kokanga visi mpe akebisaki ngai,“Mikundola, soki okangi visi na makasi mingi, ekobukana.” Na lolendo, nalingaki kolakisa ye nini nawutaki koyekola. Nakangaki visi na bokasi bwa ngai nyonso, mpe, na ntembe te, nabukaki nsete. Asalaki ndimbola na koseka, mpe tobandelaki lisusu. Atako “nabebisaki”, ntango inso nayokaki bolingo mpe bondimi bwa ye na ngai. Akufaki mibu zomi mileki, kasi nakoki lisusu koyoka mongongo mwa ye, koyoka bolingo bwa ye, kosepela bolendisi bwa ye, mpe koyoka bondimami na ye.

Koyoka kondimama na bato moko ezali mposa ya ntina ya bomoto. Kondimama na bato ya malamu ekotinda biso liboso. Ekobakisa boyoki ya bisomei ete tolongobani mpe tondimami. Baye bayoki te bondimami na bato basengeli mbala mingi bakoluka yango esika mosusu. Bakoki kobaluka na bato balingi te bolamu bwa bango. Bakoki kokangama na baninga ya lokuta mpe kosala makambo masengeli te mpo na komeka kozwa bondimami bazali koluka. Bakoki koluka bondimami na kolataka nkombo songolo ya elamba mpo na koyoka bazali na lingomba. Mpo na bosusu, kobunda mpo na mosala moko ya komonana ekoki lisusu kozala ndenge ya koluka kondimama. Bakoki kolakisa bolongobani bwa bango na mosala bazwi to esika bazali.

Ata na Eklezia tozali ntango inso te mosika ya lolenge oyo ya kokanisa. Koluka kondimama na bato ya mabe to mpo na ntina ya mbeba ekotia biso na nzela ya likama—oyo ekokamba mingimingi na bopengwi mpe kutu na libebi. Esika ya koyoka tolingami mpe tondimami, tokoyoka na nsuka tosundolami mpe tokitisami.

Alama apesaki toli na mwana wa ye ya mobali Elamani, “Tala ete otala na Nzambe mpe ozala na bomoi.”1 Liziba ya nsuka ya bokasi mpe bondimami ya kowumela ezali Tata wa biso ya Lola mpe Mwana wa Ye ya Mobali, Yesu Klisto. Bango bayebi biso. Balingi biso. Bandimi biso te na ntina ya nkombo to mosala mwa biso. Bandimi biso mpo na nani tozali mpe nini tozali kobunda kokoma. Kolukaka mpe kozwaka bondimami na Bango ntango inso ekotombola mpe ekolendisa biso.

Nakokabola ndakisa moko ya pete oyo, soki esalelami, ekoki kosalisa biso banso tozwa bondimami ya nsuka. Ndakisa oyo epesami na Nkolo na nzela ya profeta Joseph Smith: “Ya solo nalobi na yo, banso o ntei ya bango oyo bayebi bazali na mitema ya bosembo, mpe ya kobukana, mpe milimo mya bango ya mawa, mpe bazali kolinga kobatela mayokani na libonza—iyo,libonza linso oyo ngai, Nkolo, nakotinda—bandimami na ngai.”2

Ndakisa oyo ekwi matambi masato:

  1. Koyeba ete mitema mya biso mizali ya bosembo mpe ya kobukana,

  2. Koyeba ete milimo mya biso mizali ya mawa, mpe

  3. Kolinga kobatela mayokani ma biso na libonza, lokola etindami na Nkolo.

Ya yambo, tosengeli koyeba ete mitema mya biso mizali ya bosembo mpe ya kobukana. Boniboni toyebi yango? Tokobanda na komipesaka na komaniola na bisomei. Motema ezali na katikati ya mayokomi ma biso. Ntango totali na kati ya mitema na biso, tomimoni. Oyo moto te nzinganzinga na biso ayebi, toyebi na ntembe te. Toyebi botindiki mpe mposa ya biso. Ntango tomipesi na bomanioli ya solo, ya bosembo, tokomibungisa to tokomikosa te.

Ezali lisusu na lolenge moko ya koyeba soki mitema mya biso mizali ya kobukana. Motema ya kobukana ezali petepete, motema moko ya kofungwana, mpe ya koyamba. Ntango nayoki Mobikisi alobi, “Yoka, natelemi na ekuke, mpe najali kobeta,”3 Nayoki Ye kobetaka na ekuke ya motema mwa ngai. Soki nafungoli ekuke oyo na Ye, nazali koyanola mingi na libiangi lya Molimo, mpe nazali koyamba mingi bolingi bwa Nzambe.

Ntango tomanioli na bosolo mpe na losambo bolai na yango mitema mya biso mizali ya bosembo mpe ya kobukana, tokoteyama na Molimo Mosantu. Tokozwa bondimami ya sukali to bosemboli ya boboto, kobengisaka biso tosala.

