2010–2019
Nkombo Minei
Sánzá ya mínei 2013


Nkombo Minei

Nalingi kopesa likanisi ya nkombo minei … oyo ekoki kosalisa biso toyeba lisusu misala na biso ya moto na moto na mwango ya seko ya Nzambe mpe likoki na biso lokola basimbi bonganganzambe.

Bandeko na ngai ya bolingo mpe baninga balingami, etondi ngai motema na botondi mpe esengo kozala elongo na bino. Nakumisi bino batata mpe bankoko oyo bomemi bana mibali mpe bankoko na bino ya mibali. Napesi longonia na bino bilenge babali oyo boponi kozala awa lelo. Oyo ezali esika ya kozala mpo na bino. Nalikii ete bokokoka koyoka bondeko oyo esangisi biso, mpe nasambeli ete awa, nakatikati ya bandeko na bino ya mibali, bokokuta esika na bino, lisungi, mpe kimoninga.

Biso mibali ntango mosusu tomiyebaka na nzela ya bankombo. Mingi kati na biso tozali na bankombo mingi, mpe moko na moko elobi likambo moko monene oyo etali bomoto na biso. Ndakisa, boko bankombo elimboli mosala na biso na mabota, lokola mwana mobali, ndeko mobali, molongani, mpe tata.Nkombo mususu elimboli misala na biso na mokili, lokola, dokotolo, soda, to moto ya mosala maboko. Mpe boko elimboli bibonga na biso na kati ya Eklezia.

Lelo nalingi kopesa likanisi ya nkombo minei oyo nandimi mpo na ntina ya bamemi ya bonganganzambe nyonso na mokili mobimba—bankombo oyo ekoki kosalisa biso toyeba lisusu misala na biso ya moto na moto na mwango ya seko ya Nzambe mpe likoki na biso lokola basimbi bonganganzambe o ntei ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Mwana Mobali ya Tata na Lola

Nkombo moko oyo eyebisi nie biso nyonso, na lolenge ya ntina mingi koleka ezali mwana mobali ya Tata na Lola.Likambo te nini mosusu tozali to tosalaka na bomoi, tosengeli mokolo moko te kobosana ete tozali bana ya molimo ya Nzambe mpenza. Tozalaki bana na Ye liboso toya na mokili oyo, mpe tokozala bana na Ye seko na seko. Bosolo oyo ya ntina esengeli kobongola lolenge tokotalelaka bisomei, bandeko mibali mpe bandeko na biso ya basi, mpe bomoi yangomei.

Mawa, moko te kati na biso akowumelaka engebene na nyonso oyo nkombo oyo esengi, “bato yonso babungi mpe bajangi nkembo na Njambe.”1

Ekoki kolembisa ntango mosusu koyeba nini elingi koloba kozala Mwana mobali ya Nzambe mpe nzokande kozanga kokokisa yango. Monguna alingaka kozwa litomba ya mayoki oyo. Satana akolinga ete omiyebisa nie engebene na masumu esika ya likoki ya bonzambe na yo. Bandeko, boyokela ye te.

Tosili baso komona bebe koyekola kotambola. Azwaka litambi moke mpe kotatabana. Akwei. Egangelaka biso bomeki ya boye? Mpenza te. Tata akopesa etumbu na bebe mpo na kokweya? Tolendisaka, tobetaka maboko, mpe tokumisaka mpamba te na litambi moko ya moke nyonso, mwana azali kokoma mingi lokola baboti na ye.

Sikawa, bandeko, kokokanisa na bobongi nie ya Nzambe, biso bato na bokufi tozali penepene mpenza te koleka bebe mozangi ntoki, motatabeni. Kasi Tata wa biso ya bolingo ya Lola alingi biso tokoma mingi lokola Ye, mpe, bandeko ba bolingo, oyo esengeli kozala ntina na biso ya seko lokola. Nzambe asosolaka ete tokomi kuna na mbala moko te kasi na kobwakaka litambi moko na ngonga.

Nandimeli Nzambe moko te oyo akotia mibeko mpe mitindo kaka mpo na kozela biso tokweya mpo akoka kopesa biso etumbu. Nandimeli Tata moko na Lola oyo azali bolingo mpe mobateli mpe oyo asepelaka na makasi na biso nyonso mpo na kotelema ngwi mpe kotambola epai na Ye. kutu ntango nabeti libaku, Ye alendisaka biso tolemba te—totika to tomeka ata moke te kokima elanga ya mosala epesami na biso—kasi tozwa mpiko, tozwa bondimi na biso, mpe tokoba komeka.

