2010–2019
“Nkolo, Najali Kondima”
Sánzá ya mínei 2013


“Nkolo, Najali Kondima”

Na bosembo bondima mituna mpe matungisi ma bino kasi yambo bofula mololi mapeli ya bondimi bwa bino, mpamba te makambo manso makoki kosalema na bango baye bandimi.

Na libaku lyoko Yesu akutaki liboke moko koswanaka na nkanda na bapostolo ba Ye. Ntango Mobikisi atunaki ntina ya boswani, tata ya mwana oyo atungisamaki ayaki liboso kolobaka abelemaki epai ya bayekoli ba Yesu mpo na bopamboli ya mwana wa ye, kasi bakokaki te kopesa yango. Na mwana koliaka mino, na fulufulu na monoko, mpe komibambaka na mabele, tata abengaki Yesu na oyo ekokaki kozala ntembe ya mongongo mwa ye mpo akomaki na nsuka.

“kasi soko okoki kosala eloko, sunga biso mpe yokela biso mawa.

“Yesu alobi na ye ete, soko nakoki? Makambo yonso makoki na moto na kondima.

“Tata na elenge angangaki nokinoki ete, najali kondima! Sunga ngai na ntembe na ngai.” 1

Bondimi ya moto oyo lokola andimi yemei, ezali mokuse. Kasi azali na mposa ya nokinoki, mpe ya makasi mpo na mwana wa ye se moko. Toyoki ete ezali malamu ya kokoka mpo na ebandeli. “Kutu soko bokoki mingi te koleka kozala na mposa ya bondimi, esakoli Alama, “tika mposa eye esala na bino, kutu kina bondima.” 2 Na elikia moko te ya kotikala, tata oyo amekaki nini bondimi ye azalaki na yango mpe asambaki elongo na Mobikisi ya mokili, “soko okoki kosala eloko, sungabiso, mpe yokela biso mawa.” 3 Nakoki ata kotanga maloba maye soki naleli te. Likitana o boike biso na ntembe te esalelami na ntina. Moto wana azali koloba ya solo: “Libota lya biso mobimba ezali kosamba. Etumba ya biso esili naino te mpe tozali ya kolemba. Mwana na biso akwei na moto. Akweyi na mai. Azali ntango nyonso na likama, mpe tozali ntango nyoso kobanga. Toyebi te wapi lisusu kobaluka. Ekoki yo kosalisa? Tokozala na botongi mpo likambo nyonso— lipamboli ya ndambo, kaka nsonge ya elikia, mwa botomboli ya moke ya mokumba ememami na mama ya mwana mokolo na mokolo ya bomoi bwa ye.

“Sokookokieloko,” elobamaki na tata ezongeli ye, “soko okoki kondima”, elobami na Nkolo. 4

“Na mbalakaka,” makomi malobi—malembe malembe te to na ntembe te to na nko te kasi na mbalakaka” —tata agangaki na mpasi ya ye ekosila te ya moboti, “najali kondima! Sunga ngai na ntembe na ngai.” Na eyano na bondimi ya sika mpe ya ndambu naino, Yesu abikisi mwana mobali, penepene mpenza na kotelemisa ye na bawa, lokola Malako alimboli likambo yango. 5

Na likundoli oyo ya makomi ya boboto lokola mokongo mwa yango, nalingi kolobela semba bilenge ya Eklezia—elenge na mibu ya kobotama to elenge na mibu ya bondimi to elenge na mibu na bondimi. Lolenge moko to mosusu, oyo esengeli kosangisa bobele biso banso.

