2010–2019
Mpo na Kimia na Ndako
Sánzá ya mínei 2013


Mpo na Kimia na Ndako

Moko ya mapamboli manene mingi koleka tokoki kopesa na mokili ezali nguya ya ndako ya Klisto na katikati wapi nsango malamu eteyami, mayokani mabatelami, mpe bolingo bofuluki.

Mingongo mingi miwuti na mokili wapi tovandi elobeli biso tosengeli kozala na lombangu ya liboma. Ezali ntango nyonso na mingi ya kosala mpe mingi ya kokokisa. Kasi na kati ya mozindo ya moko na moko na biso ezali na esika ya ekimelo wapi kimia mpe boboto etondi, esika wapi tokoki kobongisa lisusu, kosangisa, mpe kokembisa lisusu mpo na komilengela mpo babofini bokoya nsima.

Esika eluti kitoko mpo kimia wana ezali na kati ya bifelo ya ndako ya bisomei, wapi tosali nyonso tokoki mpo na kokomisa Nkolo Yesu Klisto likonzi na yango.

Boko bandako bazali na tanta moko oyo azali mosimbi bonganganzambe alongobani esangani na mama moko ya botongono, amipesa baye elongo bakambo na bosembo. Bandako mingi ezali na lolenge ya kokesana. Kotala te bizalela na bino, bokoki kotia katikati ya ndako na bino mpe bomoi bwa bino na Nkolo Yesu Klisto, mpo Ye azali liziba ya kimia ya solo na bomoi oyo.

Bondima ete mokano nyonso bokozwa, ezala na ntango to na molimo, esengelami na nini Mobikisi alingi bino bosala. Ntango azali na katikati na ndako ya bino, ezali na kimia mpe boboto. Ezali na molimo moko ya bozangi likama oyo etondi na ndako, mpe eyokani na bango oyo bavandi kuna.

Bokokisi ya toli oyo evandi likolo ya baboti bango moko te, atako ezali mosala mwa bango mpo na kokamba. Bana bakoki kozala bayanoli mpo na kobongisa makasi ya Klisto na katikati ya ndako. Ezali na ntina mpo na baboti koteya bana mpo na koyeba boniboni bikela bya bango etuki moto moko na moko oyo avandi na ndako. Bana oyo bayekoli komiyoka bayanoli mpo na bikela bya bango, bakokola na kokoma bana mboka balongobani na bokonzi ya Nzambe.

Natii ntembe te ete bokoki koyeba mabongisi ma ntina oyo evandisi katikati ya ndako ya bino na Mobikisi. Toli ya baprofeta mpo na kosala losambo ya moto na moko mpe ya libota mokolo na mokolo, boyekoli ya makomi ya moto na moko mpe ya libota mokolo na mokolo, mpe mpokwa na ndako ezali libaya ya motuya ya komema kilo ya botondi ya ndako na Klisto na katikati. Na kozala kosala yango mbala na mbala, ekozala mpasi mpo na kozwa kimia oyo ya ntina mpe ya mposa mingi mpe ekimelo mosika na mokili.

Bozala na botisi na mateya ya baprofeta Klisto alingi bino bolanda. Bobanzabanza te mosika na esengo ekoya na kokamataka banzela ya mokuse esika ya kosalela mabongisi ya nsango malamu ya polele. Bomikundola: makambo mike makambi na makambo manene. Bozangi sekele to bozangi lokengo lokola ya ntina te ekoki kokamba na mikakatano minene. Mingimingi, mimesano ya petepete, ya sikisiki, ya malamu ekokamba na bomoi ya mapamboli beboo.

Bino bana ba Eteyelo ya Bana, bino bilenge babali mpe basi na pologalami ya bilenge, mpe bino bamisionele bilombe kosalaka sikawa bozali kosala makambo mingi na makasi mingi koleka ngai nakokaki kosala na mibu mya bino. Na bomoi yambo ya bokufi bolakisaki bozalaki na mpiko, na botosi, mpe na peto. Kuna bosalaki na makasi mpo na kokolisa batalanta mpe makokisi mpo na komilengela mpo na kotelemala bokufi na mpiko, bolongobani, lokumu, mpe elongo.