Tata wa biso na Lola akambaka bana na Ye mpe atindaka lisalisi ya lola emonani te epayi ya baoyo, bazali na mposa ya kolanda Mobikisi.

Moyekoli ya Yesu Klisto

Mpe oyo ememi biso epai ya nkombo elandi oyo tozali na yango banso: banso baye babundi na bokasi mpo na kolanda Yesu babengami ya Ye bayekoli.Atako toyebi lisusu ete moko te na biso abongi nie, tosalelaka likambo wana te lokola bolimbisi mpo na kokitisa bozeli na biso, kobika na nse ya mabaku na biso, kozelisa mokolo ya boyamboli na biso, to koboya kokola mpo na kokoma malamu, ya kobonga nie mingi, balandi ya Nkolo mpe Mokonzi wa biso ya kopetolama mingi koleka.

Mikundola ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka etongami te mpo na mibali mpe basi oyo babonga nie to basimbami te na masenginia ya bokufi, kasi kutu etongami mpo na bato lokola yo mpe ngai mpenza. Mpe etongami likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, Nkolo Yesu Klisto, 2 na nzela ya Ye Bomikabi tokoki kopetolama mpe kokoma “bato na mboka … bana na ndako na Njambe.”3

Na kozanga Bomikabi ya Yesu Klisto, bomoi elingaki kozala nzela oyo esuki ezangi elikia to lobi lokoya. Elongo na Bomikabi, bomoi ezali mobembo moko ya lokumu, ya bofuli ya bokoli mpe bokomeli oyo ekambaka epai ya bomoi ya seko na miso ya Tata wa biso ya Lola.

Kasi ata kutu Bomikabi esalami mpo na kosalisa biso tokoma lokola Klisto, esalami te mpo kokomisa biso banso lolenge moko. Ntango mosusu tobulunginisaka babokeseni kati na bomoto na lisumu. Tokoki kutu kosala libungi ya kokanisaka ete mpo moto moko akeseni na biso, esengeli koloba azali kosepelisa Nzambe te. Makanisi ya boye esalaka ete bato bandima ete Eklezia elingi kokela mondimi nyonso (ya Eklezia) akoma moto se moko—ete moko na moko asengeli kotala, koyoka, mpe kotambola lokola mosusu nyonso. Oyo ekolinga kotelemela bwania ya Nzambe, oyo akelaki moto nyonso ya kokesana na ndeko na ye ya mobali, mwana mobali nyonso ya kokesana na tata na ye. Ata mapasa mibale ya lolenge moko bazali ya lolenge moko te na bomoto na bango mpe na ndenge ya molimo.

Ezali lisusu kotelemela ntina mpe mokano ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, oyo ezali kondima mpe kobatela bonsomi ya bomoto—elongo na malandi na yango nyonso ya mosika—ya moko na moko mpe moto nyonso ya bana na Nzambe. Lokola moyekoli ya Yesu Klisto, tosangisami na litatoli na biso ya nsango malamu ezongisami mpe bomipesi na biso mpo na kobatela mitinda ya Nzambe. Kasi tozali ya kokesana na maponi ya mimesano, ya bato, mpe ya politiki.

Eklezia elendisami ntango tozwi litomba ya bokeseni mpe tolendisami mpo na kokolisa mpe kosalela batalanta na biso mpo na kotombola mpe kolendisa baninga na biso bayekoli.

Bandeko, boyekoli ezali mobembo ya bomoi mobimba kolandaka Mobikisi na biso. Na nzela na biso lokola ya uta Bethlehem tii Golgotha, tokozala na mabaku ebele mpo na kotika mobembo na biso. Ntango mosusu ekomonana lokola ete nzela yango ezali kosenga mingi koleka oyo tozalaki na yango mposa. Kasi lokola mibali ya bonganganzambe, tosengeli kozala na mpiko ya kolanda Mosikoli na biso, ata ntango ekulusu na biso ezali komonana ya bozito mingi mpo na komema.