Likambo ya yambo emenani na nsango oyo ezali ete ntango akutanaki na mokakatano ya bondimi, tata oyo alakisi bokasi bwa ye yambo mpe bobele nsima andimi ndelo ya ye. Esakola ya ye ya ebandeli ezalaki koloba mpe na kotatabana te: “Nkolo, nandimi.” Nalingi koloba na banso oyo balingi kozala na bondimi mingi, bomikundola moto oyo! Na bangonga ya bobangi to ntembe to bantango ya mobulu, samba esika osili kozwa, atako esika ezali moke. Na bokoli tosengeli kozwa mayele na bokufi, bokokani ya molimo ya litungisi ya mwana mobali oyo to moboti nsuka ya elikia ya moboti oyo akokomela biso bango. Ntango bangonga wana ekomi mpe kpokoso ebimi, kobongisa yango ekoya na mbalakaka te, yika mpiko na oyo osili koyeba mpe telema na makasi kino boyebi ya kobakisa ekoya. Ezalaki na ntina ya likama oyo kaka, likamwisi ya ndenge oyo, ete Yesu alobelaki, “Soko bajali na kondima ata lokola mombuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, tambola longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te likoleka nguya na bino.”6 Bolai ya bondimi bwa yo to ndelo ya boyebi esali eloko te—ezali bosembo olakisi na bondimi ozali na yango mpe bosolo osili koyeba.

Likambo ya mibale ezali lokola ya yambo. Ntango kpokoso ekomi mpe mituna mibimi, kobanda te boluki ya yo ya bondimi na kolobaka mingi boniboni ozali na yango te, kokambaka lokola ezalaki na “bozangi bondimi” na yo. Wana ezali lokola komekaka kokanga dindon na monoko na ye! Tika nazala polele na esika oyo: Nazali kosenga bino te bozala na bondimi oyo bozaali na yango te. Nazali kosenga bino kozala na bosolo na bondimi bozwi mpenza. Ntango mosusu tokosalaka lokola soki esakola ya ntembe ezali kolakisa mpiko mingi koleka kosala esakola ya bondimi. Ezali bongo! Yango wana. Tomikundola banso kaka etinda ya polele ya sango ya makomi: Zala na bosembo na mituna mya yo lokola osengeli kozala; Bomoi botondi na yango na likambo moko to mosusu. Kasi soki yo mpe libota lya yo bolingi kobika, botika te mituna oyo mitelema o nzela ya yo ya bondimi kopekisaka likamwisi ya yango.

Lisusu, ozali na bondimi mingi koleka oyo okanisi na ntina ya oyo Buku ya Mormon ebengi “bonene bwa bapolele” .”7 “Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango,” Yesu alobaki, .”6 mpe mbuma ya nsango malamu ya bomoi ezali polele na bomoi ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bisika binso. Lokola Petelo mpe Yoane balobaki na Bafalisai, Nalobi na bino, “Mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango te,” mpe nini tomoni mpe toyoki ezali ete “likamwisi ya ntina esalemi” na bomoi ya efuku ya bandimi ba Eklezia. Yango tokoki koyangana te.9

Bandeko babali mpe basi, eye ezali mosala ezali kosalema na mamonisi mpe mapamboli ya yango matondi na nzela nyonso, yango wana kopelisa moto te soki mbala na mbala kpokoso ekobima oyo esengeli komaniola, kososola, mpe koluka nzela. Yango ekosalema mpe ekolingama. Na Eklezia, nini toyebi ekomatela ntango inso oyo toyebi te.Mpe bomikundoli, ntango inso na mokili, moto nyonso akotambola na bondimi.

Yango wana zala na boboto na oyo etali botau ya bomoto—ya yomei lokola ya baye bazali kosala na Eklezia moko ekambemi na babali mpe basi basali na bolingi. Longola bobele Mwana Mobali Mobotami se moko Abonga nie, bato babonga nie te bazali nyonso oyo Nzambe asala na bango . Yango esengeli kotungisa Ye, kasi Ye akosalaka elongo na yango. Bongo biso tosengeli kosala yango. Mpe soki omoni bozangi bobongo nie, mikundola ete ndelo ezali te na bonzambe ya mosala oyo. Lokola mokomi moko ya likabo apesaki ngai likanisi: ntango litondi ezanga ndelo esopani, ezali mbeba ya mafuta te soki mafuta ebungi mpamba te basani ezali na bandelo oyo ekoki mpenza te kokwa mafuta nyonso. 10 Basani wana na bandelo ekwi yo mpe ngai, yango wana zala bompikiliki mpe limbisaka.

