2010–2019
Botosi Ekomema Mapamboli
Sánzá ya mínei 2013


Botosi Ekomema Mapamboli

Boyebi boko ya bosolo mpe biyano na mituna mya biso mileki minene mikoya na biso ntango tozali na botosi na mitindo ya Nzambe.

Bandeko babali mpe bandeko basi, na botondi kani nazali mpo na kozala elongo na bino ntongo ya lelo. Nazali koluka muleki na bondimi mpe losambo la bino lokola nazali koyanola na litomba ya koloba na bino.

O ntaka ya bikeke, babali mpe basi baluki boyebi mpe bosoli ya bomoi oyo ya kufa mpe ntina ya na yango, lokola nzela ya kimia mpe ya esengo. Boluki ya boye esalemi na moko na moko na biso.

Boyebi mpe bososoli ezwami mpo na bato banso. Ikwami na bosolo oyo ezali ya seko. Na Doctrine and Covenants, eteni 1, nzela 39, totangi:Mpo tala, Nkolo azali Nzambe, mpe Molimi apesi litatoli, mpe litatoli ezali ya solo, mpe bosolo, ekowumela libela na libela.”

Mokomi ntoki akomaki:

Atako lola elongwe mpe maziba ma mabele maziki,

Bosolo, liboke ya bozali, ekolonga bobe boluti,

Ya seko, ekobongwana te, seko na seko.1

Boko bakotuna, “Wapi bosolo ya boye ekozwama, mpe boniboni tokoyeba yango? Na libimisi lyoko lipesamaki na nzela Pofeta Joseph Smith na Kirtland, Ohio, na mai ya 1833, Nkolo asakolaki:

“Bosolo bazali boyebi ya makambo lokola mazali, mpe lokola mazalaki, mpe lokola masengeli kozala. …

“Molimo ya bosolo ezali ya Nzambe. …

“Mpe moto te akozwa litondi longola se soki abateli mitindo.

“Ye oyo abateli mitindo [mya Nzambe] akozwa bosolo mpe pole, kino akembisami na bosolo mpe ayebi makambo manso.” 2

“Ye oyo abateli mitindo [mya Nzambe] akozwa bosolo mpe pole, kino akembisami na bosolo mpe ayebi makambo manso.”

Esengeli te mpo na bino to mpo na ngai, na ekeke eye ya boyebi boluti ntango likoki ya nsango malamu ezogisami, konana na mbu ezanga nzela to kosala mobembo na nzela ezanga nkoma ya kolanda mpo na koluka bosolo. Tata moko ya Lola ya bolingo akataki nzela ya biso mpe apesaki mokambi moko ezanga libungi—kutu botosi. Boyebi boko ya bosolo mpe biyano na mituna mya biso mileki minene mikoya na biso ntango tozali na botosi na mitindo ya Nzambe.

Tokoyekola botosi na bomoi bwa biso mobimba. Kobandaka ntango tozali bilenge, baye bazali na mokumba mpo na kolengela biso bakotia nzela ya bokambi mpe mibeko mpo na kosala na ntembe te bozanga likama ya biso. Bomoi elingaki kozala pete mpo na biso banso soki tolingaki kotosa mibeko ya boye mobimba.

Ntango nazalaki kokola, eleko ya molunga nyonso uta ebandeli ya yuli kino setembe, libota lya ngai evandaki na mwa ndako ya biso na Vivian Park na Provo Canyon na Utah.

Moko wa baninga ba ngai na mikolo mina ya kozanga makanisi na canyon ezalaki Danny Larsen, oyo ya ye libota ezalaki na mwa ndako na Vivian Park. Mokolo na mokolo ye mpe ngai totambolaki na paradise oyo ya bana babali, kopepaka mbisi na mai mpe ebale, kokongolaka mwa mabanga mpe bomengo mosusu, kowayawaya, kobuta, mpe bobele kosepela minuti na minuti ya ngonga na ngonga ya mokolo na mokolo.

Ntongo moko Danny mpe ngai tokanaki tolingaki kozala na nganda ya moko mpokwa wana elongo na baninga ba biso ya canyon. Tosengelaki bobele kopetola esika moko na bilanga ya mpembeni wapi tokokaki kosangana banso. Matiti ma sanza ya motoba oyo ezipaki bilanga ekomaka ya kokawuka mpe na nsendensende, kokomisaka bilanga ebonga te mpo na ntina ya biso. Tobandaki kobenda matiti wana ya milai, kokanaka kopetola esika enene nzinganzinga. Tobendakibandaki na makasi ma biso manso, kasi nyonso tokoki kosala ezalaki mwa liboke ya matiti mabe ya makasi. Toyebaki mosala oyo elingaki kozwa mokolo mobimba, mpe bokasi mpe nsai ya biso esilaki kobanda kolemba.