Na litambi nyonso totiaka kolandaka Mwana ya Nzambe, tokoki kukundolisama ete tozali naino ya kobonga nie te. Kasi tosengeli kozala bayekoli ya sikisiki mpe molende. Tosengeli kotika te. Tosengeli na bondimi kobatela mayokani na biso. Tosengeli ntango nyonso kotala epai Molobeli mpe Mosikoli na biso wana ezali biso kotambola epai na Ye, litambi moko ebonga nie te nsima ya mosusu.

Mobikisi ya Milimo

Bandeko, soki tosengeli solo kolanda Nkolo Yesu Klisto, tosengeli kondima na mobimba nkombo ya misato: mobikisi ya milimo. Biso oyo tokulisama na bonganganzambe ya Nzambe tobiangemi mpo kosala mosala ya “ntoki ya mobikisi.”4

Ezali mosala na biso ya kotonga, tobongisa, kolendisa, kotombola, mpe kobikisa. Mokumba na biso ezali kolanda ndakisa ya Nkolo mpe kokende epai ya baoyo bazali koyoka mpasi. Biso tozali “kolela elongo na baye bakolela … mpe kobondisa baye batelemi na mposa ya libondisi.” 5 Tokangi bampota ya batungisami. Biso tozali “kosunga bato ya botau, kotombola maboko oyo madiembeli, mpe kolendisa mabolongo malembi.”6

Lokola bateyi ya ndako, tozali babikisi. Lokola bakambi ya bonganganzambe, tozali babikisi. Lokola batata, bana mibali, bandeko mibali, mpe balongani, tosengeli kozala babikisi bamipesi mpe bamibonzi. Tomemi na loboko moko molangi ya mafuta ebulisama mpo na kopambola babeli; na mosusu tomemi limpa mpo na koleisa bakufi nzala; mpe na mitema na biso tomemi liloba ya kimia ya Nzambe, “liye likobikisa bozo bozoka.”7

Oyo ezali mokumba na biso ya yambo mpe ya monene koleka lokola basimbi bonganganzambe—mpe ezali mpo na basimbi bonganganzambe ya Alona mpe ya Melekisedeki lokola. Nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto epambolaka babomoi kaka ntango tondimeli yango te—kasi mingi koleka ntango tosaleli yango na bomoi. Ezali na kosalelaka mabongisi ya nsango malamu ete bato na bato batombwami mpe balendisami. Ezali libaku mpe mokumba na biso kaka ya koloba makambo te kasi lisusu kosala makambo.

Mobikisi azali mosali ya makamwisi. Ye azali Mobikisi monene. Ye azali ndakisa na biso, pole na biso, kutu na bangonga ya molili, mpe Ye alakisi biso nzela malamu.

Tika tolanda Ye. Tika tokokisa mosala na biso. Mpe tokoma babikisi na kosalelaka Nzambe mpe baninga na biso bato.

Mosangoli ya Libula ya Bomoi ya Seko

Nkombo ya minei oyo biso banso tokaboli ezongisi biso na nkombo ya yambo na molongo na biso. Lokola bana mibali ya Tata wa biso na Lola, tozali basangoli na nyonso oyo Ye azali na yango.

“Molimo yango akosangana na milimo na biso kotatola ete tojali bana na Njambe:

“Soko tojali bana, mbe tojali basangoli na libula. Tojali basangoli na libula na Njambe, basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo, soko tokoyoka mpasi na ye elongo ete tojua nkembo esika moko na ye.”8

Kanisa na ntina ya oyo, bandeko na ngai ya bolingo. Tosangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo!

Yango wana, ezali na ntina moko ete mingi na biso tolekisaka ntango na biso ya motuya mingi mpenza, makanisi, mosolo, mpe babokasi na bolandi lokumu to biloko ya mokili to kosepelisama na batshombo ya lotiliki ya sika mpe kitoko mingi koleka?

Nkolo atii liboso na biso elaka ya Nzambe ete “moto nyonso oyo bazali botongono kino bazwi babonganganzambe mibale oyo, …mpe basaleli libiangi na bango, …[bakoyamba] ngai, elobi Nkolo, mpe moto oyo ayambi ngai ayambi Tata na ngai; … yango wana nyonso oyo Tata na ngai azali na yango ekopesama na ye.”9

Ezali mosiki na nguya na ngai ya kokanisa kobanza nyonso oyo elaka oyo ekomema. Kasi nayebi ezali ya kafukafu, ezali ya bonzambe, ezali ya seko, mpe ebongi na babokasi na biso na bomoi.