Ya mibale, tosengeli koyeba ete molimo mwa biso ezali ya mawa. Lilobamawa na Oxford dictionary elimbolami lokola “koyoka to kolakisa mpasi na koyebaka ete osali mbeba.”4 Soki tozali na molimo ya mawa, tondimi masumu mpe mabunga ma biso. Tokoteyama na “[manso] matali makambo ma bosembo.”5 Tokoyoka mawa ya bonzambe mpe tokolinga koyambola. Molimo ya mawa ekolinga koyoka “masengisi ma Molimo Mosantu.”6

Molimo mwa mawa emonisami na bolingi mpe mokana ya kosala. Tozali kolinga komikitisa liboso na Nzambe, tozali kolinga koyambola, tozali kolinga koyekola, mpe tozali kolinga kobongwana. Tozali kolinga kosambela, “mokano na ngai esalama te, kasi mokano na yo.”7

Litambi ya misato mpo na kondimama na Nkolo ezali mokano ya mayele mpo na kobatela mayokani na nzela ya libonza, “iyo,libonza linso oyo ngai, Nkolo, nakotinda.”8 Mbala mingi mpenza tokokanisa ete lilobaLibonza etali likambo moko ya monene to ya makasi mpo na biso kosala. Na ntango mosusu yango ekoki kozala ya solo, kasi mingimingi etali kowumelaka mokolo na mokolo lokola moyekoli ya Klisto.

Nzela moko tokobatela mayokani ma biso na libonza ezali na kokabolaka na bolongobani elambo mposo inso. Ntango na mayele tomilengeli mpo na likuli lya bule ya elambo—kolukaka motema mpe molimo mwa biso, kozalaka ya kofungwana na matindiki, koyambolaka, mpe kolingaka kobongwana—tozongeli mpe tondimi lisusu bilaka bya biso bya bule na Nkolo. Na nzela oyo tokoyoka bondimami na Ye mpe tokozwa bobangi te ete makasi ma biso mandimami mpe masumu ma biso malimbisami na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Na ntango ya likuli oyo, Nkolo alaki biso ete lokola tozali na mposa ya kokamata likolo na biso nkombo ya Mwana wa Ye mpe ntango inso komikundola Ye mpe kobatela mitindo mya Ye, tokozala ntango inso na Molimo mwa Ye elongo na biso. Kozalaka na Molimo Mosantu lokola moninga wa biso ya ntango inso ezali ndakisa ya nsuka ya bondimama na Nzambe.

Banzela misusu mpo na kobatela mayokani ma biso na libonza ezali pete lokola kondima libiangi moko na Eklezia mpe kosala na botongono na libiangi wana to kolandaka libengisi ya profeta, Thomas S. Monson, mpo na kotanda maboko na baye batelemi mpembeni ya nzela mpe bazali na mposa ya kobikisama na molimo. Tobateli mayokani ma biso na libonza na kopesaka lisalisi na makelele te na ya biso nzinganzinga to lingomba to na kolukaka nkombo ya bankoko ba biso mpe kosalaka mosala ya tempelo mpo ba bango. Tobateli mayokani ma biso na libonza na kobundaka na pete mpo na bosembo, kozalaka ya kofungwana, mpe koyokemelaka matindiki ma Molimo lokola tozali kowumela na bomoi bwa biso ya mokolo na mokolo. Ntango mosusu kobatelaka mayokani elingi koloba bobele kotelemaka na molende mpe na botongono ntango mopepe ya makasi ya bomoi etomboki nzinganzinga na biso.

Nsima ya kolimbola ndakisa boniboni kondimama na Ye, Nkolo asaleli ndakisa ya kitoko mpo na kolakisa boniboni tozwi litomba moko na moko mpe lokola mabota ntango toluki bondimami na Ye. Alobaki, “Mpo ngai, Nkolo, nakosala ete babota lokola nzete ya mbuma mingi oyo elonami na mabele ya malamu, penepene ya mai ya peto, oyo ekopesa mbuma mingi ya ntalo.”9

Ntango tozali bisomei engebene na Molimo ya Nkolo mpe toyoki bondimami na Ye, tokopambolama likolo ya bososoli bwa biso mpe tokobota mbuma mingi ya bosembo. Tokozala o ntei ya baye na bango Ye alobaki, “Malamu, moombo malamu mpe na sembo, ozalaki na sembo na makambo mike, nakotia yo likolo ya mingi. Ingela na esengo na Nkolo yo.”10

Kolukaka mpe kozwaka bondimami na Nkolo ekokamba na boyebi ete toponami mpe topambolami na Ye. Tokozwa bondimi ya kobakisa ete Ye akokamba biso mpe akoyangela biso mpo bolamu. Ngolu ya ye ya bosembo ekokoma polele na mitema mya biso, na bomoi bwa biso, mpe na mabota ma biso.

Nasambeli ete biso banso tokoka kokolisa mposa ya koluka bondimami ya Nkolo mpe kosepela na mapamboli ma Ye. Ntango tolandi ndakisa ya pete Nkolo atii, tokoyeba ete tondimami na Ye, kotala te mosala, esika, to bandelo ya bokufi na biso. Bondimami na Ye ya bolingo ekotindika biso liboso, ekobakisa bondimi na biso, mpe ekosalisa biso kotelemela biloko binso tokokutana na yango na bomoi. Atako mikakatano na biso, tokolonga, tokofuluka,11 mpe tokomiyoka na kimia.12 Tokozala o ntei ya baye na bango Nkolo alobaki:

“Bobanga te, bana bake, mpo bazali ba ngai, mpe nalongi mokili, mpe bazali ya bango baye Tata wa ngai apesi ngai;

“Mpe moko te na bango baye Tata wa ngai apesi ngai akobunga.”13

O nkombo ya Yesu Klisto, amene.