Mpe nde nini nakanisaki ezalaki eyano ebonga nie eyaki na kati ya mayele ma ngai ya mibu mwambe. Nalobaki na Danny, “Nyonso tosengeli ezali kotia moto na matiti mabe. tokotumba bobele nzinganzinga moko na matiti mabe!” Noknoko Andimaki, mpe nakimaki na mwa ndako ya biso mpo na kozwa alimeti.

Longola se soki moko na bino abandi ete na mibu ya mike wana ya mwambe tozalaki na ndingisa ya kosalela alimeti, nalingi kotia polele ete Danny mpe ngai topekisamaki kosalela yango na bakolo te. Biso babale bokebisamaki mbala na mbala na makama ya moto. Ata na likanisi ya mibale te, nakimaki na mwa ndako ya biso mpe nandukaki mwa banzete ya alimeti, kosalaka kebe ete moto te amona. Na bombaki yango nokinoki na libenga lya ngai.

Nazongaki epai ya Danny na kokima, na esengo ete na libenga lya ngai nazallaki na eyango na kpokoso na biso. Namikundolo kokanisaka ete moko elingaki bobele kotumba esika tolingaki mpe nde na mwa kindoki elingaki kokufa yango moko.

Nabetaki alimeti moko na libanga mpe natiaka matiti ya sanza ya motoba na moto. Epelaki lokola soki edingaka na esanzi. Liboso Danny mpe ngai tosepelaki na komonaka matiti mabe kolimwa, kasi ekomaki noki polele ete moto ezalaki te penepene na kobima yango moko. Tobengaki mpenza na komonakaa ezalaki na eloko te tokokaki kosala mpo na kokanga yango. Milolo ya kobangisa ebangaki kolanda matiti ya zambe likolo na mopanzi ya ngomba, kobebisaka banzete ya pin mpe biloko binso misusu na nzela na yango.

Na nzuka tozalaki na boponi mosusu te bobele kokima mpo na koluka lisalisi. Nokinoki babali mpe basi banso bazwamaki na Vivian Park bazalaki kokima liboso mpe nsima na basaki ya kapo ya epola na mai, kobetaka miloli mpo komeka koboma yango. Nsima ya bangonga mingi makala ya moto ya nsuka ekufaki. Banzete ya kala ya pin ebikaka, lokola bandako oyo miloli milingako na nsuka kozwa.

Danny mpe ngai toyekolaki mateya mingi ya makasi kasi ya motuya mokolo wana—moko ya yango eleki moke te ezalaki motuya ya botosi.

Ezali na mibeko mpe mitindo mpo na kosala na ntembe te bozanga likama ya ya biso mpo ete tokoka na elongo konana na bomoi ya kufa oyo mbala mingi ebombi makama mpe na nsuka tozonga epai ya Tata wa bison a Lola.

Bikeke bileki, na nkola moko ekangama na momesano ya libonza ya niama, Samwele na mpiko alobaki: “Yawe akosepelaka mbeka na miboma lokola ye akosepelaka botosi kotosa mongongo na ye?.” 3

Na eleko oyo, Nkolo abimisaki na Profeta Joseph Smith ete Ye asengi “motema mpe mayele ya bolingi; mpe moto ya bolingi mpe botosi akolia biloko ya mboka Siona na mikolo mya nsuka.” 4

Baprofeta banso, ya kala mpe ya sikawa, bayebi ete botosi ezali na ntina mpo lobiko la biso. Nefi asakolaki, “Nakokende, mpe nakosala makambo maye Nkolo atindi.” 5 Atako basusu balembi na bondimi bwa bango mpe botosi, ata mbala moko te Nefi alembaki kosala oyo Nkolo asengaki ye. Bankola bakotangama te bapambolami lokola mbano.