Koyeba oyo, boniboni tokoki te komipesa na bolingi mpe esengo na kosaleka Nkolo mpe baninga na biso bato mpe kokokisaka mikumba na biso na bonganganzambe ya Nzambe?

Oyo ezali mosala ya lokumu koleka nyonso oyo ekomeka biso na mayoki nyonso mpe esengi biso tosalela makoki na biso nyonso. Ezali biso na mposa ya komona balola kofungwama mpe kozala nzeneneke ya babotindiki ya Molimo mosantu kolakisaka biso nzela? Nde tika tobanda mosala na biso mpe totia babokasi na biso na mosala monene oyo—ntina moko monene mingi koleka bisomei!

Kosalela Nzambe mpe baninga na biso bato ekomeka biso mpe ekobongola biso na eloko moko monene koleka oyo tokanisa ekoki kosalama.

Ntango mosusu okoki kokanisa ete osengelami te, ete bazali kotala yo mpamba to ya bolingi yo te, ete ozali moto te.

Nazali ya solo na mawa soki mosimbi bonganganzambe azali komiyoka lolenge oyo. Na ntembe te ozali batali yo mpamba te to balingi yo te na Tata wa yo ya Lola. Ye alingi bino. Mpe nayebisi yo mpenza ete Eklezia ezali na mposa na yo.

Oyebi te ete “Njambe aponi biloko na bolema na mokili [mpo na koyokisa] biloko na mayele nsoni mpe Njambe aponi biloko ya bolembu kati na mokili [mpo na koyokisa] biloko na nguya nsoni”?10

Ntango mosusu ezali ya solo ete tozali ya bolembu. Ntango mosusu tozali bwania to ya nguya te. Kasi ntango Nzambe azali kosala na nzela na biso, moko te mpe eloko te ekoki kotelemela biso.11

Oyo ezali ntina oyo osengelami. Ozali na bopesi ya ndenge ya yomei mpo na kopesa, mpe Nzambe akoki koyeisa monene bopesi wana na lolenge moko ya nguya. Likoki na yo mpo na kopesa eyekami likolo ya libiangi na yo te na Eklezia. Mabaku na yo mpo na mosala ezangi nsuka. Soki ozali kozela na mpembeni, nasengi you okota na lisano.

Kozela libiangi songolo te liboso okoma komipesa mobimba na kotongaka bokonzi ya Nzambe. Lokola mosimbi bonganganzambe, osili kobiangama na mosala. Yekola liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, sambela Tata na Lola mikolo nyonso, kotisa mabongisi ya nsango malamu ezongisami, pesa matondi na Nzambe, mpe senga toli na Ye. Nde tia na bomoi maye ozali koyekola, yambo na libota na yo kasi lisusu na makambo nyonso ya bomoi na yo.

Na sinfoni mingi ya Mokeli monene, ozali na eteni ya yo moko mpo na kobeta—noti ya yo moko mpo na koyemba. Atako ozangi kobeta yango, na ntembe te sinfoni ekokoba. Kasi soki otelemi mpe osangani na bayembi mpe opesi nzela na nguya ya Nzambe esala na nzela na yo, okomona “maninisa na lola” kofungwama, mpe Ye “akosopela bino lipamboli kino esika ekojanga mpo na yango.”12 Telema na likoki na yo ya solo lokola mwana ya nzambe, mpe okoki kozala bokasi mpo na bolamu na libota na yo, ndako na yo, lingomba na yo, ekolo na yo, mpe solo na mokili.

Mpe na nzela, wana “akobebisa bomoi [na yo]” na lisalisi ya basusu,13 okokola mpe okokomela tii okoma “na epimelo na monene na litondi na Klisto.” 14 Nde okolengelama mpo na kosangola libula, elongo na Klisto, biloko nyonso Tata na yo azali na yango.

Ozali na Ntina epai ya Nzambe

Bandeko ba bolingo, bozali na motuya. Bolingami. Bosengelami. Mosala oyo ezali ya solo. Bonganzambe oyo bopesameli libaku ya komeme esengami ya solo ya Nzambe.

Nasambeli ete wana ezali bino komaniola na ntina ya bankombo mingi ya mosimbi bonganganzambe alongobana, bokomona mopepe moko ya Nzambe na mokongo na bino, kotombolaka bino se likolo epai ya lisangoli ya libula monene oyo Tata wa bino na Lola abombeli bino. Natikeli bino lipamboli oyo mpe litatoli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.