Kala te boyaki na bokufi elongo na makoki mpe makambo mana manso ya monzele. Kasi ezali na likama ya solo nzinganzinga na biso. Nguya mpe bokoki bwa bino ekoki kosuka to kobebisama soki bomitiki na ngenge efulami na zabulu nzinganzinga na bino. Nzokande, Satana akotia ntembe na Mobikisi te. Atandele ya Satana ekatama. Ayebi abunga, kasi alingi kozwa mingi na biso lokola akoki. Akomeka kobebisa bolamu mpe makoki ma biso na kokosaka botau bwa bino.Botikala na ngambo ya Nkolo, mpe bokolonga ntango inso.

Bozali na mokili moko wapi bopusani ya teknolozi ezali kosalama na lombangu ya kokamwa. Ezali mpasi mpo na mingi ya nkola ya ngai kokola kolanda makambo wana. Engebene na boniboni teknolozi esalelami, bopusani oyo ekoki kozala lipamboli to lisuma. Teknolozi, ntango esosolama mpe esalelami mpo ntina ya bosembo, esengeli te kobangisa kasi kutu kobakisa bosololi ya molimo.

Ndakisa, mingi na biso tozali na telefoni ya moto na moto oyo ekoki kokota na libenga. Tokozalaka elongo na yango te ntango moke; tokoki kotalela yango mbala mingi na mokolo. Mawa, biloko oyo bikoki kozala liziba ya mbindo mpe kobebisa ntango. Kasi, soki esalelami na bosemboli, teknolozi ekoki kozala esalele ya bobateli na bobe boluti ya mokili.

Nani akokaki kobanza mibu mingi te mileki ete makomi mobimba mpe mibu ya bitinda bya likita linene elingaki kokota na libenga na bino? Kaka kozala na yango na libenga ekobatela biso te, kasi koyakolaka komaniolaka, mpe koyokaka mango na ngonga ya kimia ya mokolo na mokolo ekobakisa bosololi na nzela ya Molimo.

Bozala na bwania na lolenge bozali koyamba teknolozi. Botia bilembo na makomi ma bino na telefoni mpe bozongela yango mbala na mbala. Soki bino bilenge bolingi kotala lisusu nzela moko ya makomi mbala mingi lokola boko ya bino bakotindaka nsango na nkoma, bokozala nokinoki na bankama ya matangi ya makomi na bongo. Matangi wana ekokoma likonzi ya nguya ya bofuli mpe bokambami na Molimo Mosantu na ntango ya mposa.

Kosalaka nyonso tokoki mpo na kobengisa nguya ya boboto ya bokambi ya Molimo Mosantu na kati ya bomoi bwa biso ezali na motuya na bomeki bwa mpo na kotia Mobikisi na katikati ya ndako ya biso. Kasalaka na botosi na botindiki ekolendisa biso kutu mingi.

Kimia mingi ekoya lokola bosangisa makasi ma bino na kozala na botosi elongo na kosalisaka baye nzinganzinga na bino. Bato mingi mpenza oyo bazali kosaleli nini bamoni ezali mwa batalanta na bosawa mpe bokabi bakosalela batalanta wana mpo na kopambola baye bazali nzinganzinga na bango. Kimoyimi ezali ntina ya bobe bonene. Nkisi mpo na bobe wana elakisami na bomoi bwa Mobikisi. Alakisi biso boniboni kokanga bomoi bwa biso libanda na mosala mozanga kimoyimi epai ya basusu.

Nayekaki bosolo moko oyo ezongelamaki mbala na mbala mingi na bomoi bwa ngai ete nayaki koyeba yango lokola mobeko mozanga ndelo. Elimboli lolenge botosi mpe mosala ezalani na nguya ya Nzambe. Ntango totosi mitindo mya Nzambe mpe tosalisi bana ba Ye na kimoyimi te, mbano ya ntango inso ezali nguya uta na Nzambe—nguya ya kosala mingi koleka tokoki kosala na bisomei. Bwania bwa biso, batalanta ya biso, makoki ma biso matandolami mpamba te tozwi bokasi mpe nguya uta na Nkolo. Nguya ya Ye ezali eteni ya ntina mpo na kosala ndako etonda na kimia.

Ntango botii Mobikisi na katikati ya ndako ya bino. Ekokoma mbala moko ekimelo kaka te mpo na libota lya binomei kasi lisusu mpo na baninga oyo bazali na bizalela ya kpokoso mingi. Bakobandama na bosembo bayoki kuna. Boyamba malamu baninga ba boye na ntango ya bino. Bakofungwama na nzinganzinga wana na Klisto na katikati. Bokoma baninga bana ba bino. Bozala ndakisa elongobani mpo na bango.

Moko ya mapamboli ya monene mingi koleka tokoki kopesa na mokili ezali nguya ya ndako na Klisto na katikati wapi nsango malamu eteyami, mayokani mabatelami, mpe bolingi bofuluki.