Nsango moko ya kotindika molimo ya botosi ezali oyo ya Abalayama mpe Yisaka. Ya kpokoso ya mpasi kani esengelaki kozala mpo na Abalayama, na botosi na mitindo ya Nzambe, mpo na kokamata mwana wa ye ya bolingo Yisaka na kati ya mboka Moliya mpo na kokaba ya lokola libonza. Ekoki biso kobanza motema mwa bozito ya Abalayama ntango asalaki mobembo na esika etangamaki? Na ntembe te nsimo esengelaki koningisa nzoto ya ye mpe toniokola mayele ma ye ntango akangaki Yisaka, atiaki ye na lotale, mpe akamataka mbeli ya ye mpo na koboma ye. Na bondimi ya koningana te mpe elika ya mobimba na Nkolo, ayanolaki na etinda ya Nkolo. Ya nkembo kani ezalaki esakola, mpe na boyei bolamu kani eyaki: “Tia loboko na yo na mwana te mpe sala likambo na ye te, mpo ete sikawa nayebi ete obangi Njambe, mpo ete oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo na likinda” 6

Abalayama amekamaki mpe ayungulamaki, mpe mpo na botongono mpe botosi ya ye Nkolo apesaki ye elaka oyo ya nkembo: “Mabota yonso na nse bakopambolama mpo na bana na yo, mpo ete yo osili kotosa monoko na ngai.” 7

Atako tosengamaki te kolakisa botosi bwa biso na lolenge ya nsomo mpe ya mpasi na motema, botosi esengelami na biso lokola.

Esakolaki Mokambi Joseph F. Smith na sanza ya zomi na 1973, “Botosi ezali mobeko ya yambo na lola.” 8

Elobaki Mokambi Gordon B. Hinckley, “Esengo ya Basantu ba Mikolo mya nsuka, kimia ya Basantu ba Mikolo mya nsuka, bomengo ya Basantu ba Mikolo mya nsuka, mpe lobiko ya bonetoli ya bato oyo evandi na kotambolaka na botosi na toli ya … Nzambe.” 9

Botosi ezali elembo ya baprofeta, epesi bango bokasi mpe boyebi o ntaka ya bikeke. Ezali na ntina mpo na biso koyeba ete biso, lokola, tozali na likoki na liziba ya bokasi mpe boyebi. Ezwami mpo na moko na moko na biso lelo ntango totosi mitindo mya Nzambe.

O ntaka ya mibu nayebi bato mingi oyo bazalaki mpenza na botongo mpe na botosi napambolamaki mpe nafulamaki na bango. Tika nakabola elongo na bino nsango moko na batp babale ya boye.

Walter Krause azalaki mondimi ya molende ya Eklezia oyo, elongo na libota lya ye; bavandaki na oyo eyebanaki lokola Allemagne de l’Est kolanda Etumba Enene ya Mibae. Atako mpasi bakutanaki na yango na ntina ya bozangi bonsomi na esika wana ya mokili na ntango yango, ndeko mobali Krause azalaki moto moko oyo alingaki mpe asalelaki Nkolo. Akokisaki na botongono mpe mobimba mosala nyonso epesamaki na ye.

Moto mosusu, Johann Denndorfer, mobotami ya Hongrie, abongwanaki na Eklezia na Allemagne mpe abatisamaki kuna na 1911 n amibu ya 17. Ntango mingi te nsima azongaki na Hongrie. Kolanda Etumba Enene ya Mibale, amimonaki lokola mokangemi na mboka ya ye ya kobotama, na engumba Debrecen. Bonsomi lisusu elongolamaka na bato ba Hongrie.

Ndeko mobali Walter Krause, oyo ayebaki te Ndeko mobali Denndorfer, azwaki mosala ya kozali moteyi na ndako mpe ya kotala ye mbala na mbala. Ndeko mobali Krause abiangaki moninga wa ye koteya na ndako mpe alobaki na ye, “Tozwi mosala ya kotala Ndeko mobali Johann Denndorfer. Ekokoka yo kokende elongo na ngai mposo oyo mpo na kotala ye mpe kopesa ye nsango malamu?” Mpe nde azangisaki, “Ndeko mobali Denndorfer avandina Hongrie.”

Moninga wa ye na bosutuku atunaki, “Mokolo nini tokolongwa?”

“Lobi,” eyaki eyano ya Ndeko mobali Krause.

“Mokolo nini tokozonga mboka?” etunaki moninga.