Likambo namoni ya nsuka: ntango ntembe to kpokoso eyei, kobanga te kosenga lisalisi. Soki tolingi yango na bosawa mpe bosembo lokola tata oyo asalaki, tokoki kozwa yango. Makomi masakoli mposa ya solo lokola kozala “mokano wa solo”, elandisi “na mokano motonda mwa motema, kosalaka bokibisi te mpe lokuta te liboso lya Nzambe.” 11 Na eyano na lolenge wana ya kobondela,Natatoli Nzambe akozala ntango nyonso kotinda lisalisi na ngambo mibale ya elamba mpo na kolendisa bondimi.

Nalobi nazalaki koloba na bilenge. Nazali naino. Mwana mobali moko ya mibu 14 alobaki na ngai na mwa kotepatepa, “Ndeko Mobali Holland, nakoki naino te koloba ete nayebi Eklezia ezali ya solo, kasi nandimi ezali ya solo.” Nayambaki mwana mobali wana kino miso na ye ebimaki. Nalobelaki ye na mpela nyonso ya molimo mwa ngai ete bondimi ezali liloba ya motuya, ezali kutu ekela ya motuya mingi koleka, mpe asengeli te koyoka mawa mpo “kondima mpamba.” Nalobelaki ye ete Klisto Yemei alobaki, “Banga te, ndima bobele kondima,” 12 esakola moko oyo ememaki elenge Gordon B. Hinckley na bilanga ya misio. 13 Nalobalaki ye ete bondimi ezala ntango inso litambi ya yambo mpo na bondimi mpe ete biteni binso ya libela ya bondimi bwa biso banso ebandi na esakola, “Tondimi.” 14 Mpe nayebisaki ye boniboni nazalaki na lokumu mpo na bosembo ya boluki ya ye.

Na litomba oyo penepene na mibu 60 epesi ngai uta nazalaki mondimi ya sika ya mibu 14, nakosakola boko makambo nayebi sikawa. Nayebi ete Nzambe azali ntango nyonso mpe na lolenge nyonso na bizalela nyonso Tata wa biso ya bolingo na Lola. Nayebi ete Yesu azalaki mwana wa ye abonga nie se moko, oyo ya ye bomoi epesamaki na bolingo na bolingo bwa Tata mpe Mwana mpo na bosikolo ya biso banso totikali oyo tobonga nie te. Nayebi ete Ye esekwaki uta na liwa wana mpo na kozala lisusu na bomoi, mpe mpo Ye asalaki yango, yo mpe ngai tokosekwa lisusu. Nayebi ete Joseph Smith, oyo andimaki abongaki nie te, 15 kasi azalaki esalele eponama na loboko la Nzambe mpo na kozongisa nsango malamu ya libela na mabele. Nayebi lisusu ete na kosalaka yango—mingimingi na nzela ya Buku ya Mormon—ateyaki ngai mingi na ntina ya bolingo ya Nzambe, ntina ya bonzambe ya Klisto, mpe na ntina ya nguya ya bonganganzambe koleka profeta mosusu oyo natanga, nayeba, nayoka, to nayeba na bomoi moko ya boluki. Nayebi ete Mokambi Thomas S. Monson, oyo azali kokende na bomipesi mpe nsai na mibu 50 uta bokuli bwa ye lokola Apostolo, azali mokitani ya bosembo na kazaka ya boprofeta lelo. Nayebi ete bato basusu 14 oyo bosungi lokola baprofeta, bamoni mpe babimisi bazali kosunga ye na maboko ma bango, mitema mya bango mpe bafungola ya bopostolo ya bangomei.

Makambo maye nasakoli yango ya bino na bondimi Petelo abengaki “liloba lisakolami na makasi na koleka.” 16 Oyo ezalaki mbala moko mwa nkona moko ya bondimi mpo na ngai ekoli na nzete ya bomoi, yango wana soki bondimi bwa bino emekami mwa moke na eleko oyo to mosusu, nabengisi bino boyekama na ya ngai. Nayebi mosala oyo ezali bosolo mpenza ya Nzambe. Bobele na likama lya biso ekolinga biso kotika ntembe to bazabulu baningisa biso na nzela ya biso. Koba na elikia. Tambola na yango. Na bosembo bondima mituna mpe matungisi ma bino kasi yambo bofula mololi mapeli ya bondimi bwa bino, mpamba te makambo manso makoki kosalema na bango baye bandimi. O nkombo ya Yesu Klisto, amene.