Mibu mileki, kolandaka mobembo moko ya misio, mwasi wa ngai, Jeanene, alobelaki ngai etali misionele moko akutanaka na ye. Jeanene atunaki ye etali libota lya ye. Asutikaki ntango ayanolaki ete azalaki na libota te. Nsima alimbolaki ete na mbotama ya ye, mama wa ye apesaki ye na leta mpo kobokola ye. Alekisaki bomwana bwa ye kokendaki ndako na ndako ya kobokola. Apambolamaki na bolenge na koyeba nsango malamu. Palwasi moko ya bolingi esalisaka ye kozwa libaku ya kosala misio.

Nsima Jeanene atunaki mwasi ya mokambi ya misio oyo etali misionele oyo ya kitoko. Ayokaki ete mwa basanza ilekaki misionele oyo bazalaka na ndako ya misio mwa a mikolo mpo na bokono. Na ntango wana asanganaka na bango mpo na mpokwa na libota. Yambo ya kolongwa mpo na kozonga na elanga, asengaki mokambi ya misio soki akokaki kolekisa mikolo mibale to misato na nsuka ya misio ya ye na ndako ya misio lisusu. Alingaki kotala boniboni libota na Klisto na katikati ekotambolaka. Alingaki kokoka kolanda ndakisa ya libota lya bango.

Bosala nyonso bokoki mpo na kozala bobele na ndako ya boye. Boyamba baye bazali na bizalela ya bokeseni. Bozala baninga ya malamu. Lolenge oyo ya kimoninga ya kowumela ezali lokola gudron oyo ekotondisaka mabulu ya bomoi mpe ekokomisa mobembo pepele mingi mpe elengi mingi. Ekozala te bomengo esalelami mpo na kozwa litomba ya moto yemei kasi mpauni ya kolula mpe kokabola. Boyamba na ndako ya bino basusu oyo bazali na mposa ya kolendisama na mayele ya bongo.

Napesi mwa makanisi ya nsuka mpo na baye balingi moto moko ya libota oyo azali kosala maponi malamu te. Yango ekoki komeka bompikiliki mpe molende mwa biso. Tosengeli kolikia na Nkolo mpe na ntango ya Ye ete eyano elamu na nsambo ya biso mpe makasi ya kobikisa ekoya. Tosali nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa, mpo na kopambola, mpe mpo na kondima komitika na bolingi bwa Nzambe na makambo manso. Tosalela bondimi mpe tomikundola ete ezali na boko makambo maye tosengeli kotika na Nkolo. Ye abengisi bino totia mikumba mya biso na nse na makolo ma Ye. Na bondimi tokoki koyaba ete moko wa bolingo oyo apengwi asundolami te kasi azali na bokengeli bwa Mobikisi moko ya bolingo.

Bondima bolamu na basusu, mbino ya bango te. Ntango mosusu mbindo esengeli bolengeli bolongobani mpo epetolama, kasi ntango nyonso botonga na bolamu bwa ye.

Ntango boyoki ete ezali bobele na mwa nsinga ya elikia, ezali ya solo nsinga te kasi ebakata ya mokangano ekokangisa, lokola mobateli bomoi moko mpo na kolendisa mpe kotombola bino. Ekopesa libondisi boye bokoki kotika kobanga. Bobunda kozalana bomoi na bolongobani mpe kotia elikia ya bino na Nkolo.

Tosengeli te komitungisa soki tokoki te mbala moko kosala makambo manso Nkolo apesaki biso toli tosala. Alobelaki ntango moko mpe eleko moko mpo na makambo manso. Na eyano na nsambo ya biso ya solo mpo na bokambami, Ye akokamba biso na nini esengeli kobetama nsete na litambi moko na moko ya bomoi bwa biso. Tokoki koyekola, kokola, mpe kokoma lokola Ye litambi moko ya sikisiki na ntango.

Napesi litatoli ete kozalaka na bomoi moko ya botosi, na molende ekangami na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto, ekopesa bozangi likama bonene mingi koleka mpo na kimia mpe ekimelo na bandako ya biso. Ekozala lisusu na mikakatano mingi to moto mpasi, kasi ata o ntei ya makelele, tokoki kosepela na kimia ya kati mpe esengo ya mozingo. Natatoli ete Bomikabi ya Yesu Klisto ezali liziba ya kimia ya kofuluka, o nkombo ya Yesu Klisto, amene..