Ndeko mobali Krause ayangolaki, ‘O, na penepene mposo moko—soki tokozonga

Mosika baninga babale ya koteya na ndako bakendeki kotala Ndeko mobali Denndorfer, kosalaka mobembo na engunduka ya nzela ya masini mpe ya nzela ya mabele uta esika ya nordi esti ya Allemagne na Debrecen—penepene na mobembo mobimba. Ndeko mobali Denndorf azalaki na bateya ya ndako te uta yambo ya etumba. Sikawa, ntango amonaki basali baye ya Nkolo, atondaki na botondi ete bakomaka. Yambo aboyaki kopesa bango mbote. Kutu, akendeki na kisuku ya ye ya kolala mpe azwaki na esika moko engbongolo moko kokwaka moko ya zomi ya ye oyo abombaki mibu. Alakisaki moko ya zomi na mateya na ndako ya ye mpe alobaki, “Sikawanandimi na Nkolo. Sikawa nayoki nalongobani mpo na kopesa mbote na basali baNkolo!” Ndeko mobali Krauze alobelaki ngai nsima ete esimbamaki kolema maloba komona ete ndeko mobali oyo ya botongono, oyo azalaki mosika na Eklezia mibu mingi, azwaki na botosi mpe na molende na lifuka ya ye ya moke moko na zomi na yango afutaki moko ya zomi ya ye. Abombaki yango koyebaka te mokolo to soki akokaki kozala na litomba ya kofuta yango.

Ndeko mobali Walter Krause akufaki mibu libwa eleki na mibu 94. Asalaki na botongono mpe botosi na bomoi bwa ye mobimba mpe azalaki bofuli moko mpo na ngai mpe mpo na banso bayebaki ye. Ntango basengaki ye kosala mosala, atiaki ntembe mokolo moko te, ayimayimaki mokolo moko te, mpe asengaki bolimbisi mokolo moko te.

Bandeko ba ngai babali mpe basi, momekano monene ya bomoi oyo ezali botosi. “Tokomeka bango na yango,” elobi Nkolo, “mpo na kotala soki bakosala makambo manso kani Nkolo Nzambe wa bango akotinda bango. 10

Esakolaki Mobikisi, “Mpo bango oyo bakozwa lipamboli moko na loboko la ngai bakowumela na mobeko oyo etiama mpo lipamboli oyo, mpe masengeli maye, lokola etiamaki uta yambo ya bokeli bwa mokili.” 11

Ndakisa monene mingi ya botosi ezali te koleka oyo ya Mobikisi. Mpo na Ye Paulo alobaki:

“Atako aJalaki Mwana, ayekolaki Kotosa mpo na koyoka mpasi;

“Mpe esili ye kobongisama kwa, akomaki eutelo na lobiko na seko mpo na bango yonso bakotosaka ye” 12

Mobikisi alakisaki bolingo ya solo ya Nzambe na kowumelaki bomoi bobongo nie, na kokumisaka etinda ya bule oyo ezalaki ya Ye. Ezalaki Ye mokolo moko te na ezombo. Ezalaki Ye mokolo moko te avimba na lolendo. Ezangaki Ye mokolo moko te botongono. Ntango inso ezalaki Ye mosawa. Ntango inso ezalaki Ye na mosembo. Ntango inso ezalaki Ye botosi.

Atako Ye akamekamaki na nkolo oyo ya lokuta, kutu zabulu, atako Ye alembaki na nzoto na kokilaka mikolo 40 mpe butu 40 mpe azalaki na nzala, kasi ntango moto ya bobe afiotolaki na Yesu makanisi eleki masenginia mpe ya komeka, Ye apesaki biso ndakisa ya bonzambe ya botosi na koboyaka kotengimisa nini Ye ayebaki ezalaki malamu. 13

Ntango kokutanaka na bolozi na Getesemane, wapi ayokaki mpasi ya boye ete “motoki mwa Ye akomaki lokola matanga manene ya makila na mabele,” 6 Ye alakisaki ndakisa ya Mwana Mobali ya botosi na kolobaka, “Tata, soko okani boye, longola kopo oyo na ngai, kasi mokano na ngai esalema te, kasi bobele mokano na yo.” 15

Lokola Mobikisi ateyaki Bapostolo ba Ye ya kala, boye Ye ateyi bino mpe ngai, “Yo bila ngai.” 16 Ezali biso kolinga kotosa?

Boyebi oyo tozali kolluka, biyano mpo na yango ozali na mposa, mpe bokasi oyo tozali na yango mposa lelo mpo na kotelemala mikakatano ya mokili kilikili ya bongwanabongwana ekoki kozala ya biso ntango totosi na bolingi mitindo mya Nkolo. Natangi mbala moko lisusu maloba ma Nkolo: Ye oyo abateli mitindo [mya Nzambe] akozwa bosolo mpe bosolo, kino akokembisama na bosolo mpe akoyeba makambo manso.” 17

Ezali losambo la ngai ya bosawa ete tokoka kopambolama na mbano efuluka elakelami na motosi. O nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo mpe Mobisiki wa biso, amene.